Makomi
Malongi mpe Mayokani 49


Eteni 49

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya Sidney Rigdon, Parley P. Pratt, mpe Leman Copley, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 7, sanza ya mitano ya mobu 1831. Leman Copley ayambaki nsango malamu kasi atikalaki kokangama na mateya ya baye bayebanaki lokola Bashakers ya eyamba (United Society of Believers in Christ’s Second Appearing [Lingomba ya Bomoko ya Bandimi na Bomonani ya Mibale ya Klisto]), baoyo kani azalaki na bango mondimi liboso. Boko boyambi ya Bashakers ezalaki ete Boyei ya Mibale ya Klisto esilaki kosalema mpe ete Amonanaki na lolenge ya mwasi moko, Ann Lee. Libatisi na mai ezalaki na ntina monene te; kolia ngulu epekisamaki mpenza, mpe mingi babandaki kolia ata mosuni ya nyama moko te; mpe bomoi ya likombe endimamaki koleka libala. Lokola maloba na ye ya boyingisi na emoniseli oyo, mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete, “Mpo na kozwa bososoli ya kobonga nie koleka na ntina ya likambo yango, nalukaki koyeba uta na Nkolo, mpe nazwaki oyo elandi.” Emoniseli yango emonisaki bozangi solo na ndambu ya maloba ya ntina ya lingomba wana ya Bashakers.

1–7, Mokolo mpe ngonga ya boyei ya Klisto ekotikala koyebana te kino Ye akoya; 8–14, Bato basengeli koyambola, kondima nsango malamu, mpe kotosa makuli mpo na kozwa lobiko; 15–16, Libala likulisami na Nzambe; 17–21, Kolia mosuni epekisami te; 22–28, Siona ekofuluka mpe Balamani bakobimisa fulele lokola roza liboso ya Boyei ya Mibale.

1 Boyoka liloba ya ngai, basali na ngai Sidney, mpe Parley, mpe Leman; mpo tala, solo nalobi epayi na bino, ete napesi epayi na bino motindo ete bokende mpe boteya nsango malamu oyo boyambaki, kutu se lokola boyambaki yango, epayi ya Bashakers.

2 Botala, nalobi epayi na bino, ete bazali na mposa ya koyeba bosolo na ndambo, kasi nyonso te, mpo bazali alima te liboso na ngai mpe basengeli mpenza koyambola.

3 Yango wana, natindi bino, basali na ngai Sidney mpe Parley, koteya nsango malamu epayi na bango.

4 Mpe mosali na ngai Leman asengeli kokulisama na mosala oyo, mpo ete aluka ntina elongo na bango, engebene na oyo azwi uta na bango te, kasi engebene na oyo bokoteya ye, bino basali na ngai; mpe na kosalaka bongo nakopambola ye, soki te akofuluka te.

5 Boye nde elobi Nkolo; mpo nazali Nzambe, mpe natindaki Mwana Mobotami se Moko na ngai kati na mokili mpo na bosikoli ya mokili, mpe nakamataki mokano ete moto nyonso oyo akondima ye akobikisama, mpe ye oyo akondima ye te akokweisama

6 Mpe basalaki Mwana ya Moto kutu lokola balingaki; mpe azwaki nguya na ye na loboko ya mobali ya nkembo na ye, mpe azali koyangela sikawa na lola, mpe akoyangela kino akokita na mabele kotia banguna nyonso na nse ya makolo na ye, na ntango oyo ebelemi—

7 Ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki yango, kasi ngonga mpe mokolo yango moto moko te ayebi, ata ya anjelu na lola, bakoyeba mpe te kino akoya.

8 Yango wana, nalingi ete bato nyonso bayambola, mpo nyonso bazali na nse ya masumu, longola se baoyo nabombaki mpo na ngai moko, bato basantu baoyo boyebi te mpo na oyo etali bango.

9 Yango wana, nalobi epayi na bino ete natindelaki bino liyokani na ngai ya libela, kutu oyo ezalaki uta na ebandeli.

10 Mpe oyo nalakaki nasili bongo kokokisa yango, mpe bikolo ya mabele bikongumbamela yango; mpe, soki bangumbameli yango bango moko te, basengeli kokitisama, mpo ete oyo eminetolami sikawa na yango moko ekitisama na nguya.

11 Yango wana, napesi epayi na bino motindo ete bokende na kati ya bato oyo, mpe boloba na bango, lokola apostolo na ngai ya kala, oyo kani nkombo ezalaki Petelo:

12 Bondima na nkombo ya Nkolo Yesu, oyo azalaki na mabele, mpe oyo akoya, oyo azali ebandeli mpe nsuka;

13 Boyambola mpe bobatisama na nkombo ya Yesu Klisto, engebene na motindo mwango mosantu, mpo na bolimbisi ya masumu;

14 Mpe moto nyonso oyo akosala oyo akozwa likabo ya Molimo Mosantu, na kotiama maboko na bampaka ya eklezia.

15 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ete moto nyonso oyo akopekisa kobala akulisami na Nzambe te, mpo libala ekulisami na Nzambe mpo na moto.

16 Yango wana, elongobani ete azala na mwasi moko, mpe bango mibale bakozala mosuni moko, mpe nyonso oyo mpo ete mabele makoka kopesa eyano na ntina ya bokeli na yango.

17 Mpe ete makoka kotondisama na motango ya bato, engebene na bokeli na ye liboso ete mokili mosalema.

18 Mpe moto nyonso oyo azali kopekisa kolia mosuni, ete moto asengeli te kolia mosuni, akulisami na Nzambe te;

19 Mpo, tala, banyama ya zamba mpe ndeke ya mopepe, mpe oyo eutaka na mabele, epesami mpo na bilei mpe bilamba ya moto, mpe mpo ete akoka kozala na yango mingi koleka.

20 Kasi epesami te ete moto moko azwa oyo ya mingi koleka mosusu, yango wana mokili ezali kolala kati na masumu.

21 Mpe lisuma ezali epayi ya moto oyo asopi makila to oyo akobebisa mosuni ya nyama mpamba ntango azali na yango mposa te.

22 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ete Mwana ya Moto akoya te na lolenge ya mwasi, soki mpe lokola moto azali kosala mobembo na mabele mpe te.

23 Yango wana, bokosama te, kasi kobaka kotelema ngwi kati na bondimi, kozelaka ete lola eningana, mpe ete mabele malenga mpe ebaluka awa mpe kuna lokola moto oyo alangwe, mpe ete mabulu matombwama, mpe ete ngomba ekitisama, mpe mpo ete bisika bingunzama esembolama—mpe nyonso oyo ntango anjelu akobeta kelelo na ye.

24 Kasi liboso ete mokolo monene ya Nkolo mokoka koya, Yakobo akofuluka na esobe, mpe Balamani bakobimisa fulele lokola roza.

25 Siona ekofuluka na likolo ya bangomba ya mike mpe ekosepela na likolo ya bangomba ya minene, mpe ekoyangana elongo na esika oyo naponaki.

26 Tala, nalobi epayi na bino, bokende lokola natindaki bino; yambola uta na masumu na bino nyonso; bosenga mpe bokozwa; bobeta mpe ekuke ekofungolama mpo na bino.

27 Tala, nakokende liboso na bino mpe nakozala mokengeli nsima na bino; mpe nakozala na katikati na bino, mpe bokozala na nsoni te.

28 Tala, nazali Yesu Klisto, mpe nazali koya na lombangu. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa