Makomi
Mose 7


Mokapo 7

(Sanza ya zomi na mibale 1830)

Enoka ateyi, akambi bato, mpe alongoli bangomba—Engumba ya Siona etongami—Enoka amoni na mosika boyei ya Mwana ya Moto, mbeka ya bomikabi na Ye, mpe bosekwi ya Basantu—Amoni na mosika Bozongisi, Bosangani, Boyei ya Mibale, mpe bozongi ya Siona.

1 Mpe esalemaki ete Enoka akobaki na liteya na ye, kolobaka: Tala, tata na biso Adama ateyaki makambo oyo, mpe mingi bandimaki mpe bakomaki bana ya Nzambe, mpe mingi bandimaki te, mpe bakufaki na masumu na bango, mpe bazali kozela kati na bobangi, kati na monioko, mpo na bosiliki makasi ya nkele ya Nzambe oyo ekosopana likolo na bango.

2 Mpe uta na ntango wana kokende liboso Enoka abandaki kosakola, kolobaka epayi ya bato, ete: Wana ezalaki ngai na mobembo, mpe etelemaki ngai likolo ya esika ya Mahuza, mpe nabelelaki epayi ya Nkolo, mongongo moko moyaki uta na lola, kolobaka—Baluka, mpe mata likolo ya ngomba ya Simeona.

3 Mpe esalemaki ete nabalukaki mpe namataki likolo ya ngomba; mpe lokola natelemaki likolo ya ngomba, namonaki lola efungolami, mpe nalatisamaki na nkembo;

4 Mpe namonaki Nkolo; mpe atelemaki liboso na ngai, mpe asololaki na ngai, kutu lokola moto moko asololaka na moto mosusu, miso na miso; mpe alobaki na ngai: Tala, nakolakisa epayi na yo mokili na ntaka ya bankola mingi.

5 Mpe esalamaki ete namonaki lobwaku ya Suma, mpe tala, motango monene ya bato oyo bafandaka na biema, oyo bazalaki bato ya Suma.

6 Mpe lisusu Nkolo alobaki epayi na ngai: Tala; mpe natalaki na ngambo ya nordi, mpe namonaki bato ya Kanana, oyo bafandaka na biema.

7 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Sakola; mpe nasakolaki, kolobaka: Tala bato ya Kanana, baoyo bazali mingi, bakobima babongisami mpo na etumba na bato ya Suma, mpe bakoboma bango na lolenge ete bakosilisama nie; mpe bato ya Kanana bakomikabola bango moko na mboka, mpe mboka ekokawuka mpe ekobota mbuma te, mpe bato basusu bakofanda kuna te longola se bato ya Kanana;

8 Mpo tala, Nkolo akolakela mboka mabe na molunge makasi, mpe bokawuki boma ekokoba libela; mpe ezalaki na mposo moindo oyo eyaki likolo ya bana nyonso ya Kanana, ete bayinaki bango na kati ya bato nyonso.

9 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi na ngai: Tala; mpe natalaki, mpe namonaki mboka ya Saloni, mpe mboka ya Enoka, mpe mboka ya Omina, mpe mboka ya Eni, mpe mboka ya Semi, mpe mboka ya Hanela, mpe mboka ya Ananiya, mpe bafandi nyonso na yango;

10 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Kende epayi ya bato oyo, mpe loba na bango—Boyambola, mbele nabima mpe nabeta bango na bolakeli mabe, mpe bakufa.

11 Mpe apesaki epayi na ngai motindo moko ete nasengeli kobatisa na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, oyo atonda na ngolu mpe bosolo, mpe ya Molimo Mosantu, oyo apesaka litatoli ya Tata mpe ya Mwana.

12 Mpe esalemaki ete Enoka akobaki kobianga bato nyonso, longola se soki bazalaki bato ya Kanana, mpo na koyambola;

13 Mpe bondimi ya Enoka ezalaki bongo monene ete akambaki bato ya Nzambe, mpe banguna na bango bayaki kobundisa bango; mpe alobaki liloba ya Nkolo, mpe mabele malengaki, mpe bangomba elimwaki, kutu engebene na motindo na ye; mpe bibale ya mai bibalukaki uta na nzela na yango; mpe koganga ya bankosi eyokanaki uta na esobe; mpe bikolo nyonso ebangaki mingi, liloba ya Enoka ezalaki na nguya mingi, mpe ya monene mpenza ezalaki nguya ya lokota oyo Nzambe asilaki kopesa ye.

14 Mabele ebimaki kuna lisusu uta na mozindo ya mbu, mpe bobangi ya banguna ya bato ya Nzambe ezalaki monene mpenza, ete bakimaki mpe batelemaki na mosika mpe bakendaki likolo ya mabele oyo ebimaki uta na mozindo ya mbu.

15 Mpe bibuki ya bato ya mboka, lisusu, batelemaki mosika; mpe bolakeli mabe esimbaki bato nyonso oyo babundaki na Nzambe;

16 Mpe uta ntango wana kokende liboso bitumba mpe bosopi makila ezalaki na kati ya bango; kasi Nkolo ayaki mpe afandaki na bato na ye, mpe bafandaki kati na bosembo.

17 Bobangi ya Nkolo ezalaki likolo ya bikolo nyonso, nkembo ya Nkolo ezalaki monene, oyo ezalaki likolo ya bato na ye. Mpe Nkolo apambolaki mboka, mpe bapambolamaki likolo ya bangomba, mpe likolo ya bisika ya likolo, mpe bafulukaki.

18 Mpe Nkolo abiangaki bato na ye Siona, mpo bazalaki motema moko mpe mayele moko, mpe bafandaki kati na bosembo; mpe bazalaki na mobola kati na bango te.

19 Mpe Enoka akobaki mateya na ye kati na bosembo epayi ya bato ya Nzambe. Mpe esalemaki na mikolo na ye, ete atongaki engumba moko oyo ebiangamaki Engumba ya Bosantu, kutu Siona.

20 Mpe esalemaki ete Enoka asololaki na Nkolo; mpe alobaki epayi ya Nkolo: Solo mpenza Siona ekofanda na bokengi libela na libela. Kasi Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Siona nde napamboli, kasi nalakeli montika ya bato mabe.

21 Mpe esalemaki ete Nkolo alakisaki Enoka bafandi nyonso ya mabele; mpe amonaki, mpe tala, Siona, na botamboli ya ntango, ekamatanaki likolo na lola. Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Tala efandeli na ngai ya libela.

22 Mpe Enoka lisusu amonaki montika ya bato oyo bazalaki bana mibali ya Adama; mpe bazalaki bosangisi ya nkona nyonso ya Adama longola se nkona ya Kaina, mpo nkona ya kaina ezalaki mwindo, mpe ezalaki na esika te na kati ya bango.

23 Mpe nsima ya wana Siona ekamatanaki na lola, Enoka amonaki, mpe tala, bikolo nyonso ya mabele ezalaki liboso na ye;

24 Mpe nkola na nkola eyaki; mpe Enoka azalaki likolo mpe atombwamaki likolo, kutu na ntolo ya Tata, mpe ya Mwana ya Moto; mpe tala, nguya ya Satana ezalaki likolo ya etando nyonso ya mabele.

25 Mpe amonaki banjelu kokita uta na lola; mpe ayokaki mongongo moko kolobaka: Lisuma, lisuma ezala epayi ya bafandi ya mabele.

26 Mpe amonaki Satana; mpe azalaki na moniololo moko monene na loboko na ye, mpe mozipaki etando mobimba ya mabele na molili; mpe atalaki likolo mpe asekaki, mpe banjelu na ye basepelaki.

27 Mpe Enoka amonaki banjelu kokita uta na lola, kopesaka litatoli ya Tata mpe Mwana; mpe Molimo Mosantu akitaki likolo ya mingi, mpe bakamatamaki likolo na banguya ya lola kati na Siona.

28 Mpe esalemaki ete Nzambe ya lola atalaki likolo ya montika ya bato, mpe alelaki; mpe Enoka atatolaki yango, kolobaka: Ezali boni ete lola elela, mpe esopa pinzoli lokola mvula likolo ya bangomba?

29 Mpe Enoka alobaki epayi ya Nkolo: Ezali boni ete okoki kolela, mpo toyebi ete ozali mosantu, mpe oyo uta boseko bonso na boseko bonso?

30 Mpe soki ekokaki kosalema ete moto akoka kotanga biteni ya mike mike ya mabele, iyo, bankoto ya mabele lokola oyo, ebandeli ya motango ya bokeli na yo ekokaki kozala te; mpe bilamba ya ekuke na yo ezali se ya kokitisa; mpe nzokande ozali kuna, mpe ntolo na yo ezali kuna; mpe lisusu ozali alima; otonda na boboto mpe ozali malamu libela;

31 Mpe okamataki Siona na ntolo na yo moko, uta na bikelamo na yo nyonso, uta boseko bonso na boseko bonso; mpe eloko moko te longola se kimia, boyengebene, mpe bosolo ezali efandeli ya kiti ya bokonzi na yo; mpe boboto ekokende liboso ya elongi na yo mpe ekozala na nsuka te; ezali boni ete okoka kolela?

32 Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Tala oyo bazali bandeko na yo; bazali bato basalemi na maboko na ngai moko, mpe napesaki bango boyebi na bango, na mokolo nakelaki bango; mpe na Elanga ya Edene, napesaki epayi ya moto nguya na ye ya kopona bolamu to mabe;

33 Mpe epayi ya bandeko na yo nalobaki, mpe lisusu napesaki motindo, ete basengeli kolinga moko mpe mosusu, mpe ete basengeli kopona ngai, Tata na bango; kasi tala, bazangi bolingo, mpe bazali koyina makila na bango moko;

34 Mpe moto ya bosiliki na ngai mopeli na bango; mpe nakotinda mpela likolo na bango mpo na mabe nazali koyoka, mpo ete nkanda na ngai ya makasi epeli na bango.

35 Tala, nazali Nzambe; Moto ya Bosantu ezali nkombo na ngai; Moto ya Toli ezali nkombo na ngai; mpe Azanga nsuka mpe Seko ezali, lisusu, nkombo na ngai.

36 Yango wana, nakoki kosembola maboko na ngai mpe kosimba bokeli bonso boye nasalaki; mpe liso na ngai ekoki kotobola bango lisusu, mpe na kati ya oyo esalemaki na maboko na ngai nkuna monene ya lolenge oyo etikala kozala naino te lokola na kati ya bandeko na yo.

37 Kasi tala, masumu na bango makozala likolo ya mitu ya batata na bango; Satana akozala tata na bango, mpe bobola ekozala lotomo ya bango; mpe lola mobimba ekolela likolo na bango, kutu mosala kitoko nyonso esalemi na maboko na ngai; yango wana esengeli lola kolela te, komonaka ete bato oyo bazali komona mpasi?

38 Kasi tala, bato oyo miso na yo ezali likolo ya bango bakowa na mpela; mpe tala, na kokangisa bango; boloko boye nalengelaki mpo na bango.

39 Mpe ye wana oyo naponaki abondelaki liboso na ngai. Yango wana, amonaki mpasi mpo na masumu na bango; mbala mingi lokola bakoyambola na mokolo oyo Moponami na ngai akozonga epayi na ngai, mpe kino na mokolo wana bakozala kati na monioko;

40 Yango wana, lola ekolela mpo na, iyo, mpe mosala kitoko oyo nyonso esalemaki na maboko na ngai.

41 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi ya Enoka, mpe ayebisaki Enoka misala nyonso ya bana ya bato; yango wana Enoka ayebaki, mpe atalaki nkuna ya bango, mpe bobola na bango, mpe alelaki mpe asembolaki maboko na ye, mpe motema na ye movimbaki monene lokola boseko; mpe nsopo na ye etondaki na mawa; mpe boseko bonso boninganaki.

42 Mpe Enoka amonaki lisusu Noa, mpe libota na ye; mpe amonaki ete bana ya bana mibali nyonso ya Noa bakobikisama na lobiko ya ntango;

43 Yango wana Enoka amonaki ete Noa atongaki masuwa; mpe ete Nkolo asekaki likolo na yango, mpe asimbaki masuwa yango na loboko ya ye moko; kasi na ntina ya montika ya bato ya nkuna mpela eyaki mpe emelaki bango.

44 Mpe lokola Enoka amonaki eye, ayokaki molimo na ye mpasi, mpe alelaki likolo ya bandeko na ye, mpe alobaki epayi na lola: Nakoboya kolendisama; kasi Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Tombola motema na yo, mpe zala na esengo; mpe tala.

45 Mpe esalemaki ete Enoka atalaki; mpe amonaki mabota nyonso ya mabele, uta Noa kokende liboso; mpe abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: Ntango nini ekoya mokolo ya Nkolo? Ntango nini ekosopana makila ya Moto ya sembo, ete bango nyonso oyo bazali na mawa bakoka kosantisama mpe kozwa bomoi ya seko?

46 Mpe Nkolo alobaki: Ekozala na midi ya ntango, na mikolo ya nkuna mpe ya bobekoli.

47 Mpe tala, Enoka amonaki mokolo ya boyei ya Mwana ya Moto, kutu na mosuni; mpe molimo na ye mosepelaki, kolobaka: Moto ya sembo atombolami, mpe Mwana ya mpate abomami uta na ebandeli ya mokili; mpe na nzela ya bondimi nazali na ntolo ya Tata, mpe tala, Siona ezali elongo na ngai.

48 Mpe esalemaki ete Enoka atalaki na mabele; mpe ayokaki mongongo moko uta na nsopo na yango, kolobaka: Lisuma, lisuma ezali ngai, mama ya bato; nazali na mpasi, mpe nalembi, mpo na nkuna ya bana na ngai. Ntango nini ekozwa ngai bopemi, mpe bopetolami uta na bosoto boye babimisi liboso na ngai? Ntango nini Mokeli na ngai akosantisa ngai, ete nakoka kopema, mpe bosembo bozala likolo ya etando na ngai mpo na eleko moko?

49 Mpe ntango Enoka ayokaki ete mabele ezali na matanga, alelaki, mpe abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo, ekoyokela yo mabele mawa te? Ekopambola yo bana ya Noa te?

50 Mpe esalemaki ete Enoka akobaki kobelela na ye epayi ya Nkolo, kolobaka: Nasengi yo, O Nkolo, na nkombo ya Mobotami se Moko na yo, kutu Yesu Klisto, ete ozala na boboto likolo ya Noa mpe nkona na ye, ete mabele makoka soki moke te lisusu kotondisama na mpela.

51 Mpe Nkolo akokaki koboya te; mpe asalaki boyokani na Enoka, mpe alapaki epayi na ye na ndai yoko, ete akopekisa mpela; ete akobianga bana ya Noa;

52 Mpe abimisaki mokano moko oyo ekoki kobongolama te, ete na kati ya bikolo nyonso montika ya nkona na ye mokozala ntango inso, wana ekowumela mabele;

53 Mpe Nkolo alobaki: Apambolami ezali ye oyo Masiya akoya na nzela ya nkona na ye; mpo alobaki—Nazali Masiya, Mokonzi na Siona, Libanga ya Lola, oyo ezali monene lokola boseko; moto nyonso oyo akoti na ekuke mpe amati likolo na nzela na ngai akokweya soki moke te; yango wana, bango oyo nasili kolobela bapambolami, mpo bakobima na banzembo ya bosepeli ya libela.

54 Mpe esalamaki ete Enoka abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: Ntango Mwana ya Moto akoya na mosuni, nde ekopema mabele? Nabondeli yo, lakisa ngai makambo yango.

55 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Tala, mpe atalaki mpe amonaki Mwana ya Moto atombwami likolo na ekulusu, na lolenge ya mimesano ya bato;

56 Mpe ayokaki mongongo makasi; mpe lola izipamaki lokola na elamba; mpe bokeli bonso ya Nzambe ezalaki na mawa; mpe mabele elelaki; mpe mabanga mapasukaki; mpe basantu balamukaki, mpe balatisamaki motole na loboko ya mobali ya Mwana ya Moto, na mitole ya nkembo;

57 Mpe mingi lokola ezalaki milimo oyo ezalaki na boloko ebimaki, mpe etelemaki na loboko ya mobali ya Nzambe; mpe baoyo batikalaki babomamaki na minioko ya molili kino na bosambisi ya mokolo monene.

58 Mpe lisusu Enoka alelaki mpe abelelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: Ntango nini ekopema mabele?

59 Mpe Enoka amonaki Mwana ya Moto komata likolo epayi ya tata; mpe abiangaki Nkolo, kolobaka: Okoya lisusu te likolo ya mabele? Komonaka lokola ozali Nzambe, mpe nayebi yo, mpe olapaki ndai epayi na ngai, mpe otindaki ngai ete nasengeli kosenga na nkombo ya Mobotami se Moko na yo; okelaki ngai, mpe opesaki ngai makoki na kiti ya bokonzi na yo, mpe na bokasi na ngai moko te, kasi na nzela ya ngolu na yo moko; yango wana, natuni yo soki okoya lisusu te likolo ya mabele.

60 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Lokola nazali na bomoi, kutu se bongo nakoya na mikolo ya nsuka, na mikolo ya nkuna mpe ya bobekoli, mpo na kokokisa ndai oyo nasalaki epayi na yo mpo na oyo etali bana ya Noa;

61 Mpe mokolo ekoya ete mabele makopema, kasi liboso ya mokolo wana lola ekoyinda, mpe elamba ya molili ekozipa mabele; mpe lola ekoningana, mpe lisusu mabele; mpe mikakatano minene mikozala na kati ya bana ya bato, kasi nakobatela bato na ngai;

62 Mpe nakokitisa bosembo uta na lola; mpe nakobimisa bosolo uta na mabele, mpo na kopesa litatoli ya Mobotami se Moko na ngai; bosekwi na ye uta na bakufi; iyo, mpe lisusu bosekwi ya bato nyonso; mpe nakosala ete bosembo mpe bosolo ekombola mabele lokola na mpela, mpo na kosangisa baponami na ngai uta na nsuka minei ya mabele, na esika moko oyo nakolengela, Engumba Esantu, ete bato na ngai bakoka kokanga nketo ya bango, mpe bazala kozelaka ntango ya boyei na ngai; mpo tabelenakele na ngai ekozala kuna, mpe ekobiangama Siona, Yelusaleme ya Sika.

63 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Enoka: Na ntango wana yo mpe engumba na yo nyonso bokutana na bango kuna, mpe tokoyamba bango na ntolo na biso, mpe bakomona biso; mpe tokokweya likolo ya nkingo ya bango, mpe bango bakokweya likolo ya nkingo na biso, mpe tokopesana bipwepwe moko mpe mosusu;

64 Mpe efandelo na ngai ekozala kuna, mpe ekozala Siona, oyo ekobima uta bokeli bonso boye nasalaki; mpe mpo na ntaka ya mibu nkoto yoko mabele makopema.

65 Mpe esalamaki ete Enoka amonaki mokolo ya boyei ya Mwana ya Moto, na mikolo ya nsuka, mpo na kofanda likolo ya mabele na bosembo mpo na ntaka ya mibu nkoto moko;

66 Kasi liboso ya mokolo wana amonaki mikakatano minene na kati ya bato ya nkuna; mpe amonaki lisusu mbu, ete ezalaki na botomboki, mpe mitema ya bato mikimaki bango, kozelaka kati na bobangi masambisi ya Nzambe ya Bokasi bonso, oyo akoyela bato ya nkuna.

67 Mpe Nkolo alakisaki Enoka biloko nyonso, kutu kino nsuka ya mokili; mpe amonaki mokolo ya bato ya sembo, ngonga ya bosikoli na bango, mpe azwaki litondi moko ya bosepeli;

68 Mpe mikolo nyonso ya Siona, na mikolo ya Enoka, mizalaki mibu nkama misato mpe ntuku motoba na mitano.

69 Mpe Enoka mpe bato na ye nyonso batambolaki elongo na Nzambe, mpe afandaki kati na Siona; mpe esalemaki ete Siona ezalaki lisusu te, mpo Nzambe ayambaki yango likolo na ntolo na ye moko; mpe uta wana kokende liboso nde balobaka, Siona Ekimi.

Bimisa na lokasa