Makomi
Malongi mpe Mayokani 101


Eteni 101

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mikolo ya 16 mpe 17, sanza ya zomi na mibale ya mobu 1833. Na ntango oyo Basantu baoyo basanganaki na Missouri bazalaki konyokwama na monyokoli monene. Liboke ya batomboki ebele bamemaki bango uta na bipayi na bango na Etuka ya Jackson; mpe baike ya Basantu bamekaki komitia bango moko na Bituka ya Van Buren, Lafayette mpe Ray, kasi monyokoli molandaki bango. Lingomba monene ya Basantu ezalaki na ntango wana na Etuka ya Clay, Missouri. Makaneli ya koboma bato ya Eklezia ezalaki ebele. Basantu na Etuka ya Jackson babungisaki biloko ya ndako, bilamba, bibwele mpe bilei mpe bozwi na bango moko ya ndenge mosusu; mpe mingi ya milona na bango mibebisamaki.

1–8, Basantu bapesami etumbu mpo na bobuki mobeko na bango; 9–15, Bosiliki ya Nkolo ekokweya likolo ya bikolo, kasi bato na Ye bakosangisama mpe bakolendisama; 16–21, Siona mpe makonzi na ye makotongama; 22–31, Lolenge ya bomoi na ntango ya Nkoto moko ya mibu elimbolami; 32–42, Basantu bakopambolama mpe bakopesama lifuta na ntango wana; 43–62, Lisese ya moto ya lokumu mpe nzete ya bilaya ezali elilingi ya mitungisi mpe bosikoli ya nsuka ya Siona; 63–75, Basantu basengeli kokoba kosangana esika moko; 76–80, Nkolo atiaki Mobeko likonzi ya Etazini ya Amerika; 81–101, Basantu basengeli kobondela mpo bafutama mbeba bazwaki, engebene na lisese ya mwasi mpe mosambisi ya nkuna.

1 Solo nalobi epayi na bino, mpo na oyo etali bandeko na bino bandimi oyo batungisamaki, mpe baniokwamaki, mpe babenganamaki uta na mboka ya bosangoli libula na bango—

2 Ngai, Nkolo napesaki nzela ete motungisi moya likolo na bango, na oyo wapi batungisami, lokola mbano ya bobuki mobeko na bango;

3 Nzokande nakozala nkolo na bango, mpe bakozala na ngai na mokolo wana ntango nakoya kosangisa pauni na ngai.

4 Na boye, basengeli kopesama etumbu mpe komekama, kutu lokola Abalayama, oyo atindamaki kobonza mwana mobali na ye se moko.

5 Mpo nyonso oyo bakotia molende ntango bapesami etumbu te, kasi bawangani ngai, bakoki kosantisama te.

6 Tala, nalobi epayi na bino, ezalaki na boswani, mpe bowelani, mpe bilula-lula, mpe songisongi, mpe mposa ya mosuni mpe ya kolula na kati na bango; boye na makambo oyo batiaki bosoto na mabula na bango.

7 Bazalaki na bolembu ya koyoka mongongo ya Nkolo Nzambe na bango; boye, Nkolo Nzambe na bango azali na bolembu ya koyoka sambo na bango, ya koyanola bango na mokolo ya mitungisi na bango.

8 Na mokolo na bango ya kimia batalaki toli na ngai mpamba; kasi, na mokolo ya mitungisi na bango, mpo baluki ngai na bosenga na bango.

9 Solo nalobi epayi na bino, ata kutu masumu na bango, nsopo na ngai etondi na mawa epayi na bango. Nakobwaka bango libela te; mpe na mokolo ya nkele nakokundola boboto.

10 Nalapaki ndai, mpe mokano mobimaki lokola motindo ya liboso oyo napesaki epayi na bino, ete nakotika mompanga ya bosiliki na ngai ekweya mpo na bato na ngai; mpe kutu lokola nalobaki, ekosalema.

11 Bosiliki na ngai kala mingi te ekosopana beboo likolo ya bikolo nyonso; mpe oyo nakosala yango ntango nkeni ya mabe na bango etondi.

12 Mpe na mokolo wana baoyo wana nyonso bakozwama likolo ya linongi, to na maloba mosusu, Yisalaele nyonso na ngai, ekobikisama.

13 Mpe bango oyo bapanzanaka bakosangisama.

14 Mpe bango nyonso oyo bazalaki na matanga bakolendisama.

15 Mpe bango nyonso oyo bapesaki bomoi na bango mpo na nkombo na ngai bakolatisama motole.

16 Boye, tika ete mitema na bino elendisama mpo na oyo etali Siona; mpo mosuni nyonso ezali na maboko na ngai; botikala nie mpe boyeba ete nazali Nzambe.

17 Siona ekolongolama uta na esika na yango te, ata kutu bana na ye bapanzani.

18 Bango oyo batikali, mpe bazali peto na motema, bakozonga, mpe bakoya epia na mabula na bango, bango mpe bana na bango, koyembaka nzembo ya bosepeli ya libela, mpo na kotonga bisika ebeba ya Siona—

19 Mpe makambo oyo nyonso ekosalema mpo ete makomi ya baprofeta makokisama.

20 Mpe, tala, ezali na esika moko mosusu eponami longola se moko oyo naponaki te; esika moko mosusu ekozala mpe te longola se oyo naponaki, mpo na bosangani ya basantu na ngai—

21 Kino ekoya mokolo yango ntango esika moko ekozwama kuna mpo na bango te; mpe na ntango wana nazali na bisika mosusu oyo napesaki epayi na bango, bikobiangama makonzi, mpo na kozala lokola elamba ya ema to bokasi ya Siona.

22 Tala, ezali bolingi na ngai, ete nyonso oyo babelelaka na nkombo na ngai, mpe bakumbamelaka ngai engebene na nsango malamu na ngai ya libela, basengeli kosangana esika moko, mpe kotelema na bisika bisantu;

23 Mpe bomilengela mpo na emoniseli boye ezali koya, ntango elamba oyo ezipaka tempelo na ngai, kati na tabelenakele na ngai, oyo ebombaka mabele, ekolongolama, mpe mosuni nyonso ekomona ngai na ntango se moko wana.

24 Mpe eloko nyonso ya mbindo, ezala ya bato, soki ya banyama ya zamba, soki mpe ya bandeke ya likolo, soki mpe ya mbisi ya mai, oyo efandi likolo ya etando nyonso ya mabele, ekozikisama;

25 Mpe lisusu oyo wana esalemaki na eloko ya bokeli ekoniangwama na moto makasi; mpe biloko nyonso bikoma ya sika, ete boyebi na ngai mpe nkembo na ngai efanda likolo ya mabele nyonso.

26 Mpe na mokolo wana bonguna ya moto, mpe bonguna ya banyama, iyo, bonguna ya mosuni nyonso, ekosila uta na liboso ya elongi na ngai.

27 Mpe na mokolo wana nyonso oyo moto akosenga, ekopesama epayi na ye.

28 Mpe na mokolo wana Satana akozala na nguya ya kosenginya moto te.

29 Mpe mawa ekozala lisusu te mpo ete liwa ezali te.

30 Na mokolo wana mwana moke akokufa te kino akomi mokolo; mpe bomoi na ye ekozala lokola mibu ya nzete;

31 Mpe ntango akufi akolala te, elingi koloba na mabele, kasi akobongolama na bofini moko ya liso, mpe akokamatama likolo, mpe bopemi na ye ekozala ya nkembo.

32 Iyo, solo nalobi epayi na bino, na mokolo wana ntango Nkolo akoya, akobimisa makambo nyonso—

33 Makambo oyo maleka, mpe makambo ebombama oyo moto moko te ayebaki, biloko ya mabele, na oyo wapi esalemaki, mpe ntina mpe nsuka na yango—

34 Biloko ya motuya koleka, biloko oyo ezali likolo, mpe biloko oyo ezali na nse, biloko oyo ezali kati na mabele, mpe likolo ya mabele, mpe na lola.

35 Mpe nyonso oyo bazali koyoka mpasi ya monyokoli mpo na nkombo na ngai, mpe koyika mpiko kati na bondimi, ata babiangami kotika bomoi na bango mpo na ntina na ngai nzokande bakokabola nkembo nyonso oyo.

36 Yango wana, bobanga te kutu kino liwa; mpo kati na mokili oyo bosepeli na bino etondi te, kasi na ngai bosepeli na bino etondi.

37 Boye, bomitungisa mpo na nzoto te, soki mpe mpo na bomoi ya nzoto mpe te; kasi bomitungisa mpo na molimo, mpe mpo na bomoi ya molimo.

38 Mpe boluka ntango nyonso elongi ya Nkolo, ete kati na bompikiliki bokoka kozwa milimo na bino, mpe bokozwa bomoi ya seko.

39 Ntango bato babiangami na nsango malamu na ngai ya libela, mpe bayokani na liyokani na ngai ya libela, bango nde batangami lokola mongwa ya mokili mpe elengi ya bato;

40 Babiangami kozala elengi ya bato; boye, soki mongwa wana ya mokili mobungisi elengi na yango, tala, uta ntango wana kokende liboso ezali malamu mpo na eloko moko te bobele se kobwakama mpe konyatama na nse ya makolo ya bato.

41 Tala, bwania ezali awa mpo na oyo etali bana ya Siona, kutu mingi, kasi nyonso te; bazwamaki babuki mobeko, boye basengeli kopesama etumbu—

42 Ye oyo azali komitombola ye moko akokitisama, mpe ye oyo azali komikitisa ye moko akotombolama.

43 Mpe sikawa, nakolakisa epayi na bino lisese moko, ete bokoka koyeba bolingi na ngai mpo na oyo etali bosikoli ya Siona.

44 Moto moko ya lokumu azalaki na eteni ya mabele, ya boponi mpenza; mpe alobaki na basali na ye: Bokende na elanga na ngai ya bilaya, kutu likolo ya eteni ya mabele oyo ya boponi mpenza, mpe bolona nzete ya bilaya zomi na mibale;

45 Mpe botia bakengeli nzinganzinga na yango, mpe tonga linongi, ete moto moko akoka kotala mabele yango nzinganzinga, mpo na kozala mokengeli likolo ya linongi, ete nzete ya bilaya na ngai ekoka kobukana te ntango monguna akoya kobebisa mpe kobuka mbuma ya elanga na ngai ya bilaya.

46 Sikawa, basali ya moto ya lokumu bakendaki mpe basalaki lokola nkolo na bango atindaki bango, mpe balonaki nzete ya bilaya, mpe batongaki lopango nzinganzinga, mpe batiaki mokengeli, mpe babandaki kotonga linongi.

47 Mpe wana ezalaki bango kotia moboko ya linongi yango, babandaki koloba na kati na bango moko: Mpe na ntina nini ezali nkolo na ngai na mposa ya linongi oyo?

48 Mpe batunanaki mpo na ntango molai, kolobaka na bango moko: Ntina nini ezali nkolo na ngai na mposa ya linongi oyo, mpamba te oyo ezali ntango ya kimia?

49 Ebongi malamu te ete mosolo oyo mopesama epayi ya bateki misolo? Mpo biloko oyo ezali na ntina te.

50 Mpe wana ezalaki bango koyokana moko na mosusu te bakomaki goigoi, mpe batiaki bokebi na mitindo ya Nkolo na bango te.

51 Mpe monguna ayaki na butu, mpe abukaki lopango; mpe basali ya moto ya lokumu batelemaki mpe babangaki, mpe bakimaki; mpe monguna abebisaki misala na bango, mpe abukaki nzete ya bilaya.

52 Sikawa, tala, moto ya lokumu, nkolo ya elanga ya bilaya, abiangaki basali na ye, mpe alobaki epayi na bango, Mpo na nini! nini ezali ntina ya mabe monene oyo?

53 Esengelaki bino kosala lokola natindaki bino te, mpe—esilaki bino kolona elanga ya bilaya, mpe kotonga lopango penepene, mpe kotia bakengeli likolo ya bifelo na yango—kotonga lisusu linongi, mpe kotia mokengeli likolo ya linongi, mpe kokengela mpo na elanga na ngai ya bilaya, mpe kokweya te na kolalaka mpongi, mbele monguna akweyela bino?

54 Mpe tala, mokengeli likolo ya linongi alingaki amona monguna wana ezalaki ye naino mosika; mpe na ntango wana bolingaki kobelema kopekisa monguna uta na kobukaka lopango yango, mpe kobikisa elanga na ngai ya bilaya uta na maboko ya mobebisi.

55 Mpe nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya moko ya basali na ye: Kende mpe sangisa esika moko montika ya basali na ngai, mpe kamata bokasi nyonso ya ndako na ngai, boye bazali babundi na ngai, bilenge mibali na ngai, mpe baoyo bazali na mibu ya katikati lisusu na kati ya basali na ngai nyonso, oyo bazali bokasi ya ndako na ngai, longola se bobele baoyo wana naponaki kotikala;

56 Mpe bokende semba na mabele ya elanga na ngai ya bilaya, mpe bosikola elanga na ngai ya bilaya, mpo ezali na ngai; nasombaki yango na mosolo.

57 Boye, bokende semba na mabele na ngai; bobuka bifelo ya banguna na ngai; bokitisa linongi na bango na nse, mpe bopanza bakengeli na bango.

58 Mpe mbala mingi lokola bakosangana esika moko mpo na kobundisa bino, bekola ngai uta na banguna na ngai, ete noki nakoka koya na montika ya ndako na ngai mpe nakamata mboka.

59 Mpe mosali alobaki epayi ya Nkolo na ye: Makambo oyo ekozala ntango nini?

60 Mpe alobaki epayi ya mosali na ye: Ntango nakolinga; yo kende semba, mpe sala makambo nyonso nasili kotinda yo;

61 Mpe oyo ekozala elembo mpe lipamboli na ngai likolo na yo—kapita moko ya sembo mpe ya bwania kati ya ndako na ngai, mokonzi kati na bokonzi na ngai.

62 Mpe mosali na ye akendaki semba, mpe asalaki makambo nyonso oyo nkolo na ye atindaki ye; mpe nsima ya mikolo mingi makambo nyonso makokisamaki.

63 Lisusu, solo nalobi epayi na bino, nakolakisa bino bwania na ngai mpo na oyo etali Baeklezia nyonso, mbala mingi lokola bikolinga kokambama na nzela ya sembo mpe oyo ebongi mpo na lobiko na bango—

64 Ete mosala ya bosangisi basantu na ngai esika moko mokoka kokoba, ete natia bango mpo na nkombo na ngai na bisika bisantu; mpo ntango ya kobuka mbuma eyei, mpe liloba na ngai esengeli kokokisama.

65 Boye, nasengeli kosangisa bato na ngai esika moko, engebene na lisese ya masangu mpe matiti mabe, ete masangu makoka kobatelama kati na bibombelo mpo na kozwa bomoi ya seko, mpe kolatisama motole na nkembo ya selesitiale, ntango nakoya kati na bokonzi ya Tata na ngai kofuta moto na moto engebene na lolenge mosala na ye ekozala;

66 Nzokande matiti mabe makokangisama mobimba liboke, mpe basinga na yango ekangisami makasi, ete makoka kozikisama na moto oyo mozimaka te.

67 Boye, motindo moko napesi epayi ya Baeklezia nyonso, ete bikoba kosangana esika moko na bisika oyo naponaki.

68 Nzokande, lokola nalobelaki bino na motindo moko liboso, tika ete bosangisi na bino ezala na lombangu te, soki na bokimi mpe te; kasi tika ete makambo nyonso elengelama liboso na bino.

69 Mpe mpo ete makambo nyonso elengelama liboso na bino, bobatela motindo oyo nasili kopesa mpo na oyo etali makambo oyo—

70 Oyo mobeko molobi, soki mpe moteyi, ete bosomba mabele nyonso na mosolo, oyo makoki kosombama na mosolo, na etuka nzinganzinga ya mabele oyo naponaki mpo na kozala mboka ya Siona, mpo na ebandeli ya bosangani ya basantu na ngai;

71 Mabele nyonso oyo makoki kosombama na etuka ya Jackson, mpe na bituka ya nzinganzinga, mpe tika ndambo etikali na loboko na ngai.

72 Sikawa, solo nalobi epayi na bino, tika ete Baeklezia nyonso bisangisa misolo na bango nyonso esika moko, tika ete makambo oyo esalema na ntango na yango, kasi na lombangu te; mpe botosa kosala ete makambo nyonso elengelama liboso na bino.

73 Mpe tika ete bato ya lokumu baponama, kutu bato ya bwania, mpe botinda bango bakenda kosomba mabele oyo.

74 Mpe Baeklezia na bikolo ya esti, ntango etongami, soki bakoyoka toli oyo bakoki kosomba mabele mpe kosangana esika moko likolo ya mabele yango; mpe na lolenge oyo bakoki kotia Siona.

75 Mingi esili kozwama sikawa na lolenge ya kokoka kati na ebombelo, iyo, kutu ya kotondana koleka, mpo na kosikola Siona, mpe kotonga bisika ebeba ya ye, oyo ekokweisama lisusu te, soki Baeklezia, oyo ebiangami na nkombo na ngai, bilingaki koyoka mongongo na ngai.

76 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, baoyo wana bapalangisamaki na banguna na bango, ezali bolingi na ngai ete bakoba kobondela mpo bafutama mbeba bazwaki, mpe bosikoli, na maboko ya baoyo wana batiami lokola bakonzi mpe bazali na likoki likolo na bino—

77 Engebene na mibeko mpe mobeko likonzi ya bato ya mboka, oyo napesi nzela ete mitiama, mpe esengeli kosungama makasi mpo na kobatela makoki mpe mpo na bobateli ya mosuni nyonso, engebene na mabongisi ya boyengebene mpe mabongisi masantu;

78 Ete moto na moto akoka kosala engebene na malongi mpe mabongisi etali ntango ekoya, engebene na nguya ya boponi kati na bolamu mpe mabe oyo napesaki epayi na ye, ete moto na moto akoka kozala moyanoli mpo na masumu na ye moko na mokolo ya bosambisi.

79 Boye, ezali malamu te ete moto azala kati na boumbu moko mpo na mosusu.

80 Mpe mpo na ntina oyo nde natiaki Mobeko likonzi ya mboka oyo, na maboko ya bato ya bwania baoyo natelemisaki mpo na ntina oyo, mpe nasikolaki mboka na kosopaka makila.

81 Sikawa, nakomeka bana ya Siona na nini? Nakomeka bango na lisese ya mwasi mpe mosambisi ya nkuna, mpo bato basengeli ntango nyonso kosambela mpe kolemba te, oyo elobi—

82 Ezalaki kati na engumba moko na mosambisi moko oyo azalaki kobanga Nzambe te, soki mpe kotala moto te.

83 Mpe ezalaki na mwasi moko mokufeli mobali na engumba wana, mpe ayaki epayi na ye, kolobaka: Longisa ngai uta na moyini na ngai.

84 Mpe alingaki mpo na ntango moko te, kasi nsima alobaki kati na ye moko: Ata nabangaka Nzambe te, soki mpe kotala moto te, nzokande mpo ete mwasi mokufeli mobali oyo azali kotika ngai te nakolongisa ye, na kobangaka ete akoba koya kotungisa ngai.

85 Boye nde nalingi komeka bana ya Siona.

86 Tika bango babondela na nse ya makolo ya mosambisi;

87 Mpe soki ayokeli bango te, tika babondela na nse ya makolo ya mokambi ya etuka;

88 Mpe soki mokambi ya etuka ayokeli bango te, tika bango babondela na nse ya makolo ya mokonzi ya mboka;

89 Mpe soki moyangeli ya mboka ayokeli bango te, bongo Nkolo akotelema mpe akobima uta na esika ya bobombani na ye, mpe na nkele na ye akoyokisa ekolo mawa;

90 Mpe na bosiliki bonene na ye, mpe na nkanda makasi na ye, na ntango na ye, akokata bakapita wana ya nkuna, bazanga bosembo, mpe bazanga boyengebene, mpe akopesa bango likabo na bango na kati ya bakibisi, mpe na kati ya baoyo bazanga bondimi;

91 Kutu na molili ya libanda, kuna ezali boleli, mpe biyelela, mpe boliani mino.

92 Bosambela, boye, ete matoyi na bango makoka kofungolama na mabondeli na bino, ete nakoka kotondisama na boboto epayi na bango, ete makambo oyo makoka te koya likolo na bango.

93 Oyo nalobeli bino esengeli ezala, ete bato nyonso batikala na mokalo te;

94 Ete bato na bwania mpe bakonzi bakoka koyoka mpe koyeba oyo bayebaki soki moke te;

95 Ete nakoka kokokisa mosala na ngai, mosala na ngai ya kokamwa, mpe nasala malamu mosala na ngai, mosala ya kokamwa, ete bato bakoka kososola katikati na basembo mpe bankuna, elobi Nzambe na bino.

96 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ezali na bokeseni ya motindo mpe bolingi na ngai ete mosali na ngai Sidney Gilbert ateka ebombelo na ngai, oyo napesaki mpo na bato na ngai, na maboko ya banguna na ngai.

97 Botika te ete oyo nasili kopesa etiama bosoto na banguna na ngai, na bondimami ya baoyo wana bamibiangami na nkombo na ngai;

98 Mpo oyo ezali lisumu ya mawa mingi mpe ya monene na ngai, mpe na bato na ngai, na ntina ya makambo wana nakamataki mokano mpe oyo makokweyela kala mingi te bikolo.

99 Boye, ezali bolingi na ngai ete bato na ngai basengeli kosenga makoki, mpe kokoba kosenga makoki oyo na oyo napesaki bango, ata soki bapesami te nzela ya kofanda likolo na yango.

100 Nzokande, nalobi te ete bakofanda likolo na yango te; na lolenge oyo bakobota mbuma mpe misala milongobani mpo na bokonzi na ngai, bakofanda likolo na yango.

101 Bakotonga, mpe mosusu akosangola libula na yango te, bakolona bilanga ya vinyo, mpe bakolia mbuma na yango. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa