Makomi
Malongi mpe Mayokani 41


Eteni 41

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya eklezia, na Kirtland, Ohio, mokolo ya 4, sanza ya mibale ya mobu 1831. Emoniseli oyo elakisi Profeta mpe bampaka ya Eklezia kosambela mpo na koyamba “mobeko” ya Nzambe (tala eteni 42). Joseph Smith awutaki se kokoma na Kirtland uta na New York, mpe Leman Copley, mondimi ya Eklezia na mboka ya mpembeni ya Thompson, Ohio, “asengaki Ndeko mobali Joseph mpe Sidney [Rigdon] … kofanda elongo na ye mpe ete akopesa bango bandako mpe biloko ya kobikela.” Emoniseli oyo elandi ezali kolakisa polele wapi Joseph mpe Sidney basengeli kofanda mpe lisusu ebiangi Edward Partridge kozala episikopo ya yambo ya Eklezia.

1–3, Bampaka bakoyangela Eklezia na molimo ya emoniseli; 4–6, Bayekoli ya solo bakoyamba mpe bakobatela mobeko ya Nkolo; 7–12, Edward Partridge abiangami lokola episikopo mpo na Eklezia.

1 Botia bokebi mpe boyoka, O bino bato na ngai, elobi Nkolo mpe Nzambe na bino, bino baoyo nasepeli kopambola na mapamboli minene koleka nyonso, bino baoyo boyokelaka ngai; mpe bino baoyo boyokelaka ngai te, baoyo bosakolaki nkombo na ngai, nakolakela bino mabe, na bolakeli mabe ya nsomo koleka nyonso.

2 Boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai baoyo nabiangaki, tala napesi epayi na bino motindo, ete bokosangana bino moko esika moko mpo na koyokana likolo ya liloba ya ngai;

3 Mpe na losambo ya bondimi na bino bokozwa mobeko na ngai, ete bokoka koyeba lolenge ya koyangela eklezia na ngai mpe bakoka kotia makambo nyonso na alima liboso na ngai.

4 Mpe nakozala moyangeli na bino ntango nakoya; mpe tala, nazali koya na lombangu, mpe bosengeli kotala ete mobeko na ngai mobatelami.

5 Ye oyo ayambi mobeko na ngai mpe asaleli yango, se ye moko wana azali moyekoli na ngai, mpe ye oyo alobi ete ayambi yango mpe asaleli yango te, se ye moko wana azali moyekoli na ngai te, mpe bokobengana ye uta na kati na bino;

6 Mpo ebongi malamu te ete biloko oyo ezali mpo na bana ya bokonzi epesama na bango oyo balongobani na yango te, to na mbwa, to mpe mayaka ya motuya ebwakama liboso ya ngulu.

7 Mpe lisusu, ebongi malamu ete mosali na ngai Joseph Smith Mwana, atongelama ndako, kati na oyo wapi akofanda mpe akobongola.

8 Mpe lisusu, ebongi malamu ete mosali na ngai Sidney Rigdon akoka kofanda lokola elingi ye, mbala mingi lokola akobomba mitindo na ngai.

9 Mpe lisusu, nabiangaki mosali na ngai Edward Partridge; mpe napesi ye motindo, ete asengeli koponama na kopona ya eklezia, mpe kokulisama episikopo mpo na eklezia, kotika biloko ya mombongo na ye mpe kolekisa ntango na ye nyonso kati na misala ya eklezia;

10 Kokengela biloko nyonso lokola ekopesama epayi na ye na mibeko na ngai na mokolo oyo nakopesa ye yango.

11 Mpe oyo mpo motema na ye ezali peto liboso na ngai, mpo azali lokola Natanaele ya kala, kati na oyo kani mayele mabe ezali te.

12 Maloba oyo epesami epayi na bino, mpe ezali peto liboso na ngai; yango wana, bosala keba lolenge kani bozali kotala yango, mpo esengeli kozala likolo ya boyanoli ya milimo na bino na mokolo ya bosambisi. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa