Makomi
Malongi mpe Mayokani 34


Eteni 34

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Orson Pratt, na Fayette, New York, na mokolo ya 4, sanza ya zomi na moko ya mobu 1830. Ndeko mobali Pratt azalaki na mibu zomi na libwa na ntango wana. Abongwanaki mpe azwaki libatisi ntango ayokaki yambo, mposo motoba liboso, mateya ya bozongisi ya nsango malamu na ndeko mobali nkulutu na ye Parley P. Pratt. Emoniseli oyo ezwamaki na ndako ya Peter Whitmer Tata.

1–4, Basembo bakomaka bana ya Nzambe na nzela ya Bomikabi; 5–9, Mateya ya nsango malamu ezali kobongisa nzela mpo na Boyei ya Mibale; 10–12, Bosakoli eyaka na nguya ya Molimo Mosantu.

1 Mwana mobali na ngai Orson, tia bokebi mpe yoka mpe tala nini nakoloba epayi na yo, ngai, Nkolo Nzambe, kutu Yesu Klisto Mosikoli na yo;

2 Pole mpe bomoi ya mokili, pole oyo ezali kongenga na molili mpe molili esosoli yango te;

3 Oyo alingaki mokili na motindo oyo ete ye apesaki bomoi na ye moko, ete mingi koleka lokola bakondima bakoka kokoma bana ya Nzambe. Yango wana ozali mwana mobali na ngai;

4 Mpe opambolami mpo ondimaki;

5 Mpe opambolami mingi koleka mpo obiangami na ngai mpo na koteya nsango malamu na ngai—

6 Kotombola mongongo na yo lokola na lokito ya kelelo, mpo na ntango molai mpe makasi, mpe kobelela boyamboli epayi ya nkola oyo ya nioka nioka mpe ya mabe, kobongisaka nzela ya Nkolo mpo na boyei na ye ya mibale.

7 Mpo tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, ntango kala mingi te esili kobelema ete nakoya na lipata na nguya mpe nkembo monene.

8 Mpe ekozala mokolo monene na ntango ya boyei na ngai, mpo bikolo nyonso ekolenga.

9 Kasi liboso ete mokolo monene wana eya, moi mokokoma molili, mpe sanza ekobongolama na makila; mpe minzoto mikopekisa bongengi na yango, mpe boko minzoto mikokweya, mpe ebebisami minene makozela bato ya nkuna.

10 Yango wana, tombola mongongo na yo mpe kotika te, mpo Nkolo Nzambe alobaki; boye sakola, mpe liloba ekopesama na nguya ya Molimo Mosantu.

11 Mpe soki ozali sembo, tala, ngai nazali elongo na yo kino nakoya—

12 Mpe solo, solo, nalobi epayi na yo, nazali koya na lombangu. Nazali Nkolo na yo mpe Mosikoli na yo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa