Makomi
Malongi mpe Mayokani 54


Eteni 54

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Newel Knight, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 10, sanza ya motoba ya mobu 1831. Bandimi ya Eklezia kofandaka na etape na Thompson, Ohio, bakabwanaki mpo na makambo etali bobulisi ya bozwi. Nkundu mpe lokoso emonanaki. Nsima na misio na ye epayi ya bashakers (tala moto ya eteni 49), Leman Copley abukaki liyokani na ye ya kobulisa elanga na ye ya monene lokola esika ya bosangoli libula mpo na Basantu baoyo bazalaki koya uta na Colesville, New York. Na engebene, Newel Knight (mokambi ya etape na Thompson) mpe bampaka basusu bayaki epayi ya Profeta kotuna lolenge nini bakokaki kosala. Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpe azwaki emoniseli oyo etindi bandimi bazwami na Thompson kolongwa na ebokelo ya Leman Copley mpe kokende na Missouri.

1–6, Basantu basengeli kobatela liyokani ya nsango malamu mpo na kolakisa boboto; 7–10, Basengeli kozala na bompikiliki kati na mokakatano.

1 Tala, boye elobi Nkolo, kutu Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka, kutu ye oyo abakamaki na ekulusu mpo na masumu ya mokili—

2 Tala, solo, solo, nalobi epayi na yo, mosali na ngai Newel Knight, osengeli kotelema ngwi kati na mosala epayi wapi nasili kobianga yo.

3 Mpe soki bandeko na yo bandimi balingi kokima banguna na bango, tika bango bayambola uta na masumu na bango nyonso, mpe bakoma solo mpenza bato bamikitisi mpe bato ya mawa liboso na ngai.

4 Mpe lokola liyokani oyo basalaki epayi na ngai libukami, kutu bongo esili kokoma mpamba mpe ebebi.

5 Mpe lisuma epayi na ye oyo lisumu oyo eyaki, mpo ebongaki malamu mpo na ye ete akufa na kozindisama na mai ya mozindo ya mbu.

6 Kasi bapambolami ezali bango oyo babatelaka liyokani na ngai mpe batosaka motindo, mpo basengeli kozala na boboto.

7 Yango wana, bokende kobanda sikawa mpe bokima mboka yango, mbele banguna na bino baya likolo na bino; mpe bokende mobembo na bino, mpe bopona nani bokolinga azala mokambi na bino, mpe mpo na kofuta misolo mpo na bino.

8 Mpe boye bosengeli kokende mobembo na bino kati na bituka epayi na westi, epayi na mboka ya Missouri, epayi na ndelo ya Balamani.

9 Mpe nsima ya kosalaka mobembo na bino, tala, nalobi epayi na bino, boluka mosala lokola mibali, kino nakobongisa esika mpo na bino.

10 Mpe lisusu, bozala na bompikiliki kati na mokakatano kino nakoya; mpe, tala, nazali koya na lombangu, mpe lifuta na ngai ezali elongo na ngai, mpe baoyo balukaki ngai uta na ebandeli bakozwa bopemi mpo na milimo na bango. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa