Makomi
Malongi mpe Mayokani 115


Eteni 115

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Far West, Missouri, na mokolo ya 26, sanza ya minei ya mobu 1838, yango eyebisi bolingi ya Nzambe mpo na oyo etali botongi ya esika wana mpe ya ndako ya Nkolo. Emoniseli oyo ezali kolobela bakambi bayangeli mpe bandimi ya Eklezia.

1–4, Nkolo apesi eklezia na Ye nkombo Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka; 5–6, Siona mpe makonzi na ye ezali bisika ya bobateli mpe ekimelo mpo na Basantu; 7–16, Basantu batindami kotonga ndako ya Nkolo na Far West; 17–19, Joseph Smith azali na bafungola ya bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele.

1 Solo boye elobi Nkolo epayi na bino, mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe lisusu mosali na ngai Sidney Rigdon, mpe lisusu mosali na ngai Hyrum Smith, mpe bapesi toli na yo baoyo baponami mpe bakoponama awa nsima;

2 Mpe lisusu epayi na yo, mosali na ngai Edward Partridge, mpe bapesi toli na ye;

3 Mpe lisusu epayi ya basali na ngai ya sembo oyo bazali bato ya lisanga monene ya eklezia na ngai na Siona, mpo boye nde esengeli kobiangama, mpe epayi ya bampaka nyonso mpe bato ya eklezia na ngai Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, baoyo bapanzami epayi na epayi na mokili mobimba;

4 Mpo boye nde esengeli eklezia na ngai kobiangama na mikolo ya Nsuka, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

5 Solo nalobi epayi na bino nyonso: Botelema mpe bongenga, ete pole na bino ezala bendele mpo na bikolo;

6 Mpe ete bosangani esika moko na mboka ya Siona, mpe na makonzi na ye, ekoka kozala mpo na bobateli, mpe mpo na ekimelo uta na mopepe makasi, mpe uta na nkanda ntango ekosopama, na kozangaka kosangisa likolo ya mabele mobimba.

7 Tika ete engumba yango, Far West, ezala mboka esantu mpe oyo ebulisami mpo na ngai; mpe esengeli kobiangama mboka esantu koleka nyonso, mpo mabele likolo ya oyo wapi botelemi ezali masantu.

8 Boye, natindi bino kotonga ndako mpo na ngai, mpo na kosangisa basantu na ngai esika moko, ete bakoka kokumbamela ngai.

9 Mpe tika ete ebandeli ya mosala oyo, mpe moboko, mpe mosala moko ya bolengeli, oyo ebanda na eleko ya elanga oyo ezali koya;

10 Mpe tika ete ebandeli esalema na mokolo ya minei ya sanza ya sambo ekoya; mpe uta na ntango wana kokende liboso tika ete bato na ngai basala mosala na molende mpo na kotonga ndako mpo na nkombo na ngai;

11 Mpe na mobu moko uta na mokolo oyo tika ete babanda lisusu kotia moboko ya ndako na ngai.

12 Boye tika bango uta na ntango wana kokende liboso basala na molende kino ekosilisama, uta na libanga ya nsuka na yango kino na likolo na yango, kino ekotikala na eloko moko te oyo esili te.

13 Solo nalobi epayi na bino, botika te ete mosali na ngai Joseph, to mosali na ngai Sidney, soki mpe mosali na ngai Hyrum, kozwama na banyongo lisusu mpo na botongi ndako na nkombo na ngai;

14 Kasi botika ete ndako etongama na nkombo na ngai engebene na emekoleli oyo nakolakisa epayi na bango.

15 Mpe soki bato na ngai batongi yango te engebene na emekoleli oyo nakolakisa epayi na bokambi na bango, nakondima yango te na maboko na bango.

16 Kasi soki bato na ngai batongi yango mpenza engebene na emekoleli oyo nakolakisa epayi na bokambi na bango, kutu mosali na ngai Joseph mpe bapesi toli na ye, bongo nakondima yango na maboko ya bato na ngai.

17 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ezali bolingi na ngai ete engumba ya Far West etongama na lombangu mpo na bosangani ya basantu na ngai;

18 Mpe lisusu ete bisika mosusu esengeli koponama lokola makonzi na bituka ya nzinganzinga, lokola bikomonisama, mbala na mbala, epayi ya mosali na ngai Joseph.

19 Mpo tala, nakozala elongo na ye, mpe nakosantisa ye liboso ya bato; mpo epayi na ye nde napesaki bafungola ya bokonzi mpe mosala oyo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa