2010–2019
Kosunga Baprofeta
sánzá ya zómi 2014


Kosunga Baprofeta

Bosungi na biso ya baprofeta ezali mokano ya biso moko ete tokosala ya biso malamu mingi koleka mpo na kosunga makambo na bango ya yambo ya boprofeta.

Mpokambi Eyring, totondi yo mpo na nsango na yo ya malako mpe ya kofula. Balingami bandeko mibali mpe basi, totondi bino mpo na bondimi mpe bomipesi na bino. Lobi, tobengamaki banso mpo na kosunga Thomas S. Monson lokola profeta ya Nkolo mpe Mokambi ya Eklezia ya Nkolo. Mpe mbala mingi toyembaka, “Totondi yo, O Nzambe, mpo na propheta.”1 bino na ngai tososolaka mpenza ntina na yango? Kanisa libaku Nkolo apesaki biso ya kosungaka profeta na Ye, oyo ya ye toli ekozala mbindo te, ezanga bokosami, ezanga mposa ya bofutami mbongo epai ya moto mpe bosolo mobimba!

Lolenge nini tosungaka mpenza profeta? Kala yambo akoma Mokambi ya Eklezia, Mokambi Joseph  F. Smith alimbolaki: “Ezali mokumba ya ntina kozalaka Basantu oyo … basungi bakambi ya Eklezia, kosala bongo ezali kaka te na botomboli loboko, lolenge ya bomoto, kasi ya misala mpe na bosolo.”2

Namikundoli malamu na “mosala” na ngai moko koleka mingi ya kosunga propheta. Lokola dokotolo mpe mopasoli motema, nazalaki na mokumba ya kofungola motema ya Mokambi Spencer W. Kimball na 1972, ntango azalaki Mokambi ya Lisanga likoki ya bapostolo Zomi na mibale. Azalaki na mposa ya operasio ya mpasi mpenza. Kasi nazalaki na boyebi te na kosalaka mosala wana na moto ya mibu 77 na maladi ya motema. Napesaki ndingisa te mpo na kosala operasio mpe nayebisaki Mokambi Kimball mpe Bokambi ya Yambo. Kasi, na bondimi, Mokambi Kimball aponaki operasio esalema, kaka mpo ekebisamaki na Bokambi ya Yambo. Oyo elakisaki lolenge asungaki bakambi na ye! Mpe mokano na ye ebangisaki ngai!

Botondi epai ya Nkolo, operasio elekaki malamu. Ntango motema ya Mokambi ezongelaki kobetaka, ebetaki na bokasi nionso! Kaka na ntango wana, nazwaki litatoli ya polele uta na Molimo ete moto oyo akokoma Mokambi ya Eklezia mokolo moko!3

Boyebi nsuka na yango. Kaka nsima ya sanza 20, Mokambi Kimball akomaki Mokambi ya Eklezia. Mpe alakisaki bompikiliki mpe bokambi ya bokasi mpo na mibu ebele.

Uta mokolo wana tosungi Bakambi Ezra Taft Benson, Howard W. Hunter, Gordon B. Hinckley, mpe sikawa Thomas S. Monson lokola Bakambi ya Eklezia—baprofeta na ndimbola nionso ya liloba!

Balingami bandeko na ngai ya mibali mpe basi, soki Bozongisi esalaki eloko moko te, elingaki kobebisa bondimi ya uta kala ete Nzambe atika kolobela bana na Ye. Eloko moko te elingaki kozala mosika koleka uta na bosolo. Profeta atelemi na moto ya Eklezia ya Nzambe na bileko nionso, uta na Adama kino na mokolo oyo.4 Baprofeta batatoli na ntina ya Yesu Klisto—ya bonzambe na Ye mpe ya etinda na mabele mpe mosala na Ye.5 Topesi longonya na Profeta Joseph Smith lokola profeta ya eleko ya nsuka oyo. Mpe topesi longonya moto na moto oyo akitani ye lokola Mokambi ya Eklezia.

Ntango tosungi baprofeta mpe bakambi mosusu,6 tobengaka mobeko ya boyokani moko, mpo Nkolo alobaki, “Ekopesamela na moto moko te kokende koteya nsango malamu na ngai, to kotonga Eklezia na ngai, longola se oyo akulisami na moto oyo azali na likoki, mpe eyebani na Eklezia ete oyo azali na likoki mpe akulisami na bakambi ya Eklezia.”7

Oyo epesi biso, lokola bandimi ya Eklezia ya Nkolo, elikia mpe bondimi ntango tokosala makasi ya kobatela mitindo ya makomi mpo na kotia bokebi na mongongo ya Nkolo8 ntango ewuti na nzela ya maloba ya basali na Ye, baprofeta.9 Bakambi nionso kati ya Eklezia ya Nkolo babengami na likoki elongobana. Profeta moko te to mokambi mosusu kati ya Eklezia oyo, mpo na ntina na yango, asi amibianga mobali to mwasi. Profeta moko te aleki na maponami. Nkolo atalisaki yango polele ntango Ye alobaki, “Boponi ngai te, kasi ngai nde naponi bino, mpe nakulisi bino.” 10 Bino mpe ngai “toponaka ” te bakambi ya Eklezia ata na esika kani. Tozali, atako bongo, mpenza na libaku ya kosunga bango.

Ndenge ya Nkolo ekeseni na oyo ya moto. Ndelenge ya moto ezali kolongola moto na mosala to nkita ntango akoli to azali lisusu na makoki ya kosala te. Kasi ndenge ya moto ekoki te mpe ekoki ata mokolo moko te kokokana na ya Nkolo. Bosungi na biso ya baprofeta ezali mokano ya biso moko ete tokosala ya biso malamu mingi koleka mpo na kosunga makambo na bango ya yambo ya boprofeta. Bosungi na biso ezali maloba ya ndai ete toyebi libiangi na bango lokola profeta ya kozala engebene na mibeko mpe kokambaka likolo na biso.

Mibu ntuku mibale na motoba yambo akoma Mokambi ya Eklezia, George Albert oyo azalaki na ntango wana Mpaka alobaki: “Mokano oyo tosali ntango totomboli maboko na biso … ezali moko ya bule koleka. Elakisi te ete tokotambola malembe na nzela na biso mpe tokozala na bolingi ete profeta ya Nkolo akokamba mosala oyo, kasi elakisi … ete tokotelema na nsima na ye; tokolobela nkombo na ye ya malamu, mpe tokosala makasi komema malako na ye ntango Nkolo akokamba.”11

Nkolo na bomoi akambi Eklezia na Ye ya bomoi!12 Nkolo abimisaka Bolingi na Ye mpo na Eklezia na nzela ya profeta na Ye. Lobi, nsima tobengisamaki mpo na kosunga Thomas S. Monson lokola Mokambi ya Eklezia, biso mpe tozali na libaku ya kosunga ye, bapesi toli kati ya Bokambi ya Yambo, mpe bakambi ya lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi. Bokanisa mpo na yango! Tosungi bato 15 lokola baprofeta ya Nzambe! Bazali na bafungola ya bonganganzambe nionso oyo naino epesama na moto na eleko oyo te.

Libiangi ya bato 15 na bopostolo esantu epesi bobateli monene mpo na biso lokola bandimi ya Eklezia. Mpo na nini? Mpo mikano ya bakambi oyo esengeli kozala ya liloba moko. 13 Ekoki yo kokanisa lolenge nini Molimo ezali na bosenga ya bofulami ya bato 15 mpo na komema penepene makanisi moko? Bato 15 oyo bazali na mambi ya kelasi mpe ya mosala ekesena, elongo na bokeseni na makanisi etali makambo ebele. Bondimela ngai! Bato 15 oyo—baprofeta, bamoni, mpe babimisi—bayebi nini bolingi ya Nkolo ezali ntango banso balobi liloba moko! Bamipesi mpo na komona ete bolingi ya Nkolo ekokokisami solo. Losambo ya Nkolo epesi ndakisa mpo na moko na moko ya bato 15 oyo ntango basambeli: “Ekosalema na nse lokola na likolo.”14

Apostolo na boumeli makasi na mosala ya Apostolo akambi.15 lolenge oyo ya boumeli ekomema ntango nionso bato ya mikolo na mosala ya Mokambi ya Eklezia. 16 ekopesi bokobi, bwania, boyebi mosala, mpe bolengeli mingi, lokola ekambami na Nkolo.

Eklezia lelo ebongisami na Nkolo Yemei. Alengeli lolenge kitoko ya bokambami oyo epesi Bopemisi mpe bokitani. Lolenge oyo epesi bokambi ya lisakoli atako ntango bamaladi ya makasi mpe bozangi makoki ememi biso na bopusani ya mibu.17 Ebele ya bokeseni mpe ndanga elobi ete moko te akoki kotambuisa Eklezia na bobungi. Bakambi bakolo bazali kotangisamaka na bokasi ete mokolo moko balengelama mpo na kofanda na lisanga ya bapesi toli ya likolo. Bazali koyekola lolenge nini koyoka mongongo ya Nkolo na nzela ya nungunungu ya Molimo.

Ntango abandaki kosalisa lokola Mopesi toli ya Yambo ya Mokambi Ezra Taft Benson, oyo azalaki ntango wana penepene ya liwa, Mokambi Gordon B. Hinckley alimbolaki:

“Mibeko mpe mikano oyo Nkolo atie na esika mpo na bokambami ya Eklezia na Ye elengeli …  mabaku nionso. Ezali ntina … ete ezali na ntembe te to mitungisi na ntina ya bokambami ya Eklezia mpe mosala ya makabo ya masakoli, mpe lisusu likoki ya bofuli mpe bobimisi kati ya bosaleli misala mpe pologalami ya Eklezia, ntango Mokambi akoki kobela to kozanga makoki ya kosala na konzo.

“Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na mibale, babengami mpe bakulisami mpo na kozala na bafungola ya bonganganzambe, bazali na nguya mpe mokumba ya kokamba Eklezia, kosalisa makuli, kolimbola malongi na yango, mpe kotia mpe kobatela mimesano na yango.”

Mokambi Hinckley akobaki:

“Ntango Mokambi abeli to azangi makoki ya kosala mpenza na mikumba nionso ya mosala na ye, bapesi toli na ye mibale elongo basali Lisanga Likoki ya Bokambi ya Yambo. Bakokoba na mosala ya mokolo na mokolo ya Bokambi. …

“… Kasi mituna ya motuya etali bosaleli, banzela, bapologalami, to malongi etalami na bokebi mpe na losambo na Bokambi ya Yambo mpe elongo na Bazomi na mibale.”18

Mobu eleki, ntango Mokambi Monson akokisaki mibu 5 na mosala ya Bokambi ya Eklezia, akanisaki na ntina ya mibu 50 ya mosala ya apostolo mpe alobaki maloba oyo: “Mibu ezali na litomba te mpo na biso nionso. Na yango, tosangisi mingongo na biso na Mokonzi Benjamin, oyo alobaki, … ‘nazali se lokola bino mei, moyangelami o bokono ya ndenge nionso na nzoto mpe mayele; kasi naponamaki  … mpe nabulisamaki na tata na ngai,  …  mpe nabatelamaki na nguya ya ye ezanga emekiseli, mpo na kosalela bino na bokasi, mayele mpe makasi manso maye Nkolo apesaki epai na ngai’ (Moziya 2:11).”

Mokambi Monson akobaki: “Atako mikakatano ya bokolongono ya nzoto kani oyo ekoki koyela biso, atako bolembu ya nzoto to ya mayele kani, tozali kosala lokola esengi makoki na biso. Nayebisi bino solo ete Eklezia ezali na maboko malamu. Lolenge oyo etiamaki ya Lisanga ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya[Bapostolo] Zomi na mibale endimisi [biso] ete ekozala ntango nionso na maboko malamu mpe ete, ekoya nini ekoki, ntina ya komitungisa to ya kobanga ezali te. Mobikisi na biso, Yesu Klisto, oyo tozali kolanda, mpe oyo tozali kongumbamela, mpe oyo tozali kosalela, azali ntango nionso kotambuisa Eklezia.”19

Mokambi Monson, totondi yo mpo na bosolo oyo! Mpe totondi yo mpo na bomoi na yo ya ndakisa mpe mosala omipesi. Nakolinga koloba mpo na bandimi ya Eklezia na mokili mobimba na bomoko na biso mpe maloba ya sembo ya botondi mpo na bino. Topesi bino longonya! Tolingi bino! Tosungi bino, kaka mpo na maboko etombuama te kasi na mitema na biso nionso mpe bokasi ebulisama. Na sembo mpe mpiko, “tosambeli na ntina na yo, profeta na biso ya bolingo”! 20 Na Nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Seigneur, merci pour le prophète,” Nzembo, no. 10.

  2. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph F. Smith(1998), 211; sete ebetami. Maloba oyo elobamaki na 1898, ntango Mokambi Smith azalaki Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo.

  3. Mpo na nsango koleka, tala Spencer J. Condie, Russell M. Nelson: Father—, Surgeon—, Apostle (2003), 153–56.

  4. Tala Buku mpo na Makomi, “Bileko.”

  5. Baprofeta ebele basakolaki boyei ya Nkolo, mpe lisusu Lehi (tala 1 Nefi 1:19), Nefi (tala 1 Nefi 11: 31–33; 19:7–8), Yakobo (tala Yakobo 4:4–6), Benjamin (tala Moziya 3:5–11, 15), Abinadi (tala Moziya 15:1–9), Alma (tala Alma 40:2), mpe Samuele Lamani (tala Elamani 14:12). Yambo ya mbotama ya Mobikisi na Beteleheme, bamonaki yambo libonza ya bomikabi na Ye mpe bolandisami ya Bosekwi na Ye.

  6. Mobeko ya bosungi bakambi ezali motuya na nzela ya Eklezia ya Nkolo. Moto asungami yambo atiama pembeni na libiangi to na bokulisami na mosala bonganganzambe.

  7. Doctrine et Alliances 42:11. Mosala ya kosungaka bakambi na biso ebandaki na sanza ya minei 6, 1830, ntango Eklezia ebongisamaki, mpe na sanza ya misato 1836, ntango bandimi ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya bapostolo Zomi na mibale basungamaki lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi (tala Histoire de de l’Eglise, 1:74–77;2:417).

  8. Buku ya Mormon ekebisi na ntina ya likama soki toboi mateya ya baprofeta. Uta na yango totangi ete “ ndako enene mpe ya etando ezali lolendo ya mokili; mpe ekweyaki, mpe bokweyi na yango bozalaki monene mpenza. Mpe anzelu ya Nkolo alobaki …, kolobaka: Boye ekozala bobebisami ya biloko, mabota, minoko, mpe bato banso, baye bakobunda na bapostolo zomi na babale ya Mwana wa Mpate” (1 Nefi 11:36).

  9. Tala Daniele 9:10; Amos 3:7; Doctrine et Alliances 21:1, 4–5; 124:45–46.

  10. Yoane 15:16. Eteni ya bondimi etalisi malamu: “Tondimi ete moto asengeli kobiangama na Nzambe, na nzela ya lisakoli, mpe ya botii bwa maboko na baoyo wana bazali na likoki, mpo na koteya Nsango elamu mpe kosala makuli na yango.”

  11. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: George Albert Smith (2011), 64; sete ebakisami. Maloba oyo ewuti na lisikulu ya likita na Mpaka George Albert Smith na 1919. Akomaki Mokambi ya Eklezia na 1945.

  12. Tala Doctrine et Alliances 1:30, 38.

  13. Tala Doctrine etAlliances 107:27.

  14. 3 Nfi 13:10; tala lisusu Matai 6:10; Luka 11:2.

  15. Ntango Mokambi ya Eklezia awei, Bokambi ya Yambo epanzani mpe bapesi toli bazwi bisika na bango na Lisanga likoki ya bapostolo Zomi na mibale mpe nsima bakambi Eklezia kino Bokambi ya Yambo ebongisambi mosusu. Eleko wana ya ntango eyebani lokola boyangeli ya bapostolo. Na kala, ntaka wana ezalaki na molai ekeseni uta mikolo minei tii na misato mpe ndambo ya mobu.

  16. Ya solo, ndakisa ya bokitani wana elakisaki te libiangi ya Joseph Smith, oyo akulisamaki yambo mpo na kozala profeta ya Bozongisi mpe Mokambi ya yambo ya Eklezia (tala 2 Nefi 3:6–22; tala lisusu Abraham 3:22–23).

  17. Toyebi ete Nkolo Yemei akoki kobenga moko na biso na liwa na ngonga nionso Ye alingi.

  18. Gordon B. Hinckley, “God Is at the Helm,” Ensign, Sanza ya Mitano 1994, 54; tala lisusu Gordon B. Hinckley, “He Slumbers Not, nor Sleeps,” Ensign, Sanza ya Mitano 1983, 6.

  19. “Message from President Thomas  S. Monson,” Church News, sanza ya Mibale. 3, 2013, 9.

  20. “We Ever Pray for Thee,” Nzembo, no. 23.

Bimisa na lokasa