Makomi
Malongi mpe Mayokani 1


Malongi mpe Mayokani

Eteni 1

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na mokolo ya yambo ya sanza ya zomi na moko ya mobu 1831, na ntango ya likita ya mbalakata ya bampaka ya Eklezia, oyo esalemaki na Hiram, Ohio. Bimoniseli mingi ezwamaki uta na Nkolo liboso ya ntango oyo, mpe bosangisani ya bimoniseli yango mpo na kobimisa yango na lolenge ya buku ezalaki moko ya makambo minene oyo endimamaki na likita yango. Eteni oyo ezali Mayebisi ya Nkolo na ebandeli ya buku mpo na oyo etali malongi, mayokani, mpe mitindo oyo epesami na eleko oyo.

1–7, Mongongo ya bokebisi ebimi mpo na bato nyonso; 8–16, Bopengwi mpe nkuna ekoya liboso ya Boyei ya Mibale; 17–23, Joseph Smith abiangami mpo na kozongisa bosolo mpe nguya ya Nkolo na mabele; 24–33, Buku ya Mormon ebimisami mpe Eklezia ya solo etiami; 34–36, Kimia ekolongwa uta na mabele; 37–39, Boluka malamu mitindo oyo.

1 Boyoka, O bino bato ya eklezia na ngai, elobi mongongo na ye oyo afandaka na likolo, mpe oyo kani miso ezali likolo ya bato nyonso; iyo, solo nalobi: Boyoka bino bato na mosika; mpe bino baoyo bozali likolo na mabongo ya mbu, botia matoyi elongo.

2 Mpo solo mongongo ya Nkolo ebimi epayi ya bato nyonso, mpe moto moko te akokima yango; mpe liso moko te ekomona te, litoyi moko mpe te ekoyoka te, motema moko mpe te mokosimbama te.

3 Mpe batomboki bakotobolama na mawa mingi; mpo mabe na bango ekolobelama likolo ya nsamba ya ndako, mpe makambo na bango ya nkuku ekobimisama.

4 Mpe mongongo ya bokebisi ekobima epayi ya bato nyonso, na minoko ya bayekoli na ngai, baoyo naponi na mikolo oyo ya nsuka.

5 Mpe bakokende, mpe moto moko te akopekisa bango; mpo ngai Nkolo natindi bango.

6 Tala, oyo ezali likoki na ngai, mpe likoki ya basali na ngai, mpe liloba na ngai ya boyingisi na ebandeli ya buku na ngai ya mitindo, oyo napesi bango kosakola mpo na bino, O bafandi ya mabele.

7 Yango wana, bobanga mpe bolenge, O bino bato, mpo nini oyo ngai Nkolo nakani kati na mibeko yango ekokokisama.

8 Mpe solo nalobi epayi na bino, ete baoyo bakokende, komemaka nsango malamu oyo epayi ya bafandi ya mabele, epayi na bango epesami nguya ya kokanga na mabele mpe na lola lokola, baoyo bazanga bondimi mpe batomboki;

9 Iyo, solo, kokanga bango kina mokolo yango ntango nkele ya Nzambe ekosopana beboo likolo ya bato ya nkuna—

10 Mpo na mokolo oyo wapi Nkolo akoya kopesa lifuta epayi ya moto nyonso engebene na mosala na ye, mpe akomeka moto nyonso engebene na lomeko oyo amekaki moninga na ye moto.

11 Yango wana mongongo ya Nkolo ebimi kino nsuka ya mabele, ete moto nyonso oyo alingi koyoka akoka koyoka:

12 Bomilengela, bomilengela mpo na oyo esengeli koya, mpo Nkolo abelemi;

13 Mpe nkanda ya Nkolo epeli, mpe mompanga na ye mosili kosukolama na lola, mpe mokokweya likolo ya bafandi ya mabele.

14 Mpe loboko ya Nkolo ekobimisama; mpe mokolo ezali koya ete baoyo bakoyoka mongongo ya Nkolo te, mpe mongongo ya basali na ye mpe te, mpe baoyo bakotia bokebi na maloba ya baprofeta mpe bapostolo mpe te, bakokatama mosika uta na kati ya bato;

15 Mpo bakei mosika uta na makuli na ngai, mpe babuki liyokani na ngai ya libela;

16 Bazali koluka Nkolo te mpo na kofandisa bosembo na ye, kasi moto na moto azali kotambolaka na nzela ya ye moko, mpe kolandaka elilingi ya nzambe na ye moko, oyo kani elilingi ezali na bokokani na biloko ya mokili mpe oyo kani biloko asalelami ezali ya ekeko, oyo ekoma ya kala mpe ekowa na Babiloni, kutu Babiloni monene, oyo ekokweya.

17 Yango wana, ngai Nkolo, mpo nayebi mawa minene oyo esengeli koyela bafandi ya mabele, nabiangaki mosali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe nalobelaki ye uta na lola, mpe napesaki ye mitindo;

18 Mpe lisusu napesaki mitindo epayi ya basusu, ete bakoka kosakola makambo oyo na mokili mobimba; mpe nasali oyo nyonso ete ekoka kokokisama, oyo ekomamaki na baprofeta—

19 Biloko ya bolembu ya mokili bikotelema mpe bikobuka oyo moko ya nguya mpe ya makasi, ete moto asengeli te kopesa toli na moninga na ye moto, mpe kotiela loboko ya mosuni motema te—

20 Kasi ete moto nyonso akoka koloba na nkombo ya Nkolo Nzambe, kutu Mobikisi ya mokili;

21 Ete bondimi mpe ekoka lisusu kobakisama kati na mabele;

22 Ete liyokani na ngai ya libela ekoka kotiama;

23 Ete litondi ya nsango malamu na ngai ekoka kosakolama na bato ya bolembu mpe bato mpamba kino na nsuka ya mokili, mpe liboso ya bakonzi mpe bayangeli.

24 Tala, nazali Nzambe mpe nalobaki yango; mitindo oyo ezali ya ngai, mpe epesamaki na basali na ngai kati na bolembu na bango, engebene na lokota na bango, ete bakoka kokoma na bososoli.

25 Mpe mbala mingi lokola basalaki mabunga ekoka koyebana;

26 Mpe mbala mingi lokola balukaki bwania bakoka koteyama;

27 Mpe mbala mingi lokola basalaki masumu bakoka kopesama etumbu, ete bakoka koyambola;

28 Mpe mbala mingi lokola bazalaki bato na bomikitisi bakoka koyeisama makasi, mpe kopambolama uta na likolo, mpe kozwa boyebi mbala na mbala.

29 Mpe nsima ya kozwa lisolo ya makomi ya Banefi, iyo, kutu mosali na ngai Joseph Smith Mwana, akoka kozwa nguya ya kobongola, na nzela ya boboto ya Nzambe, Buku ya Mormon na nguya ya Nzambe.

30 Mpe lisusu na baoyo wana epayi ya banani mitindo oyo epesamaki, bakoka kozala na nguya ya kotia moboko ya eklezia oyo, mpe kobimisa yango uta na butu mpe uta na molili, lokola eklezia bobele se moko ya solo mpe ya bomoi oyo ezali kosala likolo ya etando ya mabele mobimba, na oyo wapi ngai, Nkolo, nasepeli malamu, mpe kolobaka na eklezia oyo lokola lingomba kasi lokola moto moko moko te—

31 Mpo ngai Nkolo nakoki te kotala lisumu na ndambo ata moke ya ndingisa;

32 Nzokande, ye oyo akoyambola mpe akotosa mitindo ya Nkolo akolimbisama;

33 Mpe ye oyo akoyambola te, uta na ye bakolongola kutu pole oyo azwaki; mpo Molimo na ngai mokobunda ntango nyonso na moto te, elobi Nkolo na Bibele.

34 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, O bafandi ya mabele: Ngai Nkolo nalingi kosala ete biloko oyo eyebana epayi ya mosuni nyonso;

35 Mpo natalaka bato na bilongi te, mpe nalingi ete bato nyonso bayeba ete mokolo yango ezali koya na lombangu; ntango yango ekoki naino te, kasi esili kobelema, ntango kimia ekolongolama uta na mokili, mpe zabulu akozala na nguya likolo ya mpifo na ye moko.

36 Mpe lisusu Nkolo akozala na nguya likolo ya basantu na ye, mpe akoyangela na katikati na bango, mpe akokita mpo na kosambisa likolo ya Idumea, to mokili.

37 Boluka mitindo oyo, mpo ezali solo mpe sembo, mpe masakoli mpe bilako oyo ezwami kati na yango ekokokisama nyonso.

38 Oyo ngai Nkolo nalobaki, nalobaki, mpe nakomitiela mikalo te; mpe atako lola na mabele makoleka, liloba na ngai ekoleka te, kasi eikokokisama nyonso, ezala oyo nalobi na mongongo na ngai moko to na mongongo ya basali na ngai, ezali se lolenge moko.

39 Mpo tala, mpe mona, Nkolo azali Nzambe, mpe Molimo ezali kotatola, mpe litatoli yango ezali solo, mpe solo ekotikala mpo na libela na libela. Amene.

Bimisa na lokasa