2010–2019
Bansomi ya Libela, mpo na Kosala Bangomei
sánzá ya zómi 2014


Bansomi ya Libela, mpo na Kosala Bangomei

Ezali bolingi ya Nzambe ete tozala mibali mpe basi ya bonsomi oyo tokoki kotombwama na bokoki na biso ya mobimba na nzoto mpe na molimo lokola.

Lisano ya William ShakespeareLa vie du Roi Henry V ezali na esika moko na butu na nganda ya basoda ya Angleterre na Agincourt kaka yambo ya kobundisa mampinga ya France. Na mwa pole mpe na kobombama, Mokonzi Henry azali kowayawaya ayebani te na kati ya basoda na ye. Asololi na bango, na komekaka kotala motema ya mampinga ya motango eleki ya mabe, mpe mpamba te bayebi mpenza te ye azali nani, bazali polele na matongi na bango. Na lisolo moko bazali komaniola etali nani akomema mokumba ya nini ekokomela bato na etumba—mokonzi to soda moko na moko.

Na esika moko Mokonzi Henry alobi, “Nakanisi nakoki kokufa esika mosusu te na esengo mingi koleka elongo na mokonzi; likambo na ye elongobani.”

Michael Williams azongisi, “Wana ezali mingi koleka oyo toyebi.”

Baninga na ye bandimi, “Iyo, mingi koleka oyo tokoki koluka; mpo toyebi mingi ekoki, soki tozali bawumbu ya mokonzi: soki likambo na ye ezali mabe, botosi na biso na mokonzi ekomboli botosi na mokonzi ekolongola bobomi na biso.”

Williams abakisi, “Soki likambo ezali malamu te, mokonzi yemei azali na ngambo ya kilo ya komema.”

Likambo ya kokamwa te, Mokonzi Henry andimi te. “Mokumba ya mowumbu moko na moko azali ya mokonzi; kasi molimo ya mowumbu moko na moko ezali ya yemei.”1

Shakespeare akati te ntembe oyo na lisano, mpe na lolenge moko to mosusu ezali ntembe moko ezali kokoba ti na ntango na bisomei—nani amemi mokumba ya nini ekokoma na bomoi na biso?

Ntango makambo ekomi mabe, ezali na momesano ya kopamela basusu to kutu Nzambe. Ntango mosusu liyoki ya bosengi emati, mpe bato to mangomba mazali komeka kobalula mokumba mpo ya bolamu na bango na bato basusu to na leta. Na makambo ya molimo boko babanzi ete bato mpe basi basengeli te kobunda mpo na bosembo na bangomei—mpamba te Nzambe alingi mpe abikisi biso “kaka lokola tozali.”

Kasi Nzambe alingi ete bana na Ye basengeli kosala engebene na nguya ya boponi Ye apesaki bango. “ete moto na moto akoka koyanola mpo na masumu na yemei na mokolo ya bosambisi.”2 Ezali mwango na Ye ete tozala na mokumba ya kozwa mokano na kotambwisa bomoi na bisomei. Nzambe akolata bomoi na biso te to akotambwisa bomoi na biso te lokola soki tozalaki bikeko na Ye, lokola Lusifelo mbala moko apesaki likanisi ya kosala. To baprofeta na Ye bakondima te mokumba ya “motambwisi bikeko” na esika ya Nzambe. Brigham Young alobaki: “natombeli te Mosantu ya Mikolo mya Nsuka moko na mokili oyo, to te na lola, asepela na likambo nionso nakosala, longola se soki Molimo ya Nkolo Yesu Klisto,—molimo ya bobimisi, esali bango basepela. Natombeli bango bayeba na bangomei mpe basosola mpo na bangomei.”3

Boye Nzambe akobikisa biso te “kaka lokola tozali,” yambo, mpamba te “kaka lokola tozali” tozali na mbindo, mpe “eloko ya mbindo te ekoki kovanda … na miso na ye; mpo na elobeli ya Adama, Moto ya Bosantu ezali nkombo na ye, mpe nkombo ya Mobotami Se Moko ezali Mwana Mobali [ya Bosantu] .”4 Mpe ya mibale, Nzambe akosala te mpo na kokomisa biso eloko moko toponi te na misala na biso kokoma. Ya solo Ye alingi biso, mpe mpamba te Ye alingi biso, Ye akokanga biso na makasi te to akosundola biso te. Na ntembe te Ye akosalisa mpe akokamba biso. Kutu, etalisi ya solo ya bolingo ya Nzambe ezali mitindo na Ye.

Tosengeli kosepela mpe (tokosepela) na mwango ebongisami na Nzambe oyo epesi biso ndingiza ya kopona mpo na kosala mpo na bisomei mpe kozwa mbano. To lokola makomi elobeli yango, mpo na, “komeka bololo, ete tokoka koyeba ntalo ya bolamu.”5 Totondi botondi libela ete Bomikabi ya Mobikisi elongaki mabe ya ebandeli mpo ete tokoka kobotama na kati ya mokili oyo kasi kosambisama te mpo na bobuki mobeko ya Adama.6 Na kosikolamaka na bokweyi, tokobandela bomoi na kozanga elindo liboso na Nzambe mpe “kokoma na bonsomi libela, koyebaka malamu mpe mabe; mpo na kosala [bisomei] mpe kosalelama te.6 Tokoki kopona kokoma lolenge ya moto oyo tolingi, na lisalisi ya Nzambe,ete tokoka kozala kutu lokola Ye azali.8

Nsango malamu ya Yesu Klisto efungoli nzela na oyo tokoki kokoma. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe ngolu na Ye, bozangi na biso ya kosalela mobeko ya selesitiale na bongo nie mpe na sikisiki na bokufi ekoki koniatama mpe tokokisami kokolisa bomoto ya lolenge ya Klisto. Boyengebene esengi, nzokande, ete moko te na yango eya na kozanga boyokani na biso na kolinga mpe kosala elongo. Ezala boye mokolo moko te. Kozala na biso na mabele lokola bazali na mosuni ezali mbano ya boponi moko na moko na biso asalaki mpo na kosala elongo na mwango ya Tata na biso.9 Boye, lobiko ezali mpenza te mbano ya bipale ya bonzambe, kasi eyei mpe te na bolingi ya bonzambe yango moko.10

Boyengebene ezali lolenge moko ya ntina ya Nzambe. Tokoki kozala na bondimi na Nzambe mpamba te Ye azali ya kolongobana na bobongi nie. Makomi mateyi biso ete “Nzambe akotambolaka na banzela etengama te, mpe akobongolaka loboko ya mobali na loboko ya mwasi te, mpe akobalolaka te oyo ye alobaki, yango wana banzela na ye ezali alima, mpe botamboli na ye ezali zunguluke ya seko”11 mpe ete “Nzambe akokabolaka bato te.”12 Tokoyekama na lolenge ya bonzambe ya boyengebene, bondimami, mpe elikia.

Kasi lokola mbano ya kozala na boyengebene ya kobonga nie, ezali na boko makambo Nzambe akoki kosala te. Ye akoki te kokata bikatela makambo na kobikisaka boko mpe kobenganaka basusu. Ye “akoki te kotala lisumu ata mwa ndelo ya ndingisa.”13 Ye akoki te kondima mawa eyiba boyengebene.14

Elakisi na makasi bosolo ya Boyengebene na Ye ete Nzambe asali moninga ya libongisi ya mawa. Ezali mpamba te Ye azali moyengebene ete Ye asalaki nzela mpo na mawa esala mosala na yango esengeli na atandele ya seko ya bato. Boye sikawa, “boyengegene esaleli masengi na yango nionso, mpe lisusu mawa esengi nionso oyo ezali ya yangomei.”15

Toyebi ete ezali “mpasi mpe liwa na ye oyo asalaki te lisumu, na ye oyo [Tata] asepelaki malamu; … makila ya [Ye] Mwana Mobali oyo esopanaki”16 oyo asepelisi masengi ya boyengebene, apesi mawa, mpe asikoli biso. 17 Atako bongo, “ engebene na boyengebene, mwango ya bosikoli ekoki te komemama penepene, bobele na masengeli ya boyamboli.18 Ezali lisengeli ya mpe libaku mpo na boyamboli oyo epesi nzela na mawa mpo na kosala mosala na yango na kozangaka koniatela boyengebene.

Klisto akufaki mpo na kobikisa bibikisela te kasi apesi boyamboli. Toyekami “mobimba likolo ya misala na ye oyo azali na nguya ya kobikisa”19 na nzela ya boyamboli, kasi kosalela boyamboli ezali mbongwana ya bolingi ya moto yemei. Boye na kokomisaka boyamboli lisengeli moko mpo na kozwa likabo ya ngolu, Nzambe akokokisa biso mpo na kosimba mokumba mpo na bisomei. Boyamboli ekomemia mpe ekosunga nguya na biso ya kopona malamu: “Mpe boye mawa esepelisi masengi ya boyengebene, mpe ezingi mango na maboko ya bozangi likama, ntango oyo asaleli bondimi te mpo na boyamboli amitiki na mobeko mobimba ya masengi ya boyengebene; yango wana bobele na ye oyo azali na bondimi mpo na boyamboli ememami penepene ya mwango monene mpe ya seko ya bosikoli.”20

Kososola boyengebene mpe mawa ya Nzambe mabe ezali likambo moko; koboya kondima bozali to bokonzi boluti ya Nzambe ezali likambo mosusu; kasi nionso ekopesa mbano ya kokoma moke mingi—ntango mosusu mosika moke mingi—koleka litondi ya likoki na biso ya bonzambe. Nzambe moko oyo akosala masengi te ekokani na Nzambe moko oyo azali te. Mokili na kozanga Nzambe, Nzambe ya bomoi oyo atii mibeko ya bolamu mpo na kokonza mpe kobongisa bana na Ye, ezali lisusu mokili moko ezangi bosolo mpe boyengebene ya seko. Ezali mokili moko wapi sangisangisa na malamu mpe mabe ekonzi mpenza.

Sangisangisa elingi koloba moto na moto azali likoki ya likolo ya yemei. Ya solo, ezali kaka te baye bazali koboya kondima Nzambe oyo bazali kokota na filosofi wana. Boko oyo andimi na Nzambe lisusu andimi ete bango bangomei, moko na moko, bazwi mokano na nini ezali malamu mpe mabe. Elenge moko ya nkulutu alobaki boye: Nakanisi nakoki koloba ete Hindouisme ezali mabe to Catholica ezali malamu to kozala moko ya Episcopalisme ezali mabe—nakanisi etali kaka na nini ondimeli. …. Nandimi te ete ezali na malumu mpe mabe”21 Mosusu, batunaki ye etali ntina ya bondimi ya eyamba na ye, ayanolaki “Ngaimei—ewuti mpenza na yango. Nalingi koloba, boniboni ekoki kozala na likoki na nini ondimeli?”22

Na baye bandimi ete eloko moko to biloko binso bikoki kozala ya solo, esakola ya bosolo ya ntina, ya sikisiki, mpe ya mokili mobimba emonani lokola kokangisama na makasi—“nasengeli te kokangisama na makasi mpo na kondima ete eloko moko ezali ya solo oyo nalingi te.” Kasi oyo ekobongola te bosolo. Koboya mobeko ya kobendama na mabele ekopekisa moto te kokweya na lobwaku. Yango ezali lisusu ya solo mpo na mobeko mpe boyengebene ya seko. Bonsomi ezwami te na kotelemelaka yango kasi na kosalelaka yango. Wana ezali ntina ya nguya ya Nzambe. Soki ezalaki te mpo na kozala solo ya bosolo ya sikisiki mpe ebongwanaka te, likabo ya nguya ya kopona elingaki kozanga ntina zambi tolingaki ata moke te komona liboso mpe kolinga mbano ya misala na biso. Lokola Lehi alobi yango: Soki bokoloba ezali na mobeko te, bokoloba lisusu ezali na lisumu te. Soki bokoloba ezali na lisumu te, bokoloba lisusu ezali na bosembo te. Mpe soki ezali na bosembo te ezali na esengo te. Mpe soki ezali na bosembo te mpe esengo te ezali na etumbu to bobola te. Mpe soki biloko wana ezali te Nzambe azali te. Mpe soki ezali na Nzambe te tozali te, mpe mabele ezali te; mpe ekokaki kozala bokeli ya biloko te, mpo na kosala te to mpo na kosalelama te; yango wana biloko binso bisengelaki kolimwa nie.”23

Na makambo ya ntango mpe ya molimo, libaku ya komema mokumba ya moto na moto ezali likabo epesami na Nzambe na kozanga yango tokoki te kokolisa bokoki na biso mobimba lokola bana basi mpe bana mibali ya Nzambe. Boyanoli ya moto na moto ekomi likoki mpe mokumba oyo tosengeli kobatela na molende; yango ebundisami uta yambo ya bokeli. Tosengeli kobatela boyanoli liboso ya bato mpe miango oyo ekoki (ntango mosusu na makanisi ya malamu mingi koleka) kokomisa biso bakakemi.Mpe tosengeli kobatela yango liboso ya bamposa na bisomei mpo na koboya mosala oyo esengelami mpo na kokolisa batalanta, makoki, mpe bomoto lokola Klisto.

Lisolo elobami mpo na moto oyo kaka alingaki te kosala. Alingi kolengelama na mposa na ye nionso. Na lolenge oyo ya kokanisa, Eklezia to leta, to nionso mibale, esengeli na ye makoki ya bomoi mpamba te afutaki mpako mpe moko ya zomi na ye. Azalaka na eloko te ya kolia kasi aboyaki kosala mpo na komilengela yemei. Na nkanda mpe nkele, baye bamekami kosalisa ye bazwaki mokano ete zambi akokaki te kotombola mosapi moko mpo na komisunga, bakokaki lisusu mpenza komema ye na lilita mpe kotika ye akufa. Na nzela ya lilita, moto moko alobaki, “Tokoki kosala yango te. Nazali na mwa masangu nakopesa ye.”

Boye balimbolaki yango na moto wana, mpe ye atunaki. “bolongoli mposo na yango?”

Bayanolaki, “Te.”

“Malamu nde,” alobaki, “koba na nzela na yo.”

Ezali bolingi ya Nzambe ete tozala mibali mpe basi ya bonsomi oyo tokoki kotombwama na bokoki na biso ya mobimba na ntango mpe na molimo lokola, ete tozala na bonsomi na bokakemi ya nsoni ya bobola mpe bowumbu ya lisumu, ete tosepela na limemia ya bisomei mpe lipanda, ete tozala ya kolengelama na makambo manso mpo na kosangana na Ye na bokonzi ya selesitiale.

Nakomikosa te ete eye ekoki kosalema na makasi na biso moko kaka na kozanga lisalisi ya makasi na Ye ya ntango nionso. “Toyebi ete ezali na ngolu nde tobikisami, nsima na nionso tokoki kosala.”24 Mpe tokoki te kozwa mwa ndelo ya nse ya bokoki to bolamu soki Nzambe asalisi te—lisungi ya bonzambe ekoki kozala ya biso na ngonga nionso ya mikolo nionso, kotala te wapi tozala na nzela ya botosi. Kasi nayebi ete koleka kozala na mposa ya lisalisa na Ye, tosengeli kosala makasi bisomei, koyambola, mpe kopona Nzambe mpo na Ye akoka kosala na bomoi na biso engebene na nguya ya kopona bolamu. Libondeli na ngai ezali kaka ete tomema mokumba mpe tokende kosala mpo ete ezala na eloko moko mpo na Nzambe asalisa biso.

Napesi litatoli ete Nzambe Tata azali na bomoi, ete Mwana na Ye, Yesu Klisto, azali Mosikoli, mpe ete Molimo Mosantu azali elongo na biso. Mposa na bango mpo na kosalisa biso ezali na ntembe te, mpe bokoki na bango mpo na kosala yango ezangi ndelo. Tika “tolamuka, mpe totelema na mputulu, … ete mayokani ya Tata ya seko oyo asalaki na biso ekoka kokokisama.”25 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.