Makomi
Malongi mpe Mayokani 64


Eteni 64

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith na bampaka ya Eklezia, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 11, sanza ya libwa ya mobu 1831. Profeta azalaki komilengela mpo na kokende na Hiram, Ohio, mpo na kozongela mosala na ye ya kobongola Biblia, oyo etiamaki pembeni wana ezalaki ye na Missouri. Lingomba moko ya bandeko bandimi oyo batindamaki kokende mobembo na Siona (Missouri) bamipesaki mpenza na kosala mabongisi mpo na kokende na sanza ya zomi. Na ntango oyo ya mosala makasi, emoniseli oyo epesamaki.

1–11, Basantu batindami kolimbisana moko mpe mosusu, mbele lisumu monene etikala na bango; 12–22, Baoyo bazangi boyamboli basengeli komemama liboso ya Eklezia; 23–25, Ye oyo azali mopesi ya moko na zomi akozikisama te na boyei ya Nkolo; 26–32, Basantu bakebisami na banyongo; 33–36, Batomboki bakokatama uta na Siona; 37–40, Eklezia ekosambisa bikolo; 41–43, Siona ekofuluka.

1 Tala, boye elobi Nkolo Nzambe na bino epayi na bino, O bino bampaka ya eklezia na ngai, botia bokebi mpe boyoka, mpe bozwa bolingi na ngai mpo na oyo etali bino.

2 Mpo solo nalobi epayi na bino, nalingi ete bolonga mokili; yango wana nakozala na mawa epayi na bino.

3 Ezali na baoyo wana basumukaki na kati na bino; kasi solo nalobi, bobele mpo na mbala oyo, mpo na nkembo ya ngai moko, mpe mpo na lobiko ya milimo, nalimbisaki bino masumu na bino.

4 Nakotonda na boboto epayi na bino, mpo napesaki bokonzi epayi na bino.

5 Mpe bafungola ya mibombamo ya bokonzi ekobotolama te uta na mosali na ngai Joseph Smith Mwana, na nzela ya nani oyo naponaki, wana ezali ye na bomoi, mbala mingi lokola akotosa makuli na ngai.

6 Ezali na baoyo wana balukaki libaku ya kofunda ye mpamba;

7 Nzokande, asumukaki; kasi solo nalobi epayi na bino, ngai Nkolo, nalimbisaka masumu ya baoyo wana batubelaka masumu na bango liboso na ngai mpe basengaka bolimbisi, baoyo basumukaki kino na kufa te.

8 Bayekoli na ngai, na mikolo ya kala, balukaki libaku ya kolimbisana te kati na mitema na bango; mpe mpo na mabe oyo batungisamaki mpe bapesamaki bitumbu makasi.

9 Yango wana, nalobi epayi na bino, ete bosengeli kolimbisana; mpo ye oyo alimbisaka bobuki mobeko ya ndeko na ye te azali ya kokweisama liboso ya Nkolo; mpo lisumu monene etikali na ye.

10 Ngai, Nkolo, nakolimbisa nani nakolimbisa, kasi esengeli na bino kolimbisa bato nyonso.

11 Mpe bosengeli koloba na mitema na bino—tika ete Nzambe asambisa kati na ngai mpe bino, mpe azongisela bino lifuta engebene na misala na bino.

12 Mpe ye oyo ayamboli masumu na ye te, mpe atubeli yango te, bosengeli komema ye liboso ya eklezia, mpe kosala na ye lokola makomi malobeli bino, ezala na motindo to na emoniseli.

13 Mpe oyo bokosala yango mpo ete Nzambe akembelama—ezali te mpo bolimbisi te, mpo bozali na mawa te, kasi ete bokoka kolongisama liboso ya mobeko, ete botuka ye oyo azali mopesi mibeko na bino te—

14 Solo nalobi, mpo na ntina oyo bosengeli kosala makambo oyo.

15 Tala, ngai Nkolo, nazalaki na nkanda na Ezra Booth oyo azalaki mosali na ngai, mpe lisusu mosali na ngai Isaac Morley, mpo babatelaki mobeko te, soki mpe motindo te;

16 Balukaki mabe kati na mitema na bango, mpe ngai Nkolo, nabendaki Molimo na ngai. Babiangaki mabe eloko oyo ezali mabe te; nzokande nalimbisaki mosali na ngai Isaac Morley.

17 Mpe lisusu mosali na ngai Edward Partridge, tala, asumukaki, mpe Satana azali koluka kobebisa molimo na ye; kasi ntango makambo oyo ebimisami epayi na bango, mpe bayamboli uta na mabe, bakolimbisama.

18 Mpe sikawa, solo nalobi ete elongobani epayi na ngai ete mosali na ngai Sidney Gilbert, nsima ya mwa mposo moke, azongela mosala na ye, mpe na esika ya bontoma na ye na mboka ya Siona;

19 Mpe ete oyo amonaki mpe ayokaki ekoka kobimisama na bayekoli na ngai, ete bawa te. Mpe nalobaki makambo oyo mpo na ntina oyo.

20 Mpe lisusu, nalobi na bino, ete mosali na ngai Isaac Morley akoki kosenginiama te koleka oyo ezali nguya na bino, mpe akoki te kopesa toli mabe mpo na komonisa bino mpasi, napesaki motindo ete ebokolelo na ye ya bibwele etekama.

21 Nakolinga te ete mosali na ngai Frederick G. Williams ateka ebokolelo na ye ya bibwele, mpo ngai Nkolo, nakozala na esika ebatelami makasi na mboka ya Kirtland, mpo na eleko ya mibu mitano, eleko oyo wapi nakobwaka bato ya nkuna te, ete na nzela wana nakoka kobikisa boko.

22 Mpe nsima ya mokolo wana, ngai Nkolo, nakokanga moto moko elindo te oyo akokende mobembo na motema polele na mboka ya Siona; mpo, ngai Nkolo, nasengi mitema ya bana ya bato.

23 Tala, ntango oyo ebiangami lelo kino na boyei ya Mwana ya Moto, mpe solo ezali mokolo mpo na mbeka, mpe mokolo ya kopesa moko na zomi mpo na bato na ngai; mpo ye oyo atangami mopesi ya eteni yoko kati na zomi akozikisama te na boyei na ye.

24 Mpo nsima ya lelo nde ekoya bozikisami—oyo ezali koloba na lolenge ya Nkolo—mpo solo nalobi, lobi bato nyonso ya lolendo mpe baoyo wana basalaka na nkuna bakozala lokola mpumbulu; mpe nakozikisa bango mpenza, mpo nazali Nkolo na Bibele; mpe nakoyokela oyo akotikala kati na Babiloni mawa te.

25 Yango wana, soki bondimi ngai, bokosala mosala na ntango oyo ebiangami lelo.

26 Mpe elongobani te ete basali na ngai Newel K. Whitney mpe Sidney Gilbert bateka ebombelo na bango mpe biloko na bango awa; mpo oyo ezali bwania te kino montika ya eklezia, oyo motikalaki na esika oyo, bakomata na mboka ya Siona.

27 Tala, elobami kati na mibeko na ngai, soki te epekisami, kozwa banyongo epayi ya banguna na bino;

28 Kasi tala, elobami ata mbala moko te ete Nkolo akokamata yango te na ntango asepeli, mpe kofuta lokola ebongeli ye malamu.

29 Yango wana, lokola bozali bantoma, bomipesi na mosala ya Nkolo; mpe nyonso oyo bokosala engebene na bolingi ya Nkolo ezali mosala ya Nkolo.

30 Mpe atiaki bino mpo na kosunga basantu na ye na mikolo oyo ya nsuka, ete bakoka kozwa libula ya kosangola na mboka ya Siona.

31 Mpe tala, ngai, Nkolo nalobi epayi na bino, mpe maloba na ngai ezali solo mpenza mpe makoleka mpamba te, ete bakozwa yango.

32 Kasi makambo nyonso esengeli koleka na ntango na yango.

33 Yango wana, bolemba kosala bolamu te, mpo bozali kotia moboko moko ya mosala monene. Mpe uta na biloko ya mike mike nde ebimaka oyo ya monene.

34 Tala, Nkolo asengi motema mpe mayele ya boyambi; mpe bato na bolingi mpe bato na botosi bakolia biloko malamu ya mboka ya Siona na mikolo oyo ya nsuka.

35 Mpe batomboki bakokatama mosika na mboka ya Siona, mpe bakobengana bango, mpe bakosangola libula ya mboka te.

36 Mpo, solo nalobi ete batomboki bazali ya makila ya Efelaima te, yango wana bakolongolama.

37 Tala, ngai Nkolo, nasalaki eklezia na ngai na mikolo oyo ya nsuka lokola mosambisi oyo afandi likolo ya ngomba, soki te na esika ya likolo, mpo na kosambisa bikolo.

38 Mpo ekosalema ete bafandi ya Siona bakosambisa makambo nyonso etali Siona.

39 Mpe bato na lokuta mpe bakibisi bakolakisama polele na bango, mpe bango oyo bazali bapostolo mpe baprofeta te bakoyebana.

40 Mpe kutu episikopo, oyo azali mosambisi, mpe bapesi toli na ye, soki bazali sembo kati na bokapita na bango te bakokweisama, mpe basusu bakotiama na esika na bango.

41 Mpo, tala, nalobi na bino ete Siona ekofuluka, mpe nkembo ya Nkolo ekozala likolo na ye;

42 Mpe akozala lokola bendele mpo na bato, mpe bato uta na ekolo moko moko na nse ya lola bakoya kuna epayi na ye.

43 Mpe mokolo ekoya ntango bikolo ya mabele ekolenga na ntina na ye, mpe bakobanga na ntina ya bamoko na ye ya nsomo. Nkolo alobaki yango. Amene.

Bimisa na lokasa