Makomi
Mose 6


Mokapo 6

(Sanza ya zomi na moko–Sanza ya zomi na mibale 1830)

Nkona ya Adama esimbi buku ya bokundoli—Bana na ye ya sembo bateyi boyamboli—Nzambe amimonisi Ye moko epayi ya Enoka—Enoka ateyi nsango malamu—Mwango ya lobiko mobimisamaki na Adama—Azwaki libatisi mpe bonganganzambe.

1 Mpe Adama ayokaki mongongo ya Nzambe, mpe abiangaki bana mibali na ye mpo na koyambola.

2 Mpe Adama ayebaki lisusu mwasi na ye, mpe abotaki mwana mobali moko, mpe abiangaki ye na nkombo ya Sete. Mpe Adama akembelaki nkombo ya Nzambe; mpo alobaki: Nzambe apesi ngai nkona mosusu, na esika ya Abele, oyo Kaina abomaki.

3 Mpe Nzambe amimonisaki ye moko epayi ya Sete, mpe atombokaki te, kasi apesaki yoko mbeka endimama, na lolenge ya ndeko na ye ya mobali Abele. Mpe na ye nde mwana mobali abotamaki lisusu, mpe abiangaki ye na nkombo ya Enosa.

4 Mpe na ntango wana bato oyo babandaki kobelela nkombo ya Nkolo, mpe Nkolo apambolaki bango;

5 Mpe buku ya bokundoli esimbamaki, kati na oyo wapi bakomaki, na lokota ya Adama, mpo na mingi lokola babelelaki epayi ya Nzambe epesamaki kokoma na molimo ya bofuli;

6 Mpe na nzela ya bango bana na bango bateyamaki kotanga mpe kokoma, mpe bazalaki na lokota oyo ezalaki peto mpe na mbindo te.

7 Sikawa Bonganganzambe se moko oyo, boye ezalaki na ebandeli, ekozala lisusu na nsuka ya mokili.

8 Sikawa Adama alobaki lisakoli oyo, wana efulamaki ye na Molimo Mosantu, mpe mambi ma kala ya libota ya bana ya Nzambe bobatelamaki. Mpe oyo ezalaki buku ya bankola ya Adama, kolobaka: Na mokolo oyo Nzambe akelaki moto, na elilingi ya Nzambe nde akelaki ye;

9 Na elilingi ya nzoto na ye moko, mobali mpe mwasi, nde ekelaki ye bango, mpe apambolaki bango, mpe abiangaki bango na nkombo ya Adama, na mokolo yango ntango bakelamaki mpe bakomaki milimo na bomoi na mboka na etielo ya makolo ya Nzambe.

10 Mpe Adama awumelaki mibu monkama na ntuku misato, mpe abotaki mwana mobali na bokokani na ye moko, na elilingi ya ye moko, mpe abiangaki ye na nkombo ya Sete.

11 Mpe mikolo ya Adama, nsima ya kozwa Sete, mizalaki ya mibu nkama mwambe, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi mingi;

12 Mpe mikolo nyonso Adama awumelaki na bomoi mizalaki ya mibu nkama libwa mpe ntuku misato, mpe akufaki.

13 Sete awumelaki mibu monkama moko na mitano, mpe abotaki Enosa, mpe asakolaki na mikolo na ye nyonso, mpe ateyaki mwana mobali na ye Enosa kati na banzela ya Nzambe; yango wana Enosa asakolaki lisusu.

14 Mpe Sete awumelaki na bomoi, nsima ya kobota Enosa, mibu nkama mwambe na nsambo, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi mingi.

15 Mpe bana ya bato bazalaki mingi likolo ya etando nyonso ya mboka. Mpe na mikolo wana Satana azalaki na mpifo mingi na kati ya bato, mpe asalaki makasi kati na mitema na bango; mpe uta wana kokende liboso bitumba mpe bosopi makila eyaki; mpe loboko ya moto ebundisaki ndeko ya ye moko ya mobali, na kopesaka liwa, mpo na misala ya nkuku, kolukaka nguya.

16 Mpe mikolo nyonso ya Sete mizalaki mibu nkama libwa mpe zomi na mibale, mpe akufaki.

17 Mpe Enosa awumelaki mibu ntuku libwa, mpe abotaki Kenana. Mpe Enosa mpe montika ya bato ya Nzambe babimaki uta na mboka, oyo babiangaki Suloni, mpe bafandaki na mboka yoko ya elaka, oyo abiangaki na nkombo ya mwana mobali na ye moko, oyo apesaki nkombo ya Kenana.

18 Mpe Enosa awumelaki na bomoi, nsima ya kobota Kenana, mibu nkama mwambe mpe zomi na mitano, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi mingi. Mpe mikolo nyonso ya Enosa mizalaki mibu nkama libwa mpe mitano, mpe akufaki.

19 Mpe Kenana awumelaki na bomoi mibu ntuku sambo, mpe abotaki Mahalalele; mpe Kenana awumelaki nsima ya kobota Mahalalele mibu nkama mwambe mpe ntuku minei, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi. Mpe mikolo nyonso ya Kenana mizalaki mibu nkama libwa mpe zomi, mpe akufaki.

20 Mpe Mahalalele awumelaki na bomoi mibu ntuku motoba na mitano, mpe abotaki Yelede; mpe Mahalalele awumelaki, nsima ya kobota Yelede, mibu nkama mwambe mpe ntuku misato, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi. Mpe mikolo nyonso ya Mahalalele mizalaki mibu nkama mwambe mpe ntuku libwa na mitano, mpe akufaki.

21 Mpe Yelede awumelaki na bomoi mibu monkama mpe ntuku motoba na mibale, mpe abotaki Enoka; mpe Yelede awumelaki, nsima ya kobota Enoka, mibu nkama mwambe, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi. Mpe Yelede ateyaki Enoka kati na banzela nyonso ya Nzambe.

22 Mpe oyo ezali mambi ma kala ya libota ya bana mibali ya Adama, oyo azalaki mwana mobali ya Nzambe, na nani oyo Nzambe, ye moko, asololaki.

23 Mpe bazalaki bateyi ya bosembo, mpe balobaki mpe basakolaki, mpe babelelaki bato nyonso, epayi nyonso, ete bayambola; mpe bondimi boteyamaki na bana ya bato.

24 Mpe esalemaki ete mikolo nyonso na Yelede mizalaki mibu nkama libwa mpe ntuku motoba na mibale, mpe akufaki.

25 Mpe Enoka awumelaki mibu ntuku motoba na mitano, mpe abotaki Metusela.

26 Mpe esalemaki ete Enoka akendaki mobembo na mboka, na kati ya bato; mpe wana ezalaki ye na mobembo, Molimo ya Nzambe ekitaki uta na lola, mpe mofandaki likolo na ye.

27 Mpe ayokaki mongongo uta na lola, kolobaka: Enoka, mwana mobali na ngai, sakola na bato oyo, mpe loba epayi na bango—Boyambola, mpo boye elobi Nkolo: Nazali na nkanda na bato oyo, mpe nkanda na ngai ya makasi epeli na bango; mpo mitema na bango esili kokoma makasi, mpe matoyi na bango makomi na bozito mpo na koyoka, mpe miso na bango makoki komona mosika te;

28 Mpe mpo na nkola mingi oyo, uta kala mokolo oyo nakelaki bango, basili kopengwa, mpe bawanganaki ngai, mpe balukaki toli ya bango moko na molili; mpe na bonsomo na bango moko basali mwango ya koboma, mpe babombaki mitindo te, oyo napesaki epayi ya tata na bango, Adama.

29 Yango wana, bamilapaki ndai ya lokuta, mpe, mpo na ndai na bango, basili komema liwa likolo ya bango moko; mpe lifelo nde nasili kolengela mpo na bango, soki bayamboli te;

30 Mpe oyo ezali mokano, oyo natindaki na ebandeli ya mokili, kobima uta na monoko na ngai moko, uta ebandeli ya mokili, mpe nakamataki mokano yango, na minoko ya basali na ngai, batata na bino, kutu lokola mosengeli kokende na mokili, kino nsuka na yango.

31 Mpe ntango Enoka ayokaki maloba oyo, angumbamaki ye moko na mabele, liboso ya Nkolo, mpe alobaki liboso ya Nkolo, kolobaka: Mpo na nini ezali ete ngai nazwa ngolu na miso na yo, mpe nazali se elenge mobali, mpe bato nyonso bayini ngai; mpo nazali kokukuma na maloba; mpo na nini ezali ngai mosali na yo?

32 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Kende mpe sala lokola natindaki yo, mpe moto moko te akoki kotobola yo. Fungola monoko na yo, mpe mokotondisama, mpe nakopesa yo makoki ya koloba, mpo mosuni nyonso ezali kati na maboko na ngai, mpe nakosala lokola ebongeli ngai malamu.

33 Loba epayi ya bato oyo: Bopona na mokolo ya lelo, kosalela Nkolo Nzambe oyo akelaki bino.

34 Tala Molimo na ngai mozali likolo na yo, yango wana maloba na yo nyonso nde nakolongisa; mpe bangomba ekolimwa liboso na yo, mpe bibale bikopengolama uta na botamboli na yango; mpe okotikala na ngai, mpe ngai na yo; boye tambola elongo na ngai.

35 Mpe Nkolo asololaki na Enoka, mpe alobaki epayi na ye: Pakola miso na yo na potopoto ya mabele, mpe sukola mango, mpe okomona. Mpe asalaki bongo.

36 Mpe atalaki milimo oyo Nzambe akelaki; mpe atalaki lisusu biloko oyo ezalaki te komonana na liso ya bomoto; mpe uta ntango wana kokende liboso nde maloba ebimaki bipayi na bipayi na mboka: Nkolo abimisi momoni moko mpo na bato na ye.

37 Mpe esalamaki ete Enoka akendaki na mboka, na kati ya bato, kotelamaka likolo ya bangomba mpe bisika ya likolo, mpe agangaki na mongongo makasi, kotatola na kofundaka misala na bango; mpe bato nyonso batukamaki mpo na ye.

38 Mpe babimaki mpo na koyoka ye, likolo ya bisika ya likolo, kolobaka epayi ya babateli biema: Botikala awa mpe bobatela biema, wana ezali biso kokende kuna kotala momoni, mpo azali kosakola, mpe ezali na likambo ya kokamwa kati na mboka; moto ya zamba moko asili koya na kati na biso.

39 Mpe esalamaki ete ntango bayokaki ye, moto moko te atiaki maboko likolo na ye; mpo bobangi eyaki likolo na bango oyo bayokaki ye; mpo azalaki kotambola elongo na Nzambe.

40 Mpe moto moko ayaki epayi na ye, oyo kani nkombo ezalaki Mayiza, mpe alobaki epayi na ye: Yebisa biso polele nani ozali, mpe outi wapi?

41 Mpe alobaki epayi na bango: Nawuti na mboka ya Kenana, mboka ya batata na ngai, mboka moko ya bosembo kino mokolo oyo. Mpe tata na ngai ateyaki ngai kati na banzela nyonso ya Nzambe.

42 Mpe esalamaki, lokola nazalaki na mobembo uta na mboka ya Kenana, epayi na mbu ya esti, natalaki limoni; mpe tala, namonaki lola, mpe Nkolo alobaki na ngai, mpe apesaki ngai motindo; yango wana, mpo na ntina oyo, ntina ya kobatela motindo, nabimisi maloba oyo.

43 Mpe Enoka akobaki maloba na ye, kolobaka: Nkolo oyo alobaki na ngai, se ye moko oyo azali Nzambe ya lola, mpe azali Nzambe na ngai, mpe Nzambe na bino, mpe bozali bandeko na ngai, mpe mpo na nini ezali bino moko komipesa toli, mpe kowangana Nzambe ya lola?

44 Lola ye nde asalaki yango; mabele ezali etielo na ye ya makolo; mpe moboko na yango ezali ya ye. Tala, ye nde atiaki yango, abimisaki bibele likolo ya etando na yango.

45 Mpe liwa eyaki likolo ya batata na biso; nzokande toyebi bango, mpe tokoki kowangana te, mpe kutu moto ya yambo uta na kati ya banso toyebi, kutu Adama.

46 Mpo tokomaki buku ya makundoli na kati na biso, engebene na emekoleli epesamaki na mosapi ya Nzambe; mpe epesami na lokota na biso moko.

47 Mpe lokola Enoka abimisaki maloba ya Nzambe, bato balengaki, mpe bakokaki kotelema liboso na ye te.

48 Mpe alobaki epayi na bango: Tozali, mpo ete Adama akweyaki; mpe liwa eyaki na nzela ya bokwei na ye; mpe tokomisami bakaboli ya mpasi ya lisuma.

49 Tala Satana ayaki na kati ya bana ya bato, mpe asengini bango ete bakumbamela ye; mpe bato basili kokoma bato ya mosuni, bayokeli bilengi, mpe bato ya zabulu, mpe bapekisami komona Nzambe.

50 Kasi Nzambe asili koyebisa epayi ya batata na biso ete bato nyonso basengeli koyambola.

51 Mpe abiangaki tata na biso Adama na mongongo na ye moko, kolobaka: Nazali Nzambe; Nasalaki mokili, mpe bato liboso ete bazala na mosuni.

52 Mpe alobaki lisusu epayi na ye: Soki okobaluka epayi na ngai, mpe koyoka mongongo na ngai, mpe kondima, mpe koyambola uta na masumu na yo nyonso, mpe kobatisama, kutu na mai, na nkombo ya Mwana Mobotami se Moko na ngai, oyo atonda na ngolu mpe bosolo, oyo azali Yesu Klisto, nkombo bobele se moko oyo ekopesama na nse ya lola, na nzela ya oyo wapi lobiko ekoya epayi na bana ya bato, okozwa likabo ya Molimo Mosantu, mpe senga biloko nyonso na nkombo na ye, mpe oyo nyonso okosenga, ekopesama na yo.

53 Mpe tata na biso Adama alobaki epayi ya Nkolo, mpe alobaki: Mpo na nini ezali ete bato basengeli koyambola mpe kobatisama na mai? Mpe Nkolo alobaki epayi ya Adama: Tala nalimbisaki bobuki mobeko na bino na Elanga ya Edene.

54 Tala ntina maloba mapanzanaki epayi na epayi na kati ya bato, ete Mwana ya Nzambe amikabaki mpo na elindo ya ebandeli, wapi masumu ya baboti makoki te koyanolama likolo ya mitu ya bana, mpo ete bazali mobimba peto uta na bokeli ya mokili.

55 Mpe Nkolo alobaki na Adama, kolobaka: Mbala mingi lokola bana na yo babotami kati na lisumu, kutu ezali bongo ntango babandi kokola, lisumu libotami na mitema na bango, mpe bazali koyeba komeka bololo, ete bayeba ntalo ya bolamu.

56 Mpe epesami epayi na bango kososola bolamu uta na mabe; yango wana bazali basali mpo na bango moko, mpe napesaki bino mobeko mpe motindo mosusu.

57 Yango wana teya yango epayi ya bana na yo, ete bato nyonso, epayi nyonso, basengeli koyambola, to bakoki soki moke te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe, mpo eloko moko te ya mbindo ekoki kofanda kuna, to kofanda liboso na ye; mpo, na lokota ya Adama, Moto ya Bosantu ezali nkombo na ye, mpe nkombo ya Mobotami se Moko na ye ezali Mwana ya Moto, kutu Yesu Klisto, Mosambisi ya sembo, oyo akoya na midi ya ntango.

58 Boye napesi epayi na yo motindo moko, koteya biloko oyo polele epayi ya bana na yo, kolobaka:

59 Ete na ntina ya bobuki mobeko bokwei eyaki, bokwei boye ememi kufa, mpe na ndenge bobotamaki kati na mokili na mai, mpe makila, mpe molimo, oyo nasalaki, mpe bongo uta na putulu bokomaki molimo na bomoi, na boye bosengeli kobotama lisusu kati na bokonzi ya lola, na mai, mpe na Molimo, mpe bosukolama na makila, mpenza makila ya Mobotami se Moko na ngai; ete bokoka kosantisama uta na lisumu nyonso, mpe kosepela na maloba ya bomoi ya seko kati na mokili oyo, mpe bomoi ya seko kati na mokili ezali koya, mpenza nkembo ezanga kufa;

60 Mpo ete na nzela ya mai bobateli motindo; na nzela ya Molimo bolongisami, mpe na nzela ya makila bosantisami;

61 Boye epesami kotikala na bino; litatoli uta na lola; Molendisi; biloko ya kimia ya nkembo ya kozanga kufa; bosolo ya biloko nyonso; oyo epesaka biloko nyonso bomoi, oyo ekomisaka biloko nyonso na bomoi; oyo eyebi biloko nyonso, mpe ezali na nguya nyonso engebene na bwania, boboto, bosolo, boyengebene, mpe bosambisi.

62 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na bino: Oyo ezali mwango ya lobiko mpo na bato nyonso, na nzela ya makila ya Mobotami se Moko na ngai, oyo akoya na midi ya ntango.

63 Mpe tala, makambo nyonso ezali na bokokani na yango, mpe biloko nyonso bikelami mpe esalemi mpo na kotatola na ntina na ngai, ezala biloko oyo ezali mpo na ntango, mpe biloko oyo ezali ya molimo; biloko oyo ezali na lola likolo, mpe biloko oyo ezali likolo ya mabele, mpe biloko oyo ezali kati na mabele, mpe biloko oyo ezali na nse ya mabele, ezala likolo mpe na nse: biloko nyonso ezali kotatola na ntina na ngai.

64 Mpe esalamaki, ntango Nkolo asilaki koloba na Adama, tata na biso, ete Adama agangaki epayi ya Nkolo, mpe akambamaki mosika na Molimo ya Nkolo, mpe azindisamaki na mai, mpe alalisamaki na nse ya mai, mpe abimisamaki uta na mai.

65 Mpe boye abatisamaki, mpe Molimo ya Nzambe ekitaki likolo na ye, mpe boye abotamaki na Molimo, mpe akomaki na bomoi na moto ya kati na ye.

66 Mpe ayokaki mongongo kobima uta na lola, kolobaka: Obatisami na moto, mpe na Molimo Mosantu. Oyo ezali litatoli ya Tata, mpe ya Mwana, uta sikawa mpe libela na libela;

67 Mpe ozali na molongo na ye oyo azalaki na ebandeli ya mikolo soki mpe nsuka ya mibu te, uta na boseko bonso na boseko bonso.

68 Tala, ozali moko kati na ngai, mwana mobali ya Nzambe; mpe boye nde banso bakoki kokoma bana ya ngai. Amene.

Bimisa na lokasa