Makomi
Malongi mpe Mayokani 27


Eteni 27

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, na Harmony, Pennsylvania, na sanza ya mwambe ya mobu 1830. Na bolengeli likita ya lingomba wapi elambo ya lipa mpe vinyo ezalaki kopesama, Joseph akendaki koluka vinyo. Akutamaki na ntoma moko ya lola mpe azwaki emoniseli oyo, oyo kani ndambo moko ekomamaki na ntango se moko wana mpe ndambo etikalaki na sanza ya libwa elandi. Sikawa bazali kosalela mai na esika ya vinyo kati na misala ya elambo ya Eklezia.

1–4, Bilembo oyo esengeli kosalelama na ntango ya kolia elambo bilimbolami; 5–14, Klisto mpe basali na Ye uta bileko nyonso basengeli kolia elambo; 15–18, Bolata bibundeli mobimba ya Nzambe.

1 Yoka mongongo ya Yesu Klisto, Nkolo na yo, Nzambe na yo, mpe Mosikoli na yo, oyo kani liloba ezali na bomoi mpe na nguya.

2 Mpo, tala, nalobi epayi na bino, ete likambo ezali te nini okolia to nini okomela ntango okolia elambo, soki ezali ete bosali yango liso bobele na nkembo na ngai—komikundolaka liboso ya Tata nzoto na ngai oyo epesami mpo na bino, mpe makila na ngai oyo masopanaki mpo na bolimbisi ya masumu na bino.

3 Yango wana, napesi motindo moko epayi na bino, ete bokosomba vinyo te, soki mpe vinyo ya makasi uta na banguna na bino te;

4 Yango wana, bokomela eloko moko te longola se soki ezali vinyo ya sika oyo esalemi na kati na bino moko; iyo, na oyo bokonzi ya Tata na ngai bokotongama na mabele.

5 Tala, oyo ezali bwania na ngai; yango wana, bokamwa te, mpo ngonga ezali koya ete nakomela mbuma ya vinyo elongo na bino na mabele, mpe elongo na Moroni, oyo natindaki epayi na bino kobimisa Buku ya Mormon, oyo ezali na litondi ya nsango malamu ya libela, epayi ya nani napesaki bafungola ya lisolo ya makomi ya nzete ya Efelaima;

6 Mpe lisusu elongo na Eliyasi, epayi ya nani napesaki bafungola ya kokokisa bozongisi ya makambo nyonso elobama na monoko ya baprofeta basantu nyonso uta mokili ebanda, mpo na oyo etali mikolo ya nsuka;

7 Mpe lisusu Yoane mwana mobali ya Zekalia, moko Zekalia oyo ye (Eliyasi) akendaki kotala mpe apesaki elaka ete asengelaki kozwa mwana mobali, mpe nkombo na ye esengeli kozala Yoane, mpe akotonda na molimo ya Eliyasi;

8 Oyo Yoane natindaki epayi na bino, basali na ngai, Joseph Smith Mwana, mpe Oliver Cowdery, mpo na kokulisa bino na bonganganzambe ya yambo oyo bozwaki, ete bokoka kobiangama mpe kokulisama kutu lokola Alona;

9 Mpe lisusu Eliya, epayi ya nani napesaki bafungola ya nguya ya kobalola mitema ya batata epayi ya bana, mpe mitema ya bana epayi ya batata na bango, ete mabele mobimba ebetama na bolakeli mabe te;

10 Mpe lisusu na Yosefe mpe Yakobo, mpe Yisaka, mpe Abalayama, batata na bino, na nzela ya baye kani bilako bitikali se kozala;

11 Mpe lisusu elongo na Mikaele, soki te Adama, tata ya nyonso, mwana mokonzi ya nyonso, mokolo ya mikolo;

12 Mpe lisusu elongo na Petelo, mpe Yakobo, mpe Yoane, baoyo natindaki epayi na bino, na nzela ya baoyo nakulisaki bino mpe nakotisaki bino mpo na kozala bapostolo, mpe banzeneneke baleki malamu ya nkombo na ngai, mpe baoyo bazali na bafungola ya mosala na bino mpe ya makambo se moko oyo wana nabimisaki epayi na bango;

13 Epayi ya baoyo napesaki bafungola ya bokonzi na ngai, mpe eleko ya nsango malamu mpo na ntango ya nsuka; mpe mpo na litondi ya ntango, kati na oyo nakosangisa esika moko na moko biloko nyonso, oyo ezali na lola, mpe oyo ezali na mabele lokola;

14 Mpe lisusu elongo na nyonso baoyo wana Tata na ngai apesaki ngai uta na mokili.

15 Yango wana, botombola mitema na bino mpe bosepela, mpe bokanga nketo na bino, mpe bolata bibundeli mobimba na ngai, ete bokoka kotelemela mokolo ya mabe, nsima ya kosala nyonso, ete bokoka kotelema.

16 Boye, botelema, mpe bolatisa nketo na bino na bosolo, kolataka lokola ebende ya ntolo bosembo, mpe makolo na bino mazipami na bolengeli ya nsango malamu ya kimia, oyo natindaki banjelu na ngai kopesa epayi na bino;

17 Kokamataka nguba ya bondimi na oyo wapi bokokoka kozimisa mbanzi nyonso na moto makasi ya bato ya nkuna;

18 Mpe bokamata ekoti ya lobiko, mpe mompanga ya Molimo, oyo nakosopa likolo na bino, mpe liloba na ngai oyo nakobimisa epayi na bino, mpe bozala na boyokani mpo na oyo etali makambo nyonso bosengaki ngai, mpe bozala sembo kino nakoya, mpe bokotombolama likolo, ete esika nazali bino mpe bozala lisusu. Amene.

Bimisa na lokasa