Makomi
Malongi mpe Mayokani 11


Eteni 11

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya ndeko na ye ya mobali Hyrum Smith, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya mitano ya mobu 1829. Emoniseli oyo ezwamaki na nzela ya Ulima mpe Tumima lokola eyano na mabondeli mpe bosenga ya Joseph. Mambi ya kala ya Joseph Smith mapesi likanisi ete emoniseli oyo ezwamaki nsima ya bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona.

1–6, Basali kati na elanga ya vinyo bakozwa lobiko; 7–14, Luka bwania, belela boyamboli, tiaka motema na Molimo; 15–22, Bomba mitindo, mpe yekola liloba ya Nkolo; 23–27, Kowangana te molimo ya emoniseli mpe ya masakoli; 28–30, Baoyo wana bayambi Klisto bakomi bana ya Nzambe.

1 Mosala moko monene mpe ya kokamwa ezali penepene na kosalema na kati ya bana ya bato.

2 Tala, nazali Nzambe; tiaka bokebi na liloba na ngai, oyo ezali na bomoi mpe etonda na nguya, na mopotu koluta mipanga nyonso mipeli bipayi nyonso mibale, kino na kokabola biteni ya matongi mpe mafuta; boye tiaka bokebi na liloba ya ngai.

3 Tala, elanga esili kokomela mpo na kobuka; mpe boye, ye oyo alingi kobuka mbuma tika ye akata na likwangola na bokasi na ye, mpe abuka mbuma ntango mokolo ezali naino kowumela, ete akoka kobomba mpo na lobiko ya libela ya molimo na ye kati na bokonzi ya Nzambe.

4 Iyo, moto nyonso oyo akokata na likwangola mpe akobuka, se ye wana abiangami na Nzambe.

5 Boye, soki osengi epayi na ngai okozwa; soki obeti bakofungolela yo.

6 Sikawa, lokola osengaki, tala, nalobi epayi na yo, bomba mitindo na ngai, mpe luka komema liboso mpe kotia ntina ya Siona.

7 Koluka bozwi ya mokili te kasi bwania; mpe, tala, mibombamo ya Nzambe ekobimisama epayi na yo, mpe na yango okokomisama moto na bozwi. Tala, ye oyo azali na bomoi ya seko azali moto na bozwi.

8 Solo, solo, nalobi epayi na yo, kutu lokola ezali mposa na yo epayi na ngai nde ekopesamela yo; mpe, soki ezali mposa na yo, okozala moko esalelo mpo na kosala bolamu mingi na nkola oyo.

9 Koteya eloko mosusu te longola se boyamboli epayi ya nkola oyo. Bomba mitindo na ngai, mpe salisa mpo na komema mosala na ngai liboso, engebene na mitindo na ngai, mpe okopambolama.

10 Tala, ozali na likabo, to okozwa likabo soki okozala na mposa na yango uta na ngai na bondimi, na motema moko ya sembo, kondimaka na nguya ya Yesu Klisto, to na nguya na ngai oyo nazali kolobela yo;

11 Mpo, tala, ezali ngai oyo nazali koloba; tala, nazali pole oyo ezali kongenga na molili, mpe na nguya na ngai napesi maloba oyo epayi na yo.

12 Mpe sikawa, solo, solo, nalobi epayi na yo, tiaka motema na yo na Molimo wana oyo motindaka kosala bolamu—iyo, kosala na alima, kotambola na bomikitisi, kosambisa na bosembo; mpe oyo ezali Molimo na ngai.

13 Solo, solo, nalobi epayi na yo, nakokabela yo ndambo ya Molimo na ngai, oyo mokongengisa mayele na yo, oyo mokotondisa molimo na yo na bosepeli;

14 Mpe na ntango wana okoyeba, to na oyo okoyeba, makambo nyonso oyo ozali na mposa uta na ngai, oyo etali makambo ya bosembo, na bondimi kondimaka na ngai ete okozwa.

15 Tala, napesi yo motindo ete osengeli te kokanisa ete obiangami koteya kino okobiangama.

16 Zela ya ntango molai, kino okozwa liloba ya ngai, libanga na ngai, eklezia na ngai, mpe nsango malamu na ngai, ete okoka koyeba solo solo mpenza malongi na ngai.

17 Mpe nsima, tala, engebene na mposa na yo, iyo, kutu ekopesama epayi na yo engebene na bondimi na yo.

18 Bomba mitindo na ngai; zala kimia; lomba epayi na Molimo na ngai;

19 Iyo, kangama na ngai na motema na yo mobimba, ete okoka kosalisa na komemaka makambo oyo wana elobamaki na pole—iyo, bobongoli ya mosala na ngai; zala na bompikiliki kino okokokisa yango.

20 Tala, oyo ezali mosala na yo, kobomba mitindo na ngai, iyo, na bokasi na yo, mayele na yo, mpe makasi na yo nyonso.

21 Koluka te kosakola liloba ya ngai, kasi luka naino yambo kozwa liloba ya ngai, mpe na nsima lolemo na yo ekokangolama; bongo, soki ozali na mposa, okozwa Molimo na ngai mpe liloba ya ngai, iyo, nguya ya Nzambe mpo na kondimisa bato.

22 Kasi sikawa zala kimia; yekola liloba na ngai oyo esili kokende na kati ya bana ya bato, mpe lisusu yekola liloba na ngai oyo esengeli koyebana na kati ya bana ya bato, to oyo ezali sikawa kati na bobongoli, iyo, kino bokozwa nyonso oyo nakopesa epayi na bana ya bato na nkola oyo, mpe nsima na yango nde biloko nyonso bikobakisama likolo na yango.

23 Tala ozali Hyrum, mwana mobali na ngai; luka bokonzi ya Nzambe, mpe biloko nyonso bikobakisama engebene na oyo ezali alima.

24 Tonga likolo ya libanga na ngai, oyo ezali nsango malamu na ngai;

25 Kowangana te molimo ya emoniseli, soki mpe molimo ya masakoli te, mpo lisuma epayi na ye oyo awangani makambo oyo;

26 Boye, bomba liloba na ngai na motema na yo kino ngonga oyo esengeli na bwania na ngai ete okende koteya.

27 Tala, nalobi epayi ya nyonso oyo bazali na mposa malamu, mpe basili kokata na likwangola na bango mpo na kobuka mbuma.

28 Tala, nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Nazali bomoi mpe pole ya mokili.

29 Nazali se moko oyo kaka ayaki epayi ya baoyo ya ngai moko mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te.

30 Kasi solo, solo, nalobi epayi na bino, ete mingi lokola bayambi ngai, epayi na bango napesi nguya ya kokoma bana ya Nzambe; kutu na bango oyo bandimi na nkombo na ngai. Amene.

Bimisa na lokasa