Makomi
Malongi mpe Mayokani 20


Eteni 20

Emoniseli mpo na oyo etali bobongisi mpe botambwisi ya Eklezia, epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na to penepene na Fayette, New York. Bandambu ya emoniseli oyo ekokaki kopesama sikasikawa na eleko ya elanga ya mobu 1829. Emoniseli mobimba, oyo eyebanaki ntango wana lokola Biteni ya mibeko to bondimi mpe Mayokani, ekomamaki mingi mingi kala mingi te nsima ya mokolo ya sambo ya sanza ya minei ya mobu 1830 (mokolo Eklezia ebongisamaki). Profeta akomaki ete, “Tozwaki uta na Ye [Yesu Klisto] oyo elandi, na molimo ya masakoli mpe emoniseli; oyo epesaki biso bobele nsango mingi te, kasi mpe elakisaki lisusu biso mokolo oyo ya sikisiki wapi, engebene na bolingi mpe motindo na ye, tosengelaki kobanda kobongisa mbala moko lisusu Eklezia na Ye likolo ya mabele.”

1–16, Buku ya Mormon ezali kolakisa bonzambe ya mosala ya mikolo ya nsuka; 17–28, Malongi ya bokeli, bokwei, bomikabi, mpe libatisi endimami; 29–37, Mibeko oyo miyangelaka boyamboli, bolongisi, bosantisami, mpe libatisi epesami; 38–67, Mosala ya bampaka, banganganzambe, bateyi, mpe badiakona etiami na bokuse; 68–74, Mosala ya bandimi, lipamboli ya bana mike, mpe lolenge ya kobatisa ebimisami; 75–84, Sambo ya elambo mpe mibeko esengeli koyangela bato mpo ete bakoma bandimi ya Eklezia epesami.

1 Ebandeli ya Eklezia ya Klisto na mikolo oyo ya nsuka, mpe ezali sikawa mibu nkoto moko nkama mwambe na ntuku misato banda boyei ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto kati na mosuni, ebongisamaki malamu mpe etiamaki engebene na mibeko ya ekolo na biso, na bolingi mpe mitindo ya Nzambe, na sanza ya minei, mpe na mokolo ya motoba ya sanza oyo ebiangami Sanza ya minei—

2 Mitindo oyo epesamaki na Joseph Smith Mwana, oyo abiangamaki na Nzambe, mpe akulisamaki apostolo ya Yesu Klisto, mpo na kozala mpaka ya yambo ya eklezia oyo;

3 Mpe na Oliver Cowdery, oyo abiangamaki lisusu na Nzambe, apostolo ya Yesu Klisto, mpo na kozala mpaka ya mibale ya eklezia oyo, mpe akulisamaki na nse ya maboko na ye;

4 Mpe oyo engebene na ngolu ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto, epayi ya nani ezala nkembo nyonso, sikawa mpe libela. Amene.

5 Nsima ete emonisama solo mpenza epayi ya mpaka ya yambo oyo ete asilaki kozwa bolimbisi ya masumu na ye, amitiaki lisusu kati na makambo mpamba ya mokili;

6 Kasi nsima ya koyambola, mpe ya komikitisa na bosolo ya motema, na nzela ya bondimi, Nzambe asalelaki ye na nzela ya anjelu moko mosantu, oyo kani elongi ezalaki lokola monkalikali, mpe oyo kani nzambala ezalaki peto mpe mpembe koleka nyonso mosusu oyo ezali mpembe;

7 Mpe apesaki ye mitindo oyo mifulaki ye;

8 Mpe apesaki ye nguya uta na likolo, na nzela oyo elengelamaki uta kala, mpo na kobongola Buku ya Mormon;

9 Oyo ezali na lisolo ya makomi ya boko bato bakweya, mpe na litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe lisusu epayi ya Bayuda;

10 Oyo epesamaki na bofuli ya Molimo, mpe endimami epayi na basusu na lisalisi ya banjelu, mpe esakolami epayi ya mokili na nzela na bango—

11 Kolakisaka na mokili ete makomi masantu ezali solo, mpe ete Nzambe afuli mpenza bato mpe abiangi bango na mosala na ye mosantu na eleko mpe nkola oyo, lokola na bankola ya kala;

12 Kolakisaka na nzela wana ete Nzambe azali se moko wana kaka lobi, lelo, mpe libela. Amene.

13 Boye, lokola ezali na matatoli minene bongo mpenza, na yango nde mokili mokosambisama, kutu mingi lokola bakoya na nsima kokoma na boyebi ya mosala oyo.

14 Mpe baoyo bakoyamba mosala yango na bondimi, mpe bazali kosalela bosembo, bakozwa motole ya bomoi ya seko;

15 Kasi baoyo bakoyeisa mitema na bango makasi na bozangi boyambi, mpe baboyi yango, ekobalukela bango na bokweisami na bango moko—

16 Mpo Nkolo Nzambe alobaki yango; mpe biso, bampaka ya eklezia, toyokaki mpe topesi litatoli na maloba ya oyo azali Nta ya nkembo na likolo, epayi ya nani nkembo ezala libela na libela. Amene.

17 Na makambo oyo toyebi ete ezali na Nzambe moko na lola, oyo azali na ndelo te mpe seko, uta libela na libela se Nzambe moko oyo abongwanaka te, mozalisi ya lola mpe mabele, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango;

18 Mpe ete akelaki moto, mobali mpe mwasi, na elilingi na ye moko mpe na lolenge na ye moko, akelaki bango;

19 Mpe apesaki bango mitindo ete basengeli kolinga mpe kosalela ye, bobele ye Nzambe ya bomoi mpe ya solo, mpe ete asengeli kozala ezali se bobele moko oyo basengeli kokumbamela.

20 Kasi na kobukaka mibeko esantu oyo moto akomaki moyokeli bilengi mpe moto ya zabulu, mpe akomaki moto ya bokwei.

21 Yango wana, Nzambe ya Bokasi nyonso apesaki Mwana Mobotami se Moko ya ye, lokola ekomami kati na makomi oyo wana epesamaki na ntina na ye.

22 Ayokaki mpasi ya masenginia kasi atiaki bokebi na yango te.

23 Babakaki ye na ekulusu, akufaki, mpe asekwaki lisusu na mokolo ya misato;

24 Mpe amataki na lola, kofanda na loboko ya mobali ya Tata, mpo na koyangela na nguya ya bokasi nyonso engebene na bolingi ya Tata;

25 Ete mingi lokola bakondima mpe bakobatisama na nkombo na ye esantu, mpe bakotia molende kati na bondimi kino na nsuka, bakobikisama—

26 Bobele baoyo bandimaki nsima ete aya na midi ya eleko, na mosuni te, kasi nyonso baoyo wana uta na ebandeli, kutu mingi lokola bazalaki liboso ete aya, baoyo bandimaki na maloba ya baprofeta basantu, baoyo balobaki wana efulamaki bango na likabo ya Molimo Mosantu, baoyo na bosolo batatolaki mpo na ntina na ye na makambo nyonso, basengeli kozwa bomoi ya seko,

27 Mpe lisusu nyonso oyo bakoya nsima, baoyo bakondima na makabo mpe na mabiangami ya Nzambe na nzela ya Molimo Mosantu, oyo mopesaka litatoli ya Tata mpe ya Mwana;

28 Baoyo Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu bazali Nzambe moko, bazali na ndelo te mpe bazali seko, bazanga nsuka. Amene.

29 Mpe toyebi ete bato nyonso basengeli koyambola mpe kondima na nkombo ya Yesu Klisto, mpe kokumbamela Tata na nkombo na ye, mpe kotia molende kati na bondimi na nkombo na ye kino na nsuka, soki te bakoki kobikisama kati na bokonzi ya Nzambe te.

30 Mpe toyebi ete bolongisi na nzela ya ngolu ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto ezali alima mpe solo;

31 Mpe toyebi lisusu, ete bosantisi na nzela ya ngolu ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto ezali alima mpe solo, na baoyo nyonso balingaka mpe basalelaka Nzambe na bokasi, mayele, mpe makasi na bango nyonso.

32 Kasi ekoki kosalema ete moto akweya uta na ngolu mpe apengwa na Nzambe ya bomoi;

33 Boye tika ete eklezia esala keba mpe esambela ntango nyonso, ete ekweya te kati na masenginia;

34 Iyo, mpe kutu tika ete baoyo basantisami basala keba lisusu.

35 Mpe toyebi ete makambo oyo ezali solo mpe engebene na bimoniseli ya Yoane, na kobakisaka te, soki mpe lisusu kolongolaka uta na lisakoli ya buku na ye te, makomi masantu, soki mpe bimoniseli ya Nzambe oyo esengeli koya nsima na nzela ya likabo mpe nguya ya Molimo Mosantu, mongongo ya Nzambe, soki mpe na lisalisi ya banjelu.

36 Mpe Nkolo Nzambe alobaki yango; mpe lokumu, nguya mpe nkembo epesama na nkombo na ye esantu, ezala sikawa mpe libela. Amene.

37 Mpe lisusu, na nzela ya motindo na eklezia mpo na oyo etali lolenge ya kobatisa—Nyonso baoyo bakomikitisa liboso ya Nzambe, mpe bazali na mposa ya kobatisama, mpe bayei na mitema mibukana mpe milimo ya mawa, mpe batatoli liboso ya eklezia ete bayamboli solo uta na masumu na bango nyonso, mpe balingi kokamata nkombo ya Yesu Klisto likolo na bango moko, kozalaka na mokano ya kosalela ye kino na nsuka, mpe komonisaka solo na misala na bango ete basili kozwa Molimo ya Klisto mpo na bolimbisi ya masumu na bango, basengeli koyambama na libatisi kati na eklezia na ye.

38 Mosala ya bampaka, banganganzambe, bateyi, badiakona, mpe bandimi ya eklezia ya KlistoApostolo azali mpaka, mpe kobatisa ezali libiangi na ye;

39 Mpe kokulisa bampaka, banganganzambe, balakisi, mpe badiakona basusu;

40 Mpe kopambola lipa mpe vinyo—bilembo ya mosuni mpe makila ya Klisto—

41 Mpe kokotisa baoyo babatisami kati na eklezia, na kotiaka bango maboko mpo na libatisi ya moto mpe Molimo Mosantu, engebene na makomi;

42 Mpe koteya, kolimbola, kolendisa, kobatisa, mpe kokengela eklezia;

43 Mpe kokotisa kati na eklezia na kotiaka bato maboko, mpe na kopesaka Molimo Mosantu;

44 Mpe kokamba makita nyonso.

45 Bampaka basengeli kokamba makita lokola batambwisami na Molimo Mosantu, engebene na mitindo mpe bimoniseli ya Nzambe.

46 Mosala ya nganganzambe ezali koteya, kotangisa, kolimbola, kolendisa, mpe kobatisa, mpe kopambola elambo,

47 Mpe kotala mondimi moko moko na ndako na ye, mpe kolendisa bango basambela na mongongo makasi mpe na nkuku mpe kosala misala nyonso ya libota.

48 Mpe akoki lisusu kokulisa banganganzambe, bateyi, mpe badiakona basusu.

49 Mpe asengeli kokamba makita ntango mpaka azali te na ntango wana;

50 Kasi ntango mpaka azali, asengeli bobele koteya, kotangisa, kolimbola, kolendisa, mpe kobatisa,

51 Mpe kotala mondimi moko moko na ndako na ye, kolendisaka bango basambela na mongongo makasi mpe na nkuku mpe kosala misala nyonso ya libota.

52 Na misala oyo nyonso nganganzambe asengeli kosalisa mpaka soki libaku esengeli.

53 Mosala ya moteyi ezali kokengela eklezia ntango nyonso, kozala elongo na bango mpe kolendisa bango;

54 Mpe kotala ete mabe mazala kati na eklezia te, mpe bayeisana mitema makasi te moko na mosusu, lokuta mpe te, kotongana, kolobana maloba mabe mpe te.

55 Mpe tala ete eklezia ezali kosangana mbala na mbala, mpe lisusu tala ete bandimi nyonso bazali kosala mosala na bango.

56 Mpe asengeli kokamba makita ntango mpaka to nganganzambe azali te—

57 Mpe asengeli ntango nyonso kosungama, na misala na ye nyonso kati na eklezia, na badiakona, soki libaku esengeli.

58 Kasi ezala bateyi soki mpe badiakona bazali na likoki ya kobatisa, kopambola elambo te, soki mpe kotiela moto maboko mpe te;

59 Basengeli, nzokande, kokebisa, kolimbola, kolendisa, mpe kotangisa, mpe kobianga nyonso baya epayi ya Klisto.

60 Mpaka, nganganzambe, moteyi, soki mpe diakona moko moko asengeli kokulisama engebene na makabo mpe mabiangi ya Nzambe epayi na ye; mpe asengeli kokulisama na nguya ya Molimo Mosantu, oyo ezali kati na moko oyo azali kokulisa ye.

61 Bampaka ebele oyo bazali kosala eklezia oyo ya Klisto basengeli kosangana na likita moko monene mbala moko na sanza misato, soki te mbala na mbala lokola makita oyo malobami awa makosenga to makotinda;

62 Mpe makita oyo malobami awa esengeli kokokisa mosala ya eklezia nyonso oyo mosengeli kosalema na ntango wana.

63 Bampaka basengeli kozwa mikanda ya ndingisa uta na bampaka basusu, na kopona ya eklezia oyo wapi bazali, soki te uta na makita yango.

64 Nganganzambe, moteyi, soki te diakona moko moko, oyo akulisami na nganganzambe, akoki kozwa mokanda ya bondimami uta na ye na ntango wana, oyo mokanda ya bondimami, ntango molakisami na mpaka moko, mokopesa ye nzela ya kozwa ndingisa, oyo ekopesa ye nzela ya kosala misala ya libiangi na ye, to akoki kozwa yango uta na likita moko.

65 Moto moko te asengeli kokulisama na mosala songolo kati na eklezia oyo, epayi wapi etape ya eklezia se moko oyo ebongisami malamu, na kozangaka koleka na kopona ya eklezia wana;

66 Kasi bampaka bakambi, baepisikopo ya mobembo, basangani minene, mpe banganganzambe minene, mpe bampaka, bakoki kozwa litomba ya kokulisa, wapi etape ya eklezia ezali te na lolenge ete kopona ekoka kobiangama.

67 Mokambi moko moko ya bonganganzambe ya monene (to mpaka mokambi), episikopo, mosangani monene, mpe nganganzambe monene, asengeli kokulisama na nse ya bokambi ya lisanga monene to ya likita monene.

68 Mosala ya bandimi nsima ya kondimama na libatisi—Bampaka to banganganzambe basengeli kozala na ntango mingi ekoki mpo na kolimbola makambo nyonso oyo etali eklezia ya Klisto na bososoli na bango, liboso ete balia elambo mpe bakotisama na kotiaka bango maboko na bampaka, mpo ete makambo nyonso esalema na molongo.

69 Mpe bandimi basengeli komonisa liboso ya eklezia, mpe lisusu liboso ya bampaka, na etamboli mpe elobeli ya kobanga Nzambe, ete bazali bato balongobani na kolia yango, mpo ete misala mpe bondimi na bango ekoka kozala na boyokani na makomi masantu—kotambolaka na bosantu liboso ya Nkolo.

70 Mondimi moko moko ya eklezia ya Klisto oyo azali na bana asengeli komema bango epayi ya bampaka liboso ya eklezia, baoyo basengeli kotia bango maboko na nkombo ya Yesu Klisto, mpe kopambola bango na nkombo na ye.

71 Moto moko te akoki koyambama kati na eklezia ya Klisto bobele se soki asili kokoma na mobu ya boyanoli liboso ya Nzambe, mpe akoki mpo na boyamboli.

72 Libatisi esengeli kopesama na lolenge elandi epayi na baoyo nyonso bayamboli—

73 Moto oyo abiangami na Nzambe mpe azali na likoki uta na Yesu Klisto mpo na kobatisa, asengeli kokita na mai elongo na moto oyo amilakisaki ye moko mpo na libatisi, mpe asengeli koloba, kobiangaka ye mobali to ye mwasi na nkombo ete: Lokola epesameli ngai likoki na Yesu Klisto, nazali kobatisa yo na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. Amene.

74 Nsima akozindisa ye mobali to mwasi yango na mai, mpe akobima lisusu uta na mai.

75 Ezali likambo elongobani ete eklezia esangana mbala na mbala mpo na kolia lipa mpe komela vinyo na bokundoli ya Nkolo Yesu;

76 Mpe mpaka to nganganzambe asengeli kopambola yango; mpe na lolenge oyo nde akopambola yango—mpe asengeli kofukama elongo na eklezia mpe kobelela Tata na losambo ya nkembo, kolobaka:

77 O Nzambe, Tata ya Seko, tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana na yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa limpa oyo mpo na milimo ya baye nyonso oyo bakokamata yango; ete bakoka kolia na bokundoli ya nzoto ya Mwana na yo, mpe batatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana na yo, mpe komikundola ye ntango nyonso mpe kobomba mitindo oyo apesaki bango, ete bakoka ntango nyonso kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.

78 Oyo ezali lolenge ya kopambola vinyo—asengeli lisusu kokamata nkeni, mpe koloba:

79 O Nzambe, Tata ya Seko, tozali kosenga yo, na nkombo ya Mwana na yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa vinyo oyo mpo na milimo ya baye nyonso oyo bakomela yango, ete bakoka kosala yango na bokundoli ya makila ya Mwana na yo, oyo masopanaki mpo na bango; ete bakoka kotatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete bazali komikundola ye ntango nyonso, ete bakoka kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.

80 Mondimi nyonso ya eklezia ya Klisto oyo akobuka mobeko, to oyo akozwama na mabunga, esengeli esalemela ye lokola makomi masengi.

81 Ekozala mosala ya bitape ebele ya eklezia, oyo ezali kosala eklezia ya Klisto, kotinda moto moko to bato mingi kati na bateyi na bango ete bakende na makita ebele oyo ekambami na bampaka ya eklezia,

82 Na mokanda ya nkombo ya bandimi ebele oyo basanganaka na eklezia banda likita ya nsuka; to kotinda mokanda yango na loboko ya nganganzambe moko; mpo ete mokanda mobatelami malamu koleka ya bankombo nyonso ya eklezia mobimba ekoka kobombama kati na buku na moko ya bampaka, soki nani nyonso oyo bampaka basusu bakopona mbala na mbala;

83 Mpe lisusu, soki moko atangolamaki uta na eklezia, basengeli komema mokanda yango mpo ete nkombo na bango elongolama nie uta na mokanda monene ya nkombo ya eklezia.

84 Bandimi nyonso oyo balongwe uta na etape ya eklezia wapi bafandi, soki bazali kokokende na etape mosusu ya eklezia wapi bayebani te, bakoki kokamata mokanda oyo ekolakisa ete bazali bandimi mpenza mpe balongobani, mokanda oyo ekoki kotiama maboko na mpaka moko to nganganzambe moko soki mondimi oyo azali komema mokanda yango ayebani na mpaka to nganganzambe moko, to ekoki kotiama maboko na bateyi to badiakona ya eklezia.

Bimisa na lokasa