Makomi
Malongi mpe Mayokani 97


Eteni 97

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 2, sanza ya mwambe ya mobu 1833. Emoniseli oyo etali mingi mpenza makambo ya Basantu na Siona, Etuka ya Jackson, Missouri, lokola eyano na bosenga ya Profeta mpo na koluka koyeba uta na Nkolo. Bandimi ya Eklezia na Missouri bazwanaki na ntango oyo na monyokoli makasi mpe, na mokolo ya 23, sanza ya sambo ya mobu 1833, bapusamaki kotia maboko na boyokani ya kolongwa na Etuka ya Jackson.

1–2, Mingi ya Basantu na Siona (Etuka ya Jackson, Missouri) bapambolami mpo na bosembo na bango; 3–5, Parley P. Pratt apesami longonia mpo na mosala na ye na eteyelo ya Siona; 6–9, Baoyo batosaka mayokani na bango bandimami na Nkolo; 10–17, Ndako esengeli etongama na Siona kati na oyo wapi bapeto na mitema bakomona Nzambe; 18–21, Siona ezali ya bapeto na mitema; 22–28, Siona ekobika na fimbo ya Nkolo soki azali sembo.

1 Solo nalobi epayi na bino baninga na ngai, nazali kolobela bino na mongongo na ngai, kutu mongongo ya Molimo na ngai, ete nakoka kolakisa epayi na bino bolingi na ngai mpo na oyo etali bandeko na bino bandimi na mboka ya Siona, mingi ya baoyo bazali solo bato na bomikitisi mpe bazali na molende koluka koyekola bwania mpe kozwa bosolo.

2 Solo, solo, nalobi epayi na bino, baoyo ya lolenge wana bapambolami, mpo bakozwa; mpo, ngai Nkolo, nalakisaka boboto epayi ya basokemi nyonso, mpe likolo ya nyonso oyo nalingi, ete nakoka kolongisama ntango nakomema bango na bosambisi.

3 Tala, nalobi epayi na bino, mpo na oyo etali eteyelo na Siona, ngai Nkolo, nazali kosepela malamu ete eteyelo esengeli kozala na Siona, mpe lisusu na mosali na ngai Parley P. Pratt, mpo atikali na ngai.

4 Mpe mbala mingi lokola akokoba kokangama na ngai akokoba koyangela likolo ya eteyelo oyo na mabele ya Siona kino nakopesa epayi na ye mitindo misusu.

5 Mpe nakopambola ye na motango mingi ya mapamboli, na kolimbolaka makomi nyonso mpe mibombamo nyonso mpo na bolendisi ya eteyelo, mpe ya eklezia na Siona.

6 Mpe mpo na montika ya eteyelo, ngai Nkolo, nazali na bolingi ya kolakisa boboto; nzokande, ezali na baoyo wana basengeli kopesama bitumbu, mpe misala na bango mikomonisama.

7 Epasoli etiami na mosisa ya nzete; mpe nzete na nzete oyo ekobimisa mbuma malamu te ekokatama na nse mpe ekobwakama kati na moto. Ngai, Nkolo, nalobi yango.

8 Solo, nalobi epayi na bino, nyonso na kati na bango oyo bayebi ete mitema na bango ezali sembo, mpe mibukama, mpe milimo na bango ezali na mawa, mpe balingi kotosa mayokani na bango na mbeka—iyo, na mbeka oyo wapi ngai, Nkolo, nakotinda—bandimami na ngai.

9 Mpo, ngai Nkolo, nakobotisa bango lokola nzete oyo etondi na mbuma mpenza oyo elonami na mabele ya malamu, penepene na mai ya peto, oyo epesaka mbuma ya motuya mingi.

10 Solo nalobi epayi na bino, ete ezali bolingi na ngai ete ndako moko etongama mpo na ngai na mboka ya Siona, engebene na emekoleli oyo nasili kopesa bino.

11 Iyo, tika etongama na lombangu, na eteni yoko kati na zomi uta na bato na ngai.

12 Tala, oyo ezali eteni yoko kati na zomi mpe mbeka oyo ngai, Nkolo, nazali kosenga na maboko na bango, ete ekoka kozala na ndako moko oyo etongami mpo na ngai mpo na lobiko ya Siona—

13 Lokola esika ya bozongisi matondi mpo na basantu nyonso, mpe lokola esika ya kopesa malako mpo na baoyo nyonso babiangami kati na mosala ya kosalela Nzambe na mabiangi mpe lotomo ebele na bango nyonso;

14 Ete bakoka kozala bato babongi nie na bososoli ya mosala na bango, na eteyeli, na libongisi, mpe na malongi, na makambo nyonso etali bokonzi ya Nzambe na mabele, bokonzi boye wapi bafungola esili kopesama likolo na bino.

15 Mpe mbala mingi lokola bato na ngai batongi ndako mpo na ngai na nkombo ya Nkolo, mpe bokopesa te nzela ete eloko ya mbindo ekota kati na yango; ete ebebisama, nkembo na ngai ekofanda likolo na yango;

16 Iyo, miso na ngai ekozala kuna, mpo nakokota kati na yango, mpe bapeto nyonso na mitema baoyo bakokota na kati bakomona Nzambe.

17 Kasi soki ebebisami nakokota kati na yango te, mpe nkembo na ngai ekozala kuna te; mpo nakokota kati na tempelo ezanga bosantu te.

18 Mpe, sikawa, tala, soki Siona esali makambo oyo akofuluka, mpe akotandolama mpe akokoma ya nkembo mpenza, monene mpenza, mpe ya nsomo.

19 Mpe bikolo ya mabele ekopesa ye lokumu, mpe bakoloba: Solo mpenza Siona ezali engumba ya Nzambe na biso, mpe solo mpenza Siona akoki kokweya te, akolongolama uta na esika na ye te, mpo Nzambe azali kuna, mpe loboko ya Nkolo ezali kuna;

20 Mpe asilaki kolapa ndai na nguya ya bokasi na ye mpo na kozala lobiko na ye mpe linongi na ye na likolo.

21 Boye, solo, boye elobi Nkolo, tika Siona asepela, mpo oyo ezali Siona—bapeto na mitema; boye, tika Siona asepela, nzokande epayi mosusu bato ya nkuna bakozala na kolela.

22 Mpo tala, mpe mona, bobekoli ekoya na lombangu likolo ya baoyo bazanga bonzambe lokola mopepe ya kaina; mpe nani akokima yango?

23 Fimbo ya Nkolo ekoleka likolo na butu mpe na moi, mpe lisolo na yango ekopesa bato nyonso mawa; iyo, ekotika te kino Nkolo akoya;

24 Mpo bosiliki ya Nkolo epelisami na bonsomo na bango mpe misala na bango nyonso ya nkuna.

25 Nzokande, Siona akobika soki atosi kosala makambo nyonso natindaki ye.

26 Kasi soki atosi kosala nyonso oyo natindaki ye te, nakoya kotala ye engebene na misala na ye, na mawa makasi, na bokono mabe, na bolozi, na mompanga, na bobekoli, na moto oyo ezikisaka nie.

27 Nzokande, tika etangama na matoyi na ye oyo mbala moko mpamba, ete, ngai Nkolo, nandimaki libonza na ye; mpe soki asumuki lisusu te, moko te ya makambo oyo makoya likolo na ye;

28 Mpe nakopambola ye na mapamboli, mpe nakoyika ebele ya mapamboli likolo na ye, mpe likolo ya nkola na ye libela na libela, elobi Nkolo Nzambe na bino. Amene.

Bimisa na lokasa