Makomi
Malongi mpe Mayokani 19


Eteni 19

Emoniseli epesami na nzela ya Joseph Smith, na Manchester, New York, mingi mingi na eleko ya elanga ya mobu 1829. Kati na mambi na ye ya kala, Profeta abandaki kokoma yango lokola “motindo uta na Nzambe kasi uta na moto te, epayi ya Martin Harris, epesami na ye oyo azali Seko.”

1–3, Klisto azali na nguya nyonso; 4–5, Bato nyonso basengeli koyambola soki te koyoka mpasi ya bolozi; 6–12, Etumbu ya seko ezali etumbu ya Nzambe; 13–20, Klisto ayokaki bolozi mpo na nyonso, ete bayoka bolozi te soki bakoyambola; 21–28, Teya nsango malamu ya boyamboli; 29–41, Sakola nsango ya nsai.

1 Nazali Alifa mpe Omega, Klisto Nkolo; iyo, kutu nazali ye, ebandeli mpe nsuka, Mosikoli ya mokili.

2 Ngai, nsima ya kokokisa mpe kosilisa bolingi na ye oyo kani nazali ya ye, kutu Tata, mpo na oyo etali ngai—nsima na ngai kosalaka oyo ete nakoka kotosisa biloko nyonso na nse ya ngai moko—

3 Nakangaki nguya nyonso, kutu kino na kobebisa Satana mpe misala na ye na nsuka ya mokili, mpe mokolo monene ya nsuka ya bosambisi, oyo nakomema likolo ya bafandi na yango, kosambisaka moto moko moko engebene na misala na ye mpe bikela oyo asalaki.

4 Mpe na ntembe te moto moko moko asengeli koyambola to koyoka bolozi, mpo ngai, Nzambe, nazali oyo azanga nsuka.

5 Yango wana, nalongoli te masambisi oyo nakomema, kasi masuma makotindama, kolela, biyelela mpe koliana mino, iyo, epayi na baoyo bakozwama na loboko na ngai ya mwasi.

6 Nzokande, ekomami te ete nsuka ekozala na monioko oyo te, kasi ekomami monioko mozanga nsuka.

7 Lisusu, ekomami bokweisami ya Seko; yango wana elimbolami polele malamu koleka makomi mosusu, ete ekoka kosala na mitema ya bana ya bato, nyonso mpo na nkembo ya nkombo na ngai.

8 Yango wana, nakolimbola epayi na bino mobombamo oyo, mpo ebongi malamu boyeba yango kutu lokola eyebaki bapostolo na ngai.

9 Nalobi epayi na bino ete baoyo baponami kati na eleko oyo, kutu lokola moto moko, ete bokoka kokota kati na bopemi na ngai.

10 Mpo, tala, mobombamo ya bonzambe, boni ezali monene! Mpo, tala, nazali na nsuka te, mpe etumbu oyo epesami uta na maboko na ngai ezali etumbu ezanga nsuka te, mpo Azanga nsuka ezali nkombo na ngai. Yango wana—

11 Etumbu ya seko ezali etumbu ya Nzambe.

12 Etumbu ezanga nsuka ezali etumbu ya Nzambe.

13 Yango wana, natindi yo oyambola, mpe obomba mitindo oyo osili kozwa na loboko ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, na nkombo na ngai;

14 Mpe ezali na nzela ya nguya na ngai ya bokasi nyonso ete ozwaki yango;

15 Mpe boye, natindi yo oyambola—yambola, mbele nabeta yo na lingenda ya monoko na ngai, mpe na nkele na ngai, mpe na nkanda na ngai, mpe mbele mpasi na yo ezala nsomo—boni nsomo oyo oyebi te, boni ya koswa makasi koleka oyo oyebi te, iyo, boni mpasi ya kokangela motema oyo oyebi te.

16 Mpo tala, ngai, Nzambe, nayokaki mpasi ya makambo oyo nyonso, ete bakoka te komona mpasi soki bakoyambola;

17 Kasi soki bakoyambola te basengeli komona mpasi kutu lokola ngai;

18 Oyo mpasi elengisaki ngai moko, kutu Nzambe, ya lokumu koleka nyonso, kolenga mpo na bolozi, mpe kobima makila na lidusu moko moko ya mposo, mpe komona mpasi ezala na nzoto mpe na molimo—mpe nalingaki ete namela nkeni yango ya bololo te, mpe kotatabana—

19 Nzokande, nkembo ezala epayi ya Tata, mpe namelaki mpe nasilisaki misala ya bomilengeli mpo na bana ya bato.

20 Yango wana, natindi yo lisusu ete oyambola, nakobanga ete nayokisa yo nsoni te na nguya na ngai ya bokasi nyonso, ete otubela masumu na yo, mbele omona mpasi ya bitumbu oyo nalobaki, oyo osili komeka kino na oyo ya moke koleka, iyo, kutu kino na motuya ya nse koleka nyonso na ntango nalongolaki Molimo na ngai.

21 Mpe natindi yo ete oteya eloko moko te longola se boyamboli, mpe kolakisa te biloko oyo epayi ya mokili kino ezali bwania epayi na ngai.

22 Mpo bakoki te kondima bilei ya mosuni makasi sikawa, kasi mabele nde basengeli kondima; yango wana, basengeli te koyeba biloko oyo, mbele bawa te.

23 Yekola uta na ngai, mpe tiaka litoyi na maloba na ngai; tambola kati na bosokemi ya Molimo na ngai, mpe okozwa kimia na ngai.

24 Nazali Yesu Klisto; nayaki na ntina ya bolingi ya Tata, mpe nazali kosala bolingi na ye.

25 Mpe lisusu, napesi yo motindo ete okolula mwasi ya moninga na yo te; mpe lisusu okoluka bomoi ya moninga na yo te.

26 Mpe lisusu, napesi yo motindo ete okoki te kolula bozwi na yo moko, kasi na motema ya kokaba pesa ndambo mpo na bonyatami ya Buku ya Mormon, oyo ezali na bosolo mpe maloba ya Nzambe—

27 Oyo ezali maloba na ngai epayi ya Mopaganu, ete ekoka noki kokende epayi ya Moyuda, baoyo kani Balamani bazali montika, ete bandima nsango malamu, mpe baluka te ete Masiya oyo asilaki koya aya.

28 Mpe lisusu, napesi yo motindo ete osengeli kosambela na mongongo makasi mpe kati na motema na yo lokola; iyo, liboso ya bato ya mokili mpe na nkuku lokola, liboso ya bato mpe yo moko lokola.

29 Mpe okosakola nsango oyo ya nsai, iyo, bimisa yango likolo ya bangomba, mpe likolo ya esika nyonso ya likolo, mpe na kati ya bato nyonso oyo okopesama nzela ya komona.

30 Mpe okosala yango kati na bomikitisi nyonso, kotiaka motema na ngai, mpe kofinga te baoyo bafingaka.

31 Mpe mpo na oyo etali malongi ya ebandeli okowela te koloba, kasi okosakola nde boyamboli mpe bondimi na Mobikisi, mpe bolimbisi ya masumu na libatisi, mpe na moto, iyo, kutu Molimo Mosantu.

32 Tala, oyo ezali motindo monene mpe ya nsuka oyo nakopesa epayi na yo mpo na oyo etali likambo oyo; mpo oyo ekokoka mpo na botamboli na yo ya mokolo na mokolo, kutu kino nsuka ya bomoi na yo.

33 Mpe osengeli kozwa mpasi soki otali toli oyo mpamba, iyo, kutu bobebisami na yo moko mpe bobebisami ya bozwi na yo.

34 Kaba ndambo ya bozwi na yo, iyo, kutu eteni ya mabele na yo, mpe nyonso longola se oyo esengeli mpo na koleisa libota na yo.

35 Futa nyongo otiaki maboko na mokanda epayi ya monyati ya buku. Mikangola uta na boumbu.

36 Longwa uta na ndako na yo mpe uta na epayi na yo, longola se na ntango okoyoka mposa ya kotala libota na yo;

37 Mpe loba polele na nyonso; iyo, teya, lendisa, sakola bosolo, kutu na mongongo makasi, na lokito ya bosepeli, kobelelaka—Hozana, hozana, nkombo ya Nkolo Nzambe epambolama!

38 Sambela ntango nyonso, mpe nakosopa Molimo na ngai likolo na yo, mpe lipamboli na yo ekozala monene—iyo, kutu mingi koleka soki okokaki kozwa biloko ya motuya ya mabele mpe bobebisami oyo ekokani na monene na yango.

39 Tala, ekoki yo kotanga oyo na kozangaka bosepeli mpe botombwami ya motema na yo mpo na esengo?

40 To ekoki yo kopota mbangu awa mpe kuna lokola motambwisi oyo akufa miso?

41 To ekoki yo kozala moto ya bomikitisi mpe mosokemi, mpe komitambwisa yo moko na bwania liboso na ngai? Iyo, yaka epayi na ngai Mobikisi na yo. Amene.

Bimisa na lokasa