Makomi
Malongi mpe Mayokani 93


Eteni 93

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 6, sanza ya mitano ya mobu 1833.

1–5, Nyonso oyo bazali sembo bakomona Nkolo; 6–18, Yoane apesaki litatoli ete Mwana ya Nzambe akolaki uta ngolu na ngolu kino Ye azwaki litondi ya nkembo ya Tata; 19–20, Basembo, oyo bazali kokola uta ngolu na ngolu, bakozwa lisusu litondi na Ye; 21–22, Baoyo babotami na nzela ya Klisto bazali nde Eklezia ya Babotami ya yambo; 23–28, Klisto azwaki litondi ya bosolo nyonso, mpe na nzela ya botosi moto akoki kosala mpe lokola; 29–32, Na ebandeli moto azalaki na Nzambe; 33–35, Biloko ya bokeli ezali seko, mpe moto akoki kozwa litondi ya bosepeli kati na Bosekwi; 36–37, Nkembo ya Nzambe ezali mayele; 38–40, Bana bazali na ekweyeli te na miso ya Nzambe mpo na bosikoli ya Klisto; 41–53, Bandeko bakambi batindami kotia mabota na bango na molongo.

1 Solo, boye elobi Nkolo: Ekosalema ete molimo nyonso oyo akotika masumu na ye mpe akoya epayi na ngai, mpe akobenga nkombo na ngai, mpe akotosa mongongo na ngai, mpe akobomba mitindo na ngai, akomona elongi na ngai mpe akoyeba ete nazali;

2 Mpe ete nazali pole ya solo oyo engengisaka moto nyonso oyo ayei kati na mokili;

3 Mpe ete nazali na Tata, mpe Tata na ngai, mpe Tata mpe ngai tozali se moko—

4 Tata mpo apesaki ngai ndambo ya litondi na ye, mpe Mwana mpo nazalaki na mokili mpe nakomisaki mosuni tabelenakele na ngai, mpe nafandaki na kati ya bana ya bato.

5 Nazalaki kati na mokili mpe nazwaki uta na Tata na ngai, mpe misala na ye mimonisamaki mpenza polele.

6 Mpe Yoane amonaki mpe atatolaki mpo na oyo etali mobimba ya nkembo na ngai, mpe mobimba ya litatoli ya Yoane ekobimisama awa nsima.

7 Mpe natatolaki, kolobaka: Namonaki nkembo na ye, ete azalaki na ebandeli, liboso ete mokili ezala;

8 Boye, na ebandeli Liloba ezalaki, mpo azalaki Liloba, kutu ntoma ya lobiko—

9 Pole mpe Mosikoli ya mokili; Molimo ya bosolo, oyo moyaki kati na mokili, mpo mokili mosalemaki na ye, mpe na ye ezalaki bomoi ya bato mpe pole ya bato.

10 Mikili misalemaki na ye; bato basalemaki na ye; biloko nyonso esalemaki na ye, mpe na nzela na ye, mpe uta na ye.

11 Mpe ngai, Yoane, natatoli ete natalaki nkembo na ye, lokola nkembo ya Mobotami se Moko ya Tata, atonda na ngolu mpe bosolo, kutu Molimo ya bosolo, oyo moyaki mpe mofandaki kati na mosuni, mpe ezalaki kofanda na kati na biso.

12 Mpe ngai, Yoane, namonaki ete azwaki litondi yango uta na ebandeli te, kasi azwaki ngolu na ngolu;

13 Mpe azwaki litondi uta na ebandeli te, kasi akobaki kokola uta ngolu na ngolu, kino azwaki litondi;

14 Mpe boye abiangamaki Mwana ya Nzambe, mpo azwaki litondi uta na ebandeli te.

15 Mpe ngai, Yoane, natatoli, mpe tala, lola efungwamaki, mpe Molimo Mosantu ekitaki likolo na ye na lolenge ya ebenga, mpe afandaki likolo na ye, mpe mongongo moko mobimaki uta na lola kolobaka: Oyo azali Mwana molingami na ngai.

16 Mpe ngai, Yoane, natatoli ete azwaki litondi ya nkembo ya Tata;

17 Mpe azwaki nguya nyonso, ezala na lola soki te na mabele, mpe nkembo ya Tata ezalaki na ye, mpo afandaki na ye.

18 Mpe ekosalema, ete soki bozali sembo bokozwa litondi ya litatoli ya Yoane.

19 Napesi maloba oyo epayi na bino ete bokoka kososola mpe koyeba lolenge nini kokumbamela, mpe nini oyo bokumbamela, ete bokoka koya epayi ya tata na nkombo na ngai, mpe na bokokisi ya ntango bokoka kozwa litondi na ye.

20 Mpo soki bobateli mitindo na ngai bokozwa ndambo ya litondi na ye, mpe bokokembelama na ngai lokola nazali na Tata; boye, nalobi epayi na bino, bokozwa ngolu na ngolu.

21 Mpe sikawa, solo nalobi epayi na bino, nazalaki na ebandeli elongo na Tata, mpe nazali Mobotami ya yambo;

22 Mpe baoyo nyonso bazali bana babotami na nzela na ngai bazali bakaboli ya nkembo ya se ngai moko oyo, mpe bazali eklezia ya Mobotami ya yambo.

23 Bozalaki mpe lokola na ebandeli elongo na Tata; oyo azali Molimo, kutu Molimo ya bosolo;

24 Mpe bosolo ezali boyebi ya makambo lokola ezali, mpe lokola ezalaki, mpe lokola ezali koya;

25 Mpe nyonso oyo ezali mingi to moke koleka oyo, ezali molimo ya oyo wana moto mabe oyo azali mokosi uta na ebandeli.

26 Molimo ya bosolo ezali ya Nzambe. Nazali Molimo ya bosolo, mpe Yoane atatolaki mpo na oyo etali ngai, kolobaka: Azwaki litondi ya bosolo, iyo, kutu ya bosolo nyonso;

27 Mpe moto moko te azwi litondi longola se soki abombi mitindo na ye.

28 Ye oyo akobomba mitindo na ye akozwa bosolo mpe pole, kino akembelami na bosolo mpe ayebi makambo nyonso.

29 Moto azalaki mpe lokola na ebandeli elongo na Nzambe. Mayele, to pole ya bosolo, ekelamaki te soki mpe esalemaki te, zambi makoki mpe te.

30 Bosolo nyonso ezali nsomi kati na molongo wana wapi Nzambe asilaki kotia yango, bonsomi mpo na kosala yango moko, lokola ezali mayele nsomi lisusu; soki bongo te bozali ezali te.

31 Tala, nguya ya boponi ya moto ezali awa, mpe bokwei ya moto ezali awa, mpo oyo wana ezalaki uta na ebandeli emonisami polele mpenza epayi na bango, mpe bazali kondima pole te.

32 Mpe moto nyonso oyo kani molimo mozwi pole te azali na nse ya bokweisami.

33 Mpo moto azali molimo. Biloko ya bokeli ezali seko, mpe molimo mpe eloko ya bokeli ya kokangama libela, bizwi litondi ya bosepeli;

34 Mpe ntango bikabwani, moto akoki kozwa litondi ya bosepeli te.

35 Biloko ya bokeli ezali tabelenakele ya Nzambe; iyo, bato bazali tabelenakele ya Nzambe, kutu batempelo; mpe tempelo nyonso oyo ebebisami, Nzambe akobebisa tempelo wana.

36 Nkembo ya Nzambe ezali mayele, to, na maloba mosusu, pole mpe bosolo.

37 Pole mpe bosolo etikaka oyo moko ya mabe.

38 Molimo moko moko ya moto ezalaki na ekweyeli te na ebandeli; mpe ntango Nzambe asikosikolaki bato uta na bokwei, bato bakomaki lisusu, na ezalela ya bomwana na bango, kozangaka ekweyeli liboso ya Nzambe.

39 Mpe oyo wana ya nkuna ayei mpe alongoli pole mpe bosolo uta na bana ya bato, na nzela ya bozangi botosi, mpe na nzela ya momeseno ya batata na bango.

40 Kasi natindaki bino kobokola bana na bino engebene na pole mpe bosolo.

41 Kasi solo nalobi epayi na yo, mosali na ngai Frederick G. Williams, okobaki se kozala na nse ya bokweisami boye;

42 Oteyaki bana na yo pole mpe bosolo te, engebene na mitindo; mpe oyo wana ya nkuna azali na nguya, na ntango oyo, likolo na yo, mpe oyo ezali ntina ya mitungisi na yo.

43 Mpe sikawa napesi epayi na yo motindo moko oyo—soki okolinga kokangolama osengeli kotia molongo kati na ndako na yo, mpo ezali na biloko mingi oyo ezali alima te kati na ndako na yo.

44 Solo, nalobi epayi ya mosali na ngai Sidney Rigdon, ete mpo na makambo mosusu abombaki mitindo te mpo na oyo etali bana na ye; boye, liboso tiaka molongo kati na ndako na yo.

45 Solo, nalobi epayi ya mosali na ngai Joseph Smith Mwana, to na maloba mosusu, nakobianga bino baninga, mpo bozali baninga na ngai, mpe bokozwa libula ya kosangola elongo na ngai—

46 Nazali kobianga bino basali mpo na ntina ya mokili, mpe bozali basali na bango mpo na ntina na ngai—

47 Mpe sikawa, solo nalobi epayi ya Joseph Smith Mwana—Obombaki mitindo na ngai te, mpe osengeli mpenza kozala na mpamela liboso ya Nkolo;

48 Libota na yo esengeli mpenza koyambola mpe kotika misala mosusu, mpe kotia bokebi mingi na maloba na yo, soki te bakolongolama uta na esika na bango.

49 Oyo nalobi epayi ya moko nalobi epayi ya nyonso; bosambela ntango nyonso mbele oyo moko wana ya nkuna azwa nguya likolo na bino, mpe alongola yo uta na esika na bino.

50 Mosali na ngai Newel K. Whitney lisusu, episikopo moko ya eklezia na ngai, asengelaki kopesama etumbu, mpe kotia molongo kati na libota na ye, mpe komona ete bazali na molende mpe bamipesi mingi na misala ya ndako, mpe bazali kosambela ntango nyonso, soki te bakolongolama uta na esika na bango.

51 Sikawa, nalobi epayi na bino, baninga na ngai, botika mosali na ngai Sidney Rigdon akende na mobembo na ye, mpe asala noki, mpe lisusu asakola mobu ya ngolu ya Nkolo, mpe nsango malamu ya lobiko, lokola nakopesa ye makoki ya koloba; mpe na losambo na bino ya bondimi na motema moko nakosunga ye.

52 Mpe tika ete basali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Frederick G. Williams lisusu basala noki, mpe ekopesama na bango kutu engebene na losambo ya bondimi; mpe mbala mingi lokola bokobomba maloba na ngai, bokoyokisama nsoni te kati na mokili oyo, soki na mokili ekoya mpe te.

53 Mpe, solo nalobi epayi na bino, ete ezali bolingi na ngai ete bosala noki mpo na kobongola makomi na ngai, mpe mpo na kozwa boyebi ya mambi ya kala, mpe ya bikolo, mpe ya babokonzi, ya mitindo ya Nzambe mpe mibeko ya bato, mpe nyonso oyo mpo na lobiko ya Siona. Amene.

Bimisa na lokasa