Makomi
Malongi mpe Mayokani 77


Eteni 77

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, penepene na sanza ya misato ya mobu 1832. Mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete, “Na kotalaka bobongoli ya Makomi, nazwaki ndimbola elandi mpo na Emoniseli ya Santu Yoane.”

1–4, Banyama ezali na milimo mpe ekofanda na bisika ya bomengo ya seko; 5–7, Mabele oyo ezali na molai ya ntango ya mibu 7.000; 8–10, Banjelu ya ndenge na ndenge bazongisi nsango malamu mpe bazali kosala mosala na mabele; 11, Bokangi ya nkoto monkama moko na nkama minei na minei; 12–14, Klisto akoya na ebandeli ya mobu ya sambo ya mibu nkoto sambo; 15, Baprofeta mibale bakobimisama mpo na libota ya Bayuda.

1 Motuna. Nini ezali mbu ya talatala oyo elobamaki na Yoane, Mokapo ya minei, mpe molongo ya kotanga ya motoba ya buku ya Emoniseli?Eyano. Ezali mabele, kati na ezalela na yango ya bosantisami, ya bozangi kufa, mpe ezalela ya seko.

2 M. Nini esengeli biso kososola mpo na banyama minei ya bomoi, oyo elobelami se na molongo moko wana?E. Ezali maloba ya bililingi, oyo Mobimisi Yoane asalelaki, na kolimbolaka lola, paladiso ya Nzambe, bomengo ya moto, mpe ya banyama, mpe ya biloko oyo etambolaka na libumu, mpe ya ndeke ya likolo; oyo bililingi bilimboli ete oyo ezali ya molimo ezali na bokokani ya oyo ezali ya mokili, mpe oyo ezali ya mokili na bokokani ya oyo ezali molimo; molimo ya moto na bokokani ya moto na ye moko, lokola lisusu ezali molimo ya nyama, mpe ekelamo nyonso mosusu oyo Nzambe akelaki.

3 M. Banyama minei yango esuki se na nyama moko moko oyo etangami awa, to elingi koloba milongo to lolenge na bango?E. Basuki se na moko moko ya banyama minei oyo etangami awa, oyo elakisamaki na Yoane, mpo na kokundola nkembo ya milongo ya bikelamo na molongo epayi biwutaki to na etando ya bokeli na bango, kati na bosepeli ya bomengo na bango ya seko.

4 M. Nini esengeli biso kososola na ntina ya miso mpe mapapu, oyo banyama ezalaka na yango?E. Miso na bango ezali elilingi ya pole mpe boyebi, elingi koloba, batondi na boyebi; mpe mapapu na bango ezali elembo ya nguya, ya kotambola bipayi na bipayi, ya kosala, mpe bongo na bongo.

5 M. Nini esengeli biso kososola na bampaka ntuku mibale na minei oyo balobeli na Yoane?E. Tosengeli kososola ete bampaka oyo Yoane amonaki, bazalaki bampaka oyo bazalaki sembo kati na mosala ya molimo mpe bakufaki; baoyo bazalaki bato ya Baeklezia sambo, mpe na ntango wana bazalaki kati na paladiso ya Nzambe.

6 M. Nini esengeli biso kososola na buku oyo Yoane amonaki, oyo bakangaki na nsima libanda na bilembo sambo?E. Tosengeli kososola ete kati na yango ezali na bolingi ebimisami, mibombamo, mpe misala ya Nzambe; makambo ebombama mpo na oyo etali biloko na ye nyonso ya mabele oyo na bowumeli ya mibu nkoto sambo ya bokobi na yango, to bomoi na yango ya ntango.

7 M. Nini esengeli biso kosolola na bilembo sambo oyo wapi buku yango ekangamaki?E. Tosengeli kososola ete elembo ya yambo ya ezali na makambo ya mibu nkoto moko ya yambo, mpe ya mibale lisusu ya mibu nkoto moko ya mibale, mpe se bongo na bongo kino na mibu nkoto sambo.

8 M. Nini esengeli biso kososola na banjelu minei, baoyo balobeli na Mokapo ya sambo mpe molongo ya yambo ya Emoniseli?E. Tosengeli kososola ete banjelu minei oyo batindamaki liboso ya Nzambe, epayi na baoyo kani nguya epesamaki likolo ya biteni minei ya mabele, mpo na kobikisa bomoi mpe kobebisa; bazali bango oyo bazali na nsango malamu ya libela ya kopesa epayi na bikolo, mabota, minoko, mpe bato nyonso; oyo bazali na nguya mpo na kokangisa lola, kokanga bato mpo na kozwa bomoi, soki te mpo na kobwaka bato ya nkuna na nse na bituka ya molili.

9 M. Nini esengeli biso kososola na anjelu komataka uta na esti, Emoniseli Mokapo ya sambo mpe molongo ya mibale?E. Tosengeli kososola ete anjelu komataka uta na esti azali ye oyo epayi kani epesami elembo na Nzambe ya bomoi likolo ya mabota zomi na mibale ya Yisalaele; yango wana, azali koganga epayi ya banjelu minei oyo bazali na nsango malamu ya libela, kolobaka: Bosala mabe te na mabele, soki mpe na mbu te, soki mpe na banzete mpe te, kino ekosila biso kotia basali ya nzambe na biso bilembo na bilongi na bango. Mpe, soki bokozwa yango, ezali Eliyasi oyo asengelaki koya kosangisa mabota ya Yisalaele esika moko mpe kozongisa makambo nyonso.

10 M. Ntango nini esengeli makambo oyo elobami na Mokapo oyo ekokisama?E. Esengeli kokokisama na mibu ya nkoto motoba, soki te na bofungolami ya elembo ya motoba.

11 M. Nini esengeli biso kososola na bokangi ya nkoto monkama moko na ntuku minei na minei, uta na mabota nyonso ya Yisalaele—nkoto zomi na mibale uta na libota moko moko?E. Tosengeli kososola ete baoyo wana batiami bilembo bazali banganganzambe minene, bakulisami na molongo mosantu ya Nzambe, mpo na kosalela nsango malamu ya libela; mpo bazali baoyo bakulisami uta na bikolo, mabota, minoko, mpe bato nyonso, na banjelu epayi kani nguya epesami likolo ya bikolo ya mabele, mpo na komema mingi lokola bakoki koya na eklezia ya Mobotami ya yambo.

12 M. Nini esengeli biso kososola na kobetama ya kelelo, oyo etangami na Mokapo ya mwambe ya Emoniseli?E. Tosengeli kososola ete lokola Nzambe akelaki mokili na mikolo motoba, mpe na mokolo ya sambo asilisaki mosala na ye, mpe asantisaki yango, mpe lisusu asalaki moto uta na mputulu ya mabele, lolenge moko mpe, na ebandeli ya nkoto sambo ya mibu Nkolo Nzambe akosantisa mabele, mpe akokokisa lobiko ya moto, mpe akosambisa biloko nyonso, mpe akosikola biloko nyonso, longola se oyo wana atiaki te na nse ya nguya na ye, ntango ekosila ye kotia biloko nyonso bilembo, kino nsuka ya makambo nyonso; mpe kobetama ya kelelo na banjelu sambo elakisi bolengeli mpe bosilisi ya mosala na ye, na ebandeli ya nkoto sambo ya mibu—bolengeli ya nzela liboso ya ntango ya boyei na ye.

13 M. Ntango nini ekokokisama makambo yango, oyo makomami na Mokapo ya libwa ya Emoniseli?E. Makokokisama nsima ya bofungwami ya elembo ya sambo, liboso ya boyei ya Klisto.

14 M. Nini esengeli biso kososola na buku ya moke oyo eliamaki na Yoane, lokola etangami na Mokapo ya zomi ya Emoniseli?E. Tosengeli kososola ete ezalaki etinda, mpe bokuli moko, mpo ete asangisa mabota ya Yisalaele; tala, ezali Eliyasi, oyo, lokola ekomami, asengeli koya mpe kozongisa makambo nyonso.

15 M. Nini esengeli biso kososola na banzeneneke mibale, na Mokapo ya zomi na moko ya Emoniseli?E. Bazali baprofeta mibale oyo bakobimisama na libota ya Bayuda na mikolo ya nsuka, na ntango ya bozongisi, mpe basengeli kosakola na Bayuda nsima ete basangana mpe basila kotonga engumba ya Yelusaleme kati na mabele ya batata na bango.

Bimisa na lokasa