Makomi
Malongi mpe Mayokani 82


Eteni 82

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, na Independence, Etuka ya Jackson, Missouri, na mokolo ya 26, sanza ya minei ya mobu 1832. Ezalaki na libaku ya lisanga ya banganganzambe banene mpe bampaka ya Eklezia. Na lisanga wana, Profeta Joseph Smith asungamaki lokola Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene, lotomo oyo wapi akulisamaki liboso na likita ya banganganzambe minene, bampaka, mpe bandimi, na Amherst, Ohio, na mokolo ya 25, sanza ya yambo ya mobu 1832 (tala moto ya eteni 75). Emoniseli oyo ezongeli malakisi epesami na emoniseli moko ya liboso (eteni 78) mpo na kosala kompani moko—oyo eyebani lokola Kompani ya Bomoko (na nse ya bokambi ya Joseph Smith, liloba “molongo” etiamaki nsima na esika ya “kompani”)—mpo na koyangela bokasi mpo na kotia esika ya mombongo mpe ya bobimisi ya buku ya Eklezia.

1–4, Wapi mingi epesami, mingi esengami; 5–7, Molili ezali koyangela kati na mokili; 8–13, Nkolo asengisami ntango tosalaka oyo Ye alobi; 14–18, Siona esengeli kokola na kitoko mpe bosantu; 19–24, Moto moko moko asengeli koluka litomba ya moto oyo azali penepene na ye.

1 Solo, solo, nalobi epayi na bino, basali na ngai, ete mbala mingi lokola bolimbisaki mabe ya moko mpe mosusu, kutu bongo nde ngai, Nkolo, nakolimbisa bino.

2 Nzokande, ezali na baoyo wana na kati na bino oyo basumukaki mingi koleka; iyo, kutu bino nyonso bosumukaki; kasi solo nalobi epayi na bino, bosala angele uta awa kokende liboso, mpe bomipekisa uta na masumu, mbele masambisi makasi makweya likolo ya mitu na bino.

3 Mpo epayi na ye oyo mingi epesami mingi esengami; mpe ye oyo asumuki na pole eleki monene akokatama etumbu eleki monene.

4 Bobelelaki likolo ya nkombo na ngai mpo na kozwa bimoniseli, mpe napesi yango epayi na bino; mpe mbala mingi lokola bobombi maloba na ngai te, oyo napesi epayi na bino, bokomi babuki mobeko; mpe boyengebene mpe bosambisi ezali etumbu oyo ekangemi na mobeko na ngai.

5 Boye, oyo nalobi epayi ya moko nalobi yango epayi ya nyonso: Bosenzela, mpo moyini azali kopanza mpifo na ye, mpe molili ezali koyangela;

6 Mpe nkanda ya Nzambe ezali kopela na bafandi ya mabele; mpe moko te azali kosala bolamu, mpo nyonso basili kopengwa mosika na nzela.

7 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, ngai, Nkolo, nakotia mokumba ya lisumu moko te likolo na bino; bokamata nzela na bino bokende mpe bosumuka lisusu te; kasi epayi ya molimo oyo akosumuka masumu ya kala makozonga, elobi Nkolo Nzambe na bino.

8 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, napesi bino motindo moko ya sika, ete bokoka koyeba bolingi na ngai mpo na ntina na bino;

9 To, na maloba mosusu, napesi bino malako etali lolenge nini bokoki kotambola liboso na ngai, ete ekoka kobongela bino mpo na lobiko na bino.

10 Ngai, Nkolo, nasengisami ntango bosalaka oyo nalobi; kasi ntango bosalaka nini oyo nalobi te, bozali na elaka moko te.

11 Boye, solo nalobi epayi na bino, ete elongobani mpo na basali na ngai Edward Partridge mpe Newel K. Whitney, A. Sidney Gilbert mpe Sidney Rigdon, mpe mosali na ngai Joseph Smith, mpe John Whitmer mpe Oliver Cowdery, mpe W. W. Phelps mpe Martin Harris kokangama esika moko kati na bondimani moko mpe liyokani oyo ekoki kokatama na bobuki mobeko te, kati na bokapita na bino ya ndenge na ndenge, longola se bosambisi ekolanda noki—

12 Mpo na kokamba makambo ya babola, mpe biloko nyonso oyo etali bopisikopo ezala na mboka ya Siona to na mboka ya Kirtland;

13 Mpo nabulisaki mboka ya Kirtland na ntango esengeli ya ngai moko mpo na litomba ya basantu na ye oyo Aleki Likolo, mpe mpo na kozala likonzi moko mpo na Siona.

14 Mpo Siona esengeli kokola na kitoko, mpe na bosantu; ndelo na ye esengeli eyeisama milai, mpe makonzi na ye esengeli kolendisama; iyo, solo nalobi epayi na bino, Siona esengeli kolamuka mpe kolata bilamba na ye ya kitoko.

15 Boye, napesi epayi na bino motindo oyo, ete bokangama bino moko na liyokani oyo, mpe esengeli esalema engebene na mibeko ya Nkolo.

16 Tala, bwania ezali lisusu awa kati na ngai mpo na bolamu na bino.

17 Mpe bosengeli kokokana, to na maloba mosusu, bosengeli kozala na bosenga se moko likolo ya bozwi yango, mpo na litomba ya koyangela malamu makambo ya bokapita na bino, moto na moto engebene na mposa mpe bozangi na ye, mbala mingi lokola bozangi na ye ezali sembo—

18 Mpe nyonso oyo mpo na bolamu ya eklezia ya Nzambe ya bomoi, ete moto na moto abakisa likolo ya talanta na ye, ete moto na moto akoka kozwa batalanta mosusu, iyo, kutu mbala monkama moko, mpo ete ebwakama kati na ebombelo ya Nkolo, mpo ete ekoma bozwi ya nyonso bato ya eklezia mobimba—

19 Moto na moto kolukaka litomba ya moto oyo azali penepene na ye, mpe kosalaka makambo nyonso liso bobele na nkembo ya Nzambe.

20 Ebongiseli oyo napesaki motindo mpo na kozala ebongiseli ya libela epayi na bino, mpe epayi ya balandi na bino, mbala mingi lokola bokosumuka te.

21 Mpe molimo oyo mokosumuka na liyokani oyo, mpe mokoyeisa motema na ye makasi na yango, ekosalemela ye engebene na mibeko ya eklezia na ngai, mpe akosundolama na minyokoli ya Satana kino na mokolo ya bosikoli.

22 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, mpe oyo ezali bwania, bosalela mamona oyo ezali sembo te mpo na kozwa baninga mpo na bino moko, mpe bakobebisa bino te.

23 Botikela bobele ngai moko masambisi, mpo ezali ya ngai mpe nakofutisa. Kimia ezala na bino; mapamboli na ngai makoba kozala elongo na bino.

24 Mpo kutu bokonzi ezali nzokande ya bino, mpe ekozala bongo libela, soki bokwei te uta na kotikalaka ya kotelema ngwi na bondimi. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa