Makomi
Malongi mpe Mayokani 113


Eteni 113

Biyano na boko mituna likolo ya makomi ya Yisaya, epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, na to penepene na Far West, Missouri, na sanza ya misato ya mobu 1838.

1–6, Mobimba ya Yisai, lintongo uta na yango, mpe ntina ya Yisai emonisami; 7–10, Mintika mipanzami ya Siona ezali na makoki ya kozwa bonganganzambe mpe mibiangami kozonga epayi ya Nkolo.

1 Nani oyo azali Mobimba ya Yisai oyo balobeli na milongo ya kotanga ya yambo, ya mibale, ya misato, ya minei mpe ya mitano ya mokapo ya zomi na moko ya Yisaya?

2 Solo boye elobi Nkolo: Ezali Klisto.

3 Nini ezali lintongo oyo balobeli na molongo ya yambo ya mokapo ya zomi na moko ya Yisaya, oyo esengeli koya uta na Mobimba ya Yisai?

4 Tala, boye elobi Nkolo: Ezali mosali moko kati na maboko ya Klisto, oyo azali ndambo na eboto ya Yisai mpe lisusu na oyo ya Efelaima, to ya ndako ya Yosefe, likolo ya oyo nani nguya mingi etiami.

5 Nini ezali mosisa ya Yisai oyo balobeli na molongo ya zomi ya mokapo ya zomi na moko?

6 Tala, boye elobi Nkolo, ezali eboto ya Yisai, mpe lisusu ya Yosefe, epayi ya baoyo kani bonganganzambe ezali engebene na mobeko, mpe bafungola ya bokonzi, mpo na kozala lokola bendele, mpe mpo na bosangani ya bato na ngai na mikolo ya nsuka.

7 Mituna uta na Elias Higbee: Nini elingi kolobama na motindo mozwami na Yisaya, mokapo ya ntuku mitano na mibale, molongo ya yambo, oyo elobi: Lata bokasi na yo, O Siona—mpe bato nani oyo Yisaya azalaki kolobela?

8 Azalaki kolobela baoyo wana Nzambe asengeli kobianga na mikolo ya nsuka, baoyo basengeli kozala na nguya ya bonganganzambe mpo na kozongisa lisusu Siona, mpe bosikoli ya Yisalaele; mpe kolata bokasi na ye ezali kolata likoki ya bonganganzambe, oyo ye, Siona, azali na makoki ya kozwa uta na bokitani ya makila; lisusu kozongela nguya oyo wana abungisaki.

9 Tosengeli kososola nini na Siona komikangolaka ye moko uta na minyololo ya kingo na ye; na molongo ya mibale?

10 Tosengeli kososola ete mintika oyo mipanzanaki milendisami kozonga epayi ya Nkolo uta epayi wapi bakweyaki; oyo soki basali yango, elaka ya Nkolo ezali ete akoloba na bango, to akopesa bango emoniseli. Tala milongo ya kotanga ya motoba, sambo, mpe mwambe. Minyololo ya nkingo na ye ezali bilakeli mabe ya Nzambe likolo na ye, to mintika ya Yisalaele kati na ezalela na bango ya bopanzani na kati ya baoyo bazali Bayuda-te.

Bimisa na lokasa