Makomi
Malongi mpe Mayokani 21


Eteni 21

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, na Fayette, New York, na mokolo ya 6, sanza ya minei ya mobu 1830. Emoniseli oyo epesamaki ntango Eklezia ezalaki kobongisama, na mokolo oyo etangami awa likolo, na ndako ya Peter Whitmer Tata. Bato motoba, oyo babatisamaka liboso, bazalaki na likita yango. Na kopona wapi nyonso bandimaki, bato oyo bamonisaki mposa mpe mokano na bango mpo na kobandisa Eklezia, engebene na mitindo ya Nzambe (tala eteni 20). Basalaki lisusu kopona mpo na kondima mpe kosunga Joseph Smith Mwana mpe Oliver Cowdery lokola bakambi bayangeli ya Eklezia. Nsima na kotiaka maboko, Joseph akulisaki Oliver mpaka ya Eklezia, mpe na lolenge se moko wana Oliver akulisaki Joseph. Nsima ya kokabola elambo, Joseph mpe Oliver batiaki maboko likolo ya moko moko ya bato bazwamaki na likita mpo na kopesa Molimo Mosantu mpe mpo na kofandisa ya moko moko na bango lokola bandimi ya Eklezia.

1–3, Joseph Smith abiangami kozala momoni, mobongoli, profeta, apostolo, mpe mpaka; 4–8, Liloba na ye ekokamba ntina ya Siona; 9–12, Basantu bakondima maloba na ye lokola akoloba na nzela ya Molendisi.

1 Tala, ekozala na buku ya lisolo ya makomi moko oyo ekobombama kati na bino; mpe kati na yango osengeli kobiangama momoni, mobongoli, profeta, apostolo ya Yesu Klisto, mpaka ya eklezia na bolingi ya Nzambe Tata, mpe na ngolu ya Nkolo na yo Yesu Klisto,

2 Wana ekofulama yo na Molimo Mosantu mpo na kotia moboko na yango, mpe kotonga yango mpo na bondimi bosantu koleka nyonso.

3 Oyo eklezia ebongisamaki mpe etiamaki na mobu ya nkama zomi na mwambe na ntuku misato ya mobu ya Nkolo na bino, na sanza ya minei, mpe na mwa motoba ya sanza oyo ebiangami Sanza ya minei.

4 Yango wana, bino, elingi koloba bato ya eklezia, bosengeli kotia bokebi na maloba na ye nyonso mpe mitindo na ye nyonso oyo akopesa epayi na bino lokola akozwa myango, kotambolaka na bosantu nyonso liboso na ngai;

5 Mpo liloba na ye bondima yango, lokola soki uta na monoko na ngai moko, na bompikiliki mpe bondimi nyonso.

6 Mpo na kosalaka makambo oyo bikuke ya lifelo bikolonga bino te; iyo, mpe Nkolo Nzambe akopanza banguya ya molili uta na liboso na bino, mpe akoningisa lola mpo na bolamu na bino, mpe mpo na nkembo ya nkombo na ye.

7 Mpo boye elobi Nkolo Nzambe: Ye nde nafulaki mpo na komema Siona liboso na nguya monene mpo na ntina ya bolamu, mpe molende na ye nayebi, mpe sambo na ye nayokaki yango.

8 Iyo, kolela na ye mpo na Siona namonaki, mpe nakosala ete alela lisusu te mpo na ye; mpamba te mikolo na ye ya bosepeli ekoki uta na bolimbisi ya masumu na ye, mpe uta na mamonisi ya mapamboli na ngai likolo ya misala na ye.

9 Mpo, tala, nakopambola baoyo wana nyonso bakosala kati na elanga na ngai ya vinyo na lipamboli monene, mpe bakondima maloba na ye, oyo napesaki ye na nzela ya Molendisi, oyo amonisaka ete Yesu abakamaki na ekulusu na bato ya masumu mpo na masumu ya mokili, iyo, mpo na kokokisa bolimbisi ya masumu mpo na bato ya mitema ya mawa.

10 Yango wana ebongi malamu epayi na ngai ete akulisama na yo, Oliver Cowdery apostolo na ngai;

11 Oyo kozalaka bokuli mpo na yo, ete ozali mpaka na nse ya loboko na ye, na lolenge ete azali ya yambo mpo na yo, mpo ete okoka kozala mpaka mpo na eklezia oyo ya Klisto, oyo eyebani na nkombo na ngai—

12 Mpe moteyi ya yambo ya eklezia oyo mpo na eklezia, mpe liboso ya mokili, iyo, liboso ya baoyo bazali Bayuda-te; iyo, mpe boye elobi Nkolo Nzambe, tala, tala! na Bayuda mpe lokola. Amene.

Bimisa na lokasa