Makomi
Malongi mpe Mayokani 105


Eteni 105

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na ebale ya Fishing River, Missouri, na mokolo ya 22, sanza ya motoba ya mobu 1834. Na nse ya bokambi ya Profeta, Basantu uta na Ohio mpe bisika mosusu batambolaki makolo kokende na Missouri na molongo moko oyo eyebanaki nsima lokola Kaa ya Siona. Ntina na bango ezalaki kozongisa Basantu babenganaki uta na bamboka na bango na Etuka ya Jackson. Bato ya Missouri oyo banyokalaki liboso Basantu babangaki ete bazongisela bango mabe na Kaa ya Siona mpe yambo ete yango esalema babundisaki ndambu ya Basantu oyo bazalaki na Etuka ya Clay, Missouri. Nsima ya Guvenele ya Missouri kolongola elaka na ye ya kosunga Basantu, Joseph Smith azwaki emoniseli oyo.

1–5, Siona ekotongama na boyokani na mobeko ya selesitiale; 6–13, Eleko ya bosikoli ya Siona epusani liboso mpo na ntango moke; 14–19, Nkolo akobunda bitumba ya Siona; 20–26, Basantu basengeli kozala na bwania mpe kotia lofundo na misala ya bikamwa te ntango basangani; 27–30, Mabele na Jackson mpe bituka ekangemi esengeli kosombama; 31–34, Bampaka basengeli kozwa dotasio na ndako ya Nkolo na Kirtland; 35–37, Basantu oyo babiangami mpe baponami bakosantisama; 38–41, Basantu basengeli kotombola bendele ya kimia epayi ya mokili.

1 Solo nalobi epayi na bino baoyo boyanganaki esika moko bino moko ete bokoka koyekola bolingi na ngai mpo na oyo etali bosikoli ya bato na ngai oyo batungisami—

2 Tala, nalobi epayi na bino, soki ezalaki te mpo na bobuki mibeko ya bato na ngai, nazali koloba mpo na oyo etali eklezia kasi moto moko moko te, bakokaki kosikolama kutu sikawa.

3 Kasi tala, bayekolaki kozala na botosi na makambo oyo nasengaki na maboko na bango te, kasi batondi na ndenge nyonso ya mabe, mpe bakabaki ya bango biloko te, lokola basantu basepelaka kosala, na babola mpe na baoyo bazali kati na mitungisi na kati na bango;

4 Mpe bazali na bomoko te engebene na bomoko boye esengami na mobeko ya bokonzi ya selesitiale;

5 Mpe Siona ekotongama te longola se soki ezali engebene na mabongisi ya mobeko ya bokonzi ya selesitiale; soki bongo te nakoyamba ye te lokola na ngai moko.

6 Mpe bato na ngai basengeli kopesama etumbu kino bakoyekola botosi, soki esengeli, na nzela ya biloko oyo bazali komonela mpasi.

7 Nazali te koloba mpo na oyo etali baoyo wana babiangami mpo na kokamba bato na ngai, baoyo bazali bampaka ya yambo ya eklezia na ngai, mpo bazali nyonso te na nse ya bokwei boye;

8 Kasi nazali koloba mpo na oyo etali Baeklezia na ngai oyo ezwami epayi mosusu—ezali na mingi oyo bakoloba: Wapi Nzambe na bango? Tala, akokangola bango na ntango ya mitungisi, soki bongo te tokomata na Siona te, mpe tokobomba misolo na biso.

9 Boye, na engebene ya bobuki mibeko ya bato na ngai, elongobani epayi na ngai ete bampaka na ngai basengeli kozela mwa eleko moke mpo na kozwa bosikoli ya Siona—

10 Ete bango moko bakoka komilengela, mpe ete bato na ngai bakoka koteyama na lolenge ya kobonga nie koleka, mpe bazwa boyebi ya kosala, mpe bayeba na lolenge ya kobonga nie koleka oyo etali mosala na bango, mpe makambo oyo nasengi na maboko na bango.

11 Mpe oyo ekoki kokokisama te kino mpaka na ngai bakolatisama na nguya uta na likolo.

12 Mpo tala, nalengelaki dotasio mpe lipamboli moko monene ete esopana likolo na bango, mbala mingi lokola bakozala sembo mpe bakokoba kati na bomikitisi liboso na ngai.

13 Boye elongobani epayi na ngai ete bampaka na ngai basengeli kozela mwa eleko moke, mpo na bosikoli ya Siona.

14 Mpo tala, nasengi na maboko na bango te ete babunda bitumba ya Siona; mpo, lokola nalobaki yango kati na motindo moko ya liboso, kutu bongo nde nakokokisa—nakobunda bitumba na bino.

15 Tala, natindaki mobebisi kobebisa mpe kosilisa banguna na ngai nie; mpe uta lelo kokende liboso mibu mitikali mingi te bakotikama te kobebisa libula na ngai bosoto, mpe kotuka nkombo na ngai likolo ya mabele oyo nasili kobulisa mpo na bosangisi ya basantu na ngai esika moko.

16 Tala, natindaki mosali na ngai, Joseph Smith Mwana, koloba epayi ya bokasi ya ndako na ngai, kutu babuni na ngai, bilenge mibali na ngai, mpe baoyo ya mibu ya katikati, kosangana esika moko mpo na bosikoli ya bato na ngai, mpe kokitisa manongi ya banguna na ngai na nse, mpe kopanza bakengeli na bango;

17 Kasi bokasi ya ndako na ngai batiaki bokebi na maloba na ngai te.

18 Kasi mbala mingi lokola ezali na baoyo wana batiaka bokebi na maloba na ngai, nalengelaki lipamboli mpe dotasio mpo na bango, soki bakobi na bosembo.

19 Nayoki sambo na bango, mpe nakondima libonza na bango; mpe elongobani epayi na ngai ete bamemama boye mosika lokola komekama ya bondimi na bango.

20 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, napesi epayi na bino motindo moko, ete mingi lokola basili kokoma awa, baoyo bakoki kotikala na etuka ya nzinganzinga, tika bango batikala;

21 Mpe baoyo wana bakoki kotikala te, oyo bazali na mabota epayi na esti, tika bazela mwa eleko moke, kino ntango molai wapi mosali na ngai Joseph akotinda bango;

22 Mpo nakopesa ye toli mpo na oyo etali likambo oyo, mpe makambo nyonso oyo akotinda bango makokokisama.

23 Mpe tika ete bato na ngai nyonso oyo bafandi na bituka nzinganzinga bazala mpenza sembo, mpe bato bamipesi na losambo, mpe bato na bomikitisi liboso na ngai, mpe babimisa makambo oyo nabimisaki epayi na bango te, kino ezali bwania epayi na ngai ete ebimisama.

24 Bolobelaka masambisi te, botia lofundo mpe te mpo na bondimi to misala ya bikamwa mpe te, kasi bosangana esika moko na bokebi, mbala mingi na etuka moko lokola ekoki kozala, na boyokani na mayoki ya bato;

25 Mpe tala, nakopesa epayi na bino lisungi mpe ngolu na miso na bango, ete bokoka kopema na kimia mpe bokengi, wana ezali bino koloba na bato: Sambisa biso mpe salela biso boyengebene engebene na mobeko, mpe sembola biso uta na mabe na biso.

26 Sikawa, tala, nazali koloba epayi na bino, baninga na ngai, na lolenge oyo nde bokoki kozwa lisungi na miso ya bato, kino limpinga ya Yisalaele ekokoma monene mpenza.

27 Mpe nakolembisa mitema ya bato, lokola nasalaki motema ya Falo, mbala na mbala, kino mosali na ngai, Joseph Smith Mwana, mpe bampaka na ngai, baoyo nasili kopona, bakozwa ntango ya kosangisa bokasi ya ndako na ngai,

28 Mpe ya kotindaka bato ya bwania, kokokisa oyo natindaki bango mpo na oyo etali bosombi ya mabele nyonso oyo makoki kosombama na etuka ya Jackson, mpe na bikolo ekangemi nzinganzinga.

29 Mpo ezali bolingi na ngai ete mabele oyo masombama; mpe nsima ya kosombama ete basantu na ngai bazwa yango engebene na mibeko ya bobulisi oyo napesaki.

30 Mpe ekosila mabele oyo kosombama, nakotanga mampinga ya Yisalaele na elindo te mpo na kozwaka mabele na bango moko, oyo basombaki liboso na misolo na bango, mpe mpo na kokitisaka na nse manongi ya banguna na ngai oyo makoki kozala likolo na bango, mpe mpo na kopanzaka bakengeli na bango, mpe mpo na kobekolaka ngai uta na banguna na ngai kino na nkola ya misato mpe ya minei na bango baoyo bayinaka ngai.

31 Kasi yambo tika ete limpinga na ngai ekoma monene mpenza, mpe tika ete lisantisama liboso na ngai, ete ekoma ngailokola moi, mpe kongengakitoko lokola sanza, mpe ete bendele na ye ekoka kozala ya nsomo epayi na bikolo nyonso;

32 Ete babokonzi ya mokili oyo misengisama kondima ete bokonzi ya Siona ezali solo mpenza bokonzi ya Nzambe na biso mpe Klisto na ye; boye, tika tokoma bato bayangelami na mibeko na ye.

33 Solo nalobi epayi na bino, elongobani epayi na ngai ete bampaka ya yambo ya eklezia na ngai bazwa dotasio na bango uta na likolo kati na ndako na ngai, oyo natindaki etongoma na nkombo na ngai na mabele ya Kirtland.

34 Mpe tika mitindowana oyo napesaki mpo na oyo etali Siona mpe mobeko na ye misalema mpe ekokisama, nsima ya bosikoli na ye.

35 Ezalaki kala na mokolo moko mpo na kobianga bato na mosala, kasi ntango esili koya mpo na mokolo ya boponi; mpe tika ete baoyo wana baponami bazala baoyo balongobani.

36 Mpe ekomonisama epayi ya mosali na ngai, na lisungi ya mongongo ya Molimo, baoyo wana baponami; mpe bakosantisama;

37 Mpe mbala mingi lokola bazali kolanda toli oyo bazwi, nsima ya mikolo mingi bakozwa nguya ya kokokisa makambo nyonso etali Siona.

38 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, bosenga kimia, bobele na bato oyo babundisi bino te, kasi lisusu na bato nyonso;

39 Mpe botombola bendele ya kimia, mpe bosala bosakoli ya kimia kino na nsuka ya mabele;

40 Mpe bopesa makanisi mpo na kimia na baoyo wana babundisaki bino, engebene na mongongo ya Molimo oyo ezali kati na bino, mpe makambo nyonso ekosala elongo mpo na bolamu na bino.

41 Boye, bozala sembo; mpe tala, mpe mona, nazali elongo na bino kutu kino na nsuka. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa