Makomi
Abalayama 2


Mokapo 2

Abalayama alongwe na Ulu mpo na kokende na Kanana—Yehova amonani epayi na ye na Halana—Mapamboli nyonso ya nsango malamu malakelami na nkona na ye mpe na banso na nzela ya nkona na ye—Akei na Kanana mpe akobi na Ejipito.

1 Sikawa Nkolo Nzambe atindaki nzala eya makasi na mboka ya Ulu, na lolenge ete Halana, ndeko na ngai ya mobali, akufaki; kasi Tela, tata na ngai, azalaki kofanda nzokande na mboka ya Ulu, ya Bakaladi.

2 Mpe esalemaki ete ngai, Abalayama, nakamataki Salai na bolongani, mpe Nahola, ndeko na ngai ya mobali, akamataki Milika na bolongani, oyo azalaki mwana mwasi ya Halana.

3 Sikawa Nkolo alobaki epayi na ngai: Abalayama, longwa uta na ekolo na yo, mpe uta na bandeko na yo, mpe uta na ndako ya tata na yo, kino na mboka oyo nakolakisa yo.

4 Boye natikaki mboka ya Ulu, ya Bakaladi, mpo na kokende na mboka ya Kanana; mpe nakamataki Lota, mwana mobali ya ndeko na ngai ya mobali, mpe mwasi na ye, mpe Salai mwasi na ngai; mpe lisusu tata na ngai alandaki ngai nsima, na mboka oyo topesaki nkombo ya Halana.

5 Mpe nzala elembaki; mpe tata na ngai atikalaki na Halana mpe afandaki kuna, lokola bibwele ezalaki mingi na Halana; mpe tata na ngai azongelaki lisusu losambo na ye ya bikeko, boye akobaki kotikala na Halana.

6 Kasi ngai, Abalayama, mpe Lota, mwana mobali ya ndeko na ngai ya mobali, tosambelaki Nkolo, mpe Nkolo amonanaki epayi na ngai, mpe alobaki epayi na ngai: Telema, mpe kamata Lota elongo na yo; mpo nabongisaki mwango ya kolongola yo uta na Halana, mpe kokomisa yo mosali mpo na komema nkombo na ngai na mboka ya bapaya oyo nakopesa na nkona na yo nsima na yo ezala ya bango mpo na libela, ntango bakoyoka mongongo na ngai.

7 Mpo nazali Nkolo Nzambe na yo; nafandi na lola; mabele ezali etielo ya makolo na ngai; nasembolaka loboko na ngai likolo ya mbu, mpe etosaka mongongo na ngai; nakomisaka mopepe mpe moto kozala likalo na ngai; nalobaka na bangomba—Longwa awa—mpe tala, elongolami na mopepe ya kaina, na mwa ntango moke, na mpwasa.

8 Nkombo na ngai ezali Yehova, mpe nayebi nsuka uta ebandeli; boye loboko na ngai ekozala likolo na yo.

9 Mpe nakokomisa yo ekolo moko monene, mpe nakopambola yo koleka ndelo, mpe nakokomisa nkombo na yo monene na kati ya bikolo nyonso, mpe okozala lipamboli mpo na nkona na yo nsima na yo, ete na maboko na bango basengeli komema mosala oyo mpe Bonganganzambe boye epayi na bikolo nyonso;

10 Mpe nakopambola bango na nzela ya nkombo na yo; mpo mingi lokola bakoyamba Nsango malamu oyo bakobiangama na nkombo na yo, mpe bakotangama nkona na yo, mpe bakotelema mpe bakopambola yo, lokola tata na bango;

11 Mpe nakopambola baoyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe na baoyo bakolakela yo mabe; mpe na yo (elingi koloba, na Bonganganzambe na yo) mpe na nkona na yo (elingi koloba, na Bonganganzambe na yo), mpo napesaki epayi na yo elaka ete makoki oyo esengeli kokoba na yo, mpe na nkona na yo (elingi koloba, nkona ya sikisiki, to nkona ya nzoto) nde mabota nyonso ya mabele makopambolama, kutu na mapamboli ya Nsango malamu, oyo ezali mapamboli ya lobiko, kutu ya bomoi ya seko.

12 Sikawa, esilaki Nkolo komibenda uta na kolobaka na ngai, mpe kobenda elongi na ye uta na ngai, nalobaki na motema na ngai: Mosali na yo alukaki yo na makasi; sikawa nasili kobombola yo;

13 Otindaki anjelu na yo kokangola ngai uta na banzambe ya Elekena, mpe nakosala malamu nayoka mongongo na yo, boye tika mosali na yo atelema mpe akende na kimia.

14 Bongo ngai, Abalayama, nakendaki lokola Nkolo alobaki epayi na ngai, mpe Lota elongo na ngai; mpe ngai, Abalayama, nazalaki na mibu ntuku motoba na mibale ntango nakendaki uta na Halana.

15 Mpe nakamataki Salai, oyo nakamataki na bolongani ntango nazalaki na Ulu, na Kaladi, mpe Lota, mwana mobali ya ndeko na ngai ya mobali, mpe biloko na biso nyonso tosangisaki, mpe milimo oyo tozwaki na Halana, mpe tokamataki nzela ya kokende na mboka ya Kanana, mpe tofandaki na biema lokola tozalaki koya na nzela na biso;

16 Boye, boseko bozalaki bobateli na biso mpe libanga na biso mpe lobiko na biso, lokola esalaki biso mobembo uta na Halana koleka na nzela ya Yelisoni, mpo na koya na mboka ya Kanana.

17 Sikawa ngai, Abalayama, natongaki etumbelo na mboka ya Yelisoni, mpe nabonzelaki Nkolo, mpe nasambelaki ete nzala esukisama uta na ndako ya tata na ngai, ete bakoka kokufa te.

18 Mpe tolekaki uta na Yelisoni bipayi na mboka kino na esika ya Sekeme; oyo ezwamaki na esobe ya Mole, mpe tosilaki koya na bandelo ya mboka ya Bakanana, mpe natumbaki mbeka kuna na mabele ya polele ya Mole, mpe nabelelaki Nkolo na libondeli, mpo tosilaki kokota na mboka ya ekolo oyo ya basambeli bikeko.

19 Mpe Nkolo amonanaki epayi na ngai lokola eyano na nsambo na ngai, mpe alobaki epayi na ngai: Epayi na nkona na yo nakopesa mboka oyo.

20 Mpe ngai, Abalayama, natelemaki uta na esika ya etumbelo oyo natongaki mpo na kobonzela Nkolo, mpe nalongwaki uta wana kokende na ngomba na esti ya Betele, mpe napikaki ema na ngai kuna, Betele na ngambo ya westi, mpe Hai na ngambo ya esti; mpe kuna natongaki etumbelo mosusu mpo na Nkolo, mpe nabelelaki lisusu nkombo ya Nkolo.

21 Mpe ngai, Abalayama, natambolaki na mobembo, kokendeka na ngambo ya sudi; mpe nzala ezalaki se kokoba na mboka; mpe ngai, Abalayama, nakamataki mokano ya kokita na Ejipito, kofanda kuna na mobembo, mpo nzala eyaki makasi mpenza.

22 Mpe esalemaki ete ntango ekomaki ngai penepene ya kokota na Ejipito, Nkolo alobaki na ngai: Tala, Salai, mwasi na yo, azali mwasi kitoko na kotalaka na miso;

23 Boye ekosalema ete, ntango Baejipito bakomona ye, bakoloba—Azali mwasi na ye; mpe bakoboma yo, kasi bakotika ye na bomoi; boye tala ete bosala na lolenge oyo ezali bwania:

24 Tika ete aloba na Baejipito, azali ndeko na yo ya mwasi, mpe molimo na yo mokozala na bomoi.

25 Mpe esalemaki ete ngai, Abalayama, nayebisaki Salai, mwasi na ngai, nyonso oyo Nkolo alobaki epayi na ngai—Boye loba epayi na bango, nabondeli yo, ozali ndeko na ngai ya mwasi, ete ekoka kozala malamu mpo na ngai na ntina na yo, mpe molimo na ngai mokotikala na bomoi mpo na yo.

Bimisa na lokasa