2010–2019
Biloko ya Motuya ya Molimo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


2:3

Biloko ya Motuya ya Molimo

Ntango bosaleli bondimi na Nkolo mpe na nguya ya bonganganzambe na Ye, makoki na bino ya koyekama na biloko ya motuya ya molimo oyo Nkolo atiela bino ekobakisama.

Botondi mpo na miziki kitoko wana. Ntango totelemaki mpo na koyemba nzembo wana ya katikati; “Totondi You, O Nzambe, mpo na Profeta,” Nayokaki makanisi mibale ya nguya koyela ngai. Likanisi moko ezalaki na ntina ya Profeta Joseph Smith, profeta ya eleko oyo. Bolingo mpe bosimi na ngai mpo na ye emataka mokolo na mokolo nyonso oyo ezali koleka. Likanisi ya mibale eyaki ntango natalaki mwasi na ngai, bana na ngai ya basi, bankoko na ngai ya basi, mpe bakokoloko na ngai ya basi. Nayokaki kaka lokola nasenga ete bino banso bozali eteni ya libota na ngai.

Basanza mingi eleki, na nsuka ya liyangani ya dotasio na tempelo moko, nalobaki epai ya mwasi na ngai Wendy, “Natie elikya ete bandeko basi basosolaka biloko ya motuya ya molimo oyo ezali ya bango na kati ya tempelo. Bandeko basi, mbala mingi namimonaka kokanisaka na ntina na bino, mpe lisusu basanza mibale eleki ntango Wendy mpe ngai tokendaki na Harmony, Pennsylvania.

Bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona

Yango ezalaki mobembo na biso ya mibale kuna. Mbala nyonso mibale mitema na biso mipasokakimpenza ntango totambolaki na mabele ya bule wana. Ezalaki penepene na Harmony nde Yoane Mobatisi amonisamaki epai ya Joseph Smith mpe azongisaki ya Bonganganzambe ya Alona.

Bozongisi ya Bonganganzambe ya Melekisedeki

Ezali kuna nde Bapostolo Petelo, Yakobo, mpe Yoane bamonisamaki mpo na kozongisa Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Ezalaki na Harmony nde Emma Hale Smith asungaki lokola mokomi ya mobali na ye ntango Profeta Joseph Smith abongolaki Buku ya Mormon.

Ezalaki mpe lisusu na Harmony nde Joseph azwaki bobimisi ya kolakisaka bolingi ya Nkolo epai ya Emma. Nkolo ateyaki Emma mpo na kotalisa makomi, mpo na kolendisa Eklezia, ezwa Molimo Mosantu, mpe kolekisa ntango na ye na “boyekoli ebele.” Emma apesamaki lisusu toli ya “kotia mpembeni biloko nyonso ya mokili oyo mpe koluka makambo ya motuya koleka,” mpe kosimba mayokani na ye elongo na Nzambe. Nkolo asukisaki malakisina Ye na maloba oyo ya motuya: “Oyo ezali maloba na ngai epai na bino nyonso.”1

Makambo nyonso oyo esalemaki na bozindo koleka mpo na bomoi na bino. Bozongisi ya bonganganzambe, elongo na malakisi ya Nzambe epai ya Emma, ekoki kokamba mpe kopambola moko na moko kati na bino. Lolenge nini natalelaka bino mpo na kososola ete bozongisi ya bonganganzambe ezali bobele na ntina epai na bino basi lokola ezali mpe na mobali nyonso. Mpo ete Bonganganzambe ezongisamaki, nyonso mibale botosi ya liyokani ya basi mpe mibali epesi ndingisa na “mapamboli nyonso ya molimo ya eklezia,”2 to, tosengeli koloba, na nyonso biloko ya motuya ya molimo ya Nkolo oyo azali na yango mpo na bana na Ye.

Mwasi nyonso mpe mobali nyonso oyo asalaka mayokani na Nzambe mpe abatelaka mayokani oyo, mpe oyo akotaka na bobongi nie na makuli ya bonganganzambe, azali na bokoti ya mbala moko na nguya ya Nzambe. Baoyo basalaki dotasio na ndako ya Nkolo bazwaki likabo ya nguya ya bonganganzambe ya Nzambe engebene na likabo ya mayele ya koyeba lolenge nini kobikela na nguya yango.

Balola ezali lokola ya kofungwama mpo na basi oyo basalaki dotasio elongo na nguya ya Nzambe kosopanaka uta na mayokani ya bonganganzambe lokola yango mpe ezali epai ya mibali oyo bazali bamemi ya bonganganzambe. Nasambeli ete bosolo ekokoma likolo ya mitema na bino moko na moko mpo ete nandimi ekobongola bomoi na bino. Bandeko basi, bozali na ndingisa ya koyekama likolo ya nguya ya Mobikisi mpo na kosunga libota na bino mpe basusu oyo bolingaka.

Sikawa, okoki komilobela, “Ezoyokana kitoko, kasi lolenge nini nakosala yango? Lolenge nini nakoyekama na nguya ya Mobikisi na kati ya bomoi na ngai?”

Okozwa eyano ya lolenge oyo te etalisami na mokanda moko. Molimo Mosantu ekozala mokambi na yo moko ntango ozali koluka kososola oyo Nkolo asengeli yo eyeba mpe osala. Lolenge oyo ezali mbango te to pete te, kasi ezali na lolenge ya molimo. Nini ekoki kosalema malamu mingi koleka kosala na Molimo mpo na kososola nguya ya bonganganzambe—nguya ya Nzambe?

Oyo nakoki koyebisai bino ezali ete kokota na nguya ya Nzambe na bomoi na bino esengaka makambo moko oyo Nkolo ateyaki Emma mpe moko na moko na bino kosala.

Na yango, nabengisi binso boyekola na losambo eteni 25 ya Doctrine et Alliances mpe komona oyo Molimo Mosantu ekoteya bino. Bokasi na bino moko, ya molimo ekomemela bino esengo ntango bozwi, bososoli, mpe bosaleli nguya oyo bozwelaki dotasio.

Eteni ya bokasi oyo ekosenga bino botia pembeni makambo ebele ya mokili oyo. Mbala mosusu tolobelaka mingi makambo ya kozanga kokanisa na ntina ya kotambola mosika na mokili na makambo na yango, masenginya ya kilikili, mpe bafilozofi ya lokuta. Kasi ya solo kosalaka bongo esengaka bino botala etamboleli ya bomoi na bino mpe ya ntango nyonso. Ntango bosali bongo, Molimo Mosantu ekokamba bino na ntina ya oyo ezali lisusu na ntina te, oyo elongobani lisusu te mpo n ntango mpe bokasi na bino.

Ntango otiei makanisi na yo mosika na makambo ya mokili, eloko moko oyo emonisami kozala ntina epai na yo ekozala sikawa mosika na ntina. Okosengela koloba te na eloko mok, atako ezali na nguya te. Ntango omipesi mpe okobi lolenge ya bomoi oyo ya kobonzaka bomoi na yo epai ya Nkolo, mbongwana na bomoni na yo, mayoki mpe bokasi ya molimo ekokamwisa yo.

Sikawa mwa liloba ya likebisi. Ezali na basusu oyo bakoluka kokitisa makoki na yo ya kosenga nguya ya Nzambe. Ezali na basusu bakotiela yo ntembe mpe komona mpamba makoki na yo ya molimo lokola mwasi moyengebene.

Solo mingi koleka, monguna alingaka te ososola liyokani osalaki na libatisi, to nguya ya boyebi mpe nguya ozwaki na na kati ya tempelo—ndako ya Nkolo. Mpe Satana solo alingaka te ososola ete mbala nyonso osungaka na lolenge ya kolongobana mpe okumbamelaka na kati ya tempelo, obimaka na bibundeli ya nguya ya Nzambe mpe elongo na banzelu na Ye kozalaka na “mokumba likolo” na yo.3

Satana mpe basali na ye bakosala bandelo elenda makasi mpo na kopekisa yo ososola makabo ya molimo oyo ozali na yango mpe okoki kopambolama. Libaku mabe, mabaku ya kopekisa kokende liboso ekoki kozala mpo na bizaleli mabe ya basusu. Esalaka ngai mpasi ya kokanisa ete moko kati na bino oyo azali na ntina te to andimelaka mokambi nganganzambe moko te, to abebisamaki to ayokisamaki mpasi na mobali moko, tata, to moninga songolo. Nayoki mawa ya bozindo oyo moko kati na bino ayokaki, na bozangi botosi, to bosambisi mabe. Mabunga ya boye ezali na esika te kati ya bokonzi ya Nzambe.

Na ngambo mosusu, esepelisaka ngai ntango nayokaka bakambi ya bonganganzambe oyo balukaka na bokasi kosala elongo na basi kati na makita ya kopesana toli ya palwasi mpe ya likonzi. Nafulami na mobali moko na moko oyo alakisaka ete mokumba na ye ya bonganganzambe ya ntina ezali ya kosalisa mwasi na ye.4 Nasanjoli mobali oyo wana amemiaka na bozindo makoki ya mwasi na ye ya kozwa emoniseli mpe kotuya ye lokola molongani akoki na ye na libala na bango.

Ntango mobali asosoli bonene mpe nguya ya mwasi Mosantu ya Mikolo ya nsuka ya sembo, oyo alukaka, asala dotasio, ezali ntina oyo ayokaka lokola kotelemaka ntango akoti na ndako?

Uta bokeli ya ntango, basi bapambolamaka elongo na bokambi na bango moko—makoki ya kokesenisa mabe na malamu. Likabo oyo etombwamaka kati ya baoyo basalaka mpe batosaka mayokani. Mpe ekitisamaka kati ya baoyo baboyaka na bolingi na bango moko mitindo ya Nzambe.

Nalobi na lombango ete nalongoli te mibali uta na masengami ya Nzambe mpo na bango lisusu basalaka bokeseni ya mabe mpe malamu. Kasi bandeko basi, bozali na makoki na bino ya kososola bosolo na mabunga, ya kozala babateli ya bolamu ya lingomba ya bato banso, ezali mpasi na mikolo ya nsuka oyo. Mpe totalelaka bino mpo na koteya basusu basala bongo. Botika nazala polele na ntina ya likambo yango: soki mokili oyo ebungisi alima ya bolamu ya basi na yango, mokili ekoki mokolo moko te kobika.

Biso Basantu ya mikolo ya nsuka tozali ya mokili te; tozali ya liyokani ya Yisalaele. Tobiangemi mpo na kolengela bato mpo na boyei ya Mibale ya Nkolo.

Sikawa, ekoki ngai kolakisa polelebiteni mosusu ya mingi oyo etali mwasi mpe bonganganzambe. Ntango otiami mpembeni mpo na kosunga na libiangi songolo na nse ya bokambi ya moto oyo asimbi bafungola ya bonganganzambe—lokola episikopo to mokambi ya likonzi—opesameli likoki ya bonganganzambe mpo na kosalela na libiangi wana.

Na lolenge moko, na kati ya tempelo esantu, bozali na ndingisa ya kosala mpe kosalisa kati ya makuli ya bonganganzambe ntango nyonso bokendeke. Dotasio na bino ya tempelo elengeli bino mpo na kosala bongo.

Soki osila kosala dotasio kasi naino obalani te na mobali oyo azali komema bonganganzambe mpe moto moko alobi na yo, “Libaku mabe kasi yo ozali na bonganganzambe te na ndako na yo,” nasengi bososola ete liloba wana ezali malonga te. Okoki kozala na momemi bonganganzambe te kati ya ndako na yo, kasi osalaki mayokani ya bule na Nzambe na tempelo. Uta na mayokani wana nguya ya kolatisama na bonganganzambe na Ye ekosopana likolo na yo. Mpe mikundola, soki mobali akufi, yo osengeli kokamba na ndako na yo.

Lokola mwasi Mosantu ya Mikolo ya nsuka, mosembo oyo asala dotasio, olobaka mpe oteyaka na nguya mpe likoki kowuta na Nzambe. Ezala na bosakoli to lisolo, tosengeli na mongongo na yo koteya malongi ya Klisto. Tosengeli otia ya yo likabo na libota, palwasi, mpe kati na masanga ya bopesi toli ya likonzi. Kozala na bino kati na bisika wana ezali na ntina mpe ezali soki moke te mpo na kobongisa makita!.

Bandeko na ngai ya basi, nguya na bino ekomatisama ntango bosalisi basusu. Nsambo na bino, kokila bilei, ntango ya boyekoli makomi, mpe kosalisa na tempelo mpe mosala ya mambi ya kala ya libota ekofungola balola mpo na bino.

Nabondeli bino boyekola na losambo nyonso ya makambo ya solo bokoki kozwa na ntina ya nguya bonganganzambe. Bosengeli kobanda na biteni ya Doctrine et Alliances 84 mpe 107. Biteni oyo ekokamba bino na matangi misusu. Makomi mpe mateya ya baprofeta ya lelo, bamoni, mpe basakoli etondisami na bosolo oyo. Ntango bososoli na bino ezali kobakisama mpe ntango bozali kosalela bondimi na Nkolo mpe na nguya ya bonganganzambe na Ye, makoki na bino ya kozwa eloko oyo ya motuya na molimo oyo Nkolo atiaki mpo na bino ekobakisama. Ntango bosali bongo, bokozwa nguya ya komimona malamu koleka na makoki ya kosunga mpo na kosala mabota ya seko oyo esangana, ekangisama na tempelo ya Nkolo, mpe etondisama na bolingo ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

Babokasi na biso nyonso ya kosalela moko na mosusu, kosakola nsango malamu, konetola Basantu, mpe kosikola bawei esalemi na kati ya tempelo. Tozali sikawa na batempelo 166 na mokili mobimba, mingi ezali koya.

Lokola boyebi, Tempelo ya Salt Lake, Temple Square, mpe esika ya bosangani ya plaza pene ya Etonga ya Bilo ya Eklezia ekobongisama na moango oyo ekobanda na nsuka ya mobu oyo. Tempelo esantu oyo esengeli kobatelama mpe kolengelama mpo na nkola oyo ezali koya lobi, kaka bobele lokola epesaka biso nguya na nkola oyo.

Lokola Eklezia ezali kokola, batempelo ebele ekotongama mpo ete mabota ebele ekoka kokota na mapamboli minene oyo, ya bomoi wana ya seko.5 Tozwaka tempelo lokola moko ya etonga ebulisama mingi na kati ya Eklezia. Lokola tosakoli misala ya botongi tempelo ya sika, yango ekomi moko ya eteni na biso ya ntina na lisitwale. Lokola tosololi na mpokwa oyo, bino bandeko basi bozali makasi na mosala ya tempelo, mpe tempelo ezali esika oyo bokozwa biloko ya motuya ya minene koleka nyonso.

Nasengi boyka ngai malamu mpe na limemia mpo sikawa nakoyebisa miango ya kotonga batempelo ya sika mwambe. Soki moko esakolami na esika oyo ezali na ntina mingi mpo na bino, ekoki ngai kosenga ete bogumba na pete mitu na bino elongo na libondeli ya botondi na mitema na bino. Tozali na esengo ya koyebisa miango ya botongi batempelo na bisika oyo bilandi: Freetown, Sierra Leone; Orem, Utah; Port Moresby, Papua New Guinea; Bentonville, Arkansas; Bacolod, Philippines; McAllen, Texas; Cobán, Guatemala; mpe Taylorsville, Utah. Natondi bino, bandeko na ngai ya basi. Tozongis matondi na motema moko na boyambi na bino ya miango miye mpe eyano na bino ya limemia.

Sikawa, mpo na kosukisa, nalingi natikela bino lipamboli, ete bokoka kososola nguya ya bonganganzambe oyo bozwelaki dotasio mpe ete bokoka kobakisa nguya yango na kosalelaka bondimi na bino naNkolo mpe na nguya na Ye.

Bandeko basi, na botosi mpe botondi ya mozindo, nalakisi bolingo na ngai epai na bino. Karti na bomikitisi, natatoli ete Nzambe azali na bomoi! Yessu azali Klisto. Oyo ezali Eklezia na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.