Makomi
Malongi mpe Mayokani 112


Eteni 112

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Thomas B. Marsh, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 23, sanza ya sambo ya mobu 1837, mpo na oyo etali Bapostolo ya Mwana ya mpate. Emoniseli oyo ezwamaki mokolo Bampaka Heber C. Kimball mpe Orson Hyde bateyaki nsango malamu mbala ya yambo na Angletele. Thomas B. Marsh azalaki na ntango oyo Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.

1–10, Bazomi na mibale basengeli kotinda nsango malamu mpe kotombola mongongo ya bokebisi epayi na bikolo nyonso mpe bato nyonso; 11–15, Basengeli kokamata ekulusu na bango, kolanda Yesu, mpe koleisa mpate na Ye; 16–20, Baoyo wana bakoyamba Bokambi ya Yambo bayambi Nkolo; 21–29, Molili mozipi mabele, mpe bobele baoyo wana bandimi mpe babatisami bakobikisama; 30–34, Bokambi ya Yambo mpe Bazomi na mibale bazali na bafungola ya eleko ya litondi ya ntango.

1 Solo boye elobi Nkolo epayi na yo mosali na ngai Thomas: Nayoki sambo na yo; mpe makabo na yo emati lokola eloko ya kokundola liboso na ngai, mpo na litomba ya baoyo wana, bandeko na yo bandimi, oyo baponamaki kopesa litatoli na nkombo na ngai mpe kotinda yango bipayi na bipayi na kati ya bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso, mpe baoyo wana bakulisami na nzela ya kosalela basali na ngai.

2 Solo nalobi epayi na bino, ezalaki na ndambo moke ya makambo kati na motema na yo mpe elongo na yo na oyo ngai, Nkolo, nasepelaki malamu te.

3 Nzokande, mbala mingi lokola okomikitisa yo moko okonetolama; boye, masumu na yo nyonso elimbisami yo.

4 Tika ete motema na yo ezala na bosepeli malamu liboso na ngai; mpe okopesa litatoli ya nkombo na ngai, bobele epayi ya baoyo bazali Bayuda-te te, kasi lisusu epayi ya Bayuda; mpe osengeli kotinda liloba na ngai kino na nsuka ya mabele.

5 Boye, bunda ntongo na ntongo; mpe mokolo na mokolo tika ete mongongo na yo ya bokebisi mobima; mpe ntango ekoya butu kotika te bafandi ya mabele balala mpongi, na ntina ya maloba na yo.

6 Tika ete esika ofandi eyebana na Siona, mpe kolongola ndako na yo te; mpo ngai, Nkolo, nazali na mosala monene mpo na yo kosala, na kosakolaka nkombo na ngai na kati ya bana ya bato.

7 Boye, kanga nketo na yo mpo na mosala. Tika ete makolo na yo mazipama lisusu, mpo ozali moponami, mpe nzela na yo ezali na kati ya bangomba, mpe na kati ya bikolo mingi.

8 Mpe na ntina ya liloba na yo bato ya minene bakokitisama, mpe na ntina ya liloba na yo baike bato mpamba bakonetolama.

9 Mongongo na yo ekozala mpamela mpo na mobuki mibeko; mpe na mpamela na yo tika ete lolemo ya mokoseli makambo etika mabe na yango.

10 Zala na bomikitisi; mpe Nkolo Nzambe na yo akokamba yo na loboko, mpe akopesa yo eyano na nsambo na yo.

11 Nayebi motema na yo, mpe nayokaki sambo na yo mpo na oyo etali bandeko na yo bandimi. Kozala na boponi bilongi te epayi na bango kati na bolingo koleka mingi basusu, kasi tika ete bolingo na yo mpo na bango ezala lokola mpo na yo moko; mpe tika ete bolingo na yo ezala beboo epayi ya bato nyonso, mpe epayi ya nyonso oyo balingi nkombo na ngai.

12 Mpe sambela mpo na bandeko na yo Bazomi na mibale. Kebisa bango makasi mpo na ntina ya nkombo na ngai, mpe tika ete bakebisama mpo na masumu na bango nyonso, mpe zala sembo liboso na ngai mpo na nkombo na ngai.

13 Mpe nsima ya masenginia na bango, mpe mikakatano mingi, tala, ngai, Nkolo, nakoluka bango, mpe soki bayeisi mitema na bango makasi te, mpe bayeisi matoyi na bango mangongi epayi na ngai te, bakobongwana, mpe nakobikisa bango.

14 Sikawa, nalobi epayi na yo, mpe nini oyo nalobi epayi na yo, nalobi yango epayi ya nyonso Bazomi na mibale: Botelema mpe bokanga nketo na bino, mpe bokamata ekulusu na bino, bolanda ngai, mpe boleisa mpate na ngai.

15 Bomikumisa bino moko te; botomboka na mosali na ngai Joseph te; mpo solo nalobi epayi na bino, nazali elongo na ye, mpe loboko na ngai ekozala likolo na ye; mpe bafungola oyo napesaki epayi na ye, mpe lisusu epayi na bino, makolongolama uta na ye te kino nakoya.

16 Solo nalobi epayi na yo, mosali na ngai Thomas, ozali moto oyo naponaki mpo na kozala na bafungola ya bokonzi na ngai, lokola mpo na oyo etali Bazomi na mibale, na mokili na kati ya bikolo nyonso—

17 Ete okoka kozala mosali na ngai mpo na kofungola ekuke ya bokonzi na bisika nyonso wapi mosali na ngai Joseph, mpe mosali na ngai Sidney, mpe mosali na ngai Hyrum, bakoki koya te;

18 Mpo likolo na bango nasili kotia mokumba ya Baeklezia nyonso mpo na eleko yoko ya moke.

19 Yango wana, epayi nyonso wapi bakotinda yo, kende, mpe nakozala elongo na yo; mpe na esika nyonso wapi okosakola nkombo na ngai ekuke moko mpenza ekofungolama mpo na yo, ete bakoka koyamba liloba ya ngai.

20 Moto nyonso oyo akoyamba liloba na ngai ayambi ngai, mpe nyonso oyo ayambi ngai, ayambi baoyo wana, Bokambi ya Yambo, baoyo natindaki, baoyo natiaki lokola bapesi toli mpo na ntina ya nkombo na ngai mpo na bino.

21 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete moto nyonso oyo bokotinda na nkombo na ngai, na kopona ya bandeko na bino bandimi, Bazomi na mibale, wana etindami mpe epesami ye ndingisa uta na bino engebene na mobeko, akozwa nguya ya kofungola ekuke ya bokonzi na ngai na ekolo nyonso wapi bokotinda bango—

22 Mbala mingi lokola bakomikitisa liboso na ngai, mpe kokangama na liloba ya ngai, mpe kotia bokebi na mongongo ya Molimo na ngai.

23 Solo, solo, nalobi epayi na bino, molili mozipi mabele, mpe molili monene mozipi mayele ya bato, mpe mosuni nyonso mokomi ya kobeba liboso na ngai.

24 Tala, bobekoli ezali koya na lombangu likolo ya bafandi ya mabele, mokolo ya nkele, mokolo ya bozikisi, mokolo ya libebi, ya kolela, ya matanga, mpe ya mawa monene; mpe lokola mopepe ya kaina bobekoli ekoya likolo ya etando nyonso ya mabele, elobi Nkolo.

25 Mpe uta na ndako na ngai nde ekobanda, mpe uta na ndako na ngai nde ekokende, elobi Nkolo;

26 Yambo ekobanda na kati ya baoyo wana bazali na kati na bino, elobi Nkolo, baoyo basakolaki koyeba nkombo na ngai mpe bayebaki ngai te, mpe batukaki ngai na katikati ya ndako na ngai, elobi Nkolo.

27 Boye, botala na yango ete bomitungisi te mpo na oyo etali makambo ya eklezia na ngai na esika oyo, elobi Nkolo.

28 Kasi bopetola mitema na bino liboso na ngai; mpe nsima bokende kati na mokili mobimba, mpe boteya nsango malamu na ngai epayi ya ekelamo nyonso oyo azwi yango te;

29 Mpe ye oyo akondima mpe akobatisama akobikisama, mpe ye oyo akondima te, mpe akobatisama te, akokweisama.

30 Mpo epayi na bino, Bazomi na mibale, mpe baoyo wana, Bokambi ya Yambo, baoyo baponami na bino mpo na kozala bapesi toli na bino mpe bakambi na bino, nguya ya bonganganzambe oyo epesami, mpo na mikolo ya nsuka mpe mpo na mbala ya nsuka, kati na oyo mikolo wapi ezali eleko ya litondi ya ntango,

31 Nguya oyo wapi bozali na yango, elongo na baoyo wana nyonso bazwaki eleko na ntango yoko uta na ebandeli ya bokeli;

32 Mpo solo nalobi epayi na bino, bafungola ya eleko, oyo bozwaki, ekitanisamaki uta na batata, mpe nsima ya nyonso basusu, matindami uta na lola epayi na bino.

33 Solo nalobi epayi na bino, botala lolenge nini libiangi na bino ezali monene. Bosukola mitema mpe bilamba na bino, mbele makila ya nkola oyo masengama na maboko na bino.

34 Bozala sembo kino nakoya, mpo nazali koya na lombangu; mpe lifuta na ngai ezali elongo na ngai mpo na kopesa moto na moto mbano engebene na lolenge ekozala mosala na ye. Nazali Alifa mpe Omega. Amene.

Bimisa na lokasa