Makomi
Malongi mpe Mayokani 50


Eteni 50

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 9, sanza ya mitano ya mobu 1831. Mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete boko bampaka basosolaki te mamonisi ya milimo ekeseni oyo epalangani bipayi nyonso na mabele mpe ete emoniseli oyo epesamaki lokola eyano na motuna monene na ye na likambo wana. Oyo ebiangami bongo makamwisi ya molimo ezalaki mingi na kati ya bandimi, boko ya baoyo bazalaki koloba ete bazwi mamoni mpe bimoniseli.

1–5, Milimo mingi ya lokuta epalangani bipayi nyonso na mabele; 6–9, Lisuma na mokibisi mpe na baoyo batangolami uta na Eklezia; 10–14, Bampaka bazali mpo na koteya nsango malamu na nzela ya Molimo; 15–22, Nyonso bateyi mpe bayoki basengeli kongengisama na Molimo; 23–25, Oyo elendisaka te ezali ya Nzambe te; 26–28, Basembo bazali nde bakolo biloko nyonso; 29–36, Sambo ya bapetolami eyanolami; 37–46, Klisto azali Mobateli Malamu mpe Libanga ya Yisalaele.

1 Boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, mpe botia litoyi na mongongo ya Nzambe ya bomoi; mpe bosala keba na maloba ya bwania oyo makopesama epayi na bino, engebene na lolenge oyo bosengaki na boyokani na ntina oyo etali eklezia, mpe milimo oyo epalangani na mabele.

2 Tala, solo nalobi epayi na bino, ete ezali na milimo mingi oyo ezali milimo ya lokuta, oyo esili kopalangana na mabele, kokosaka mokili.

3 Mpe lisusu Satana alukaki kokosa bino, ete akoka kolonga bino.

4 Tala, ngai, Nkolo, natalaki bino, mpe namonaki bonsomo kati na eklezia oyo etatolaka nkombo na ngai.

5 Kasi bapambolami ezali bango oyo bazali sembo mpe batiaka molende, ezala na bomoi to na liwa, mpo bakosangola libula ya bomoi ya seko.

6 Kasi lisuma epayi na bango oyo bazali bakosi mpe bakibisi, mpo, boye elobi Nkolo, nakomema bango na bosambisi.

7 Tala, solo nalobi epayi na bino, ezali na bakibisi na kati na bino, baoyo bakosaki boko bandimi, yango nde epesaki moyini nguya; kasi tala bato ya lolenge wana bakosengama;

8 Kasi bakibisi bakoyebana mpe bakotangolama, ezala na bomoi to na liwa, kutu lokola elingi ngai; mpe lisuma na bango oyo batangolami uta na eklezia na ngai, mpo se bango moko wana balongami na mokili.

9 Yango wana, tika ete moto na moto asala keba mbele asala oyo ezali kati na bosolo mpe kati na bosembo te liboso na ngai.

10 Mpe sikawa boya, elobi Nkolo, na nzela ya Molimo, epayi ya bampaka ya eklezia na ye, mpe tika ete toluka ntina elongo, ete bokoka kososola;

11 Tika toluka ntina ya likambo kutu lokola moto alukaka moko na mosusu kotalanaka miso na miso.

12 Sikawa, ntango moto aluki nde akososolama na moto, mpo aluki ntina ya likambo lokola moto; kutu ngai, Nkolo, nakoluka ntina elongo na bino mpo ete bokoka kososola.

13 Yango wana, ngai Nkolo natuni bino motuna oyo—bokulisamaki na ntina nini?

14 Mpo na koteya nsango malamu na ngai na nzela ya Molimo, kutu ata Molendisi oyo atindamaki koteya bosolo.

15 Mpe nsima boyambaki milimo oyo bokoki kososola te, mpe boyambaki yango lokola uta na Nzambe; mpe na oyo ezwi bino elonga?

16 Tala bosengeli koyanola bino moko motuna oyo; nzokande, nakotonda na boboto epayi na bino; ete oyo azali na bolembu na kati na bino ayeisama makasi nsima awa.

17 Solo nalobi epayi na bino, oyo akulisami na ngai mpe atindami koteya liloba ya bosolo na Molendisi, na nzela ya Molimo ya bosolo, ezali ye koteya yango na nzela ya Molimo ya bosolo to na nzela mosusu?

18 Mpe soki ezali na nzela mosusu ezali ya Nzambe te.

19 Mpe lisusu, ye oyo ayambi liloba ya bosolo, ayambi yango na nzela ya Molimo ya bosolo to na nzela mosusu?

20 Soki ezali na nzela mosusu ezali ya Nzambe te.

21 Boye, ntina nini ezali ete bokoki te kososola mpe koyeba, ete ye oyo ayambi liloba na nzela ya Molimo ya bosolo ayambi yango lokola eteyami na Molimo ya bosolo?

22 Yango wana, ye oyo azali koteya mpe ye oyo ayambi, bazali kososola moko mpe mosusu, mpe nyonso balendisami mpe bazali kosepela elongo.

23 Mpe oyo elendisaka te ezali ya Nzambe te, mpe ezali molili.

24 Oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe ye oyo ayambi pole, mpe azali kokoba na Nzambe, akozwa pole mingi koleka; mpe pole wana ekongenga se kongenga kino na mokolo ya kobonga nie.

25 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, mpe nalobi yango mpo ete bokoka koyeba bosolo, mpo ete bokoka kobengana molili na kati na bino;

26 Ye oyo akulisami na Nzambe mpe atindami kokende, se ye moko wana abiangami kozala moto ya monene koleka, atako azali moto ya moke koleka mpe mosali ya nyonso.

27 Yango wana, azali nkolo ya biloko nyonso; mpo biloko nyonso bitosaka ye, nyonso kati na lola mpe likolo ya mabele, bomoi mpe pole, Molimo mpe nguya, oyo etindami na bolingi ya Tata na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na ye.

28 Kasi moto moko te azali nkolo ya biloko nyonso longola se soki apetolami mpe asukolami uta na masumu nyonso.

29 Mpe soki bopetolami mpe bosukolami uta na masumu nyonso, bokosenga nyonso bolingi na nkombo ya Yesu mpe ekosalema.

30 Kasi boyeba oyo, ekopesama epayi na bino nini bokosenga; mpe lokola bobiangami na moto, milimo mikotosa bino.

31 Yango wana, ekosalema, ete soki bomoni molimo moko momonisami oyo bokoki te kososola, mpe bondimi molimo wana te, bosengeli kosenga Tata na nkombo ya Yesu; mpe soki apesi bino molimo wana te, bongo bokoki koyeba ete ezali ya Nzambe te.

32 Mpe ekopesama epayi na bino, nguya likolo ya molimo wana; mpe bosengeli kotelemela molimo wana na mongongo makasi ete ezali ya Nzambe te—

33 Na kotukaka na maloba ya kofunda te, ete bolongama te, na bifundeli soki mpe na kosepelaka mpe te, mbele bokangama na yango.

34 Ye oyo azwi uta na Nzambe, tika atala yango lokola uta na Nzambe; mpe tika asepela ete Nzambe atali ye lokola oyo alongobani kozwa.

35 Mpe na kotiaka bokebi mpe kosalelaka makambo oyo bozwaki, mpe oyo bokozwa awa nsima—mpe bokonzi bopesami epayi na bino na Tata, mpe nguya ya kolonga biloko nyonso oyo epesami na ye te—

36 Mpe tala, solo nalobi epayi na bino, bopambolami bino baoyo bozali sikawa koyoka maloba oyo ya ngai uta na monoko ya mosali na ngai, mpo masumu na bino elimbisami bino.

37 Tika mosali na ngai Joseph Wakefield, na oyo kani nasepeli malamu, mpe mosali na ngai Parley P. Pratt bakende na kati ya Baeklezia mpe balendisa bango na liloba ya bolendisi;

38 Mpe lisusu mosali na ngai John Corrill, soki te ebele lokola basali na ngai bakulisami na mosala oyo, mpe tika bango basala kati na elanga ya vinyo; mpe kotika moto moko te apekisa bango kosala oyo naponaki mpo na bango—

39 Yango wana, na likambo oyo mosali na ngai Edward Partridge alongisami te; nzokande tika ayambola mpe akolimbisama.

40 Tala, bozali bana mike mpe bokoki te komema makambo nyonso sikawa; bosengeli kokola na ngolu mpe na boyebi ya bosolo.

41 Bobanga te, bana bake, mpo bozali na ngai, mpe nalongaki mokili, mpe bozali baoyo Tata na ngai apesaki ngai;

42 Mpe moko te kati na baoyo Tata na ngai apesaki ngai akobungisama.

43 Mpe Tata mpe ngai tozali moko. Nazali na Tata mpe Tata na ngai; mpe mbala mingi lokola bosili koyamba ngai, bozali na ngai mpe ngai na bino.

44 Yango wana, nazali na katikati na bino, mpe nazali mobateli malamu, mpe libanga ya Yisalaele. Oyo akotonga likolo ya libanga oyo akokweya soki moke te.

45 Mpe mokolo ezali koya ete bokoyoka mongongo na ngai mpe bokomona ngai, mpe bokoyeba ete nazali.

46 Boye, bosenzela, ete bokoka kozala bato babelemi. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa