Makomi
Malongi mpe Mayokani 78


Eteni 78

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 1, sanza ya misato ya mobu 1832. Na mokolo wana, Profeta mpe bakambi mosusu basanganaki mpo na kosolola na ntina ya misala ya Eklezia. Na ebandeli na yango emoniseli oyo elakisaki Profeta, Sidney Rigdon, mpe Newel K. Whitney kosala mobembo na Missouri mpe kobongisa bokasi ya Eklezia ya kosomba mpe koteka biloko mpo na kobimisa buku na kosalaka “kompani” oyo esengelaki kokamba bokasi wana, kobimisaka misolo mpo na kotonga Siona mpe mpo na litomba ya babola. Kompani oyo, eyebanaki lokola Kompani ya Bomoko, ebongisamaki na sanza ya minei ya mobu 1832 mpe epanzanaki na mobu 1834 (tala eteni 82). Mwa ntango nsima ya bopanzi na yango, na nse ya bokambi ya Joseph Smith, liloba “misala ya ebombelo mpo na babola” etiamaki na esika ya “ndako ya mombongo mpe ya bobimisi ya buku” kati na emoniseli yango, mpe liloba “molongo” etiamaki na esika ya “kompani.”

1–4, Basantu basengeli kobongisa mpe kotia ebombelo moko; 5–12, Kosalela bozwi na bango na bwania ekomema na lobiko; 13–14, Eklezia esengeli kozala nsomi na banguya ya nse; 15–16, Mikaele (Adama) asalelaka na nse ya bokambami ya Moko Mosantu (Klisto); 17–22, Basembo bapambolami, mpo bakosangola biloko nyonso na libula.

1 Nkolo alobaki epayi ya Joseph Smith Mwana, kolobaka: Boyoka ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, bino baoyo bokulisami na bonganganzambe ya monene ya eklezia na ngai, baoyo boyangani bino moko esika moko;

2 Mpe botia litoyi na toli na ye oyo akulisaki bino uta na likolo, oyo akoloba makambo ya bwania na matoyi na bino, mpo ete lobiko ekoka kozala epayi na bino na likambo oyo bolakisaki liboso na ngai, elobi Nkolo Nzambe.

3 Mpo solo nalobi epayi na bino, ntango ekomi penepene, mpe ebelemi sikawa; mpe tala, mpe mona, esengeli ete ebongiseli moko ya bato na ngai ezala, mpo na koyangelaka mpe kotiaka molongo na makambo ya ebombelo mpo na babola na kati ya bato na ngai, ezala na esika oyo mpe na mabele ya Siona

4 Ezala lokola eyangeli mpe ebongiseli ya ntango nyonso mpe ya libela mpo na eklezia na ngai, mpo na komema ntina liboso, oyo ntina bomipesaki, mpo na lobiko ya moto, mpe mpo na nkembo ya Tata na bino oyo azali na lola;

5 Ete bokokana makasi kati na boyokani ya makambo ya lola, iyo, mpe lisusu na boyokani ya makambo ya mabele, mpo na kozwa biloko ya lola.

6 Mpo soki bokokani te na makambo ya mabele bokoki mpe kokokana na kozwaka makambo ya lola te;

7 Mpo soki bolingi ete napesa bino esika kati na mokili ya selesitiale, bosengeli komilengela na kosalaka makambo oyo natindaki bino mpe nasengaki uta na bino.

8 Mpe sikawa, solo boye elobi Nkolo, elongobani ete makambo nyonso esalema mpo na nkembo na ngai, na bino baoyo bosangani esika moko kati na ebongiseli oyo;

9 To, na maloba mosusu, tika mosali na ngai Newel K. Whitney mpe mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe mosali na ngai Sidney Rigdon bafanda kati na makita elongo na basantu oyo bazali na Siona;

10 Soki bongo te Satana azali koluka kopengwisa mitema na bango uta na bosolo, mpo ete bakoma bato bakufa miso mpe basosola te makambo oyo elengelamaki mpo na bango.

11 Yango wana, napesi epayi na bino motindo oyo, ete bomilengela mpe bomibongisa bino moko na bondimami soki te na liyokani moko ya libela oyo ekoki kobukama te.

12 Mpe ye oyo abuki yango akobungisa mosala mpe ebonga na ye kati na eklezia, mpe akosundolama na minyokoli ya Satana kino na mokolo ya bosikoli.

13 Tala, oyo ezali bolengeli boye wapi nalengeli bino, mpe moboko, mpe momekoli oyo napesi epayi na bino, na oyo wapi bokoki kokokisa mitindo oyo epesami epayi na bino;

14 Ete na nzela ya ngolu ya ngai, ata mokakatano oyo ekokita likolo na bino, ete eklezia ekoka kozala nsomi likolo ya bikelamo nyonso mosusu na nse ya mokili ya selesitiale;

15 Ete bokoka komata likolo na motole elengelami mpo na bino, mpe bokomisama bakonzi likolo ya babokonzi mingi, elobi Nkolo Nzambe, Moko Mosantu ya Siona, oyo atiaki efandeli ya Adama-ondi-Amana;

16 Oyo aponaki Mikaele mwana mobali mokonzi na bino, mpe atiaki makolo na ye, mpe atombwisaki ye likolo, mpe apesaki ye bafungola ya lobiko na nse ya toli mpe bokambami ya Moko Mosantu, oyo azanga ebandeli ya mikolo to nsuka ya bomoi.

17 Solo, solo, nalobi epayi na bino, bozali bana bake, mpe bososoli naino te boni minene ezali mapamboli Tata azali na yango na maboko na ye moko mpe alengeli yango mpo na bino;

18 Mpe bokoki koyamba makambo nyonso sikawa te; nzokande, bozala na bosepeli malamu, mpo nakokamba bino wapi nzela bokokende. Bokonzi ezali ya bino mpe mapamboli na yango ezali ya bino, mpe bozwi ya boseko ezali ya bino.

19 Mpe ye oyo azwi makambo nyonso na bozongisi matondi akokomisama moto ya nkembo; mpe biloko ya mabele oyo bikobakisama epayi na ye, kutu mbala monkama moko, iyo, kutu mingi koleka.

20 Yango wana, bosala makambo oyo natindaki bino, elobi Mosikoli na bino, kutu Mwana Ahmana, oyo alengelaka makambo nyonso liboso ete akamata bino;

21 Mpo bozali eklezia ya Mobotami ya yambo, mpe akokamata bino likolo kati na lipata, mpe akopesa moto na moto na ye likabo.

22 Mpe ye oyo azali kapita ya sembo mpe ya bwania akosangola libula ya biloko nyonso. Amene.

Bimisa na lokasa