Makomi
Malongi mpe Mayokani 68


Eteni 68

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya yambo ya sanza ya zomi na moko ya mobu 1831, lokola eyano na losambo basalaki ete mokano ya Nkolo eyebana mpo na ntina ya Orson Hyde, Luke S. Johnson, Lyman E. Johnson, mpe William E. McLellin. Atako ndambo ya emoniseli oyo etindamaki epayi ya bato minei oyo, mingi ya makambo kati na yango etali Eklezia mobimba. Emoniseli oyo elimbolamaki na biteni na yango na nse ya bokambi ya Joseph Smith ntango ebimisamaki na bobimi ya Malongi mpe Mayokani ya 1835.

1–5, Maloba ya bampaka ntango efulami na Molimo Mosantu ezali makomi; 6–12, Bampaka basengeli koteya mpe kobatisa, mpe bilembo bikolanda bandimi ya solo; 13–24, Mobotami ya yambo na kati ya bana ya Alona akoki kosala lokola Episikopo Mokambi (elingi koloba, kozala na bafungola ya bokambi lokola episikopo) na nse ya boyangeli ya Bokambi ya Yambo; 25–28, Baboti batindami koteya nsango malamu epayi ya bana na bango; 29–35, Basantu basengeli kotosa Saba, kosala mosala na molende, mpe kosambela.

1 Mosali na ngai, Orson Hyde, abiangamaki na bokulisi na ye mpo na kosakola nsango malamu ya libela, epayi ya bato na bato mpe mboka na mboka, na nzela ya Molimo ya Nzambe ya bomoi, kati na mangomba ya bato ya nkuna, kati na basinagoga na bango kolukaka ntina elongo na bango mpe kolimbolaka makomi nyonso epayi na bango.

2 Mpe, tala, mpe mona, oyo ezali momekoli epayi na baoyo wana nyonso bakulisamaki na bonganganzambe boye, baoyo kani etinda epesami na bango ya kokende—

3 Mpe oyo ezali momekoli epayi na bango, ete basengeli koloba lokola bafulami na Molimo Mosantu.

4 Mpe oyo nyonso bakoloba ntango bafulami na Molimo Mosantu ekozala makomi, ekozala bolingi ya Nkolo, ekozala mayele ya Nkolo, ekozala maloba ya Nkolo, ekozala mongongo ya Nkolo, mpe nguya ya Nzambe mpo na lobiko.

5 Tala, oyo ezali elaka ya Nkolo epayi na bino, O bino basali na ngai.

6 Yango wana, bozala na bosepeli malamu, mpe bobanga te, mpo ngai Nkolo, nazali elongo na bino, mpe nakozala penepene na bino; mpe bokotatola mpo na ngai, kutu Yesu Klisto, ete nazali Mwana ya Nzambe ya bomoi, ete nazalaki, ete nazali, mpe ete nazali koya.

7 Oyo ezali liloba ya Nkolo epayi na bino, mosali na ngai Orson Hyde, mpe lisusu epayi ya mosali na ngai Luke Johnson, mpe epayi ya mosali na ngai Lyman Johnson, mpe epayi ya mosali na ngai William E. McLellin, mpe epayi ya bampaka ya sembo ya eklezia na ngai—

8 Bokende kati na mokili mobimba, boteya nsango malamu na ekelamo moko moko, kosalaka na likoki oyo napesaki bino, kobatisaka na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu.

9 Mpe ye oyo akondima mpe akobatisama akobikisama, mpe ye oyo akondima te akokweisama.

10 Mpe ye oyo akondima akopambolama na bilembo bikolanda, kutu lokola ekomami.

11 Mpe epayi na bino ekopesama koyeba bilembo ya ntango, mpe bilembo ya boyei ya Mwana ya Moto;

12 Mpe na ntina ya mingi lokola baoyo Tata akotatola, nguya ekopesama epayi na bino mpo na kokanga bango mpo na bomoi ya seko. Amene.

13 Mpe sikawa, mpo na oyo etali makambo matiami likolo ya mayokani mpe mitindo, ezali oyo—

14 Batikali nsima awa, na ntango esengeli ya Nkolo, baepisikopo basusu oyo basengeli kotiama pembeni mpo na eklezia, mpo na kosalela kutu na lolenge elongobani lokola baoyo ya yambo;

15 Yango wana basengeli kozala banganganzambe minene baoyo balongobani, mpe bakoponama na Bokambi ya Yambo ya Bonganganzambe ya Melikisedeki, longola se soki bazali biboto ya Alona na makila.

16 Mpe soki bazali biboto ya Alona na makila bazali na makoki ya kosala na bopisikopo engebene na mobeko, soki bazali babotami ya yambo na kati ya bana ya Alona;

17 Mpo ete mobotami ya yambo azali na makoki mpo na kokamba likolo ya bonganganzambe boye uta na mobeko, mpe bafungola to likoki ya bonganganzambe se moko wana.

18 Moto moko te azali na makoki engebene na mobeko ya kosala na lotomo loye, mpo na kozala na bafungola ya bonganganzambe boye, longola se soki azali eboto na makila mpe mobotami ya yambo ya Alona.

19 Kasi, lokola nganganzambe monene nyonso ya Bonganganzambe ya Melikisedeki azali na likoki ya koyangela na misala nyonso ya mike mike, ye akoki bongo koyangela na mosala oyo ya episikopo ntango eboto moko ya Alona na makila amonani te, bobele soki atiami mpembeni mpe akulisami na nguya oyo, na maboko ya Bokambi ya Yambo ya Bonganganzambe ya Melikisedeki.

20 Mpe eboto moko ya Alona na makila, lisusu, asengeli koponama na Bokambi boye, mpe komonana ete alongobani, mpe kopakolama, mpe kokulisama na maboko ya Bokambi boye, soki bongo te bazali na ndingisa te engebene na mobeko ya kosala mosala kati na bonganganzambe na bango.

21 Kasi, na libongi ya mokano mpo na oyo etali makoki na bango ya bonganganzambe kokitaka uta na tata epayi ya mwana mobali, bakoki kosenga epakolami na bango ntango nyonso soki bakoki kolakisa ete bazali biboto na makila, soki te kondimisa yango na nzela ya emoniseli uta na Nkolo na nse ya maboko ya baoyo babiangami Bokambi awa likolo.

22 Mpe lisusu, episikopo soki te nganganzambe monene moko te oyo akotiama mpembeni mpo na mosala oyo akosambisama soki te akokweisama mpo ete abuki mobeko songolo, longola se soki ezali liboso ya Bokambi ya Yambo ya eklezia;

23 Mpe mbala mingi lokola azwami na elindo liboso ya Bokambi oyo, na litatoli oyo ekoki te kobwakama, asengeli kokweisama;

24 Mpe soki ayamboli akolimbisama, engebene na mayokani mpe mitindo ya eklezia.

25 Mpe lisusu, mbala mingi lokola ezali na baboti oyo bazali na bana kati na Siona, to kati na makonzi nyonso ebongisami na ye, baoyo bakoteya bango te kososola malongi ya boyamboli, ya bondimi kati na Klisto Mwana ya Nzambe ya bomoi, mpe ya libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya kotiama maboko, na ntango ya bokokisi mibu mwambe, lisumu ekozala likolo ya mitu mitu ya baboti.

26 Mpo oyo ekozala mobeko na kati ya bafandi ya Siona, soki te kutu kati na makonzi na ye oyo nyonso ebongisami.

27 Mpe bana na bango basengeli kobatisama mpo na bolimbisi ya masumu na bango ntango bakokisi mibu mwambe, mpe basengeli kotiama maboko.

28 Mpe basengeli lisusu koteya bana na bango kosambela, mpe kotambola sembo liboso ya Nkolo.

29 Mpe bafandi ya Siona basengeli lisusu kotosa mokolo ya Sabato kobatela yango lokola mosantu.

30 Mpe bafandi ya Siona basengeli lisusu komikundola misala na bango, mbala mingi lokola babengami kosala, kati na bosembo nyonso; mpamba te moto ya goigoi akosambisama liboso ya Nkolo.

31 Sikawa, ngai, Nkolo, nazali kosepela te na bafandi ya Siona, mpo ezali na bato ya goigoi na kati na bango; mpe bana na bango bazali lisusu kokola na nkuna; balukaka lisusu te na solo bozwi ya boseko, kasi miso na bango etondi na lokoso.

32 Makambo oyo esengeli kozala te, mpe esengeli kolongolama na kati na bango; yango wana, tika mosali na ngai Oliver Cowdery amema maloba oyo epayi na mboka ya Siona.

33 Mpe napesi epayi na bango motindo moko—ete ye oyo akotosa kosalela sambo na ye liboso ya Nkolo te, na eleko na yango, tika ete amemama na bokundoli liboso ya mosambisi ya bato na ngai.

34 Maloba oyo ezali solo mpe sembo; yango wana, kobuka yango te, soki mpe kolongola yango te.

35 Tala, nazali Alifa mpe Omega, mpe nazali koya na lombangu. Amene.

Bimisa na lokasa