Makomi
Malongi mpe Mayokani 43


Eteni 43

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na sanza ya mibale ya mobu 1831. Na eleko oyo boko bandimi ya Eklezia batiamaki kati na mobulu na bato oyo bazalaki komikumisa na lokuta ete bazali babimisi. Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo mpe azwaki etinda oyo etindamaki na bampaka ya Eklezia. Eteni ya yambo elobeli makambo etali boyangeli ya Eklezia; ndambo ya nsuka ezali na bokebi oyo bampaka basengeli kozala na yango na bikolo ya mabele.

1–7, Bimoniseli mpe mitindo miyaka bobele na nzela ya moko oyo abiangami; 8–14, Basantu basantisami soki bazali kosala na bosantu nyonso liboso ya Nkolo; 15–22, Bampaka batindami kokende kosakola boyamboli mpe kolengela bato mpo na mokolo monene ya Nkolo; 23–28, Nkolo abiangaka bato na mongongo na Ye moko mpe na nzela ya banguya oyo ezali na mokili; 29–35, Nkoto moko ya mibu mpe bokangi ya Satana ekosalema.

1 O Boyoka, bino bampaka ya eklezia na ngai, mpe botia litoyi na maloba oyo nakolobela bino.

2 Mpo tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, ete bozwaki motindo moko lokola mobeko epayi ya eklezia na ngai, ete na nzela na ye oyo nasili koponela bino nde bokozwa mibeko mpe bimoniseli uta na loboko na ngai.

3 Mpe bokoyeba solo mpenza—ete ezali na moko mosusu te oyo aponami kati na bino mpo na kozwa mitindo mpe bimoniseli kino akokamatama, soki atikali na ngai.

4 Kasi solo, solo, nalobi epayi na bino ete moko mosusu te akoponama mpo na likabo oyo longola se soki ezali na nzela na ye; mpo soki elongolami uta na ye akozala na nguya te longola se kopona moto mosusu na esika na ye.

5 Mpe oyo esengeli kozala mobeko epayi na bino, ete bondima te mateya ya moto nyonso oyo akoya liboso na bino lokola bimoniseli soki te mitindo;

6 Mpe oyo napesi epayi na bino ete bokoka kokosama te, ete bokoka koyeba ete bazali na ngai te.

7 Mpo solo nalobi epayi na bino, ete ye oyo akulisami na ngai akokota na ekuke mpe akokulisama lokola nayebisaki bino liboso, koteya bimoniseli oyo wana bozwaki mpe bokozwa na nzela na ye oyo naponaki.

8 Mpe sikawa, tala, napesi epayi na bino motindo moko, ete ntango bosangani esika moko bokoteyana mpe bokolendisana moko mpe mosusu, ete bokoka koyeba lolenge nini ya kosala mpe ya kokamba eklezia na ngai, lolenge nini kosala mpo na oyo etali biteni ya mobeko mpe mitindo na ngai, oyo napesaki.

9 Mpe boye bokoma bato bateyami na mobeko ya eklezia na ngai, mpe bokosantisama na oyo bozwaki, mpe bokosengisama bino moko na kosala kati na bosantu nyonso liboso na ngai—

10 Ete mbala mingi lokola bosali oyo, nkembo ekobakisama na bokonzi oyo ezwaki. Mbala mingi lokola bosali yango te, kutu oyo bosili kozwa ekolongolama.

11 Bomisukola uta na mabe oyo ezali na kati na bino; bomisantisana liboso na ngai;

12 Mpe soki bozali na mposa ya bankembo ya bokonzi, bopona mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe bosunga ye liboso na ngai na losambo ya bondimi.

13 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete soki bozali na mposa ya mibombamo ya bokonzi, pesa ye bilei mpe bilamba, mpe eloko nyonso kani oyo asengeli mpo na kokokisa mosala oyo natindaki ye;

14 Mpe soki bosali yango te akotikala mpo na baoyo bayambaki ye, mpo ete nakoka kobomba mpo na ngai moko bato moko ya peto liboso na ngai.

15 Nalobi lisusu, boyoka bino bampaka ya eklezia na ngai, baoyo naponaki: botindami kokende mpo na koteyama te, kasi mpo na koteya bana ya bato biloko oyo natie kati na maboko na bino na nguya ya Molimo na ngai;

16 Mpe bosengeli koteyama uta na likolo. Bomisantisa mpe bokolatisama na nguya, ete bokoka koteya kutu lokola nalobaki.

17 Boyoka, bino, mpo, tala, mokolo monene ya Nkolo ebelemi.

18 Mpona mokolo ezali koya ete Nkolo akobimisa mongongo na ye uta na lola; lola ekoningana mpe mabele makolenga, mpe kelelo ya Nzambe ekobeta ntango molai mpe makasi, mpe ekoloba na bikolo oyo ezali kolala: Bino basantu bolamuka mpe botikala na bomoi; bino basumuki botikala mpe bolala kino nakobianga lisusu.

19 Yango wana kanga nketo na bino ete bozwama te na kati ya bato ya nkuna.

20 Botombola mingongo na bino mpe botika te. Bobelela bikolo mpo na koyambola, ezala babange mpe bana, ezala baumbu mpe bansomi, kolobaka: Bomilengela mpo na mokolo monene ya Nkolo;

21 Mpo soki ngai, oyo nazali moto, natomboli mpenza mongongo na ngai mpe nabiangi bino mpo na koyambola, mpe boyini ngai, bokoloba nini ntango mokolo yango ekoya ntango bankake ekobimisa mingongo na bango uta na nsuka ya mabele, kolobaka na matoyi ya nyonso oyo bazali na bomoi, kolobaka—Boyambola, mpona mokolo monene ya Nkolo moyei?

22 Iyo, mpe lisusu, ntango minkalikali mikobima kokende na lombangu uta na esti epayi na westi, mpe mikobimisa mingongo na bango epayi ya nyonso oyo bazali na bomoi, mpe koyeisa matoyi ya nyonso oyo bakoyoka mpasi, kolobaka maloba oyo—Boyambola, mpona mokolo monene ya Nkolo moyei?

23 Mpe lisusu, Nkolo akobimisa mongongo na ye uta na lola, kolobaka: Botia bokebi, O bino bikolo ya mabele, mpe boyoka maloba ya Nzambe oyo wana akelaki bino.

24 O bino bikolo ya mabele, mbala boni nasengelaki kosangisa bino lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, kasi bolingaki te!

25 Mbala boni nabiangaki bino na monoko ya basali na ngai, mpe na lisalisi ya banjelu, mpe na mongongo na ngai moko, mpe na mongongo ya kake, mpe na mongongo ya minkalikali, mpe na mongongo ya ekumbaki, mpe na mongongo ya boningani ya mabele, mpe mvula minene ya mabanga, mpe na mongongo ya nzala mpe bokono mabe ya ndenge na ndenge, mpe na lokito monene ya kelelo, mpe na mongongo ya bosambisi, mpe na mongongo ya boboto na bolayi ya mokolo, mpe na mongongo ya nkembo mpe lokumu mpe bozwi ya bomoi ya seko, mpe nalingaki nabikisa bino na lobiko ya libela, kasi bolingaki te!

26 Tala, mokolo moyei, ntango nkeni ya nkele ya bosiliki na ngai etondi.

27 Tala, solo nalobi epayi na bino, ete oyo ezali maloba ya Nkolo Nzambe na bino.

28 Yango wana, bosala mosala, bosala mosala kati na elanga na ngai ya vinyo mpo na mbala ya nsuka—mbala ya nsuka nabeleli epayi na bafandi nyonso ya mabele.

29 Mpo na ntango esengeli ya ngai moko nakoya na mabele mpo na bosambisi, mpe bato na ngai bakosikolama mpe bakoyangela elongo na ngai likolo ya mabele.

30 Mpo ete Nkoto monene ya Mibu, oyo nalobaki na monoko ya basali na ngai, ekoya.

31 Mpo Satana akokangisama, mpe ntango akokangolama lisusu akoyangela bobele mpo na eleko ya moke, mpe nsima ekoya nsuka ya mabele.

32 Mpe ye oyo azali na bomoi kati na bosembo akobongolama na bofini moko ya liso, mpe mabele makoniangwama lokola se na moto.

33 Mpe bato ya nkuna bakokende na moto oyo mozimaka te, mpe nsuka na bango moto moko te ayebi awa na mabele, soki mpe akoyeba soki moke te, kino ntango bakoya liboso na ngai na bosambisi.

34 Boyoka maloba oyo. Tala, nazali Yesu Klisto, Mobikisi ya mokili. Bobomba makambo oyo kati na mitema na bino, mpe botika makambo ya lipompo ya boseko efanda na mayele na bino.

35 Boyeba kotia ndelo na nyonso. Bobomba mitindo na ngai nyonso. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa