Makomi
Malongi mpe Mayokani 6


Eteni 6

Emoniseli epesami epayi ya profeta Joseph Smith mpe na Oliver Cowdery, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya minei ya mobu 1829. Oliver Cowdery abandaki mosala na ye lokola mokomeli na bobongoli ya Buku ya Mormon, na mokolo ya 7, sanza ya minei ya mobu 1829. Asilaki kozwa uta na Nzambe mamonisi ya bosolo mpo na oyo etali litatoli ya Profeta engebene na bapalaki likolo ya oyo wapi lisolo ya makomi ya nkoma ya Buku ya Mormon ekomamaki. Profeta alukaki koyeba uta na Nkolo na nzela ya Ulima mpe Tumima mpe azwaki eyano oyo.

1–6, Basali na elanga ya Nkolo bakozwa lobiko; 7–13, Ezali na likabo monene te koleka likabo ya lobiko; 14–27, Litatoli ya bosolo eyaka na nguya ya Molimo; 28–37, Botalela Klisto, mpe bosala bolamu ntango nyonso.

1 Mosala moko monene mpe ya kokamwa ezali penepene na kosalema epayi na bana ya bato.

2 Tala, nazali Nzambe; botia bokebi na liloba ya ngai, oyo ezali na bomoi mpe na nguya, na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipayi nyonso mibale lokola, kino na kokabolaka biteni ya matongi mpe mafuta; boye botia bokebi na maloba na ngai.

3 Tala, elanga esili kokomela mpo na kobuka mbuma; boye, ye oyo alingi kobuka mbuma, tika ye akata na likwangola na bokasi na ye, mpe abuka mbuma wana ezali mokolo kowumela, ete akoka kobomba mpo na lobiko ya libela ya molimo na ye na bokonzi ya Nzambe.

4 Iyo, moto nyonso oyo akokata na likwangola mpe akobuka, se ye moko wana abiangami na Nzambe.

5 Boye, soki bokosenga na ngai bokozwa; soki bobeti ekofungolama mpo na bino.

6 Sikawa, lokola bosengaki, tala, nalobi epayi na bino, bobomba mitindo na ngai, mpe boluka komema liboso mpe kotia ntina ya Siona;

7 Boluka bozwi ya mokili te kasi bwania, mpe tala, mibombamo ya Nzambe ekobimisama epayi na bino, mpe nsima nde bokokomisama bato na bozwi. Tala, ye oyo azali na bomoi ya seko azali moto na bozwi.

8 Solo, solo, nalobi epayi na yo, kutu lokola ezali mposa na yo epayi na ngai ekosalema bongo mpo na yo; mpe soki olingi, okozala moko esalelo mpo na kosala bolamu mingi na nkola oyo.

9 Boloba eloko mosusu te epayi na nkola oyo longola se soki ezali boyamboli; bobomba mitindo na ngai, mpe bosalisa mpo na komema mosala na ngai liboso, engebene na mitindo na ngai, mpe bokopambolama.

10 Tala ozali na likabo, mpe opambolami na ntina ya likabo na yo. Mikundola ete likabo yango ezali ya bule mpe ewuti na likolo—

11 Mpe soki okozala na mituna, okoyeba mibombamo oyo ezali minene mpe ya kokamwa; boye okosalela likabo na yo, ete okoka kobombola mibombamo, ete okoka komema baike na boyebi ya bosolo, iyo, kondimisa bango mpo na oyo etali libunga ya banzela na bango.

12 Kosala te ete likabo na yo eyebana ata epayi ya moto moko longola se epayi ya baoyo bazali bato ya bondimi na yo. Kosakana na biloko ya bule te.

13 Soki okosala bolamu, iyo, mpe otikali ya kokangama sembo kino na nsuka, okobikisama na bokonzi ya Nzambe, oyo ezali likabo monene koleka makabo nyonso ya Nzambe; mpo ezali na likabo moko oyo ezali monene koleka likabo ya lobiko te.

14 Solo, solo, nalobi epayi na yo, opambolami mpo na oyo osalaki; mpo olukaki koyeba uta na ngai, mpe tala, mbala mingi lokola otunaki ozwaki malako ya Molimo na ngai. Soki ezalaka bongo te, olingaki kokoma na esika wapi ozali na ntango oyo te.

15 Tala, oyebi ete olukaki koyeba uta na ngai mpe nangengisaki mayele na yo; mpe sikawa nayebisi yo makambo oyo ete okoka koyeba ete ongengisamaki na Molimo ya bosolo;

16 Iyo, nayebisi yo, ete okoka koyeba ete ezali na mosusu te longola se Nzambe oyo ayebi makanisi na yo mpe mikano ya motema na yo.

17 Nayebisi yo makambo oyo lokola litatoli epayi na yo—ete maloba yango to buku oyo ozalaki kokoma ezali solo.

18 Boye zala na etingia; tikala pembeni ya mosali na ngai Joseph, na bosembo, na makambo ya mpasi nyonso akoki kozala na yango mpo na ntina ya liloba.

19 Pamela ye na mabe na ye, mpe lisusu ndima mpamela na ye. Zala na bompikiliki; yeba kotia ndelo na nyonso; yeba komipekisa; zala na bompikiliki, bondimi, elikya mpe bolingani.

20 Tala, ozali Oliver, mpe nalobi epayi na yo na ntina ya mposa na yo; boye bombaka maloba oyo na motema na yo. Zala sembo mpe molende na kobombaka mitindo ya Nzambe, mpe nakozinga yo na maboko ya bolingo na ngai.

21 Tala, nazali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Nazali se ye moko oyo ayaki epayi ya baoyo ya ngai moko, mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te. Nazali pole oyo ezali kongenga kati na molili, mpe molili esosolaki yango te.

22 Solo, solo, nalobi epayi na yo, soki ozali na mposa ya litatoli mosusu, zongisa mayele na yo nsima na butu oyo wapi obelelaki epayi na ngai kati na motema na yo, ete okoka koyeba mpo na oyo etali bosolo ya makambo oyo.

23 Ekitisaki ngai kimia na mayele na yo mpo na oyo etali likambo yango te? Litatoli nini monene osengeli kozala na yango koleka oyo ewuti epayi ya Nzambe?

24 Mpe sikawa, tala, ozwaki litatoli; mpo soki nalobelaki yo makambo oyo moto moko te ayebi, ezwaki yo litatoli te?

25 Mpe, tala, napesi epayi na yo likabo moko, soki ozali na mposa na yango uta na ngai, mpo na kobongola, kutu lokola mosali na ngai Joseph.

26 Solo, solo, nalobi epayi na yo, ete ezali na masolo ya makomi oyo ezali na mingi ya nsango malamu na ngai, oyo mazongisamaki na ntina ya nkuna ya bato;

27 Mpe sikawa napesi yo motindo, ete soki ozali na mposa malamu—mposa ya kotia ebombelo ya biloko ya motuya mpo na yo moko na lola—bongo okosunga na kobimisaka na pole, na nzela ya likabo na yo, biteni oyo ya makomi na ngai oyo ebombamaki na ntina ya mabe.

28 Mpe sikawa, tala, napesi epayi na yo, mpe lisusu epayi ya mosali na ngai Joseph, bafungola ya likabo oyo, oyo ekobimisa mosala oyo na pole; mpe na monoko ya banzeneneke mibale to Misato likambo nyonso ekotiama.

29 Solo, solo, nalobi epayi na bino, soki babwaki maloba na ngai, mpe eteni oyo ya nsango malamu mpe ya mosala na ngai, bopambolami, mpo bakoki te kosala epayi na bino mingi koleka oyo basalaki epayi na ngai.

30 Mpe ata soki basali bino kutu lokola basalaki ngai, bopambolami, mpo bokofanda elongo na ngai na nkembo.

31 Kasi soki babwaki maloba na ngai te, oyo ekotiama na litatoli oyo ekopesama, bapambolami, mpe na ntango wana bokozala na bosepeli mpenza na mbuma ya misala na bino.

32 Solo, solo, nalobi epayi na bino, lokola nalobaki epayi ya bayekoli na ngai, wapi bato mibale to misato basangani esika moko na nkombo na ngai, mpo na oyo etali likambo songolo, tala, nakozala wana na katikati na bango—lokola mpe ezali ngai na katikati na bino.

33 Bobanga te kosala bolamu, bana mibali na ngai, mpo nyonso oyo bokolona, yango nde bokobuka; mpe boye, soki boloni bolamu, bokobuka bolamu mpo na lifuta na bino.

34 Boye, bobanga te, etonga moke; sala bolamu; tika ete mabele mpe lifelo bayokana mpo na kosalela bino makita mabe, mpo soki botongami likolo ya libanga ya ngai, bakoki kolonga te.

35 Tala, nazali kokweisa bino te; bokende na bino mpe bosumuka lisusu te; bosala na motema moko mosala oyo natindi bino.

36 Botalela ngai na makanisi na bino nyonso; botia ntembe te, bobanga te.

37 Botala mpota oyo etobolaki mopanzi na ngai, mpe lisusu bilembo ya nsete na maboko mpe makolo na ngai; bozala sembo, bobomba mitindo na ngai, mpe bokosangola libula ya bokonzi ya lola. Amene.

Bimisa na lokasa