Makomi
Malongi mpe Mayokani 7


Eteni 7

Emoniseli epesami epayi ya profeta Joseph Smith mpe Oliver Cowdery, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya minei ya mobu 1829, ntango balukaki koyeba na nzela ya Ulima mpe Tumima soki Yoane, moyekoli molingami, atikalaki na nzoto na ye to akufaki. Emoniseli yango ezali bobongwani ya lisolo ya makomi ekomami na Yoane likolo ya nkasa ya mposo ya nyama mpe ebombamaki na ye moko.

1–3, Yoane Molingami akozala na bomoi kino Nkolo akozonga; 4–8, Petelo, Yakobo, mpe Yoane bazali na bafungola ya nsango malamu.

1 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Yoane, molingami na ngai, nini ezali mposa na yo? Mpo soki okosenga oyo olingi, ekopesama epayi na yo.

2 Mpe nalobaki epayi na ye: Nkolo, pesa ngai nguya likolo ya liwa, mpo ete nakoka kotikala na bomoi mpe komemela yo milimo.

3 Mpe Nkolo alobi epayi na ngai: Solo, solo, nalobi epayi na yo, lokola ozali na mposa ya oyo, okowumela kino nakoya na nkembo na ngai, mpe okosakola liboso ya bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso mpe bato nyonso.

4 Mpe mpo na ntina oyo Nkolo alobi epayi ya Petelo: Soki nalingi ete awumela kino nakoya, ya yo likambo ezali nini? Mpo mposa na ye epayi na ngai ezali ete amemela ngai milimo, kasi mposa na yo ezali ete okoka na lombangu koya epayi na ngai kati na bokonzi na ngai.

5 Nalobi epayi na yo, Petelo, oyo ezalaki mposa malamu; kasi molingami na ngai azalaki na mposa ete akoka kosala mingi koleka, to kosala mosala monene na kati ya bato koleka oyo asalaki liboso.

6 Iyo, abandaki mosala monene koleka; boye nakokomisa ye lokola lolemo ya moto mpe anjelu ya mosala; akosala mpo na baoyo wana bakozala basangoli libula ya lobiko oyo bazali kofanda na mabele.

7 Mpe nakotia yo mpo na kosalela ye mpe ndeko na yo Yakobo; mpe epayi na bino misato nakopesa nguya oyo mpe bafungola ya mosala oyo kino nakoya.

8 Solo nalobi epayi na bino, bokozwa nyonso mibale engebene na oyo etali mposa na bino, mpo ete nyonso mibale bosepela na oyo wana bolingaki.

Bimisa na lokasa