Makomi
Malongi mpe Mayokani 39


Eteni 39

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya James Covel, na Fayette, New York, ya 5, sanza ya yambo ya mobu 1831. James Covel, oyo azalaki mosali ya eyamba ya Bametodiste penepene na mibu ntuku minei, asalaki liyokani na Nkolo ete akotosa motindo nyonso oyo Nkolo asengeli kopesa ye na nzela ya Profeta Joseph.

1–4, Basantu bazali na nguya ya kokoma bana ya Nzambe; 5–6, Koyamba nsango malamu ezali koyamba Klisto; 7–14, James Covel atindami kobatisama mpe kosala kati na elanga ya vinyo ya Nkolo; 15–21, Basali ya Nkolo basengeli koteya nsango malamu liboso ya Boyei ya Mibale; 22–24, Baoyo wana bayambi nsango malamu bakosangisama na ntango mpe na boseko.

1 Botia bokebi mpe boyoka mongongo na ye oyo azali uta na Boseko na Boseko nyonso, Nazali Monene, kutu Yesu Klisto—

2 Pole mpe bomoi ya mokili, pole oyo engengaka na molili mpe molili esosoli yango te;

3 Se moko wana oyo ayaki na midi ya ntango epayi ya baoyo ya ngai moko, mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te;

4 Kasi na mingi lokola bayambaki ngai, napesi nguya ya kokoma bana na ngai; mpe bongo kutu nakopesa na mingi lokola bakoyamba ngai, nguya ya kokoma bana na ngai.

5 Mpe solo, solo, nalobi epayi na yo, oyo nyonso akoyamba nsango malamu na ngai ayambi ngai; mpe oyo nyonso akoyamba nsango malamu na ngai te ayambi ngai te.

6 Mpe oyo ezali nsango malamu na ngai—boyamboli mpe libatisi na mai, mpe nsima nde ekoya libatisi ya moto mpe Molimo Mosantu, kutu Molendisi, oyo alakisaka makambo nyonso, mpe oyo ateyaka makambo ya kimia ya bokonzi.

7 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na yo, mosali na ngai James, natalaki misala na yo mpe nayebi yo.

8 Mpe solo nalobi epayi na yo, ete motema na yo ezali sikawa alima liboso na ngai na ntango oyo; mpe, tala, nasili kopesa mapamboli minene likolo ya moto na yo;

9 Nzokande, oyokaki mawa monene, mpo obwakaki ngai mbala mingi likolo ya lolendo mpe mitungisi etali mokili.

10 Kasi, tala, mikolo ya bokangoli na yo esili koya, soki oyokeli mongongo na ngai, oyo molobi epayi na yo: Telema mpe batisama, mpe sukola masumu na yo, na kobiangaka likolo ya nkombo na ngai, mpe okozwa Molimo na ngai, mpe ezali lipamboli moko monene mpenza lokola naino oyeba te.

11 Mpe soki osali oyo, nalengelaki yo mpo na mosala monene koleka. Okoteya litondi ya nsango malamu na ngai, oyo nasili kotinda na mikolo oyo ya nsuka, liyokani oyo natindaki mpo na kokamata lisusu bato na ngai, oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

12 Mpe ekosalema ete nguya ekozala likolo na yo; okozala na bondimi monene, mpe nakozala elongo na yo mpe kokende liboso ya elongi na yo.

13 Obiangami kosala kati na elanga na ngai ya vinyo, mpe kotonga eklezia na ngai, mpe kotombola Siona, ete ekoka kosepela likolo ya bangomba ya mike mike mpe kofuluka.

14 Tala, solo, solo, nalobi epayi na yo, obiangami te kokende kati na bikolo ya esti, kasi obiangami kokende na Ohio.

15 Mpe mbala mingi lokola bato na ngai bakosangana bango moko na Ohio, nabombaki na ebombelo lipamboli moko lokola naino eyebana te na kati ya bana ya bato, mpe ekosopama likolo ya mitu mituna bango. Mpe uta na esika wana bato bakokende na bikolo nyonso.

16 Tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, ete bato na Ohio babeleli ngai na bondimi makasi, mpo bazali kokanisa ete nakopekisa loboko na ngai uta na komema bosambisi likolo ya bikolo, kasi nakoki kowangana liloba na ngai te.

17 Yango wana bobanda na bokasi na bino nyonso mpe bobianga basali ya sembo kati na elanga na ngai ya vinyo, ete ekoka kopapama mpo na ntango ya nsuka.

18 Mpe mbala mingi lokola bakoyambola mpenza mpe koyamba litondi ya nsango malamu na ngai, mpe kokoma peto, nakopekisa loboko uta na komema bosambisi.

19 Yango wana, bokende, kobelelaka na mongongo makasi, kolobaka: Bokonzi ya lola ekomi penepene; kobelelaka: Hozana! nkombo ya Nzambe Aleki Likolo epambolama.

20 Bokende kobatisaka na mai, kolengelaka nzela liboso ya elongi na ngai mpo na ntango ya boyei na ngai;

21 Mpo ntango yango ekomi penepene; mokolo yango mpe ngonga yango moto te ayebi; kasi esengeli na ntembe te koya.

22 Mpe ye oyo akoyamba makambo oyo ayambi ngai; mpe bakosangisama na ngai na ntango mpe na boseko.

23 Mpe lisusu, ekosalema ete likolo ya mingi lokola bokobatisa na mai, bokotia bango maboko na bino, mpe bakozwa likabo ya Molimo Mosantu, mpe bakozala kotala bilembo ya boyei na ngai, mpe bakoyeba ngai.

24 Tala, nazali koya noki. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa