Makomi
Malongi mpe Mayokani 58


Eteni 58

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na Siona, Etuka ya Jackson, Missouri, na mokolo ya yambo, sanza ya mwambe ya mobu 1831. Ntongo ntongo, na mokolo ya Saba ya yambo nsima ya boyei ya Profeta mpe lingomba ya bato na ye na etuka ya Jackson, na Missouri, likita moko ya eyamba esalemi, mpe bandimi mibale bandimami na libatisi. Na poso wana, boko Basantu ya Colesville uta na Etape ya Thompson mpe basusu bakomaki (tala eteni 54). Mingi bazalaki na mposa makasi ya koyekola nini ezali bolingi ya Nkolo mpo na bango na esika oyo ya sika ya bosangani.

1–5, Baoyo batiaka molende kati na mikakatano bakolatisama motole na nkembo; 6–12, Basantu basengeli komilengela mpo na libala ya Mwana ya mpate mpe mpo na elambo ya Nkolo; 13–18, Baepisikopo bazali basambisi na Yisalaele; 19–23, Basantu basengeli kotosa mibeko ya mboka; 24–29, Bato basengeli kosalela nguya na bango ya boponi mpo na kosala bolamu; 30–33, Nkolo apesaka mpe alongolaka mibeko; 34–43, Mpo na koyambola, bato basengeli kotubela mpe kotika masumu na bango libela; 44–58, Basantu basengeli kosomba libula na bango mpe kosangana na Missouri; 59–65, Nsango malamu esengeli koteyama epayi na ekelamo nyonso.

1 Boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, mpe botia matoyi na maloba na ngai, mpe boyekola uta na ngai nini ezali bolingi na ngai mpo na oyo etali bino, mpe lisusu mpo na oyo etali mboka epayi wapi natindaki bino.

2 Mpo solo nalobi epayi na bino, oyo bombaka mitindo na ngai apambolami, ezala na bomoi to na liwa; mpe oyo azali sembo kati na mikakatano, lifuta na ye se moko oyo ezali monene koleka kati na bokonzi ya lola.

3 Bokoki te komona na miso na bino ya bomoto, mpo na ntango oyo, mwango ya Nzambe na bino mpo na oyo etali makambo oyo esengeli koya nsima, mpe nkembo oyo esengeli kolanda nsima ya mikakatano mike.

4 Mpo nsima ya mikakatano mike nde eyaka mapamboli. Yango wana mokolo ezali koya ntango bokolatisama motole na nkembo mingi; ntango ekoki naino te, kasi esili kobeleme.

5 Bomikundola oyo, oyo nayebisaki bino liboso, ete bokoka kotia yango na motema, mpe bondima oyo ekoya nsima.

6 Tala, solo nalobi epayi na bino, mpo natindaki bino mpo na ntina oyo—ete bokoka kozala na botosi, mpe ete mitema na bino mikoka komilengela mpo na kopesa litatoli na makambo esengeli koya;

7 Mpe lisusu ete bokoka kopesama lokumu na kotiaka moboko, mpe ya kotatolaka na ntina ya mboka likolo ya oyo wapi Siona ya Nzambe ekotelema;

8 Mpe lisusu ete elambo ya bilei ya mafuta bikoka kolambama mpo na babola; iyo, elambo ya bilei ya mafuta, ya vinyo elambami kitoko mpo ezwaki ntango molai, ete mabele eyeba ete maloba ya baprofeta makozanga kokokisama te;

9 Iyo, elambo ya mpokwa na ndako ya Nkolo, elambami kitoko, na oyo wapi bikolo nyonso bikobiangama.

10 Yambo, bato na bozwi mpe bato na mayele, bato na bwania mpe bato na lokumu;

11 Mpe nsima ya wana nde ekoya mokolo ya nguya na ngai; bongo babola, batengoli, mpe bato bakufa miso, mpe bato bakufa matoyi, bakoya na libala ya Mwana ya mpate, mpe bakokabolana elambo ya mpokwa ya Nkolo, oyo ebongisami mpo na mokolo monene ekoya.

12 Tala, ngai Nkolo, nalobi yango.

13 Mpe ete litatoli ekoka kokende uta na Siona, iyo, uta na monoko ya engumba ya libula ya Nzambe—

14 Iyo, mpo na ntina oyo natindaki bino na esika oyo, mpe naponaki mosali na ngai Edward Partridge, mpe napesaki epayi na ye mosala na ye na mboka oyo.

15 Kasi soki ayamboli te uta na masumu na ye, oyo ezali kozanga boyambi mpe bokufi miso ya motema, tika asala keba mbele akweya.

16 Tala mosala na ye mopesami epayi na ye, mpe mokopesama mbala mosusu te.

17 Mpe moto nyonso oyo azali na mosala oyo, abiangami kozala mosambisi na Yisalaele, lokola ezalaki na mikolo ya kala, kokabola mboka ya libula ya Nzambe epayi ya bana na ye;

18 Mpe kosambisa bato na ye engebene na matatoli ya bayengebene, mpe na lisalisi ya bapesi toli na ye, engebene na mibeko ya bokonzi oyo epesami na baprofeta ya nzambe.

19 Mpo solo nalobi epayi na bino, mobeko na ngai mosengeli kobatelama na mboka oyo.

20 Tika ete moto moko te akanisa ete azali mokonzi; kasi tika ete Nzambe akonza ye oyo asambisaka, engebene na toli ya bolingi na ye moko, to, na maloba mosusu, ye oyo apesaka toli to afandaka likolo ya kiti ya bosambisi.

21 Tika ete moto moko te abuka mibeko ya mboka, mpo ye oyo abombaka mitindo ya Nzambe asengeli te kobuka mibeko ya mboka.

22 Yango wana, boyangelama na banguya oyo ezali kokonza, kino akoyangela ye oyo kani makoki ezali ya koyangela, mpe akotia banguna na ye nyonso na nse ya makolo na ye.

23 Tala, mibeko oyo bozwaki uta na loboko na ngai ezali mibeko ya eklezia, mpe engebene na pole oyo bosengeli kosimba myango malamu. Tala, bwania ezali awa.

24 Mpe sikawa, lokola nalobaki na ntina ya mosali na ngai Edward Partridge, mboka oyo ezali mboka ya efandeli na ye, mpe baoyo wana aponaki mpo na kozala bapesi toli na ye; mpe lisusu mboka ya efandeli na ye oyo naponaki mpo na kobatela ebombelo na ngai;

25 Yango wana, tika bango bamema mabota na bango na mboka oyo, lokola basengeli kopesana toli katikati na bango mpe ngai.

26 Mpo tala, ebongi malamu te ete nakoka kopesa mibeko na makambo nyonso; mpamba te ye oyo asengisami kosala nyonso na makasi, se ye moko wana azali mosali ya goigoi mpe ya bwania te; yango wana akozwa lifuta te.

27 Solo nalobi, bato basengeli komipesa mobimba na ntina ya malamu, mpe kosalaka makambo ebele na bonsomi ya bolingi na bango moko, mpe kokokisa bosembo boike;

28 Mpo nguya ezali kati na bango, epayi kani bazali basali mpo na bango moko. Mpe mbala mingi lokola bato bakosala bolamu basengeli soki moke te kobungisa lifuta na bango.

29 Kasi ye oyo asalaka eloko moko te kino atindami, mpe ayambaka motindo na motema ya kotatabana, mpe abombaka mwango na goigoi nyonso, se ye moko wana akweisami.

30 Nazali nani, ngai oyo nakelaki moto, elobi Nkolo, oyo akotala ye na elindo te moto oyo atosaka mitindo na ngai te?

31 Nazali nani, elobi Nkolo, oyo alakaki mpe akokisi yango te?

32 Napesi mibeko mpe bato batosi te; nalongoli mibeko mpe bazwi mapamboli te.

33 Bongo balobi na mitema na bango: Oyo ezali mosala ya Nkolo te, mpo bilaka na ye ekokisami te. Kasi lisuma na bato ya lolenge oyo, mpo bazali kozela lifuta na bango na nse, kasi uta na likolo te.

34 Mpe sikawa napesi epayi na bino malako mosusu na ntina ya mboka oyo.

35 Ezali bwania epayi na ngai ete mosali na ngai Martin Harris azala ndakisa mpo na eklezia, na kotiaka misolo na ye liboso ya episikopo ya eklezia.

36 Mpe lisusu, oyo ezali mobeko mpo na moto nyonso oyo akoya na mboka oyo mpo na kozwa libula na ye ya kosangola; mpe akosalela misolo na ye lokola etindi mobeko.

37 Mpe ezali bwania lisusu ete biteni ya mabele makoka kosombama na Independence, mpo na esika ya ebombelo, mpe lisusu mpo na ndako ya bonyatami buku.

38 Mpe malako mosusu mpo na oyo etali mosali na ngai Martin Harris makopesama epayi na ye na nzela ya Molimo, ete akoka kozwa libula na ye ya kosangola lokola ebongeli ye malamu;

39 Mpe tika ete ayambola uta na masumu na ye, mpo azali koluka masanzoli ya mokili.

40 Mpe lisusu tika ete mosali na ngai William W. Phelps asala na esika epayi wapi nabiangaki ye, mpe azwa libula na ye na mboka oyo;

41 Mpe lisusu asengeli koyambola, mpo ngai, Nkolo, nasepeli malamu na ye te, mpo azali koluka kozala likolo ya basusu, mpe azali mosokemi na lolenge kokoka te liboso na ngai.

42 Tala, ye oyo asili koyambola masumu na ye, se ye moko oyo alimbisami, mpe ngai, Nkolo, nakokundola yango lisusu te.

43 Na oyo bokoki koyeba soki moto ayamboli masumu na ye—tala, akotubela yango mpe akotika yango libela.

44 Mpe sikawa, solo, nalobi mpo na oyo etali ndambo etikali ya bampaka ya eklezia na ngai, ntango ekoki naino te, mpe ekoka te mpo na mibu mike, mpo ete bazwa libula na bango na mboka oyo, longola se soki bayoki mposa na yango na nzela ya losambo ya bondimi, bobele se lokola ekopesama epayi na bango na Nkolo.

45 Mpo, tala, bakopusa bato esika moko uta na bansuka ya mokili.

46 Yango wana, bosangana bino moko esika moko; mpe baoyo babiangami te kofanda na mboka oyo, tika bango bateya nsango malamu na bituka nzinganzinga; mpe nsima na wana tika bazonga epayi na bango.

47 Tika ete bateya nzela nzela, mpe bapesa litatoli ya bosolo na bisika nyonso, mpe babenga bato na misolo, bato na lokumu mpe bato mpamba, mpe babola bayambola.

48 Mpe tika bango batonga Baeklezia, mbala mingi lokola bafandi ya mokili bakoyambola.

49 Mpe tika ete ezala na ntoma moko oyo aponamaki na kopona ya eklezia, na eklezia na Ohio, mpo na kozwa misolo ya kosomba biteni ya mabele na Siona.

50 Mpe napesi epayi ya mosali na ngai Sidney Rigdon motindo moko, ete akokoma bolimboli ya mabele ya Siona, mpe liloba moko ya bolingi ya Nzambe, lokola ekoyebisama na Molimo epayi na ye;

51 Mpe mokanda moko mpe mokanda motiami maboko ya bosombi, ya kolakisa epayi ya Baeklezia nyonso mpo na kozwa misolo, oyo ya kopesa na maboko ya episikopo, na maboko na ye moko to na maboko ya ntoma na ye, lokola ekolinga ye soki te lokola ekotinda ye, mpo na kosomba mabele ya bosangoli libula mpo na bana ya Nzambe.

52 Mpo, tala, solo nalobi epayi na bino, Nkolo alingi ete bayekoli mpe bana ya bato basengeli kofungola mitema na bango, kutu mpo na kosomba etuka oyo mobimba ya ekolo, kala mingi te lokola ntango ekopesa nzela ete basomba.

53 Tala, bwania ezali awa. Tika bango basala oyo mbele bakozala na libula ya kosangola te, longola se na nzela ya bosopi makila.

54 Mpe lisusu, mbala mingi lokola mabele ezwami, tika basali na lolenge nyonso batindama kuna liboso na mboka oyo, kosala mosala mpo na basantu ya Nzambe.

55 Tika makambo oyo nyonso esalema na molongo; mpe tika matomba ya kozwa mabele eyebisama mbala na mbala, na episikopo to na ntoma ya eklezia.

56 Mpe tika mosala ya bosangani ezala na lombangu te, na bokimi mpe te; kasi tika mosalema lokola ekopesama toli na bampaka ya eklezia na ntango ya makita minene, engebene na boyebi boye bazwaka mbala na mbala.

57 Mpe tika ete mosali na ngai Sidney Rigdon abulisa mpe apambola mboka oyo, mpe eteni ya mabele mpo na tempelo, mpo na Nkolo.

58 Mpe tika ete likita ebiangama; mpe nsima na wana tika basali na ngai Sidney Rigdon mpe Joseph Smith Mwana bazonga, mpe lisusu Oliver Cowdery elongo na bango, mpo na kokokisa ndambo ya mosala motikali oyo napesaki epayi na bango na mboka na bango moko, mpe ndambo ya mosala motikali lokola mokambami na makita.

59 Mpe tika moto moko te azonga uta na mboka oyo longola se soki atatoli nzela nzela, ya oyo wana ayebi mpe oyo azali solo kondima koleka nyonso.

60 Tika ete oyo epesamaki likolo ya Ziba Peterson ebotolama uta na ye; mpe tika atikala se mondimi mpamba kati na eklezia, mpe asala na maboko na ye moko, elongo na bandeko ya lingomba, kino apesami etumbu ekoki mpo na masumu na ye nyonso; mpo atubelaki yango te, mpe akanisaki kobomba yango.

61 Tika ete montika ya bampaka ya eklezia, baoyo bazali koya na mboka oyo, boko na baye bapambolami mingi koleka kutu koleka ndelo, lisusu basala likita moko kati na mboka oyo.

62 Mpe tika ete mosali na ngai Edward Partridge akamba likita oyo likosalema na bango.

63 Mpe tika bango lisusu bazonga, koteyaka nsango malamu nzela nzela, kotatolaka na ntina ya makambo oyo ebimisami epayi na bango.

64 Mpo, solo, lokito esengeli kokende liboso uta na esika oyo kino mokili mobimba, mpe kino na ndelo mosika ya mabele—nsango malamu esengeli eteyama na ekelamo nyonso, elongo na bilembo kolandaka bango oyo bakondima.

65 Mpe tala Mwana ya Moto azali koya. Amene.

Bimisa na lokasa