Makomi
Malongi mpe Mayokani 63


Eteni 63

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 30, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Profeta, Sidney Rigdon, mpe Oliver Cowdery bakomaki na Kirtland ya 27, sanza ya mwambe uta na mobembo na bango na Missouri. Mambi ya kala ya Joseph Smith elimboli emoniseli oyo ete: “Na mikolo oyo ya ebandeli ya Eklezia, bato bazalaki se mitema likolo likolo mpo na kozwa liloba ya Nkolo na ntina ya likambo nyonso oyo na lolenge moko to na lolenge mosusu mpo na oyo etali lobiko na biso; mpe lokola mboka ya Siona ezalaki sikawa eloko ya ntango ya ntina monene koleka oyo bazalaki kotalela, nalukaki kozwa uta na Nkolo nsango mosusu mpo na oyo etali bosangani ya Basantu, mpe bosombi ya mabele, mpe makambo mosusu.”

1–6, Mokolo ya nkele ekoya likolo ya bato ya nkuna; 7–12, Bilembo biyaka na nzela ya bondimi; 13–19, Bato na mposa ya ekobo kati na motema bakowangana bondimi mpe bakobwakama kati na liziba ya moto; 20, Basembo bakozwa libula ya kosangola na mabele ebongwami; 21, Lisolo mobimba ya makambo malekaki likolo ya Ngomba ya Bobongwani naino esili kobimisama te; 22–23, Bato na botosi bazwi mibombamo ya bokonzi; 24–31, Mabula esengeli kosombama kati na Siona; 32–35, Nkolo asakoli bitumba, mpe bato na nkuna babomi bato na nkuna; 36–48, Basantu basengeli kosangana na Siona mpe kopesa misolo mpo na kotonga yango; 49–54, Mapamboli malakami solo epayi ya basembo na Boyei ya Mibale, na Bosekwi, mpe na Nkoto moko ya mibu; 55–58, Oyo ezali mokolo ya bokebisi; 59–66, Nkombo ya Nkolo ekamatani mpamba na baoyo wana bazali kosalela yango na kozangaka likoki.

1 Boyoka, O bino bato, mpe bofungola mitema na bino mpe botia litoyi na bokebi nyonso uta na mosika; mpe botia matoyi, bino baye bomibiangaka bino moko bato ya Nkolo, mpe boyoka liloba ya Nkolo mpe bolingi na ye mpo na oyo etali bino.

2 Iyo, solo, nalobi, boyoka liloba na ye oyo nkanda epeli mpo na bato ya nkuna mpe batomboki;

3 Oyo kani bolingi ezali kutu ya kokamata baoyo akokamata, mpe kobatela na bomoi baoyo alingi kobatela;

4 Oyo atongaka na bolingi mpe bosepeli na ye moko; mpe abebisaka ntango elingi ye, mpe akoki kobwaka molimo na nse na lifelo.

5 Tala, ngai, Nkolo, nabimisi mongongo na ngai, mpe mosengeli kotosama.

6 Yango wana, solo nalobi, tika ete bato ya nkuna basala keba, mpe tika ete batomboki babanga mpe balenga; mpe tika ete bato bazanga bondimi bakanga bibebu na bango, mpo mokolo ya nkele ekoya likolo na bango lokola mopepe ya kaina, mpe mosuni nyonso mokoyeba ete ngai nazali Nzambe.

7 Mpe ye oyo akolukaka bilembo akomona bilembo, kasi ekozala mpo na lobiko te.

8 Solo, nalobi epayi na bino, ezali na baoyo wana na kati na bino oyo bazali koluka bilembo, mpe bato ya lolenge wana bazalaki kutu uta na ebandeli;

9 Kasi, tala, bondimi eyaka te na bilembo, kasi bilembo bilandaka baoyo bandimaka.

10 Iyo, bilembo biyaka na bondimi, kasi na bolingi ya bato te, mpe lokola basepeli te, kasi na bolingi ya Nzambe.

11 Iyo, bilembo biyaka na bondimi, mpo na kosala misala ya kokamwa, mpo soki bondimi ezali te moto moko te asepelisaka Nzambe; mpe Nzambe asepelaka te na baye azali na bango nkanda; yango wana, epayi ya bato ya lolenge oyo oyo alakisaka bilembo te, bobele kati na nkele mpo na bokweisami na bango.

12 Yango wana, ngai, Nkolo, nazali kosepela te na baoyo na kati na bino balukaki bilembo mpe makamwisi mpo na kokolisa bondimi, mpe balukaki yango mpo na bolamu ya bato to nkembo na ngai te.

13 Nzokande, nazali kopesa mibeko, mpe mingi basili kopesa mitindo na ngai mokongo mpe babombaki yango te.

14 Mibali na ekobo mpe basi na ekobo bazalaki na kati na bino; boko na baoyo babalukeli bino mokongo, mpe basusu batikali elongo na bino baoyo bakobimisama nsima.

15 Tika bato ya lolenge oyo basala keba mpe bayambola na lombangu, mbele bosambisi eya likolo na bango lokola motambo, mpe liboma na bango emonisama, mpe misala na bango milanda bango na miso ya bato.

16 Mpe solo nalobi epayi na bino, lokola nalobaki liboso, ye oyo atali mwasi mpo na kolula ye, to soki bato nani basali ekobo na mitema na bango, bakozala na Molimo te, kasi bakowangana bondimi mpe bakobanga.

17 Yango wana, ngai Nkolo, nalobaki ete bato na bobangi, mpe bato bozanga bondimi, mpe bato ya lokuta nyonso, mpe baoyo nyonso balingaka kokosa mpe babukaka lokuta, mpe bato na pite, mpe bandoki, bakozwa ya bango likabo kati na liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, oyo ezali liwa ya mibale.

18 Solo nalobi, ete bakozala na likabo na bosekwi ya yambo te.

19 Mpe sikawa tala, ngai Nkolo, nalobi epayi na bino ete bolongisami te, mpo ete makambo oyo ezali na kati na bino.

20 Nzokande, ye oyo akotia molende kati na bondimi mpe akosala bolingi na ngai, se ye wana nde akolonga, mpe akozwa libula ya kosangola na mabele ntango mokolo ya bobongwani ekoya;

21 Ntango mabele makobongwana, kutu engebene na emekoleli oyo elakisamaki epayi ya bapostolo na ngai likolo ya ngomba; lisolo oyo wapi litondi bozwi naino te.

22 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, ete lokola nalobaki epayi na bino ete nakoyebisa bolingi na ngai epayi na bino, tala nakoyebisa yango epayi na bino, na nzela ya motindo te, mpo bazali mingi oyo bozali kotosa kobomba mitindo na ngai te.

23 Kasi epayi na ye oyo abombaka mitindo na ngai nakopesa mibombamo ya bokonzi na ngai, mpe se ye moko wana akozala liziba ya mai ya bomoi kati na ye, mai oyo ezali kobima mpo na bomoi ya libela.

24 Mpe sikawa, tala, oyo ezali bolingi ya Nkolo Nzambe na bino mpo na oyo etali basantu na ye, ete basengeli kosangana bango moko esika moko na mboka ya Siona, na lombangu te, mbele mobulu ezala, oyo mokomema bolozi.

25 Tala, mboka ya Siona—Ngai, Nkolo, nasimbi yango na maboko na ngai moko;

26 Nzokande, ngai Nkolo, napesi epayi ya Kaisalia biloko oyo ezali ya Kaisalia.

27 Yango wana, ngai Nkolo nazali kozela ete bosomba mabele, ete bokoka kozala na litomba likolo ya mokili, ete bokoka kosenga makoki na bino mpo na oyo etali mokili, ete bakoka kolamusama na kanda te.

28 Mpo Satana nde atiaka yango kati na mitema na bango mpo na kokangela bino nkanda, mpe mpo na kosopa makila na bino.

29 Yango wana, mboka ya Siona ekozwama te longola se na bosombi to na bosopi makila, soki bongo te ezali na libula moko lisusu mpo na bino te.

30 Mpe soki bozwi na bosombi, tala bopambolami;

31 Mpe soki na makila, lokola bopekisami kosopa makila, mona, banguna na bino bakokweya likolo na bino, mpe bokofiakolama uta engumba na engumba, mpe sinagoga na sinagoga, mpe bobele bato moke nde bakotelema mpo na kozwa libula ya kosangola.

32 Ngai, Nkolo, nazali na nkanda na bato ya nkuna; nazali kolongola Molimo na ngai uta na bafandi ya mabele.

33 Nalapaki na nkele na ngai, mpe natindaki bitumba likolo ya etando ya mabele, mpe bato ya nkuna bakoboma bato ya nkuna, mpe bobangi esengeli koya likolo ya moto moko moko;

34 Mpe lisusu basantu bakobika na mpasi; nzokande, ngai Nkolo, nazali elongo na bango, mpe nakokita na lola uta na miso ya Tata na ngai mpe nakozikisa bato ya nkuna na moto oyo mozimaka te.

35 Mpe tala, oyo esalemi naino te, kasi ekosalema kala mingi te.

36 Yango wana, na komonaka ete ngai, Nkolo, natindi makambo oyo nyonso likolo ya etando ya mabele, nakolinga ete basantu na ngai basangana na mboka ya Siona;

37 Mpe ete moto nyonso akoki kokamata boyengebene na maboko oyo mpe bosembo na nketo na ye, mpe kotombola mongongo ya bokebi epayi ya bafandi ya mabele; mpe kosakola ezala na nzela ya liloba mpe na nzela ya bokimi ete libebi ekoya likolo ya bato ya nkuna.

38 Yango wana, tika bayekoli na ngai na Kirtland baoyo bafandi kati na ebokolelo oyo ya bibwele, babongisa mitungisi na bango ya ntango.

39 Tika mosali na ngai Titus Billings, oyo azali na mokumba ya kotala kuna, ateka mabele yango, ete akoka komilengela na boyei ya eleko ya milona mpo na kokende mobembo na ye na mboka ya Siona, elongo na baoyo wana bafandi likolo ya etando na yango, na kolongolaka se baoyo wana nakobomba mpo na ngai moko, baoyo basengeli te kokende kino nakotinda bango.

40 Mpe tika misolo nyonso oyo mikotikala, ezala mingi to moke ezali likambo epayi na ngai te, mitindama na mboka ya Siona, epayi na baoyo naponaki mpo na kozwa yango.

41 Tala, ngai Nkolo, nakopesa epayi ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, nguya ete apesama makoki ya kososola na nzela ya Molimo baoyo wana bakokende na mboka ya Siona, mpe baoyo wana bakotikala kati na bayekoli na ngai.

42 Tika mosali na ngai Newel K. Whitney akoba kotala ebombelo na ye, soki te na maloba mosusu, ebombelo yango, lisusu mpo na eleko moke.

43 Nzokande, tika akaba misolo nyonso oyo akoki kokaba, oyo esengeli kotindama na mboka ya Siona.

44 Tala, biloko oyo ezali kati na maboko na ye moko, tika ete asala engebene na bwania.

45 Solo nalobi, tika ete akulisama lokola ntoma na bayekoli oyo bakotikala, mpe tika ete akulisama na nguya oyo;

46 Mpe sikawa kende na lombangu kotala Baeklezia, kolimbolaka makambo oyo epayi na bango, elongo na mosali na ngai Oliver Cowdery. Tala, oyo ezali bolingi na ngai, kozwaka misolo kutu lokola natindaki.

47 Ye oyo azali sembo mpe atii molende akolonga mokili.

48 Ye oyo akotinda biloko ya motuya na mboka ya Siona akozwa libula ya kosangola kati na mokili oyo, mpe misala na ye ekolanda ye, mpe lisusu lifuta na mokili ekoya.

49 Iyo, mpe bakufi oyo bakufi kati na Nkolo bapambolami, uta sikawa kokende liboso, ntango Nkolo akoya, mpe ntango biloko nyonso bikoleka, mpe ntango biloko nyonso bikokoma sika, bakosekwa uta na kufa mpe bakokufa lisusu nsima wana te, mpe bakozwa libula liboso ya Nkolo, kati na engumba esantu.

50 Mpe ye oyo akozala na bomoi ntango Nkolo akoya, mpe oyo abatelaki bondimi, ye wana nde apambolami; nzokande, epesami epayi na ye kokufa na mibu epesami na moto.

51 Yango wana, bana basengeli kokola kino bakokoma bakolo; bakolo bakokufa; kasi bakolala na mputulu te, kasi bakobongolama na bofini ya liso.

52 Yango wana, mpo na ntina oyo bapostolo bateyaki bosekwi ya bakufi epayi ya mokili.

53 Biloko oyo ezali biloko bosengeli koluka; mpe, mpo na koloba na lolenge ya Nkolo, bibelemi sikawa, mpe bikoya na ntango yoko nsima, kutu na mokolo ya boyei ya Mwana ya Moto.

54 Mpe kino na ngonga wana baseka ya liboma na kati ya baoyo ya bwania; mpe na ngonga wana bokabwani bokosalema mpenza kati na bato ya sembo mpe bato ya nkuna; mpe na mokolo wana nakotinda banjelu na ngai kosangisa bato ya nkuna mpe kobwaka bango kati na moto oyo mozimaka te.

55 Mpe sikawa tala, solo nalobi epayi na bino, ngai Nkolo, nasepeli te na mosali na ngai Sidney Rigdon; amitombolaki likolo na motema na ye, mpe andimaki toli te, kasi ayokisaki Molimo mawa;

56 Yango wana nkoma na ye ekoki kondimama te epayi ya Nkolo, mpe asengeli kosala mosusu; mpe soki Nkolo andimi yango te, tala asala na mosala oyo nabiangaki ye lisusu te.

57 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ete baoyo wana bazali na mposa kati na mitema na bango, kati na bosokemi, mpo na kokebisa basumuki ete bayambola, tika bakulisama na nguya oyo.

58 Mpo oyo ezali mokolo ya bokebisi, mpe mokolo ya maloba mingi te. Mpo, ngai Nkolo, nasengeli kotiolama na mikolo ya nsuka te.

59 Tala, nazali oyo uta na likolo, mpe nguya na ngai etandami kino na nse. Nazali likolo ya nyonso, mpe kati na nyonso, mpe na nzela ya nyonso, koluka nyonso malamu, mpe mokolo ezali koya ete biloko nyonso bikokonzama na ngai.

60 Tala, nazali Alifa mpe Omega, kutu Yesu Klisto.

61 Yango wana, tika bato nyonso bakeba lolenge bazali kokamata nkombo na ngai na bibebu na bango—

62 Mpo tala, solo nalobi, ete bazali mingi na nse ya bokwei, baoyo bazali kosalela nkombo ya Nkolo, mpe bazali kosalela yango mpamba, mpo bazali na likoki te.

63 Yango wana, tika ete eklezia eyambola uta na masumu na bango, mpe ngai Nkolo, nakozala nkolo na bango; soki bongo bakokatama te.

64 Bomikundola ete oyo ewuti na likolo ezali bule, mpe esengeli kolobama na bokebi, mpe na nse ya bopekisi ya Molimo; mpe kati na oyo bokwei ezali te, mpe bokozwa Molimo na nzela ya losambo; yango wana, soki oyo ezali bokwei te nde etikali wana.

65 Tika basali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon baluka epayi na kofanda mpo na bango, lokola bakoteyama na Molimo na nzela ya losambo.

66 Biloko oyo esengeli kolongama na nzela ya bompikiliki, mpo ete baoyo ya lolenge wana bakoka kozwa bozito ya nkembo ya seko koleka mingi, soki boye te, bokwei bonene. Amene.

Bimisa na lokasa