Makomi
Malongi mpe Mayokani 94


Eteni 94

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 2, sanza ya mwambe ya mobu 1833. Hyrum Smith, Reynolds Cahoon, mpe Jared Carter baponami lokola lisanga ya bato bapesami mokumba ya kotonga bandako ya Eklezia.

1–9, Nkolo apesi motindo mpo na oyo etali botongi ya ndako moko mpo na mosala ya Bokambi; 10–12, Ndako mpo na bonyati ya buku esengeli etongama; 13–17, Boko mabula ya kosangola epesami.

1 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, baninga na ngai, napesi epayi na bino motindo moko oyo, ete bokobanda mosala ya kosala mwango mpe kolengela ebandeli mpe kotia moboko ya engumba ya likonzi ya Siona, awa na mboka ya Kirtland, kobandaka na ndako na ngai.

2 Mpe tala, esengeli esalema engebene na emekoleli oyo napesaki bino.

3 Mpe tika ete eteni ya yambo ya mabele oyo ezali na sudi ebulisama mpo na ngai ete botonga ndako moko mpo na bokambi, mpo na botomboli mosala ya bokambi, na kozwaka bimoniseli; mpe mpo na kosala mosala ya bokambi, na kotalaka makambo nyonso etali eklezia mpe bokonzi.

4 Solo nalobi epayi na bino, ete esengeli etongoma mapeko ntuku mitano na mitano mpe mapeko ntuku motoba na mitano na monene ya yango mpe na molai ya yango, kati na balasani ya kati.

5 Mpe esengeli ezala na balasani moko ya nse mpe balasani moko ya likolo, engebene na emekoleli oyo ekopesama na bino awa na nsima.

6 Mpe ekobulisama epayi ya Nkolo uta na moboko ya yango, engebene na molongo ya bonganganzambe, engebene na emekoleli oyo ekopesama na bino awa na nsima.

7 Mpe ekobulisama mobimba epayi ya Nkolo mpo na mosala ya bokambi.

8 Mpe bopesa nzela te ete eloko ya mbindo ekota kati na yango; mpe nkembo na ngai esengeli kozala kuna, mpe ngai nakozala kuna.

9 Kasi soki eloko ya mbindo ekoti kuna na kati, nkembo na ngai ekozala kuna te; mpe nakokota kati na yango te.

10 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, eteni ya mibale ya mabele na sudi ekobulisama mpo na ngai mpo na kotongela ngai ndako, mpo na mosala ya bonyati buku ya bobongoli ya makomi na ngai, mpe makambo nyonso oyo nakotinda bino.

11 Mpe ekozala mapeko ntuku mitano na mitano na monene ya yango koyika na mapeko ntuku motoba na mitano na molai ya yango, na balasani ya kati; mpe kuna ekozala na balasani moko ya nse mpe balasani moko ya likolo.

12 Mpe ndako oyo ekobulisama mobimba mpo na Nkolo uta na moboko ya yango, mpo na mosala ya bonyati ya buku, na makambo nyonso oyo nakotinda bino, mpo na kozala santu, kozangaka litono, engebene na emekoleli na makambo nyonso lokola ekopesama epayi na bino.

13 Mpe na eteni ya mabele ya misato nde mosali na ngai Hyrum Smith akozwa libula na ye.

14 Mpe na biteni ya mabele ya yambo mpe ya mibale na nordi nde basali na ngai Reynolds Cahoon mpe Jared Carter bakozwa mabula na bango—

15 Ete bakoka kosala mosala oyo nasili kopesa bango, ya kozala lisanga ya bato bapesami mokumba ya kotonga bandako na ngai, engebene na motindo, oyo ngai, Nkolo Nzambe, napesaki epayi na bino.

16 Bandako mibale oyo esengeli te kotongama kino nakopesa bino motindo mpo na oyo etali bandako yango.

17 Mpe sikawa nazali na mingi te ya kobakisa epayi na bino na ntango oyo. Amene.

Bimisa na lokasa