Makomi
Malongi mpe Mayokani 35


Eteni 35

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith mpe Sidney Rigdon, na to penepene na Fayette, New York, na mokolo ya 7, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1830. Na ntango oyo, Profeta amipesaki mbele mokolo na mokolo na kosalaka bobongoli ya Biblia. Bobongoli ebandaki na ebandeli mpenza ya sanza ya motoba ya mobu 1830, mpe nyonso mibale Oliver Cowdery mpe John Whitmer basalaki lokola bakomeli. Uta ebandeli babiangamaki sikawa na misala misusu, Sidney Rigdon abiangamaki na boponi uta na Nzambe mpo na kosala lokola mokomeli ya Profeta kati na mosala oyo (tala molongo ya kotanga 20). Lokola liloba ya boyingisi na lisolo ya makomi ya emoniseli oyo, mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete: “Na sanza ya zomi na mibale Sidney Rigdon ayaki [uta na Ohio] koluka koyeba uta na Nkolo, mpe elongo na ye eyaki Edward Partridge. … Kala mingi te nsima ya boyei ya bandeko mibali bandimi mibale oyo, boye nde elobaki Nkolo.”

1–2, Lolenge boni bato bakoki kokoma bana ya Nzambe; 3–7, Sidney Rigdon abiangami kobatisa mpe kopesa Molimo Mosantu; 8–12, Bilembo mpe makamwisi esalemaka na bondimi; 13–16, Basali ya Nkolo bakotia bokaboli kati na bikolo na nguya ya Molimo; 17–19, Joseph Smith azali na bafungola ya mibombamo; 20–21, Baponami bakotikala na mokolo ya boyei ya Nkolo; 22–27, Yisalaele ekobikisama.

1 Boyoka mongongo ya Nkolo Nzambe na bino, kutu Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka, oyo kani nzela ezali zunguluke yoko ya seko, oyo azali se lolenge moko kaka lobi, lelo, mpe libela.

2 Nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, oyo babakaki na ekulusu mpo na masumu ya mokili, kutu ya mingi lokola bakondima na nkombo na ngai, ete bakoka kokoma bana ya Nzambe, kutu bakoma moko na ngai lokola nazali moko na Tata, lokola Tata azali moko na ngai, ete tokoka kozala moko.

3 Tala, solo, solo, nalobi epayi ya mosali na ngai Sidney, natalaki yo mpe misala malamu na yo. Nayokaki sambo na yo, mpe nalengeli yo mpo na mosala moko monene koleka.

4 Opambolami, mpo okosala makambo minene. Tala otindamaki, kutu lokola Yoane, mpo na kolengela nzela liboso na ngai, mpe liboso ya Eliya oyo akoya, mpe oyebi yango te.

5 Obatisaki na mai mpo na boyamboli, kasi bazwaki Molimo Mosantu te;

6 Kasi sikawa napesi yo motindo, ete okobatisa na mai, mpe bakozwa Molimo Mosantu na kotiama maboko, kutu lokola bapostolo ya kala.

7 Mpe ekosalema ete mosala monene ekozala na mboka, kutu na kati ya baoyo bazali Bayuda-te, mpo liboma na bango mpe bonsomo na bango ekomonisama na miso ya bato nyonso.

8 Mpo nazali Nzambe, mpe loboko na ngai ezali mokuse te; mpe nakolakisa makamwisi, bilembo, mpe misala ya kokamwa, epayi ya nyonso baoyo bandimaka na nkombo na ngai.

9 Mpe nyonso oyo bakosenga yango na nkombo na ngai na bondimi, bakobengana bazabulu; bakobikisa bakoni; bakosala ete bakufi miso bazwa bomoni na bango, mpe bakufi matoyi bayoka, mpe bababa baloba, mpe batengoli batambola.

10 Mpe ntango ezali koya na lombangu ete makambo minene makolakisama epayi ya bana ya bato;

11 Kasi soki bondimi ezali te eloko moko te ekolakisama longola se libebi likolo ya Babiloni, se moko oyo alangwisaki bikolo nyonso na vinyo ya nkele ya bondumba na ye.

12 Mpe ezali na moko te oyo azali kosala bolamu longola se baoyo babelemi mpo na koyamba litondi ya nsango malamu na ngai, oyo natindi epayi ya nkola oyo.

13 Yango wana, nabiangi biloko ya bolembu ya mokili, baoyo bayekola te mpe baoyo batiolami, mpo na kotia bokaboli kati na bikolo na nguya ya Molimo na ngai;

14 Mpe loboko na bango ekozala loboko na ngai, mpe nakozala nguba monene na bango mpe nguba moke na bango; mpe nakokanga nketo na bango, mpe bakobunda etumba na mpiko mpo na ngai; mpe banguna na bango bakozala na nse ya makolo na bango; mpe nakotika mompanga mokweya mpo na litomba na bango, mpe na moto ya bosiliki na ngai nakobikisa bango.

15 Mpe babola mpe basokemi bakoteyama nsango malamu epayi na bango, mpe bakozela ntango ya boyei na ngai, mpo esili kobelema

16 Mpe bakoyekola lisese ya nzete ya mosuke, mpo sikawa kutu elanga esili kobelema.

17 Mpe natindaki litondi ya nsango malamu na ngai na loboko ya mosali na ngai Joseph; mpe kati na bolema nde napambolaki ye;

18 Mpe napesaki ye bafungola ya mobombamo ya biloko oyo ekangamaki, kutu biloko oyo ezalaki uta bokeli ya mokili, mpe biloko oyo esengeli koya uta ntango oyo kino ntango ya boyei na ngai, soki atikali na ngai, mpe soki te, nakotia mosusu na esika na ye.

19 Yango wana, kengeleka ye ete bondimi na ye ekweya te, mpe ekopesama na Molendisi, Molimo Mosantu, oyo ayebaka makambo nyonso.

20 Mpe napesi epayi na yo motindo moko—ete okokoma mpo na ye; mpe makomi makopesama, kutu lokola ezali na ntolo ya ngai moko, na ntina ya lobiko ya baponi na ngai moko;

21 Mpo bakoyoka mongongo na ngai, mpe bakomona ngai, mpe bakozala ya kolala mpongi te, mpe bakotikala na mokolo ya boyei na ngai; mpo bakopetolama, kutu lokola nazali peto.

22 Mpe sikawa nalobi epayi na yo, tikala na ye, mpe akokende mobembo elongo na yo; kotika ye te, mpe na ntembe te biloko oyo ekokokisama.

23 Mpe mbala mingi lokola bokokoma te, tala, ekopesama epayi na ye ete asakola; mpe okoteya nsango malamu na ngai mpe okotanga nkoma ya baprofeta basantu mpo na komonisa bosolo ya maloba na ye, lokola makopesama epayi na ye.

24 Bombaka mitindo mpe mayokani nyonso na oyo wapi bokangemi; mpe nakosala ete lola eningana mpo na bolamu na bino, mpe Satana akolenga mpe Siona akosepela likolo ya bangomba ya mike mike mpe akofuluka;

25 Mpe Yisalaele ekobikisama na ntango esengeli ya ngai moko; mpe na nzela ya bafungola oyo napesaki nde bakokambama, mpe bakoyokisama nsoni lisusu te.

26 Botombola mitema na bino mpe bosepela, bosikoli na bino ebelemi.

27 Bobanga te, etonga moke, bokonzi ezali ya bino kino nakoya. Tala, nazali koya na lombangu. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa