Makomi
Malongi mpe Mayokani 109


Eteni 109

Oyo ezali losambo epesamaki ntango babulisaki tempelo na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 27, sanza ya misato ya mobu 1836. Engebene na lisakoli ekomami ya Profeta, losambo oyo epesamaki na ye na nzela ya emoniseli.

1–5, Tempelo ya Kirtland etongamaki lokola esika wapi Mwana ya Moto akutanaka na bato; 6–21, Esengeli ezala ndako moko ya losambo, ya kokila, ya bondimi, ya boyekoli, ya nkembo, mpe ya molongo, mpe ndako moko ya Nzambe; 22–33, Tika ete bato bazangi boyamboli oyo bazali kotelemela bato ya Nkolo basambwisama; 34–42, Tika ete Basantu bakende na nguya kosangisa basembo na Siona; 43–53, Tika ete Basantu bakangolama uta na makambo ya nsomo oyo Nkolo akosopa likolo ya bato ya nkuna na mikolo ya nsuka; 54–58, Tika ete bikolo mpe bato mpe Baeklezia bilengelama mpo na nsango malamu; 59–67, Tika ete Bayuda, Balamani, mpe Yisalaele nyonso basikolama; 68–80, Tika ete Basantu balatisama mitole ya nkembo mpe lokumu mpe bazwa lobiko ya seko.

1 Matondi mapesama na nkombo na yo, O Nkolo Nzambe ya Yisalaele, oyo abatelaka liyokani mpe alakisaka boboto epayi ya basali na yo baoyo batambolaka sembo liboso na ye, na mitema na bango nyonso—

2 Yo oyo otindaki basali na yo kotonga ndako mpo na nkombo na yo na esika oyo [Kirtland].

3 Mpe sikawa omoni, O Nkolo, ete basali na yo basali engebene na motindo na yo.

4 Mpe sikawa tosengi yo, Tata ya Santu, na nkombo ya Yesu Klisto, Mwana ya ntolo na yo, na nkombo ya bobele nani lobiko ekoki kopesama na bana ya bato, tosengi yo, O Nkolo, kondima ndako oyo, mosala mosalemi na maboko na biso, basali na yo, oyo otindaki biso kotonga.

5 Mpo oyebi ete tosalaki mosala oyo na nzela ya mokakatano monene; mpe uta na ezalela ya bobola na biso topesaki na biso biloko mpo na kotonga ndako mpo na nkombo na yo, ete Mwana ya Moto akoka kozwa esika ya komimonisa epayi ya bato na ye.

6 Mpe lokola olobaki yango na emoniseli moko, oyo bopesamaki na biso, kobengaka biso baninga na yo, kolobaka—Bobenga eyangani ya bato nyonso, lokola natindaki bino;

7 Mpe lokola nyonso bazali na bondimi te, boluka na molende mpe boteyana moko mpe mosusu maloba ya bwania; iyo, boluka buku ya malamu koleka ya maloba ya bwania, boluka kozwa boyebi kutu na nzela ya boyekoli mpe lisusu na nzela ya bondimi;

8 Bomibongisa bino moko, bolengela eloko nyonso ya ntina bosengeli, mpe botia ndako moko, kutu ndako ya losambo, ndako ya kokila, ndako ya bondimi, ndako ya koluka boyebi, ndako ya nkembo, ndako ya molongo, ndako ya Nzambe;

9 Ete kokota na bino ekoka kozala na nkombo ya Nkolo, ete kobima na bino ekoka kozala na nkombo ya Nkolo, ete mbote nyonso bokopesana ekoka kozala na nkombo ya Nkolo, na maboko matombwami likolo epayi ya oyo Aleki Likolo—

10 Mpe sikawa, Tata ya Santu, tosengi yo kosalisa biso, bato na yo, na ngolu na yo, na kobengaka eyangani monene, ete ekoka kosalema na lokumu na yo mpe na bondimami na yo ya bonzambe;

11 Mpe na lolenge ete tokoka komona ete tolongobani, na miso na yo, mpo na kozwa bokokisi ya bilako oyo opesaki epayi na biso, bato na yo, kati na bimoniseli epesami epayi na biso;

12 Ete nkembo na yo ekoka kofanda likolo ya bato na yo, mpe likolo ya ndako oyo na yo, oyo tozali kobulisa sikawa epayi na yo, ete ekoka kosantisama mpe kobulisama mpo na kozala esantu, mpe ete bozali na yo esantu ekoka ntango nyonso kozala kati na ndako oyo;

13 Mpe ete bato nyonso oyo bakoyingela na ekuke ya ndako ya Nkolo bakoka koyoka nguya na yo, mpe basengisama kondima ete osantisaki yango, mpe ete ezali ndako na yo, esika ya bosantu na yo.

14 Mpe tosengi opesa, Tata ya Santu, ete nyonso oyo bakogumbamela yo kati na ndako oyo bakoka koteyama maloba ya bwania uta na buku ya malamu koleka, mpe ete bakoka koluka kozwa boyebi kutu na nzela ya boyekoli, mpe lisusu na nzela ya bondimi, lokola elobaki yo;

15 Mpe ete bakoka kokola na yo, mpe kozwa litondi ya Molimo Mosantu, mpe bamibongisama engebene na mibeko na yo, mpe bamilengela mpo na kozwa eloko nyonso ya ntina;

16 Mpe ete ndako oyo ekoka kozala ndako moko ya losambo, ndako ya kokila, ndako ya bondimi, ndako ya nkembo mpe ya Nzambe, kutu ndako na yo;

17 Ete kokota nyonso ya bato na yo, kati na ndako oyo, ekoka kozala na nkombo ya Nkolo;

18 Ete kobima na bango uta na ndako oyo ekoka kozala na nkombo ya Nkolo;

19 Mpe ete mbote na bango nyonso ekoka kozala na nkombo ya Nkolo, na maboko masantu, matombwami epayi ya oyo Aleki Likolo;

20 Mpe ete eloko moko te ya mbindo epesama nzela ya koya kati na ndako na yo mpo na kotia yango bosoto;

21 Mpe sala ete ntango bato na yo babuki mobeko, ezala moko na bango, bakoka na lombangu koyambola mpe kozonga epayi na yo, mpe bazwa lisungi na miso na yo, mpe bazongisama na mapamboli oyo otindaki ete masopana likolo ya baoyo wana bakomemia yo kati na ndako na yo.

22 Mpe tosengi yo, Tata ya Santu, ete basali na yo bakoka kokende uta na ndako oyo ya kolatisama na bibundeli ya nguya na yo, mpe ete nkombo na yo ezala likolo na bango, mpe nkembo na yo ezala nzinganzinga na bango, mpe banjelu na yo bazwa mokumba likolo na bango;

23 Mpe uta na esika oyo bakoka komema nsango ya bosepeli monene koleka mingi, kati na bosolo, kino na nsuka ya mabele, ete bakoka koyeba ete oyo ezali mosala na yo, mpe ete osili kosembola loboko na yo, mpo na kokokisa oyo olobaki na nzela ya minoko ya baprofeta, mpo na oyo etali mikolo ya nsuka.

24 Tosengi yo, Tata ya Santu, kolendisa bomoi nyonso ya bato oyo bakongumbamela, mpe kozala na nkombo ya lokumu mpe bazali na ndako oyo ya yo, kino na nkola nyonso mpe mpo na boseko;

25 Ete ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa bango ekolonga; ete ye oyo akotimolela bango libulu akokweya se na kati ye moko;

26 Ete likelemba moko te ya nkuna ekozwa nguya ya kotelemela mpe kolonga likolo ya bato na yo likolo ya baye kani nkombo na yo ekotiama kati na ndako eye;

27 Mpe tosengi ete soki bato nani batelemeli bato oyo, tika ete nkanda na yo epela na bango;

28 Mpe soki bakobeta bato oyo, yo okobeta bango; okobundela bato na yo lokola osalaki na mokolo ya etumba, ete bakangolama uta na maboko ya banguna na bango.

29 Tosengi yo, Tata ya Santu, kosambwisa, mpe kokamwisa, mpe komema na nsoni mpe na mobulu, baoyo nyonso bapanzaki mosali na yo soki te basali na yo nsango ya lokuta bipayi na bipayi, likolo ya mokili, soki bakoyambola te, ntango nsango malamu ya libela ekosakolama na matoyi na bango;

30 Mpe ete misala na bango nyonso mikoka komonisama mpamba, mpe mikombolama na mvula ya mabanga, mpe na masambisi oyo okotinda likolo na bango na nkanda na yo, ete nsuka ekoka kotiama na lokuta mpe na bokoseli bato na yo makambo.

31 Mpo ete oyebi, O Nkolo, ete basali na yo bazali na ekweyeli moko te liboso na yo na kotatolaka nkombo na yo, mpo na oyo nde bayokaki mpasi ya makambo oyo.

32 Boye tozali kobondela liboso na yo mpo ete tokangolama mobimba mpe libela uta na nse ya nkanga oyo;

33 Buka yango, O Nkolo; buka yango uta na nkingo ya basali na yo, na nguya na yo, ete totelema na katikati ya nkola oyo mpe tosala mosala na yo.

34 O Yehova, lakisa boboto na bato oyo, mpe lokola moto nyonso asumukaka, limbisa bobuki mibeko ya bato na yo, mpe tika elongolama mpenza libela.

35 Tika ete epakolami ya basali na yo ekangama likolo na bango na nguya uta na likolo.

36 Tika ete ekokisama likolo na bango, lokola likolo ya baoyo wana na mokolo ya Pantekote; tika ete likabo ya koloba minoko esopana likolo ya bato na yo, kutu likabolama lokola lolemo ya moto, mpe bolimboli ya minoko yango mpe lokola.

37 Mpe tika ete ndako na yo etondisama, lokola na lokito ya mopepe makasi, na nkembo na yo.

38 Tia likolo ya basali na yo litatoli ya liyokani yango, ete ntango bakokende mpe bakosakola liloba na yo bakoka kokanga mobeko singa, mpe kolengela mitema ya basantu na yo mpo na masambisi nyonso okotinda kala mingi te, na nkele na yo, likolo ya bafandi ya mabele, na ntina ya bobuki mibeko na bango, ete bato na yo balemba te na mokolo ya mitungisi.

39 Mpe na engumba nyonso wapi ekokota basali na yo, mpe bato ya engumba wana bayambi litatoli ya basali na yo, tika ete kimia na yo mpe lobiko na yo ezala likolo ya engumba wana; ete bakoka kosangisa basembo uta na engumba wana, ete bakoka koya na Siona, to na makonzi na yango, bisika oyo eponami na yo, koyembaka banzembo ya bosepeli ya libela;

40 Mpe kino oyo ekokisama, kotika te masambisi na yo makweya likolo ya engumba wana.

41 Mpe engumba nyonso wapi basali na yo bakokota, mpe bato ya engumba wana bayambi litatoli ya basali na yo te, mpe basali na yo bakebisi bango komibikisa uta na nkola oyo ya mabe, tika ete ezala likolo ya engumba wana engebene na oyo olobaki na nzela ya minoko ya baprofeta na yo.

42 Kasi yo nde kangola, O Yehova, tobondeli yo, basali na yo uta na maboko na bango, mpe sukola bango uta na makila na bango.

43 O Nkolo, tozali kosepela na ebebi ya baninga na biso bato te; milimo na bango ezali motuya liboso na yo;

44 Kasi liloba na yo esengeli kokokisama. Salisa basali na yo ete baloba, wana ezali ngolu na yo kosungaka bango: Bolingi na yo esalema, O Nkolo, kasi ya biso te.

45 Toyebi ete olobaki na monoko ya baprofeta na yo makambo ya nsomo mpo na oyo etali bato ya nkuna, na mikolo ya nsuka—ete okosopisa masambisi na yo, beboo;

46 Boye, O Nkolo, kangola bato na yo uta na mawa monene ya bato ya nkuna; pesa basali na yo makoki ya kotia mobeko singa, mpe kokanga litatoli, ete bakoka kozala bato bamilengeli na mokolo ya bozikisi.

47 Tosengi yo, Tata ya Santu, kokundola baoyo wana babengamaki na bafandi ya etuka ya Jackson, Missouri, uta na mabele ya bosangoli libula na bango, mpe buka, O Nkolo, nkanga oyo ya mitungisi oyo etiami likolo na bango.

48 Oyebi, O Nkolo, ete banyokwami mpe batungisami makasi na bato ya nkuna; mpe mitema na biso misopani na mawa mpo na mikumba na bango oyo ezali mpasi na komema.

49 O Nkolo, mpo na ntango boni okopesa nzela ete bato na yo bandima mitungisi oyo, mpe kolela ya bato na bango oyo bazangi ekweyeli bimata na matoyi na yo, mpe makila na bango mamata lokola litatoli liboso na yo, mpe ntango boni ekolakisa yo polele te litatoli na yo mpo na kosunga bango?

50 Zala na boboto, O Nkolo, na ebele oyo ya bato ya nkuna, oyo babenganaki bato na yo, ete bakoka kotika koyiba, ete bakoka koyambola uta na masumu na bango soki boyamboli ekoki kozwama;

51 Kasi soki bakoyambola te, tiaka loboko na yo mpamba, O Nkolo, mpe sikola oyo oponaki lokola Siona mpo na bato na yo.

52 Mpe soki ekoki kozala bongo te, ete ntina ya bato na yo ekoki kokokisama te liboso na yo ete nkanda na yo epelisama, mpe bosiliki na yo ekweya likolo na bango, ete babebisama, nyonso mosisa mpe etape, uta na nse ya lola;

53 Kasi mbala mingi lokola bakoyambola, ozali na ngolu mpe otonda na boboto, mpe okosukisa nkele na yo ntango okotala elongi ya Mopakolami na yo.

54 Lakisa boboto, O Nkolo, na bikolo nyonso ya mabele; lakisa boboto na bakonzi ya mboka na biso; tika ete mabongisi wana, oyo ebatelamaki na lokumu mpe limemia, elingi koloba, Mobeko likonzi ya mabele na biso, na batata na biso, motiama mpo na libela.

55 Omikundola bakonzi, bana ya bakonzi, bato ya lokumu, mpe bato minene ya mabele, mpe bato nyonso, mpe Baeklezia, babola nyonso, bakeleli, mpe bato ya mawa ya mabele;

56 Ete mitema na bango mikoka kolembisama ntango basali na yo bakobima uta na ndako na yo, O Yehova, mpo na kopesa litatoli ya nkombo na yo; ete makanisi na bango ya yambo makweya liboso ya bosolo, mpe bato na yo bakoka kozwa lisungi na miso ya bato nyonso;

57 Ete nsuka nyonso ya mabele ekoka koyeba ete biso, basali na yo, toyokaki mongongo na yo, mpe ete otindaki biso;

58 Ete uta na nsuka oyo nyonso, basali na yo, bana mibali ya Yakobo, bakoka kosangisa basembo mpo na kotonga engumba esantu na nkombo na yo, lokola otindaki bango.

59 Tosengi yo opesa na Siona makonzi mosusu ya kobakisa na moko oyo opesaki, ete bosangani ya bato na yo ekoka kokende liboso na nguya monene mpe lokumu, ete mosala na yo ekoka kosila noki kati na bosembo.

60 Sikawa maloba oyo, O Nkolo, tobimisi liboso na yo, mpo na oyo etali bimoniseli mpe mitindo oyo opesaki epayi na biso, baoyo tokitolami elongo na baoyo bazali Bayuda-te.

61 Kasi oyebi ete ozali na bolingo monene mpo na bana ya Yakobo, oyo basili kopanzana likolo ya bangomba mpo na ntango molai, na mokolo moko ya mapata mpe molili.

62 Tosengi yo boye kolakisa boboto likolo ya bana ya Yakobo, ete Yelusaleme, ekoka kobanda kosikolama, uta na ngonga oyo;

63 Mpe nkanga ya boumbu ekoka kobanda kobukama uta na ndako ya Dawidi;

64 Mpe bana ya Yuda bakoka kobanda kozonga na bamboka oyo opesaki na Abalayama, tata na bango.

65 Mpe sala ete mintika ya Yakobo, oyo milakelamaki mabe mpe babetamaki mpo na bobuki mibeko na bango, babongwana uta na ezalela na bango ya bonyama mpe ya nko ete bazwa litondi ya nsango malamu ya libela.

66 Ete bakitisa bibundeli na bango ya bosopi makila, mpe batika botomboki na bango.

67 Mpe ete mintika mipanzana nyonso ya Yisalaele, baoyo babenganamaki na nsuka ya mabele, baya na boyebi ya bosolo, bandimela Masiya, mpe basikolama uta na monyokoli, mpe basepela liboso na yo.

68 O Nkolo, ete omikundola mosali na yo, Joseph Smith Mwana, mpe mitungisi mpe minyokoli na ye nyonso—lolenge nini asalaki liyokani na Yehova, mpe alapaki ndai na yo, O Nzambe ya Bokasi ya Yakobo—mpe mitindo oyo opesaki epayi na ye, mpe ete na bosolo asalaki makasi mpo na kokokisa bolingi na yo.

69 Lakisa boboto, O Nkolo, likolo ya mwasi mpe bana na ye, ete banetolama na miso na yo, mpe babatelama na loboko na yo ya bobokoli.

70 Lakisa boboto likolo ya bandeko na bango ya mpembeni, ete makanisi na bango ya yambo ebukama mpe makombolama lokola na mpela; ete bakoka kobongwama mpe kosikolama na Yisalaele, mpe bayeba ete ozali Nzambe.

71 Omikundola, O Nkolo, bakambi, kutu bakambi nyonso ya eklezia na yo, ete loboko na yo ya mobali ekoka konetola bango, elongo na mabota na bango nyonso, mpe bandeko na bango ya mpembeni, ete nkombo na bango ekoka kobatelama ntango nyonso mpe ezala na bokundoli ya libela uta nkola na nkola.

72 Omikundola eklezia na yo nyonso, O Nkolo, elongo na mabota na bango nyonso, mpe bandeko nyonso na bango ya mpembeni, elongo na bakoni mpe baye na bango nyonso bazali na mitungisi, elongo na babola mpe basokemi nyonso ya mabele; ete bokonzi, oyo osili kotia na nzela ya maboko te, ekoka kokoma ngomba moko monene mpe etondisa mabele mobimba;

73 Ete eklezia na yo ekoka kobima uta na esobe ya molili, mpe engengakitoko lokola sanza, gaa lokola moi, mpe nsomo lokola limpinga elongo na bendele;

74 Mpe ete eklezia na yo ekembisama lokola mwasi ya libala mpo na mokolo wana ntango okolongola elamba oyo ezipi lola, mpe ntango bangomba ekitisama na miso na yo, mpe mabwaku matombwama, bisika bingunzami esembolama; ete nkembo na yo ekoka kotondisa mabele;

75 Ete ntango kelelo ekobeta mpo na bakufi, biso tokokamatama likolo na mapata mpo na kokutana na yo, ete tokoka kozala libela elongo na Nkolo;

76 Ete bilamba na biso bikoka kozala peto, ete tolatisama minkoto ya bosembo, kosimbaka mandalala na maboko na biso, mpe mitole ya nkembo likolo ya mitu na biso, mpe tobuka mbuma ya bosepeli ya seko mpo na bolozi na biso nyonso.

77 O Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso, yoka biso na mabondeli na biso, mpe yanola biso uta na lola, efandeli na yo esantu, epayi wapi ofandi likolo ya kiti ya bokonzi, na nkembo, lokumu, nguya, bonene, bokasi, mpifo, bosolo, boyengebene, bosambisi, boboto, mpe litondi ya nsuka te, uta libela na libela.

78 O yoka, O yoka, O yokela biso, O Nkolo! Mpe yanola mabondeli oyo, mpe ndima bobulisi ya ndako oyo mpo na yo, mosala ya maboko na biso, oyo totongaki na nkombo na yo;

79 Mpe lisusu ndima eklezia oyo, mpo na kotia nkombo na yo likolo na yango. Mpe salisa biso na nguya ya Molimo na yo, ete tokoka kosangisa mingongo na biso elongo na oyo wana ya baselafa baoyo wana ya ngelingeli, oyo bazali kongenga nzinganzinga ya kiti ya bokonzi na yo, kobetaka maboko ya bosanzoli, koyembaka Hozana na Nzambe mpe na Mwana ya mpate!

80 Mpe tika ete baoyo, bapakolami na yo, balatisama na lobiko, mpe basantu na yo baganga makasi mpo na bosepeli. Amene, mpe Amene.

Bimisa na lokasa