Makomi
Malongi mpe Mayokani 59


Eteni 59

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Siona, Etuka ya Jackson, Missouri; na mokolo ya 7, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Liboso na emoniseli oyo, mboka ebulisamaki, lokola Nkolo atindaki, mpe esika ya kotonga tempelo ya mikolo mikoya nsima epambolamaki. Na mokolo wapi emoniseli oyo ezwamaki, Polly Knight, mwasi ya Joseph Knight Tata akufaki, mondimi ya Eklezia ya yambo ya kokufa na Siona. Bandimi ya ebandeli balimbolaki emoniseli oyo lokola “kolakisaka Basantu lolenge nini kobatela saba mpe boniboni kokila mpe kosambela.”

1–4, Basantu ya sembo na Siona bakopambolama; 5–8, Basengeli kolinga mpe kosalela Nkolo mpe kobomba mitindo na ye; 9–19, Na kosantisaka mokolo ya Nkolo, Basantu bazali kopambolama na mosuni mpe na molimo; 20–24, Basembo balakelami kimia na mokili oyo mpe bomoi ya seko na mokili ezali koya.

1 Tala, bapambolami, elobi Nkolo, ezali bango oyo bayaki na mboka oyo liso bobele na nkembo na ngai, engebene na mitindo na ngai.

2 Mpo baoyo wana bazali na bomoi bakosangola libula ya mabele mpe baoyo bakokufa bakopema uta na misala na bango nyonso, mpe misala na bango mikolanda bango; mpe bakozwa motole moko kati na bifandelo ya Tata na ngai, oyo nasili kolengela mpo na bango.

3 Iyo, bapambolami ezali baoyo kani makolo matelemi likolo ya mboka ya Siona, baoyo batosaki nsango malamu na ngai; mpo bakozwa lokola lifuta na bango biloko malamu ya mabele oyo, mpe makobimisa biloko yango na bokasi na yango.

4 Mpe bakolatisama lisusu motole ya mapamboli uta na likolo, iyo, mpe na mitindo ya ndambo te, mpe na bimoniseli na ntango na yango—bango oyo bazali sembo mpe na etingia liboso na ngai.

5 Yango wana, napesi epayi na bango motindo, kolobaka boye: Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na nguya na yo mobimba, na mayele na yo mobimba, mpe bokasi na yo mobimba; mpe na nkombo ya Yesu Klisto osengeli kosalela ye.

6 Okolinga moninga ya penepene na yo lokola yo moko. Okoyiba te; okosala ekobo mpe te, okoboma mpe te, mpe okosala eloko songolo ya lolenge wana mpe te.

7 Okozongisa matondi na Nkolo Nzambe na yo na makambo nyonso.

8 Okotumbela Nkolo Nzambe na bino mbeka kati na bosembo, kutu oyo na motema moko mobukana mpe molimo ya mawa.

9 Mpe ete bokoka komibatela bino moko mobimba peto uta na mbindo ya mokili, bokokende na ndako ya losambo mpe bokosala milulu na bino ya elambo na mokolo na ngai mosantu;

10 Mpo solo oyo ezali mokolo mopesami na bino mpo na kopema uta na misala na bino, mpe mpo na kopesa sambo na bino epayi na ye oyo Aleki Likolo.

11 Nzokande bilaka na bino esengeli kosalema kati na bosembo mikolo nyonso mpe ntango nyonso;

12 Kasi bomikundola ete na oyo mokolo ya Nkolo, bokopesa makabo na bino mpe milulu ya elambo na bino epayi na ye oyo Aleki Likolo, kotubelaka masumu na bino epayi ya bandeko na bino, mpe liboso ya Nkolo.

13 Mpe na mokolo oyo bokosala eloko moko mosusu te, bobele kotika bilei na bino elambama na bomoko ya motema ete kokila na bino ezala ya kobonga nie, to, na maloba mosusu, ete bosepeli na bino ekoka kotonda mobimba.

14 Solo, oyo ezali kokila mpe kosambela, soki te na maloba mosusu, bosepeli mpe losambo.

15 Mpe mbala mingi lokola bokosala makambo oyo elongo na kozongisaka matondi, na mitema mpe bilongi ya esengo, ezala na maseki mingi te, mpo oyo ezali lisumu, kasi na motema moko ya bosepeli mpe na elongi ya esengo—

16 Solo nalobi, ete mbala mingi lokola bokosala oyo, litondi ya mabele ezali na bino, banyama ya zamba mpe ndeke ya likolo, mpe oyo emataka likolo ya nzete mpe etambolaka likolo ya mabele;

17 Iyo, mpe matiti, mpe biloko malamu oyo eutaka na mabele, ezala mpo na bilei soki te mpo na bilamba, to mpo na bandako, to mpo na bibombelo, to mpo na nzete ya mbuma, to mpo na bilanga ya ndunda, to mpo na bilanga ya vinyo;

18 Iyo, biloko nyonso oyo eutaka na mabele, na eleko na yango, esalemi mpo na litomba ya moto mpe mpo moto asalela yango, nyonso mpo na kosepelisa miso mpe mpo na kopesa motema esengo;

19 Iyo, mpo na bilei mpe mpo na bilamba, mpo na komeka na lolemo mpe mpo na koyoka solo, na ntina ya kopesa nguya na nzoto mpe kozongisa bomoi na molimo.

20 Mpe esepelisi Nzambe ete apesaki biloko nyonso oyo epayi ya moto; mpo ekelamaki mpo na ntina oyo ete moto asalela yango, na bososoli, na kolekisaka ndelo te, na kozwaka na makasi mpe te.

21 Mpe ezali na eloko moko te oyo wapi moto atukaka Nzambe, to eloko na ntina ya oyo nkele na ye epelisami, longola se na baoyo wana bandimaka te loboko na ye kati na makambo nyonso, mpe batosaka mitindo na ye te.

22 Tala, oyo ezali engebene na mobeko mpe baprofeta; yango wana, kotungisa ngai lisusu te na ntina ya likambo oyo.

23 Kasi yekolaka ete ye oyo asalaka misala ya bosembo akozwa lifuta na ye, kutu kimia awa na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ezali koya.

24 Ngai, Nkolo, nalobi yango, mpe Molimo ezali kopesa litatoli. Amene.

Bimisa na lokasa