Makomi
Malongi mpe Mayokani 52


Eteni 52

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya bampaka ya Eklezia, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 6, sanza ya motoba ya mobu 1831. Likita moko esalemaki na Kirtland, kobanda na mokolo ya 3 mpe esukaki na mokolo ya 6, sanza ya motoba. Na likita wana makuli ya yambo na bokeseni na mosala ya bonganganzambe ya monene esalemaki, mpe boko mamonisi ya milimo ya lokuta mpe bokosi eyebanaki mpe epamelamaki.

1–2, Likita ekoya nsima ebiangami kosalema na Missouri; 3–8, Boponami ya boko bampaka mpo na kosalaka mobembo elongo esalemi; 9–11, Bampaka basengeli koteya nini bapostolo na baprofeta bakomaki; 12–21, Baoyo bangengisami na Molimo babimisaka mbuma ya masanzoli mpe bwania; 22–44, Bampaka ya ndenge na ndenge baponami kokende koteya nsango malamu wana ezali bango kosala mobembo na Missouri mpo na likita yango.

1 Tala, boye elobi Nkolo epayi ya bampaka baoyo abiangaki mpe aponaki na mikolo oyo ya nsuka, na mongongo ya Molimo na ye—

2 Kolobaka: Ngai, Nkolo, nakoyebisa epayi na bino nini nalingi ete bosala uta ntango oyo kino na likita ekoya, oyo likosalema na Missouri, likolo ya mabele oyo nakobulisa mpo na bato na ngai, baoyo bazali montika ya Yakobo, mpe baoyo wana bazali basangoli libula engebene na liyokani yango.

3 Yango wana, solo nalobi epayi na bino, tika ete basali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon bakende mobembo noki wana soki basili komilengela mpo na kolongwa bipayi na bango, mpe kokende na mabele ya Missouri.

4 Mpe mbala mingi lokola bazali sembo epayi na ngai, ekolakisama epayi na bango nini bakosala;

5 Mpe lisusu, mbala mingi lokola bakozala sembo, mboka na bino ya bosangoli libula ekobimisama epayi na bino.

6 Mpe mbala mingi lokola bakozala sembo te, bakokatama, kutu lokola nalingi, lokola emoni ngai malamu.

7 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai Lyman Wight mpe mosali na ngai John Corrill bakende mobembo na bango na lombangu;

8 Mpe lisusu mosali na ngai John Murdock, mpe mosali na ngai Hyrum Smith, bakende mobembo na esika se moko wana na nzela ya Detroit.

9 Mpe tika ete bakende mobembo uta na esika wana koteyaka liloba nzela nzela, kolobaka makambo mosusu te longola se oyo baprofeta mpe bapostolo bakomaki, mpe oyo ekoteyama na bango na Molendisi na nzela ya losambo ya bondimi.

10 Tika bango bakende mibale mibale, mpe tika bongo bateya nzela nzela kati na lisanga moko moko, kobatisaka na mai, mpe kotiaka bango maboko na ngambo ya mai.

11 Mpo boye elobi Nkolo, nakoyeisa mosala na ngai mokuse kati na bosembo, mpo mikolo ezali koya ntango nakotinda bosambisi mpo na elonga.

12 Mpe tika mosali na ngai Lyman Wight asala keba, mpo Satana alingi koyungula ye lokola mpumbulu.

13 Mpe tala, ye oyo azali sembo akoyeisama mokambi likolo ya makambo mingi.

14 Mpe lisusu, nakopesa epayi na bino emekoleli na makambo nyonso, ete bokosama te; mpo Satana apalangani epayi nyonso na mboka, mpe akendaka mpo na kokosaka bikolo—

15 Yango wana, oyo akosambela, oyo molimo ezali na mawa, se ye moko wana nde andimami na ngai soki atosi makuli na ngai.

16 Ye oyo akoloba, oyo molimo ezali na mawa, oyo kani elobeli esokema mpe elendisaka se ye moko wana azali ya Nzambe soki atosi makuli na ngai.

17 Mpe lisusu, ye oyo akolenga na nse ya nguya na ngai akoyeisama makasi, mpe akobimisa mbuma ya masanzoli mpe bwania, engebene na bimoniseli mpe bosolo oyo kani nasili kopesa na bino.

18 Mpe lisusu, ye oyo alongami mpe abimisi mbuma te, kutu engebene na emekoleli oyo, azali na ngai te.

19 Yango wana, na emekoleli oyo bokoyeba milimo ezala ata ndenge nini na nse ya lola mobimba.

20 Mpe mikolo eyei; mpe ekosalemela bato engebene na bondimi na bango.

21 Tala, mitindo oyo epesami epayi ya bampaka nyonso oyo naponaki.

22 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai Thomas B. Marsh mpe mosali na ngai Ezra Thayre bakende mobembo na bango lisusu se na mboka moko oyo, koteyaka liloba nzela nzela.

23 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai Isaac Morley mpe mosali na ngai Ezra Booth bakende mobembo na bango se na mboka moko oyo, lisusu bateya liloba nzela nzela.

24 Mpe lisusu, tika ete basali na ngai Edward Partridge mpe Martin Harris bakende mobembo na bango oyo elongo na basali na ngai Sidney Rigdon mpe Joseph Smith Mwana.

25 Tika ete basali na ngai David Whitmer mpe Harvey Whitlock lisusu bakende mobembo na bango se na mboka moko oyo, mpe bateya nzela nzela.

26 Mpe tika ete basali na ngai Parley P. Pratt mpe Orson Pratt bakende mobembo na bango, mpe bateya nzela nzela, kutu se na mboka moko oyo.

27 Mpe tika ete basali na ngai Solomon Hancock mpe Simeon Carter lisusu bakende mobembo na bango se na mboka moko oyo, mpe bateya nzela nzela.

28 Tika ete basali na ngai Edson Fuller mpe Jacob Scott lisusu bakende mobembo na bango.

29 Tika ete basali na ngai Levi W. Hancock mpe Zebedee Coltrin lisusu bakende mobembo na bango.

30 Tika ete basali na ngai Reynolds Cahoon mpe Samuel H. Smith lisusu bakende mobembo na bango.

31 Tika ete basali na ngai Wheeler Baldwin mpe William Carter lisusu bakende mobembo na bango.

32 Mpe tika basali na ngai Newel Knight mpe Selah J. Griffin nyonso mibale bakulisama, mpe lisusu bakende mobembo na bango.

33 Iyo, solo nalobi, tika ete nyonso wana bakende mobembo na bango na esika se moko, na banzela ebele ekeseni, mpe moto moko te atonga likolo ya moboko ya moninga, soki mpe moto moko te akende mobembo na nzela ya baninga.

34 Ye oyo azali sembo, se ye moko wana nde akobatelama mpe akopambolama na mbuma mingi.

35 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, tika ete basali na ngai Joseph Wakefield mpe Solomon Humphrey bakende mobembo na bango na bamboka ya esti;

36 Tika ete basala elongo na mabota na bango, kosakolaka makambo mosusu te longola se baprofeta mpe bapostolo, oyo bamonaki mpe bayokaki mpe bandimaki na bosolo nyonso, ete masakoli makoka kokokisama.

37 Na ntina ya bobuki mibeko, tika ete oyo epesamaki likolo ya Heman Basset elongolama uta na ye, mpe etiama likolo ya moto ya Simonds Ryder.

38 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete Jared Carter akulisama nganganzambe, mpe lisusu George James akulisama nganganzambe.

39 Tika ete montika ya bampaka bakengele Baeklezia, mpe basakola liloba na bituka nzinganzinga na bango; mpe tika ete basala misala na maboko na bango moko ete losambo ya nzambe ya bikeko to nkuna esalema mpe te.

40 Mpe na makambo nyonso bomikundola babola mpe bakeleli, bakoni mpe baoyo batungisami, mpamba te ye oyo asalaka makambo oyo te, ye moko wana azali moyekoli na ngai te.

41 Mpe lisusu, tika ete mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon mpe Edward Partridge bazwa mokanda ya bolongobani uta na eklezia. Mpe tika ete moko mozwama mpo na mosali na ngai Oliver Cowdery lisusu.

42 Mpe boye, kutu lokola nalobaki, soki bozali sembo bokosangana bino moko esika moko mpo na kosepela na mboka ya Missouri, oyo ezali mboka na bino ya bosangoli libula, oyo ezali sikawa mboka ya banguna na bino.

43 Kasi, tala, ngai Nkolo, nakowela botongi ya engumba yango na ntango na yango, mpe nakolatisa basembo motole na bosepeli mpe na esengo.

44 Tala, nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, mpe nakotombola bango na mokolo ya nsuka. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa