Makomi
Malongi mpe Mayokani 57


Eteni 57

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Siona, Etuka ya Jackson, Missouri, na mokolo ya 20, sanza ya sambo ya mobu 1831. Na kolakisaka botosi na motindo ya Nkolo mpo na kosala mobembo na Missouri, wapi Ye asengelaki kobimisa “mboka na bino ya kosangola libula” (eteni 52), bampaka basalaki mobembo uta Ohio kokende na ndelo ya westi ya Missouri. Joseph Smith atalaki ezalela ya Balamani mpe amitunaki na kokamwa: “Ntango nini esobe ekobimisa fulele lokola roza? Ntango nini Siona ekotiama na nkembo na yango, mpe esika wapi tempelo na Yo ekotelema, oyo epayi wapi bikolo nyonso bikoya na mikolo ya nsuka?” Nsima ya wana nde azwaki emoniseli boye.

1–3, Independence, na Missouri, ezali esika mpo na Engumba ya Siona mpe tempelo; 4–7, Basantu basengeli kosomba biteni ya mabele mpe kozwa mabula kati na etuka wana; 8–16, Sidney Gilbert asengeli kotia ebombelo, William W. Phelps asengeli kozala monyati buku, mpe Oliver Cowdery asengeli kobelemisa biloko mpo na kobimisa buku.

1 Boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, baoyo boyangani bino moko esika moko, engebene na mitindo na ngai, kati na mboka oyo, oyo ezali mboka ya Missouri, oyo ezali mboka naponaki mpe nabulisaki mpo na bosangani ya basantu.

2 Yango wana, oyo ezali mboka ya elaka, mpe esika mpo na engumba ya Siona.

3 Mpe boye elobi Nkolo Nzambe na bino, soki bolingi kozwa bwania awa nde ezali bwania. Tala, esika oyo ebiangami sikawa Independence ezali esika ya katikati mpenza; mpe esika mpo na tempelo ezwami epayi na westi, likolo ya eteni ya mabele oyo ezali mosika te uta na ndako ya mibeko.

4 Yango wana, ezali bwania ete mabele ya mboka yango masombama na basantu, mpe lisusu eteni nyonso oyo ezwami epayi na westi, kutu kino na monkoloto ya ndelo oyo ekeyi alima na katikati ya Moyuda mpe oyo azali Moyuda-te;

5 Mpe lisusu eteni nyonso oyo ezali na ndelo ya uma, mbala mingi lokola bayekoli na ngai bakopesama makoki ya kosomba biteni ya mabele. Tala, oyo ezali bwania, ete bakoka kozwa yango mpo na libula moko ya libela.

6 Mpe tika ete mosali na ngai Sidney Gilbert asala na esika oyo nabiangaki ye, mpo na kozwa misolo, mpo na kozala ntoma epayi ya eklezia, mpo na kosomba eteni ya mabele na bituka nyonso ya nzinganzinga, mbala mingi lokola ekokoka kosalema kati na bosembo, mpe lokola ekotinda bwania.

7 Mpe tika mosali na ngai Edward Partridge asala na esika nabiangaki ye, mpe akabola epayi ya basantu libula na bango, kutu lokola nasili kotinda; mpe tika lisusu baoyo babiangamaki mpo na kosunga ye.

8 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika mosali na ngai Sidney Gilbert atiama ye moko na esika oyo, mpe atia ebombelo, ete akoka koteka biloko na kozangaka kobuba, ete akoka kozwa mosolo ya kosomba biteni ya mabele mpo na bolamu ya basantu, mpe ete akoka kozwa biloko nyonso oyo bayekoli bakoki kozala na yango mposa mpo na komitia kati na libula na bango.

9 Mpe lisusu tika mosali na ngai Sidney Gilbert azwa mokanda ya ndingisa—tala bwania ezali awa, mpe oyo kani nyonso akotanga tika ye asosola—ete akoka kotinda biloko lisusu epayi ya bato, kutu na nzela ya baoyo akozwa na mosala lokola bakalaki kati na mosala na ye;

10 Mpe boye apesa makoki epayi ya basantu na ngai, ete nsango malamu na ngai ekoka koteyama epayi na baoyo wana bafandi kati na molili mpe na etuka ya elili ya liwa.

11 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika mosali na ngai William W. Phelps afandisama na esika oyo, mpe atiama lokola monyati buku mpo na eklezia.

12 Mpe tala, soki mokili moyambi makomi na ye—tala bwania ezali awa—tika ye azwa nyonso oyo akoki kozwa kati na bosembo, mpo na bolamu ya basantu.

13 Mpe tika mosali na ngai Oliver Cowdery asunga ye, kutu lokola natindaki, na esika nyonso wapi nakobianga ye, mpo na kokoma, mpe mpo na kosembola, mpe mpo na kopona, ete makambo nyonso mazala sembo liboso na ngai, lokola bikomonana kozala solo na Molimo na nzela na ye.

14 Mpe boye tika baye na ntina ya nani nalobaki batiama na mboka ya Siona, na lombangu lokola ekoki, elongo na mabota na bango, mpo na kosala makambo wana kutu lokola nalobaki.

15 Mpe sikawa mpo na oyo etali bosangani—Tika episikopo mpe mosali ntoma basala bibongiseli mpo na mabota wana oyo matindamaki koya na mboka oyo, kala mingi te lokola ekoki, mpe kofandisa bango na libula na bango.

16 Mpe epayi ya ndambo baoyo batikali ya bampaka mpe bandimi malako mosusu makopesama awa nsima. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa