Makomi
Malongi mpe Mayokani 10


Eteni 10

Emoniseli epesami epayi ya profeta Joseph Smith, na Harmony, Pennsylvania, mingi mingi pene na sanza ya minei ya 1829, atako ekoki kozala ete bandambu ezwamaki na ebandeli ya eleko ya elanga ya mobu 1828. Kati na oyo Nkolo azali koyebisa Joseph na ntina ya mbongwana oyo etiamaki na bato ya nkuna kati na nkasa 116 ekomama na maboko uta na bobongoli ya buku ya Lehi, kati na Buku ya Mormon. Nkasa oyo ekomamaki na maboko ebungaki na maboko ya Martin Harris, epayi kani nkasa yango epesamiki mpo na ntango moke. (Tala moto ya eteni 3.) Mwango ya mabe ezalaki ete bazela bobongoli mosusu ya sika ya makambo ezwami kati na nkasa oyo bayibaki mpe nsima babebisa lokumu ya mobongoli na kolakisaka bozangi koyokana oyo esalemi katikati na mbongwana yango. Ete ntina oyo ya nkuna ebongisamaki na moto moko oyo ya mabe mpe eyebanaki na Nkolo kutu na ntango Mormon, mokomi bonkonko ya kala ya Banefi, azalaki kokoma na ye bokuse ya bapalaki esangisamaki, emonisami kati na Buku ya Mormon (tala Maloba ya Mormon 1:3–7).

1–26, Satana atombokisaka bato ya nkuna mpo na kotelemela mosala ya Nkolo; 27–33, Azali koluka kobebisa milimo ya bato; 34–52, Nsango malamu esengeli kokende epayi ya Balamani mpe na bikolo nyonso na nzela ya Buku ya Mormon; 53–63, Nkolo akotia Eklezia na Ye mpe nsango malamu na Ye na kati ya bato; 64–70, Akosangisa bayamboli kati na Eklezia na Ye mpe akobikisa bato na botosi.

1 Sikawa, tala, nalobi epayi na yo, ete mpo opesaki nkoma oyo wana opesamaki nguya mpo na kobongola na nzela ya Ulima mpe Tumima, na maboko ya moto moko ya nkuna, obungisi yango.

2 Mpe na ntango se moko wana obungisaki lisusu likabo na yo, mpe mayele na yo makomaki molili.

3 Kasi, ezongisami sikawa epayi na yo lisusu; boye mona ete ozala sembo mpe okoba mpo na kosilisa mosala motikali ya bobongoli lokola obandaki.

4 Kopota mbangu mingi te soki mpe kosala mosala makasi te koleka bokasi na yo mpe makoki mapesameli yo mpo okoka kobongola; kasi zala na etingia kino nsuka.

5 Sambela ntango nyonso, ete okoka kobima molongi; iyo, ete okoka kolonga Satana, mpe ete okoka kokima uta na maboko ya basali ya Satana oyo bazali kosunga mosala na ye.

6 Tala, balukaki kobebisa yo; iyo, kutu moto oyo otielaki motema alukaki kobebisa yo.

7 Mpo na ntina oyo nalobaki ete azali moto ya nkuna, mpo alukaki kolongola biloko oyo napeselaki yo mokumba; mpe alukaki lisusu kobebisa likabo na yo.

8 Mpe mpo opesaki nkoma yango na maboko na ye, tala, bato ya nkuna bakamati yango uta na yo.

9 Boye, opesaki yango, iyo, oyo ezalaki ya bule, epayi ya moto ya nkuna.

10 Mpe, tala, Satana atiaki yango kati na mitema na bango ete babongola maloba oyo okomisaki, soki te oyo obongolaki, oyo malimwe uta na maboko na yo.

11 Mpe tala, nalobi epayi na yo, ete na ntina babalolaki maloba yango, ezali kotangama sikawa lolenge mosusu komekaka na oyo obongolaki mpe okomisaki;

12 Mpe, na lolenge oyo, zabulu amekaki kotia mwango ya mayele mabe, ete akoka kobebisa mosala oyo;

13 Mpo atiaki yango kati na mitema na bango ete basala oyo, ete na kokosaka bakoka koloba ete bakangi yo na ntina ya maloba oyo osalaki lofundo ya kobongola.

14 Solo, nalobi epayi na yo, ete nakotika te ete Satana akoka kokokisa mwango na ye ya mabe na likambo oyo.

15 Mpo tala, basili kotia kati na mitema na bango likanisi ya kotinda yo komeka Nkolo Nzambe na yo, na kosengaka kobongola yango mbala mosusu.

16 Mpe nsima, tala, balobi mpe bakanisi kati na mitema na bango—Tokotala soki Nzambe apesaki ye nguya ya kobongola; soki bongo, akopesa ye mpe nguya lisusu;

17 Mpe soki Nzambe apesi ye nguya lisusu, to soki abongoli lisusu, to, na maloba mosusu, soki azongeli se maloba moko wana, tala, tozali se na yango elongo na biso, mpe tobaloli yango;

18 Boye ekokokana te, mpe tokoloba ete akosaki na maloba na ye, mpe ete azali na likabo te, mpe ete azali na nguya te;

19 Boye tokobebisa ye, mpe lisusu mosala yango; mpe tokosala oyo ete tokoka na nsuka kozala na nsoni te, mpe ete tokoka kozwa nkembo uta na mokili.

20 Solo, solo, nalobi epayi na yo, ete Satana azali na nguya monene likolo ya mitema na bango; akotombokisa bango ete basala mabe mpo na kotelemela oyo ezali malamu;

21 Mpe mitema na bango ezali ya kobeba, mpe etondi na nkuna mpe bonsomo; mpe balingi mingi molili na esika kolinga pole, mpo ete misala na bango ezali mabe; boye bakosenga te uta na ngai.

22 Satana atombokisaka bango, ete akoka komema milimo na bango na bobebisami.

23 Mpe boye asili kotia mwango ya mayele mabe, kokanisaka kobebisa mosala ya Nzambe; kasi nakosenga oyo na maboko na bango, mpe ekobaluka na nsoni mpe bokweisami na bango na mokolo ya bosambisi.

24 Iyo, ye akotombokisa mitema na bango na nkanda na mosala oyo.

25 Iyo, alobi epayi na bango: Bokosa mpe bozimbisana na mikano ya mabe, ete bokoka kobebisa; tala, na likambo oyo mabe ezali te. Mpe boye akolete bango, mpe akoyebisa bango ete lisumu ezali te mpo na kobuka lokuta ete bakoka kokanga moto lokuta, ete bakoka kobebisa ye.

26 Mpe boye akolete bango, mpe akomema bango moke moke kino akobenda milimo na bango noki na nse na lifelo; mpe boye akokangisa bango na motambo na bango moko.

27 Mpe boye akotambola tambola, epayi awa mpe kuna epayi nyonso na mabele, kolukaka kobebisa milimo ya bato.

28 Solo, solo, nalobi epayi na bino, lisuma ezala epayi na ye oyo akobuka lokuta mpo na kokosa mpo akanisi ete mosusu azali kobuka lokuta mpo na kokosa, mpo baoyo ya lolenge oyo bazangi kotangama uta na boyengebene ya Nzambe te.

29 Sikawa, tala, babaloli maloba oyo, mpo Satana alobaki epayi na bango: Akosaki bino—mpe boye akobenda bango mpo basala mabe, mpo na kotinda yo komeka Nkolo Nzambe na yo.

30 Tala, nalobi epayi na yo, ete okobongola maloba oyo wana ebungaki uta na maboko na yo lisusu te;

31 Mpo, tala, bakokokisa miango na bango ya mabe te na kobukaka lokuta na maloba oyo wana. Mpo, tala, soki okobimisa se maloba moko bakoloba ete obukaki lokuta mpe ete otiaki lofundo ya kobongola, kasi ete olobi yo moko likambo moko na minoko mibale.

32 Mpe, tala, bakobimisa oyo, mpe Satana akoyeisa mitema ya bato makasi kotombokisaka bango na nkanda na yo, ete bakoka kondima maloba na ngai te.

33 Boye Satana azali kokanisa konyata litatoli na yo na nkola oyo, ete buku ekoka kobima na nkola oyo te.

34 Kasi tala, bwania ezali awa, mpe mpo nalakisaki yo bwania, mpe napesi yo mitindo mpo na oyo etali makambo oyo, nini osengeli kosala, kolakisa yango epayi ya mokili te kino okokokisa mosala ya bobongoli.

35 Kokamwa te mpo nalobi epayi na yo ete: Bwania ezali awa, kolakisa yango epayi ya mokili te—mpo nalobaki, kolakisa yango epayi ya mokili te, ete okoka kobatelama.

36 Tala, nalobi te ete olakisa yango te epayi ya bato ya sembo;

37 Kasi lokola okoki te ntango nyonso koyeba na yo moko banani bazali sembo, to lokola okoki ntango nyonso kososola bato ya nkuna uta na bato ya sembo te, boye nalobi epayi na yo, fanda kimia kino nakomona ete ebongi malamu ete makambo nyonso etali likambo yango eyebana epayi ya mokili.

38 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na yo, ete lisolo ya makambo oyo okomaki, oyo ebungaki na maboko na yo, ekomami likolo ya bapalaki ya Nefi;

39 Iyo, mpe omikundoli elobamaki kati na nkoma oyo wana ete lisolo ya sikisiki ya makambo oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya Nefi.

40 Mpe sikawa, mpo lisolo oyo ekomami likolo ya bapalaki ya Nefi ezali ya lolenge na yango moko mpo na oyo etali makambo oyo, na bwania na ngai, nalingaki komema boyebi ya bato bazwami kati na lisolo oyo—

41 Boye, okobongola nkoma oyo ezali likolo ya bapalaki ya Nefi, uta na ebandeli kino okokoma na boyangeli ya mokonzi Benyamina, to kino okokoma na oyo obongolaki, oyo obombaki;

42 Mpe tala, okobimisa buku yango lokola lisolo ya makomi ya Nefi; mpe boye nakoyokisa baoyo babalolaki maloba na ngai nsoni.

43 Nakopesa nzela te ete babebisa mosala na ngai; iyo, nakolakisa epayi na bango ete bwania na ngai ezali monene koleka mayele mabe ya zabulu.

44 Tala, bazwaki bobele eteni moko, to boko bokuse ya lisolo ya Nefi.

45 Tala, ezali na makambo mingi makomami likolo ya bapalaki ya Nefi oyo ezali kopesa bososoli mingi koleka mpo na oyo etali nsango malamu na ngai; mpe boye, ezali bwania kati na ngai ete obongola eteni ya yambo ya nkoma ya Nefi, mpe obimisa yango na buku oyo.

46 Mpe, tala, nyonso etikali ya buku oyo ezali na biteni nyonso bina ya nsango malamu na ngai oyo baprofeta basantu na ngai, iyo, mpe lisusu bayekoli na ngai, bazalaki na mposa kati na nsambo na bango ete ekoka komonana epayi ya bato oyo.

47 Mpe nalobelaki bango, ete ekopesama epayi na bango engebene na bondimi na bango na nsambo na bango.

48 Iyo, mpe oyo ezalaki bondimi na bango—ete nsango malamu na ngai, oyo napesaki epayi na bango ete bateya na mikolo na bango, ekoka kobimisama epayi ya bandeko na bango Balamani, mpe lisusu nyonso baoyo bakokoma Balamani na ntina ya bokabwani na bango.

49 Sikawa, oyo ezali nyonso te—bondimi na bango kati na nsambo na bango ezalaki ete nsango malamu oyo esakolama lisusu, soki ekokaki kosalema ete bikolo mosusu bizwa mboka oyo;

50 Mpe boye batikaki solo lipamboli likolo ya mboka oyo kati na nsambo na bango, ete moto nyonso oyo akondima nsango malamu oyo kati na mboka oyo akoka kozwa bomoi ya seko;

51 Iyo, ete ekoka kozala nsomi mpo na nyonso ya ekolo, libota, monoko, soki mpe bato nyonso lokola bakoki kozala.

52 Mpe sikawa, tala, engebene na bondimi na bango kati na nsambo na bango nakomema eteni oyo ya nsango malamu na ngai na boyebi ya bato na ngai. Tala, nakomema yango te mpo na kobebisa oyo basili kozwa, kasi mpo na kolendisa yango.

53 Mpe mpo na ntina oyo nde nalobaki: Soki nkola oyo bayeisi mitema na bango makasi te, nakotia eklezia na ngai na kati na bango.

54 Sikawa nalobi oyo mpo na kobebisa eklezia na ngai te, kasi nalobi oyo mpo na kolendisa eklezia na ngai;

55 Boye, moto nyonso oyo azali na eklezia na ngai asengeli kobanga te, mpo ezali ya lolenge wana nde bakosangola libula ya bokonzi ya lola.

56 Kasi ezali bango oyo babangaka ngai te, mpe babombaka mitindo na ngai mpe te kasi batongaka Baeklezia mpo na bango moko ete bazwa matabisi, iyo, mpe baoyo nyonso basalaka na nkuna mpe balendisaka bokonzi ya zabulu—iyo, solo, solo, nalobeli yo, ezali bango nde nakotumbola, mpe kolengisa mpe koningisa kati na katikati na bango.

57 Tala, nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Nayaki epayi ya baoyo ya ngai moko, mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te.

58 Nazali pole oyo ezali kongenga na molili, mpe molili esosoli yango te.

59 Nazali ye oyo alobaki—Nazali na mpate mosusu oyo ezali ya etonga oyo te—epayi ya bayekoli na ngai, mpe ezalaki na mingi baoyo basosolaki ngai te.

60 Mpe nakolakisa epayi ya bato oyo ete nazali na mpate mosusu, mpe ete bazalaki etape moko ya ndako ya Yakobo;

61 Mpe nakobimisa misala na bango ya kokamwa na pole, oyo basalaki na nkombo na ngai;

62 Iyo, mpe nakobimisa lisusu na pole nsango malamu na ngai oyo esakolamaki mpo na bango, mpe, tala, bakowangana te oyo wana ozwaki, kasi bakolendisa yango, mpe bakobimisa na pole biteni ya solo ya malongi na ngai, iyo, mpe bobele malongi oyo ezali na ngai.

63 Mpe oyo nazali kosala mpo ete nakoka kotia nsango malamu na ngai, ete boswani mingi ekoka kozala te; iyo, Satana atombokisaka mitema ya bana ya bato na boswani mpo na oyo etali biteni ya malongi na ngai; mpe na makambo oyo bazali kobunga nzela mpenza, mpo bazali kokamola makomi mpe bazali kososola yango te.

64 Boye, nakobimisa epayi na bango mobombamo monene oyo;

65 Mpo, tala, nakosangisa bango lokola soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, soki bakoyeisa mitema na bango makasi te;

66 Iyo, soki balingi koya, bakoki, mpe bakomela mai ya bomoi ofele.

67 Tala, oyo ezali malongi na ngai—moto nyonso oyo ayamboli mpe ayei epayi na ngai, se ye wana nde azali eklezia na ngai.

68 Moto nyonso oyo asakoli mingi to moke koleka oyo, se ye wana nde azali na ngai te, kasi azali kotelemela ngai; mpe boye azali moto ya eklezia na ngai te.

69 Mpe sikawa, tala, moto nyonso oyo azali ya eklezia na ngai, mpe ayiki mpiko kati na eklezia na ngai kino nsuka, ye nde nakotia likolo ya libanga ya ngai, mpe bikuke ya lifelo bikolonga bango te.

70 Mpe sikawa, mikundola maloba na ye oyo azali bomoi mpe pole ya mokili, Mosikoli na yo, Nkolo na yo mpe Nzambe na yo. Amene.

Bimisa na lokasa