Makomi
Malongi mpe Mayokani 18


Eteni 18

Emoniseli epayi ya Profeta Joseph Smith, Oliver Cowdery, mpe David Whitmer, epesami na Fayette, New York, na sanza ya motoba ya mobu 1829. Na kolandaka maloba ya Profeta, emoniseli oyo eyebanisaki “libiangi ya bapostolo zomi na mibale na mikolo oyo ya nsuka, mpe malako etali botongi ya Eklezia.”

1–5, Makomi makolakisa lolenge boni kotonga Eklezia; 6–8, Mokili ezali kokomela na mabe; 9–16, Molimo ezali na motuya monene; 17–25, Mpo na kozwa lobiko, bato basengeli kokamata nkombo ya Klisto likolo na bango moko; 26–36, Libiangi mpe etinda ya Bazomi na mibale ebimisami; 37–39, Oliver Cowdery mpe David Whitmer basengeli kobombola Bazomi na mibale; 40–47, Mpo na kozwa lobiko, bato basengeli koyambola, kobatisama, mpe kobomba mitindo.

1 Sikawa, tala, mpo na eloko oyo yo, mosali na ngai Oliver Cowdery, ozalaki na mposa ya koyeba uta na ngai, napesi epayi na yo maloba oyo:

2 Tala, namonisaki epayi na yo, mbala mingi na nzela ya Molimo na ngai, ete makambo oyo omonaki ezali solo; yango wana oyebi ete ezali solo.

3 Mpe soki oyebi ete ezali solo, tala, napesi epayi na yo motindo moko, ete otalelaka makambo oyo makomami;

4 Mpo kati na yango makambo nyonso makomami mpo na oyo etali moboko ya eklezia na ngai; nsango malamu na ngai, mpe libanga ya ngai.

5 Yango wana, soki kolendisa eklezia na ngai, likolo ya moboko ya nsango malamu na ngai mpe libanga ya ngai, bikuke ya lifelo bikolonga yo te.

6 Tala, mokili ezali kokomela na mabe; mpe esengeli ete bana ya bato bapusama na boyamboli, banso mibale Bayuda-te mpe lisusu ndako ya Yisalaele.

7 Yango wana, lokola obatisamaki na maboko ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, engebene na oyo natindaki ye, akokisi eloko oyo natindaki ye.

8 Mpe sikawa, kokamwa te ete nabiangaki ye mpo na ntina ya ngai moko, ntina oyo eyebani na ngai; yango wana, soki akozala na etingia na kobombaka mitindo na ngai akopambolama mpo na bomoi ya seko; mpe nkombo na ye ezali Joseph.

9 Mpe sikawa, Oliver Cowdery, nalobi epayi na yo, mpe lisusu epayi ya David Whitmer, na nzela ya motindo; mpo, tala, natindi bato nyonso na bisika nyonso bayambola, mpe nalobi epayi na yo, kutu lokola epayi ya apostolo na ngai Paulo, mpo obiangami kutu na libiangi se moko oyo wana abiangamaki.

10 Bomikundola ete milimo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe;

11 Mpo, tala, Nkolo Mosikoli na yo ayokaki mpasi ya liwa kati na mosuni; yango wana ayokaki mpasi ya bolozi mpo na bato nyonso, ete bato nyonso bakoka koyambola mpe koya epayi na ye.

12 Mpe asekwaki lisusu uta na bakufi, ete akoka komema bato nyonso epayi na ye, mpo na koyanola na masengami ya boyamboli.

13 Mpe lolenge kani monene ezali bosepeli na ye na molimo oyo ayamboli!

14 Yango wana, bobiangami koganga boyamboli epayi ya bato oyo.

15 Mpe soki ezali bongo ete osengelaki kosala mikolo na yo nyonso na kogangaka boyamboli epayi ya bato oyo, mpe komema, bobele ata molimo moko epayi na ngai, lolenge kani bosepeli na bino ekozala monene elongo na ye kati na bokonzi ya Tata na ngai!

16 Mpe sikawa, soki bosepeli na bino ekozala monene na molimo moko oyo bomemi epayi na ngai kati na bokonzi ya Tata na ngai, boni monene ekozala bosepeli na bino soki bomemi milimo mingi epayi na ngai!

17 Tala, ozali na nsango malamu na ngai liboso na yo, mpe libanga na ngai, mpe lobiko na ngai.

18 Bosenga Tata na nkombo na ngai na bondimi kondimaka ete bokozwa, mpe bokozwa Molimo Mosantu, oyo amonisaka makambo nyonso malongobani epayi ya bana ya bato.

19 Mpe soki bozali na bondimi te, elikya, mpe bolingani te, bokoki kosala eloko moko te.

20 Bowela na eklezia moko te, longola se soki ezali eklezia ya zabulu.

21 Bokamata likolo na bino nkombo ya Klisto, mpe boloba bosolo na motema moko.

22 Mpe mingi lokola bayamboli mpe babatisami na nkombo na ngai, oyo ezali Yesu Klisto, mpe batie molende kino na nsuka, se bango wana nde bakobikisama.

23 Tala, Yesu Klisto ezali nkombo oyo epesami na Tata, mpe ezali na nkombo mosusu te epesami na oyo wapi moto akoki kobikisama;

24 Yango wana, bato nyonso basengeli kokamata likolo na bango nkombo oyo epesami na Tata, mpo na nkombo wana bakobiangama na mokolo ya nsuka;

25 Yango wana, soki bayebi nkombo oyo wapi babiangami te, bakoki kozala na esika te kati na bokonzi ya Tata na ngai.

26 Mpe sikawa, tala, ezali na basusu oyo babiangami kosakola nsango malamu na ngai, ezala epayi ya Mopaganu mpe epayi ya Moyuda;

27 Iyo, ata zomi na mibale; mpe Bazomi na mibale bakozala bayekoli na ngai, mpe bakokamata nkombo na ngai likolo na bango, mpe Bazomi na mibale bazali baoyo bakozala na mposa ya kokamata nkombo na ngai likolo na bango na mokano etonda ya motema.

28 Mpe soki bazali na mposa ya kokamata nkombo na ngai likolo na bango na mokano etonda na motema, babiangami mpo na kokende kati na mokili mobimba koteya nsango malamu na ngai epayi na ekelamo nyonso.

29 Mpe bazali baoyo bakulisami na ngai mpo na kobatisa na nkombo na ngai, engebene na oyo ekomami;

30 Mpe bozali na oyo ekomami liboso na bino; yango wana, bosengeli kosala yango engebene na maloba oyo makomami.

31 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, Bazomi na mibale—Tala, ngolu na ngai ekoki mpo na bino; bosengeli kotambola semba liboso na ngai mpe bosumuka te.

32 Mpe, tala, bozali baoyo bakulisama na ngai mpo na kokulisa banganganzambe mpe bateyi; kosakola nsango malamu na ngai, engebene na nguya ya Molimo Mosantu oyo ezali kati na bino, mpe engebene na mabiangi mpe makabo ya Nzambe epayi ya bato;

33 Mpe ngai, Yesu Klisto, Nkolo na bino mpe Nzambe na bino, nalobi yango.

34 Maloba oyo ezali ya bato te to mpe ya moto te, kasi ya ngai; yango wana, bosengeli kotatola ete ezali ya ngai mpe ya bato te;

35 Mpo ezali mongongo na ngai oyo ezali koloba yango epayi na bino; mpo epesami na Molimo na ngai epayi na bino, mpe na nguya na ngai bokoki kotanga yango moko epayi na mosusu; mpe bokokaki kozwa yango te longola se soki na nguya na ngai;

36 Yango wana, bokoki kotatola ete oyokaki mongongo na ngai, mpe oyebi maloba na ngai.

37 Mpe sikawa, tala, napesi epayi na yo, Oliver Cowdery, mpe lisusu epayi ya David Whitmer, ete boluka Bazomi na mibale, baoyo bakozala na mposa ya oyo nalobaki;

38 Mpe na mposa na bango mpe misala na bango bokoyeba bango.

39 Mpe ntango bokozwa bango bosengeli kolakisa biloko oyo epayi na bango.

40 Mpe bosengeli kokweya na nse mpe kokumbamela Tata na nkombo na ngai.

41 Mpe bosengeli koteya epayi na mokili, kolobaka: Bosengeli koyambola mpe kobatisama, na nkombo ya Yesu Klisto;

42 Mpo bato nyonso basengeli koyambola mpe kobatisama, mpe bobele mibali te, kasi basi mpe lokola, mpe bana oyo bakokisi mibu ya boyanoli.

43 Mpe sikawa, esili bino kozwa oyo, bosengeli kobomba mitindo na ngai na makambo nyonso;

44 Mpe na maboko na bino nakosala mosala moko ya kokamwa na kati ya bana ya bato, mpo na kondimisa mingi mpo na oyo etali masumu na bango, ete bakoka koya na boyamboli, mpe ete bakoka koya na bokonzi ya Tata na ngai.

45 Yango wana, mapamboli napesi epayi na bino ezali koleka biloko nyonso.

46 Mpe esili bino kozwa oyo, soki bobombi mitindo na ngai te bokoki kobikisama kati na bokonzi ya Tata na ngai te.

47 Tala, ngai, Yesu Klisto, Nkolo na bino mpe Nzambe na bino, mpe Mosikoli na bino, na nguya ya Molimo na ngai nalobi yango. Amene.

Bimisa na lokasa