Makomi
Malongi mpe Mayokani 137


Eteni 137

Limoni epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, kati na tempelo na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 21, sanza ya yambo ya mobu 1836. Ezalaki na libaku ya kosala makuli na kolengelaka bobulisi ya tempelo.

1–6, Profeta amoni ndeko na ye ya mobali Alvin kati na bokonzi ya selesitiale; 7–9, Malongi ya lobiko mpo na bakufi ebimisami; 10, Bana mike nyonso babikisami kati na bokonzi ya selesitiale.

1 Lola efungwamaki likolo na biso, mpe natalaki bokonzi ya selesitiale ya Nzambe, mpe nkembo na yango, nakoki te koloba soki ezalaki na nzoto to libanda ya nzoto.

2 Namonaki kitoko ya bonkonde ya ekuke na nzela ya oyo wapi basangoli libula ya bokonzi wana bakokota, oyo ezalaki lokola ndemo ya moto kosalaka monoko moko lokola libungutulu;

3 Mpe namonaki lisusu kiti ya bokonzi ya Nzambe kongenga lokola na moto, likolo ya oyo wapi efandaki Tata mpe Mwana.

4 Namonaki balabala kitoko ya bokonzi boma, oyo emonanaki lokola nse epakolamaki na wolo.

5 Namonaki Tata Adama mpe Abalayama; mpe tata na ngai mpe mama na ngai; ndeko na ngai ya mobali Alvin, oyo asilaki kala kolala;

6 Mpe nakamwaki lolenge kani ezalaki ete azwaki libula ya kosangola kati na bokonzi wana, mpo akabwanaki na bomoi oyo liboso ete Nkolo atia loboko na ye mpo na kosangisa Yisalaele mbala ya mibale, mpe abatisamaki te mpo na bolimbisi ya masumu.

7 Boye nde mongongo ya Nkolo moyaki epayi na ngai, kolobaka: Nyonso oyo bakufaki na kozangaka boyebi ya nsango malamu oyo, baoyo balingaki koyamba yango soki bapesamaki nzela ya kotikala, bakozala basangoli libula ya bokonzi ya selesitiale ya Nzambe;

8 Mpe lisusu baoyo wana nyonso bakokufa uta sikawa kokende liboso na kozangaka boyebi na yango, oyo balingaki koyamba yango na mitema na bango nyonso, bakozala basangoli libula ya bokonzi boma;

9 Mpo ngai, Nkolo, nakosambisa bato nyonso engebene na misala na bango, engebene na mposa ya mitema na bango.

10 Mpe natalaki lisusu ete bana mike nyonso oyo bakufaki liboso ete bakoma na mibu ya boyanoli babikisamaki kati na bokonzi ya selesitiale ya lola.

Bimisa na lokasa