Makomi
Malongi mpe Mayokani 132


Eteni 132

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Nauvoo, Illinois, ekomamaki na mokolo ya 12, sanza ya sambo ya mobu 1843, na kotalaka liyokani ya sika mpe ya libela, kotangaka mpe boseko ya liyokani ya libala mpe mabongisi ya libala na balongani ebele. Atako emoniseli yango etiamaki na nkoma na mobu 1843, bilembo ya bosolo elakisi polele ete ndambu ya mabongisi oyo ezwami kati na emoniseli oyo eyebanaki na Profeta banda mobu 1831. Tala Liyebisi ya Bakambi 1.

1–6, Bonetolami ezwami na nzela ya liyokani ya sika mpe ya libela; 7–14, Bionga mpe masengami ya liyokani wana etiami; 15–20, Libala ya selesitiale mpe kokoba ya libota kati na bomoko epesi bato makoki ya kokoma banzambe; 21–25, Nzela ya moke mpe ya nkaka ekambaka na bomoi ya seko; 26–27, Mobeko mopesami mpo na oyo etali kotuka Molimo Mosantu; 28–39, Bilaka ya bobakisami ya seko mpe bonetolami epesami na baprofeta mpe Basantu na bikeke nyonso; 40–47, Joseph Smith apesami nguya ya kotia elembo mpe ya kokanga na mabele mpe na lola; 48–50, Nkolo akangi likolo na ye bonetolami na ye; 51–57, Emma Smith apesami toli ya kozala sembo mpe solo; 58–66, Mibeko oyo mikambaka mabala na bolongani ebele epesami.

1 Solo, boye elobi Nkolo epayi na yo mosali na ngai Joseph, ete mbala mingi lokola olukaki uta na loboko na ngai koyeba mpe kososola lolenge nini ngai, Nkolo, nalongisaki basali na ngai Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, mpe lisusu Mose, Dawidi mpe Solomo, basali na ngai, mpo na oyo etali libongisi mpe malongi na ntina ya oyo bazalaki na basi mpe makango mingi—

2 Tala, mpe mona, nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe nakopesa yo eyano na ntina oyo etali likambo oyo.

3 Boye, lengela motema na yo mpo na kozwa mpe kotosa malako oyo nazali penepene ya kopesa epayi na yo; mpo baoyo wana nyonso mpo na nani mobeko oyo ebimisami basengeli kotosa kaka yango.

4 Mpo tala, nabimiseli bino liyokani ya sika mpe ya libela; mpe soki botosi yango te, bongo bokweisami; mpo moto moko te akoki kobwaka liyokani oyo mpe kopesama nzela ya kokota kati ya nkembo na ngai.

5 Mpo moto nyonso oyo akozwa lipamboli oyo na maboko na ngai akotosa mobeko oyo epesamaki mpo na lipamboli wana, mpe masengami na yango, lokola etiamaki uta liboso ya ebandeli ya mokili.

6 Mpe mpo na oyo etali liyokani ya sika mpe ya libela, yango etiamaki mpo na litondi ya nkembo na ngai; mpe ye oyo azwi litondi na yango asengeli mpe kotosa mobeko, to akokweisama, elobi Nkolo Nzambe.

7 Mpe solo nalobi epayi na bino, ete masengami ya mobeko oyo ezali oyo: Mayokani nyonso, mikanda ya boyokani, boyokani, masengeli, ndai, bilaka, misala oyo esili kokokisama, bolongani, masanga ya bato, to bozili, oyo esalemi mpe ekotisami te mpe ekangemi te na Molimo Mosantu ya elaka, na ye oyo apakolami, ezala mpo na ntango mpe mpo na boseko nyonso, mpe oyo wana lisusu na bosantu nyonso koleka, na nzela ya emoniseli mpe motindo na mopakolami na ngai, oyo nasili kopona na mabele mpo na kozala na nguya oyo (mpe nasili kopona mosali na ngai Joseph mpo na kozala na nguya oyo na mikolo ya nsuka, mpe ezalaka soki moke te bato mingi longola se moto moko na mabele na ntango yoko likolo ya nani nguya oyo epesami mpe bafungola ya bonganganzambe oyo epesami), ezali na bokasi moko te, bolamu soki mpe nguya moko te na ntango ya mpe nsima ya bosekwi uta na bakufi; mpo mikanda ya boyokani nyonso oyo misalemi te mpo na ntina oyo ezali na nsuka ntango bato bakufi.

8 Tala, ndako na ngai ezali ndako yoko ya molongo, elobi Nkolo Nzambe, kasi ndako ya mobulu te.

9 Ekondima ngai libonza, elobi Nkolo, oyo epesami te na nkombo na ngai?

10 To ekozna ngai uta na maboko na bino oyo wana napesaki te?

11 Mpe ekopesa ngai epayi na bino eloko soki nini, elobi Nkolo, longola se soki ezali engebene na mobeko, kutu lokola ngai na Tata na ngai tokulisaki bino, liboso ete mokili ezala?

12 Nazali Nkolo Nzambe na bino; mpe napesi epayi na bino motindo oyo—ete moto moko te akoki koya epayi ya Tata longola se na nzela na ngai soki te na nzela ya liloba ya ngai, oyo ezali mobeko na ngai, elobi Nkolo.

13 Mpe eloko nyonso oyo ezali na mokili, ezala soki ekulisami na bato, na bangbende, soki biyangeli, soki banguya, soki mpe biloko oyo ezali na nkombo, nyonso oyo ekoki kozala, oyo ezali na nzela na ngai to mpe na nzela ya liloba na ngai te, elobi Nkolo, bikobwakama na nse, mpe ekotikala te wana esili bato kokufa, ezala na ntango ya bosekwi soki mpe nsima ya bosekwi te, elobi Nkolo Nzambe na bino.

14 Mpo biloko nyonso oyo ekotikala ekulisami na ngai; mpe biloko nyonso oyo ekulisami na ngai te bikoningana mpe bikobebisama.

15 Na boye, soki moto moko abali mwasi na mokili, mpe abali ye na ndenge na ngai te to mpe na liloba na ngai te, mpe asali liyokani elongo na ye pona ntango oyo azali na mokili mpe ye mwasi elongo na ye, liyokani mpe libala na bango ezali na bokasi te ntango bakufi, mpe ntango bazali libanda ya mokili; na boye, bakangami na mobeko moko te ntango bazali libanda ya mokili.

16 Na boye, ntango bazali libanda ya mokili mibali babalaka te to basi bapesamaka na libala te; kasi baponami banjelu na lola, baye banjelu bazali basali mpo na mosala, mpo na kosalela baye wana balongobani mpo na litondi ya nkembo ya mosika koleka, mpe litondi ya nkembo ya seko.

17 Mpo banjelu oyo bakotaki te na mobeko na ngai; boye, bakoki te kokoma mingi, kasi bakotikala ya kokabwana mpe banzemba, kozangaka bonetolami, na ezalela na bango ya kobikisama, na boseko nyonso; mpe uta ntango wana kokende liboso bakoki kozala banzambe te, kasi bazali banjelu ya Nzambe libela na libela.

18 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki mobali moko abali mwasi, mpe asali liyokani elongo na ye mpo na ntango mpe boseko nyonso, soki liyokani wana ezali na ngai te to engebene na liloba na ngai te, oyo ezali mobeko na ngai, mpe ekangami na Molimo Mosantu ya elaka te, na nzela na ye oyo napakolaki mpe napesaki nguya oyo, bongo libala wana ezali na bokasi te to bokasi ya bokangisami mpe te ntango bazali libanda ya mokili, mpo basangisami na ngai te, elobi Nkolo, engebene na liloba na ngai mpe te; ntango bazali libanda ya mokili liyokani wana ekoki te kozwama kuna, mpo banjelu mpe banzambe babiangami kuna, epayi ya baoyo bakoki koleka te; boye, bakoki kosangola libula ya nkembo na ngai te; mpo ndako na ngai ezali ndako ya molongo, elobi Nkolo Nzambe.

19 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki mobali moko abali mwasi engebene na liloba ya ngai, oyo ezali mobeko na ngai, mpe engebene na liyokani oyo ya sika mpe ya libela, mpe libala oyo ekangami mpo na bango na Molimo Mosantu ya elaka, na nzela na ye oyo napakolaki, epayi ya nani oyo napesaki nguya oyo mpe bafungola ya bonganganzambe oyo; mpe ekoyebisama epayi na bango—Bokolamuka na bosekwi ya yambo; mpe soki ekozala nsima ya bosekwi ya yambo, na bosekwi ekoya; mpe bakosangola libula ya bangbende, babokonzi, biyangeli, mpe banguya, bampifo, bisika ya likolo mpe mizindo nyonso—na ntango wana ekokomama na Buku ya Bomoi ya Mwana ya mpate, ete akoboma te mpo na kosopa makila mazanga ekweyeli, mpe soki botosi liyokani na ngai, mpe bobomi te mpo na kosopa makila mazanga ekweyeli, na makambo nyonso oyo mosali na ngai atiaki likolo na bango ekosalema epayi na bango, na ntango, mpe na bowumeli ya boseko nyonso; mpe ekozala na bokasi nyonso ntango bazali libanda ya mokili; mpe bakoleka epayi ya banjelu, mpe banzambe, baoyo batiami kuna, mpo na kozwa bonetolami mpe nkembo na bango na makambo nyonso, lokola ekangamaki likolo ya mitu na bango, oyo nkembo ekozala litondi mpe bokobi ya nkona libela na libela.

20 Wana nde bakozala banzambe, mpo bazali na nsuka te; na boye bakozala uta libela na libela, mpo bazali se kokoba; wana nde bakozala likolo ya nyonso, mpo biloko nyonso bikonzami na bango. Wana nde bakozala banzambe, mpo bazali na nguya nyonso, mpe banjelu bakonzami na bango.

21 Solo, solo, nalobi epayi na bino, longola se soki botosi mobeko na ngai bokoki kozwa nkembo oyo te.

22 Mpo ekuke ezali moke, mpe nzela ezali nkaka oyo ekumbi na bonetolami mpe bokobi ya bomoi, mpe moke nde baoyo bazali komona yango, mpo bozali koyamba ngai kati na mokili te mpe boyebi ngai te.

23 Kasi soki boyambi ngai na mokili, bongo bokoyeba ngai, mpe bokozwa bonetolami na bino; ete epayi wapi nazali bozala mpe lisusu.

24 Oyo ezali bomoi ya seko—koyeba bobele se Nzambe moko ya bwania mpe ya solo, mpe Yesu Klisto, oyo atindaki. Nazali ye. Boye, bondima mobeko na ngai.

25 Monene ezali ekuke, mpe etando nzela oyo ekambi na liwa ebele; mpe mingi ezali baoyo bazali kokende kuna, mpo bayambi ngai te, mpe batosi mobeko na ngai mpe te.

26 Solo, solo, nalobi epayi na yo, soki mobali moko abali mwasi engebene na liloba ya ngai, mpe bakangemi na Molimo Mosantu ya elaka, engebene na libiangi ya ngai, mpe ye mobali to ye mwasi asali ata lisumu to bobuki mobeko moko te kani na liyokani oyo ya sika mpe ya libela, mpe asali te botuki ya lolenge nyonso, mpe soki babomi te mpo na kosopa makila mazanga ekweyeli, nzokande bakobima na bosekwi ya yambo, mpe bakokota kati na bonetolami na bango; kasi bakobebisama na mosuni, mpe bakosundolama na minyokoli ya Satana kino na mokolo ya bosikoli, elobi Nkolo Nzambe.

27 Botuki na Molimo Mosantu, boye ekolimbisama te na mokili mpe libanda ya mokili mpe te, ezali kati na oyo ete oboma mpo na kosopa makila mazanga ekweyeli, mpe kopesa maloba ete ondimi liwa ya ngai, wana esili yo koyamba liyokani na ngai ya sika mpe ya libela, elobi Nkolo Nzambe; mpe ye oyo atosi mobeko oyo te akoki ata moke te kokota na nkembo na ngai, kasi akokweisama, elobi Nkolo.

28 Nazali Nkolo Nzambe na bino, mpe nakopesa epayi na bino mobeko ya Bonganganzambe Bosantu na ngai, lokola ekulisamaki na ngai mpe na Tata na ngai liboso ete mokili ezala.

29 Abalayama azwaki biloko nyonso, nyonso wana azwaki, na nzela ya emoniseli mpe ya motindo, na nzela ya liloba ya ngai, elobi Nkolo, mpe akotaki na bonetolami na ye mpe afandi likolo ya kiti ya bokonzi na ye.

30 Abalayama azwaki bilako mpo na oyo etali nkona na ye, mpe bilaka mpo na oyo etali mbuma ya nketo na ye—ozali uta na nketo yango, elingi koloba, mosali na ngai Joseph—nketo oyo esengelaki kokoba na bowumeli ya ntango bazalaki na mokili; mpe mpo na oyo etali Abalayama mpe nkona na ye, libanda ya mokili bakokoba; ezala na mokili mpe libanda ya mokili bakokoba na lolenge ya kotanga te kozala lokola minzoto; to, soki okokaki kotanga zelo na ngambo ya libongo ya mbu okokaki kotanga bango te.

31 Elaka oyo ezali ya bino lisusu, mpo ete bozali ya Abalayama, mpe elaka epesamaki na Abalayama; mpe na mobeko oyo ezali bokobi ya misala ya Tata na ngai, na nzela ya oyo wapi amikembelami ye moko.

32 Boye, bokende, mpe bosala misala ya Abalayama; bokota kati na mobeko na ngai mpe bokobikisama.

33 Kasi soki bokoti kati na mobeko na ngai te bokoki kozwa elaka ya Tata na ngai te, oyo asalaki na Abalayama.

34 Nzambe atindaki Abalayama, mpe Salai apesaki Agala na Abalayama lokola mwasi. Mpe mpo na nini asalaki bongo? Mpo ete oyo ezalaki mobeko; mpe uta na Agala bato mingi babotamaki. Boye, oyo, ezalaki kokokisa, na kati ya makambo mosusu, bilaka yango.

35 Boye, ezalaki Abalayama na nse ya bokweisami? Solo nalobi epayi na bino, Te; mpo ngai, Nkolo, natindaki yango.

36 Abalayama atindamaki kobonza mwana mobali na ye Yisaka; nzokande, ekomamaki: Okoboma te. Abalayama, nzokande, aboyaki te, mpe etangamelaki ye lokola bosembo.

37 Abalayama azwaki bamakango, mpe babotelaki ye bana; mpe etangamelaki ye lokola bosembo, mpo bapesamaki epayi na ye, mpe atosaki mobeko na ngai; lokola Yisaka lisusu mpe Yakobo basalaki makambo mosusu te longola se oyo batindamaki; mpe mpo basalaki makambo mosusu te longola se oyo batindamaki, bakotaki kati na bonetolami na bango, engebene na bilaka, mpe bafandi likolo ya kiti ya bokonzi, mpe bazali banjelu te kasi bazali banzambe.

38 Dawidi mpe lisusu azwaki basi mpe bamakango mingi, mpe lisusu basali na ngai Solomo mpe Mose, lokola mpe lisusu basali basusu mingi na ngai, uta ebandeli ya mokili kino na ntango oyo; mpe basumukaki na likambo moko te longola se na makambo wana oyo bazwaki te uta na ngai.

39 Basi mpe bamakango ya Dawidi bapesamaki epayi na ye uta na ngai, na loboko ya Natana, mosali na ngai, mpe baprofeta basusu oyo bazalaki na bafungola ya nguya oyo; mpe na moko te ya makambo oyo asumukaki na ngai longola se na likambo ya Uliya mpe mwasi na ye; mpe, boye akweyaki uta na bonetolami na ye, mpe azwaki likabo na ye; mpe akosangola libula na bango te libanda ya mokili, mpo napesaki bango epayi ya mobali mosusu, elobi Nkolo.

40 Nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe napesaki epayi na yo, mosali na ngai Joseph, mokumba moko, mpe zongisa makambo nyonso. Senga nini oyo olingi, mpe ekopesama epayi na yo engebene na liloba ya ngai.

41 Mpe lokola olukaki koyeba mpo na oyo etali ekobo, solo, solo, nalobi epayi na yo, soki mobali azwi mwasi kati na liyokani ya sika mpe ya libela, mpe soki ye mwasi azali na mobali mosusu, mpe soki napesaki ye mobali mosusu wana te na nzela ya epakolami bosantu, ye mwasi asili kosala ekobo mpe akobebisama.

42 Soki azali kati na liyokani ya sika mpe ya libela te, mpe azali na mobali mosusu, asili kosala ekobo.

43 Mpe soki mobali na ye azali na mwasi mosusu, mpe ye mobali wana azalaki na nse ya ndai, abuki ndai na ye mpe asili kosala ekobo.

44 Mpe soki ye mwasi asalaki ekobo te, kasi azali na ekweyeli te mpe abuki ndai na ye mpe te, mpe sikawa ayebi yango, mpe nazali kobimisa yango epayi na yo, mosali na ngai Joseph, bongo okozwa nguya, na nguya ya Bonganganzambe Bosantu na ngai, mpo na kokamata ye mpe kopesa ye epayi na ye mobali oyo asali ekobo te kasi azali sembo; mpo ye mobali akokomisama mokonzi likolo ya mingi.

45 Mpo nasili kopesa likolo na yo bafungola mpe nguya ya bonganganzambe, na nzela ya boye nazongisi makambo nyonso, mpe nayebisi epayi na yo makambo nyonso na ntango elongobani.

46 Mpe solo, solo, nalobi epayi na yo, ete nyonso oyo okokanga na mabele ekokangama na lola; mpe nyonso oyo okokanga na mabele, na nkombo na ngai mpe na nzela ya liloba ya ngai, elobi Nkolo, ekokangama seko na lola; mpe masumu ya moto nyonso oyo okolimbisa na mabele ekolimbisama seko na lola; mpe masumu ya moto nyonso oyo okosimba na mabele makosimbama na lola.

47 Mpe lisusu, solo nalobi, moto nyonso oyo okopambola nakopambola ye, mpe moto nyonso oyo okolakela mabe nakolakela ye mabe, elobi Nkolo; mpo ngai, Nkolo, nazali Nzambe na bino.

48 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, mosali na ngai Joseph, ete nyonso oyo okopesa na mabele, mpe epayi ya moto nyonso oyo okopesa molongani na mabele, na nzela ya liloba na ngai mpe engebene na mobeko na ngai, ekobimelama na mapamboli, mpe na nguya na ngai kasi bolakeli mabe te, elobi Nkolo, mpe bokwei ekozala na mabele mpe na lola te.

49 Mpo nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe nakozala elongo na yo kutu kino na nsuka ya mokili, mpe epayi nyonso na boseko nyonso; mpo solo nakangi likolo na yo bonetolami na yo, mpe nalengeli kiti ya bokonzi mpo na yo na bokonzi ya Tata na ngai, elongo na Abalayama tata na yo.

50 Tala, namoni mbeka na yo, mpe nakolimbisa masumu na yo nyonso; namoni mbeka na yo mpo na oyo etali botosi na oyo wana nayebisaki yo. Boye, kende, mpe nalengeli nzela mpo na ekimelo na yo, lokola nandimaki libonza ya Abalayama kobonzaka mwana mobali na ye Yisaka.

51 Solo, nalobi epayi na yo: Napesi epayi ya mosali na ngai motindo moko, Emma Smith, mwasi na yo, oyo napesaki epayi na yo, ete amipekisa mpe akota te na oyo wana natindi yo kopesa epayi na ye; mpo ete nasalaki yango, elobi Nkolo, mpo na komeka bino nyonso, lokola nasalaki Abalayama, mpe ete nakoka kosenga libonza moko na maboko na bino, na nzela ya liyokani mpe mbeka.

52 Mpe tika ete mosali na ngai, Emma Smith, ayamba baoyo wana nyonso bapesamaki epayi ya mosali na ngai Joseph, mpe baoyo bazali bangondo mpe peto liboso na ngai; mpe baoyo bazali peto te, mpe balobaki bazalaki peto, bakobebisama, elobi Nkolo Nzambe.

53 Mpo nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe osengeli kotosa mongongo na ngai; mpe napesi epayi ya mosali na ngai Joseph ete akomisama moyangeli likolo ya makambo mingi; mpo ete azalaki sembo likolo ya makambo moke, mpe uta ntango wana kokende liboso nakoyeisa ye makasi.

54 Mpe natindi mosali na ngai, Emma Smith, kotikala mpe kokangama na mosali na ngai Joseph, mpe na moto moko mosusu te. Kasi soki akotosa motindo oyo te akobebisama, elobi Nkolo; mpo nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe nakobebisa ye soki atosi mobeko na ngai te.

55 Kasi soki akotosa motindo oyo te, bongo mosali na ngai Joseph Smith akosala makambo nyonso mpo na ye, kutu lokola alobaki; mpe nakopambola ye mpe nakokomisa ye mingi mpe nakopesa epayi na ye mbala monkama na mokili oyo, batata mpe bamama, bandeko mibali mpe bandeko basi, ndako mpe mabele, basi mpe bana, mpe mitole ya bomoi ya seko kati na mikili ya seko.

56 Mpe lisusu, solo nalobi, tika mosali na ngai ya mwasi alimbisa mosali na ngai Joseph masumu na ye; bongo nde akolimbisama masumu na ye, na oyo wapi asumukaki na ngai; mpe ngai, Nkolo Nzambe na yo, nakopambola ye, Emma; mpe nakokomisa ye mingi, mpe kosepelisa motema na ye.

57 Mpe lisusu, nalobi, tika ete mosali na ngai Joseph asundola bozwi na ye uta na maboko na ye te, mbele monguna aya mpe abebisa ye; mpo Satana alukaka se kobebisa; mpo nazali Nkolo Nzambe na yo, mpe ye azali mosali na ngai; mpe tala, mpe mona, nazali na ye, lokola nazalaki na Abalayama, tata na yo, kutu kino na bonetolami mpe nkembo na ye.

58 Sikawa, mpo na oyo etali mobeko ya bonganganzambe, ezali na makambo mingi oyo mataleli yango.

59 Solo, soki moto moko abiangami na Tata na ngai, lokola ezalaki Alona, na mongongo na ngai moko, mpe na mongongo na ye oyo atindaki ngai, mpe soki nalatisi ye nguya na bafungola ya nguya ya bonganganzambe oyo, soki asali eloko nyonso na nkombo na ngai, mpe engebene na mobeko na ngai mpe na kosalelaka liloba ya ngai, akosala lisumu te, mpe nakolongisa ye.

60 Boye, tika ete moto moko te atonga mosali na ngai Joseph; mpo nakolongisa ye; mpo akokokisa mbeka oyo nasengi na maboko na ye mpo na masumu na ye, elobi Nkolo Nzambe na yo.

61 Mpe lisusu, mpo na oyo etali mobeko ya bonganganzambe—soki mobali abali moseka, mpe alingi kobala mosusu, mpe ya yambo apesi bondimami na ye, mpe soki abali ya mibale, mpe nyonso mibale bazali baseka, mpe basali ndai na mobali moko mosusu te, soki bongo ye mobali alongisami; akoki kosala ekobo te mpo bapesami epayi na ye; mpo akoki kosala ekobo te na oyo azali na ye mpe ya moto mosusu te.

62 Mpe soki azali na baseka zomi oyo bapesami epayi na ye engebene na mobeko oyo, akoki kosala ekobo te, mpo bazali basi na ye, mpe bapesami epayi na ye; boye alongisami.

63 Kasi soki moko to mosusu ya baseka zomi, nsima ya kobalana, azali na mobali mosusu, wana nde asili kosala ekobo, mpe akobebisama; mpo bapesami epayi na ye mpo ete bakoma mingi mpe batondisa mabele, engebene na motindo na ngai, mpe mpo na kokokisa elaka oyo epesamaki na Tata na ngai liboso ya ebandeli ya mokili, mpe mpo na bonetolami na bango na mikili ya seko, ete bakoka kobota milimo ya bato; mpo na oyo mosala ya Tata na ngai ezalaki se kokoba, ete akoka kokembelama.

64 Mpe lisusu, solo, solo, nalobi epayi na bino, soki mobali songolo, oyo azali na bafungola ya nguya oyo, azali na mwasi, mpe ateyi ye mobeko ya bonganganzambe na ngai, mpo na oyo etali makambo oyo, bongo asengeli kondima mpe kosunga ye, soki te akobebisama, elobi Nkolo Nzambe na bino; mpo nakobebisa ye mwasi; mpo nakokumisa nkombo na ngai likolo ya baoyo wana nyonso bayambaka mpe batosaka mobeko na ngai.

65 Boye, ekozala engebene na mobeko na ngai, soki ye mwasi ayambi mobeko oyo te, ete mobali azwa makambo nyonso oyo ngai, Nkolo Nzambe na ye, nakopesa epayi na ye mwasi mpo andimaki te mpe asungaki ye te engebene na liloba ya ngai; mpe bongo ye mwasi yango akomi mobuki mibeko; mpe atangami te na mobeko ya Salai, oyo asungaki Abalayama engebene na mobeko ntango natindaki Abalayama kokamata Agala lokola mwasi.

66 Mpe sikawa, mpo na oyo etali mobeko oyo, solo, solo, nalobi epayi na yo, nakobimisa mingi epayi na yo, awa nsima; boye, tika ete oyo ekoka mpo na ntango oyo. Tala, nazali Alifa mpe Omega. Amene.

Bimisa na lokasa