Makomi
Malongi mpe Mayokani 74


Eteni 74

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, na Etuka ya Wayne, New York na mobu 1830. Yambo kutu bobongisi ya Eklezia, mituna mitunamaki mpo na oyo etali lolenge ya libatisi ya malonga, kotindaka Profeta koluka biyano na likambo yango. Mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete emoniseli oyo ezali ndimbola ya 1 Bakolinti 7:14, makomi oyo bato bazalaki kosalela mbala mingi mpo na kolongisa bango na kosalelaka mpo na kotalisa libatisi ya bana.

1–5, Paulo apesi toli na Eklezia ya mikolo na ye ete babatela mibeko ya Mose te; 6–7, Bana mike bazali basantu mpe basantisami na nzela ya Bomikabi.

1 Mpo mobali oyo azangi bondimi asantisami na mwasi, mpe mwasi oyo azangi bondimi asantisami na mobali; soki bongo te bana na bino bazali na mbindo, kasi sikawa bazali basantu.

2 Sikawa, na mikolo ya bapostolo mobeko ya ganza motosamaki na kati ya Bayuda oyo bandimaka te nsango malamu ya Yesu Klisto.

3 Mpe eyaki kosalema ete boweli monene ezalaki na kati ya bato mpo na oyo etali mobeko ya ganza, mpo mobali oyo azangaki kondima azalaki na mposa ete bana na ye bakatama ganza mpe bazala na nse ya mobeko ya Mose, oyo mobeko mosilaki kokokisama.

4 Mpe eyaki kosalema ete bana, na kokolaka na nse ya mobeko ya Mose, balandaki mimesano ya batata na bango mpe bandimaki te nsango malamu ya Klisto, nde epayi wapi bakomaki bato bazanga bosantu.

5 Yango wana, mpo na ntina oyo apostolo akomaki epayi ya eklezia, kopesaka bango motindo, oyo uta na Nkolo te, kasi uta na ye moko, ete mondimi asengeli te kosangana na oyo azali te mondimi; longola se soki mobeko ya Mose molongolami na kati na bango,

6 Ete bana na bango bakoka kotikala na ganza te, mpe ete momeseno molongolama, oyo molobi ete bana mike bazali santu te; mpo motosamaki na kati ya Bayuda;

7 Kasi bana mike bazali basantu, mpo basantisamaki na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto; mpe oyo ezali nini makomi elingi koloba.

Bimisa na lokasa