Makomi
Malongi mpe Mayokani 128


Eteni 128

Mokanda uta na Profeta Joseph Smith na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, oyo ezali na malako mosusu etali libatisi mpo na bakufi, etiami elaka na Nauvoo, Illinois, na mokolo ya 6, sanza ya libwa ya mobu 1842.

1–5, Kalaki ya lingomba mpe kalaki monene ya eklezia mobimba basengeli kotatola mosala mpenza ya ebatisi mpo na bakufi; 6–9, Masolo ya makomi na bango ezali solo mpe makangami na mabele mpe na lola; 10–14, Liziba ya libatisi ezali elilingi ya lilita; 15–17, Eliya azongisi nguya oyo etali libatisi mpo na bakufi; 18–21, nyonso ya bafungola, nguya, mpe makoki ya bileko ya ntango ya kala ezongisami; 22–25, Nsango ya bosepeli mpe ya nkembo eyebisami mpo na bato bazali na bomoi mpe bakufi.

1 Lokola nalobelaki bino na mokanda na ngai liboso natikaki esika nafandi, ete nakokomela bino mbala na mbala mpe kopesa bino nsango mpo na oyo etali makambo mingi, nazali sikawa kobandela lisusu likambo ya libatisi mpo na bakufi, lokola likambo oyo wana efandeli mayele na ngai, mpe ezali kotungisa mayoki na ngai makasi koleka, banda nalandamaki na banguna na ngai.

2 Nakomelaki bino mwa maloba moke ya emoniseli mpo na oyo etali kalaki. Nazwi mwa makanisi ya kobakisa mpo na oyo etali likambo oyo, oyo nazali kotatola sikawa. Elingi koloba, elobamaki na mokanda na ngai yambo ete esengeli kalaki mokomi moko azala, oyo asengeli kozala nzeneneke ya miso, mpe lisusu oyo akoyoka na matoyi na ye, ete akoka kosala lisolo ya makomi na bosolo liboso ya Nkolo.

3 Sikawa, mpo na oyo etali likambo oyo, elingaki kozala mpasi mpenza soki ete kalaki moko azala wana ntango nyonso, mpe ete asala makambo nyonso. Mpo na kokima mpasi oyo, kalaki moko akoki koponama na palwasi moko moko ya engumba, oyo akoki mpo na kokamata malamu masakoli; mpe tika ete azala sikisiki mpe polele na kokamataka nsango yango mobimba, mpe atatola na lisolo ya makomi na ye ete amonaki na miso na ye, mpe ayokaki na matoyi na ye, kotiaka elaka, mpe nkombo, mpe bongo na bongo, mpe lisolo ya likambo mobimba ndenge elekaki; kotangaka mpe nkombo ya bato misato oyo bazali wana, soki moko azalaki wana oyo akoki, na ntango bakobenga ye, kotatola makambo se moko wana, ete na monoko ya banzeneneke mibale to misato likambo nyonso ekatama.

4 Bongo, tika ete kalaki monene azala, epayi ya nani masolo ya makomi oyo mosusu makopesama, oyo matiami elongo na mokanda oyo molakisi bosolo mpe motiami maboko na bango moko likolo, kotatolaka ete lisolo ya makomi oyo basali ezali solo. Nsima kalaki monene ya eklezia akoki kokoma lisolo ya makomi yango na buku monene ya eklezia, elongo na mikanda oyo milakisi bosolo mpe banzeneneke nyonso oyo wana, na maloba etiami na ye moko ete andimi mpenza ete maloba mpe masolo ya makomi oyo likolo ezali solo, uta na boyebi na ye mpo na oyo etali bomoto mobimba ya bato wana mpe boponami na bango na eklezia. Mpe ntango oyo ekomami na buku monene ya eklezia, lisolo ya makomi yango ekozala mpenza esantu, mpe ekokokisa bokuli kaka se lokola soki amonaki na miso na ye mpe ayokaki na matoyi na ye, mpe asalaki lisolo ya makomi ya makambo se moko oyo na buku monene ya eklezia.

5 Bokoki kokanisa ete molongo ya makambo oyo eleki mingi kokitolama; kasi tika nayebisa bino ete ezali se mpo na kokokisa bolingi ya Nzambe, na kozalaka ya koyokanaka na bokuli mpe bolengeli oyo Nkolo akulisaki mpe alengelaki liboso ya ebandeli ya mokili, mpo na lobiko ya bakufi oyo bakokufa na kozangaka boyebi ya nsango malamu.

6 Mpe mpo na kobakisa, nalingi bomikundola ete Yoane Mobimisi azalaki kotalela mpenza se likambo moko oyo na ntina ya bakufi, ntango alobaki, lokola bokomona yango ekomami na Emoniseli 20:12—Mpe namonaki bakufi, mike mpe minene, batelemi liboso ya Nzambe; mpe buku efungolamaki; mpe buku mosusu efungolamaki, oyo ezalaki buku ya bomoi; mpe bakufi basambisamaki engebene na makambo oyo wana ekomamaki kati na buku yango, engebene na misala na bango.

7 Bokomona kati na litangi oyo ete buku efungolamaki; mpe buku mosusu efungolamaki, oyo ezalaki buku ya bomoi; kasi bakufi basambisamaki na kotalaka makambo oyo ekomamaki kati na buku yango, engebene na misala na bango; na nsuka, buku oyo elobami esengeli kozala buku oyo ezali na lisolo ya makomi ya misala na bango, mpe ezali kotalela masolo ya makomi ebatelami na mabele. Mpe buku oyo ezalaki buku ya bomoi ezali lisolo ya makomi oyo ebatelami na lola; libongisi yango koyokanaka polele na malongi oyo epesami epayi na bino lokola motindo kati na emoniseli ezwami na mokanda oyo nakomelaki bino liboso ete nalongwa na esika na ngai—ete nyonso etali masolo ya makomi na bino ekoka kokomama na lola.

8 Sikawa, lolenge ya bokuli oyo ezali na nguya ya bonganganzambe, na emoniseli ya Yesu Klisto, na oyo wapi epesami nzela ete nyonso oyo bokangi na mabele ekokangama na lola, mpe nyonso oyo bofungoli na mabele ekofungolama na lola. To, na maloba mosusu, na kososolaka bobongoli yango na ndenge ekeseni, nyonso oyo bokokoma na mabele ekokomama na lola, mpe nyonso oyo bokomi te na mabele ekokomama te na lola; mpo uta na buku oyo bakufi na bino bakosambisama, engebene na misala na bango moko, ezala soki bazalaki bango moko na makuli ya propria persona, elingi koloba na bomoto na bango moko, soki mpe na nzela ya bantoma ya bango moko, engebene na bokuli oyo Nzambe alengelaki mpo na lobiko na bango uta liboso ya ebandeli ya mokili, engebene na masolo ya makomi oyo babatelaki mpo na ntina ya bakufi na bango.

9 Ekoki komonana epayi ya boko bato ete malongi oyo tozali kolobela matengama mpenza—nguya oyo ezali kokoma to kokanga na mabele mpe kokanga na lola. Nzokande, na bikeke nyonso ya mokili, ntango nyonso Nkolo apesaki eleko moko ya bonganganzambe epayi ya moto moko na nzela ya emoniseli ya solo, to na liboke moko ya bato, nguya oyo ezalaki ntango nyonso se kopesama. Tala ntina, nyonso oyo bato wana basalaki na likoki, na nkombo ya Nkolo, mpe soki basalaki yango na solo mpe na bosembo, mpe babatelaki lisolo ya makomi ya solo mpe ya sembo ya bato se moko oyo, yango oyo ekomaki mobeko na mabele mpe na lola, mpe ekokaki te kokweya mpamba, engebene na mikano ya Yehova monene. Oyo ezali liloba ya sembo. Nani akoki koyoka yango?

10 Mpe lisusu, mpo na oyo eleki, tala Matai 16:18, 19: Mpe nalobi lisusu epayi na bino, Ete ozali Petelo, mpe likolo ya libanga oyo nakotonga eklezia na ngai; mpe bikuke ya lifelo bikolonga yango te. Mpe nakopesa epayi na bino bafungola ya bokonzi ya lola: mpe nyonso oyo bokokanga na mabele ekokangama na lola; mpe nyonso oyo bokofungola na mabele ekofungolama na lola.

11 Sikawa sekele ya monene mpe ya motuya mingi ya likambo yango mobimba, mpe summum bonum ya likambo mobimba oyo etiami liboso na biso, ezali nde kozwa banguya ya Bonganganzambe Bosantu. Mpo epayi na ye oyo bafungola oyo epesami ezali mpasi te ya kozwa boyebi ya makambo etali lobiko ya bana ya bato, ezala mpo na bakufi mpe mpo na baoyo bazali na bomoi.

12 Awa na kati ezali nkembo mpe lokumu, mpe bozangi kufa mpe bomoi ya seko—Bokuli ya libatisi na mai, kozindisama na kati mpo na kokokisa bokokani na elilingi ya bakufi, ete libongisi moko eyokana na mosusu; kozindisama na mai mpe kobima libanda uta na mai ezali elilingi ya bosekwi ya bakufi kobimaka libanda ya malita na bango; tala ntina, bokuli oyo etiamaki mpo na kosala mokangano na bokuli ya libatisi mpo na bakufi, mpo ezali na lolenge ya bakufi.

13 Na engebene, liziba ya libatisi etiamaki lokola elilingi ya lilita, mpe etindami kozala na nse ya esika wapi bato oyo bazali na bomoi bameseni kowangana, mpo na kokesenisa bato na bomoi mpe bakufi, mpe ete biloko nyonso ezala na bokokani na yango, mpe ete bikoka koyokana moko na mosusu—ete oyo ezali ya mabele eyokana na oyo ya lola, lokola Paulo alobaki, 1 Bakolinti 15:46, 47, mpe 48:

14 Nzokande oyo ya molimo eyaki liboso te, kasi oyo ya nzoto; mpe nsima oyo ezali ya molimo. Moto ya yambo awuti na mabele, azali ya mabele; moto ya mibale azali Nkolo uta na lola. Lokola ezali ya mabele, lolenge moko ezali lisusu baoyo ya mabele; mpe lokola ezali ya lola, lolenge moko ezali lisusu baoyo ya lola. Mpe lokola ezali masolo ya makomi na mabele kotalela bakufi na bino, oyo makomami na bosolo, bongo mpe lisusu ezali masolo ya makomi na lola. Boye, oyo ezali nguya ya kotia elembo mpe ya bokangi, mpe, na ndimbola moko ya liloba, bafungola ya bokonzi, oyo ezali na fungola ya boyebi.

15 Mpe sikawa, bandeko balingami mibali mpe basi, tika nayebisa bino solo ete oyo ezali mabongisi etali bakufi mpe bato na bomoi oyo ekoki kotalema likolo likolo te, na oyo etali lobiko na biso. Mpo lobiko na bango ezali ntina mpe esengelami mpo na lobiko na biso, lokola Paulo alobi na oyo etali batata—ete soki tozali te bakoki kokomisama bato babongi nie te—biso mpe tokoki kokomisama bato bato babongi nie te soki bakufi na biso bazali te.

16 Mpe sikawa, mpo na oyo etali libatisi ya bakufi, nakopesa bino litangi mosusu ya Paulo, 1 Bakolinti 15:29: Soki bongo te bazali kosala nini baoyo bazali kobatisama mpo na bakufi, soki bakufi bakosekwa te? Mpo na nini kasi ezali bango kobatisama mpo na bakufi?

17 Mpe lisusu, na boyokani na litangi oyo nakopesa bino litangi moko uta na moko ya baprofeta, oyo azalaki kotia miso na ye likolo ya bozongisi ya bonganganzambe, nkembo oyo ekobimisama na mikolo ya nsuka, mpe na lolenge moko eleki malamu likambo oyo ya nkembo koleka makambo nyonso oyo ezali ya nsango malamu ya libela, elingi koloba, libatisi mpo na bakufi; mpo Malaki alobi, na mokapo ya nsuka, milongo ya kotanga ya 5 mpe ya 6: Tala, nakotindela bino profeta Eliya liboso ya boyei ya mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo: Mpe akobalola mitema ya batata epayi ya bana mpe mitema ya bana epayi ya batata na bango, mbele naya mpe nabeta mabele na bolakeli mabe.

18 Nakokaki kopesa bobongoli ya polele koleka mpo na eye, kasi lokola etiami awa ezali polele na lolenge ya kokoka mpo na kokokisa ntina na ngai. Ebongi malamu koyeba, mpo na likambo oyo, ete mabele makobetama na bolakeli mabe longola se soki mokangano ya kokangisa bato ya lolenge moko to mosusu kati na batata mpe bana, na likambo moko to mosusu—mpe tala nini ezali likambo yango wana? Ezali libatisi mpo na bakufi. Mpo biso, soki bazali te, tokoki te kokomisama bato babongi nie; bango mpe bakoki te kokomisama bato babongi nie soki tozali te. Bango bakoki te, biso mpe lokola kokomisama bato babongi nie soki baoyo wana lisusu bakufaki kati na nsango malamu bazali te; mpo esengeli na ebandeli ya eleko ya litondi ya ntango, oyo eleko ezali sikawa kobanda kobandisa, ete bomoko ya mobimba mpe ya ndambo te mpe ya kobonga nie, mpe bosangisi esika moko ya bileko, mpe bafungola, mpe banguya, mpe bankembo esengeli kosalema, mpe kobimisama uta na mikolo ya Adama kutu kino na ntango ya lelo. Mpe bobele oyo te, kasi makambo oyo wana ebimisami ata mokolo moko te uta na ebandeli ya mokili, kasi ebatelami ya kobombama mosika na bato ya bwania mpe bato ya mayele, ekobimisama epayi ya bana mike mpe baoyo bazali komelisama libele kati na oyo eleko, eleko ya litondi ya ntango.

19 Sikawa, nini tozali koyoka na nsango malamu oyo tosili kozwa? Mongongo moko ya bosepeli! Mongongo ya boboto uta na lola; mpe mongongo ya bosolo uta na mabele; nsango ya nsai mpo na bakufi, mongongo moko ya bosepeli mpo na bato na bomoi mpe mpo na bakufi; nsango ya nsai ya bosepeli monene. Boni kitoko likolo ya ngomba ezali makolo ya baoyo wana bazali komema nsango ya nsai ya makambo malamu, mpe baoyo bazali koloba epayi ya Siona: Tala, Nzambe na yo azali koyangela! Lokola mamio ya Kalemele, bongo boyebi ya Nzambe ekokita likolo na bango!

20 Mpe lisusu, nini tozali koyoka? Nsango ya nsai uta na Kumola! Moroni, anjelu moko uta na lola, kosakolaka bokokisami ya baprofeta—buku oyo esengeli kobimisama. Mongongo ya Nkolo kati na esobe ya Fayette, etuka ya Seneca, koyebisaka banzeneneke Misato oyo bakopesa litatoli ya buku yango! Mongongo ya Mikaele na libongo ya Susquehanna, kokitolaka zabulu ntango amonisamaki lokola anjelu ya pole! Mongongo ya Petelo, Yakobo, mpe Yoane kati na esobe kati na Harmony, etuka ya Susquehanna, mpe Colesville, etuka ya Broome, na ebale ya Susquehanna, baoyo basakolaki bango moko kozala na bafungola ya bokonzi, mpe ya eleko ya litondi ya ntango!

21 Mpe lisusu, mongongo ya Nzambe kati na kisuku ya Tata mokolo Whitmer, na Fayette, na etuka ya Seneca, mpe na ntango ekeseni, mpe na bisika ya ndenge na ndenge na nzela ya mibembo mpe mikakatano ya Eklezia oyo ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka! Mpe mongongo ya Mikaele, anjelu monene; mongongo ya Gabaliele, mpe ya Lafaele, mpe ya banjelu ya ndenge na ndenge, uta na Mikaele to Adama kokita na ntango oyo, nyonso kotatolaka eleko na bango, makoki na bango, bafungola na bango, lokumu na bango, bonene mpe nkembo na bango, mpe nguya ya bonganganzambe na bango; kopesaka monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise; awa moke, mpe kuna moke; kopesaka biso libondisi na kosakolaka oyo wana esengeli koya, koyeisaka elikya na biso makasi!

22 Bandeko mibali bandimi, ekotia biso molende te na likambo ya ntina monene ya boye? Bokende liboso kasi bozonga nsima te. Boyika mpiko, bandeko mibali bandimi; mpe bokende liboso, liboso na elonga! Tika ete mitema na bino esepela, mpe ezala na esengo mingi koleka mpenza. Tika ete mabele mapasuka na koyembaka. Tika ete bakufi basakola nzembo ya bosanzoli ya seko na Mokonzi Emanuele, oyo akulaki, liboso ete mokili ezala, oyo ekokaki kopesa biso makoki ya kosikola bango uta na boloko na bango; mpo bakangemi bakokangolama.

23 Tika ete bangomba eganga mpo na bosepeli, mpe bino nyonso lobwaku boganga makasi; mpe bino nyonso mbu mpe mabele ekawuka boyebisa makamwisi ya Mokonzi na bino ya Seko! Mpe bino bibale, mpe miluka, mpe mikeli, botiola na esengo. Tika ete zamba mpe banzete nyonso ya bilanga esanzola Nkolo; mpe bino mabanga makasi bolela na bosepeli! Mpe tika moi, sanza, mpe minzoto ya ntongo eyemba elongo, mpe tika bana mibali nyonso ya Nzambe baganga mpo na bosepeli! Mpe tika ete bikelamo ya seko bitatola nkombo na ye libela na libela! Mpe lisusu nalobi, boni boni ya nkembo ezali mongongo oyo toyoki uta na lola, kosakolaka na matoyi na biso, nkembo, mpe lobiko, mpe lokumu, mpe bozangi kufa, mpe bomoi ya seko; babokonzi, biyangeli, mpe banguya!

24 Tala, mokolo monene ya Nkolo ezali koya na lombangu; mpe nani akoki kotikala mokolo ya boyei na ye, mpe nani akotelema ntango akomonana? Mpo azali lokola moto ya monetoli mabende, mpe lokola sabuni ya mosukoli bilamba; mpe akofanda lokola monetoli mpe mopetoli ya mpauni, mpe akopetola bana mibali ya Lewi, mpe akosukola bango lokola wolo mpe lokola mpauni, ete bakoka kobonza epayi ya Nkolo libonza na bosembo. Boye, tika ete biso, lokola eklezia mpe lokola bato, mpe lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, tobonza epayi ya Nkolo libonza na bosembo; mpe tika tolakisa na tempelo na ye esantu, ntango esili, buku moko oyo ezali na masolo ya makomi ya bakufi na biso, oyo ekozala elongobani mpo na bondimami nyonso.

25 Bandeko mibali bandimi, nazali na makambo mingi ya kolobela bino mpo na oyo etali likambo yango; kasi nakosukisa mokanda sikawa mpo na ntango oyo, mpe tokokoba likambo yango ntango mosusu. Nazali, seko, mosali na bino na bomikitisi mpe moninga na bino oyo akopengolama soki moke te,

Joseph Smith.

Bimisa na lokasa