Motindo ya Monene ya Mibale
Esengo na bisoya monene eyaka ntango tozali kosunga bandeko na biso mibali mpe basi.
Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi, matondi mpo na manso bozali kosala mpo na kosunga kosangisa Yisalayele na bangambo nyonso mibaale ya elamba, mpo na kolendisa mabota, mpe mpo na kopambola bomoi ya baye bazali kozanga. Matondi mpo na kozala lokola balandi ya solo ya Yesu Klisto.1 Boyebi mpe bolingaka kotosa mitindo na Ye minene mibale, kolinga Nzambe mpe kolinga baninga na bino ya pembeni.2
Na basanza motoba ya nsuka oyo, Ndeko mwasi Nelson mpe nakuni na Basantu nkoto ebele ntango tosali mobembo na Amelika ya Kati mpe ya Sudi, na bisanga ya Pasifiki, mpe bingumba ebele na Etazini. Ntango tosalaka mobembo, elikia na biso ezali ya kotonga ya bino bondimi. Kasi tozongata ntango nyonso na bondimi na biso ya kolendisama na bandimi mpe baninga tokutana na bango. Ekoki ngai kokabola misato ya bangonga ya motuya ya makambo na biso tokutani na yango ya kala te?
Na sanza ya mitano, ndeko mwasi Nelson mpe ngai tokendaki mobembo elongo na Mpaka Gerrit W. mpe Ndeko mwasi Susan Gong na Pasifiki ya Sudi. Ntango tozalaki na Auckland, New Zealand, topesamaki lokumu ya kokutana na ba imam ya Mosque na Eklezia ya Klisto, Nouvelle Zelande, bisika wapi basanza mibale liboso, bakumbameli bayebi likambo te bakufaki na monduki na ekela moko ya nkanda ya nsomo.
Tolakisaki bolingo na biso na bandeko oyo ya bondimi mosusu mpe toyebisaki lisusu bomipesi na biso mpo na bonsomi ya biyamba.
Topesaki lisusu mosala ezanga lifuta mpe lisungi ya mosolo moke mpo na kotonga lisusu mosquena bango. Bokutani na biso na bakambi ya bamuzulumani oyo etondisamaki na maloba ya boboto mpe bondeko.
Na sanza ya mwambe, elongo na Mpaka Quentin L. mpe Ndeko mwasi Mary Cook, Ndeko mwasi Nelson mpe ngai tokutanaki na bato na Buenos Aires, Argentina—mingi kati na bango ya bondimi na biso te—oyo ya bango bomoi ebongwanaki na bachaises roulantes to bakiti ya velo oyo epesamelaki bango na basali na biso Bapesi na Bolingo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Tofulamaki ntango balakisaki mitema ya kotonda na botondi na esengo mpo na kotambola na bango ya sika.
Ngonga ya motuya ya misato esalamaki kaka mwa baposo eleki kala te awa na Salt Lake City. Ngonga yango eyaki na mokanda moko ya ndenge na yango oyo nazwaki na bokundoli mbotama na ngai uta na elenge mwasi nakobenga Mary—ya mibu 14.
Mary akomaki na ntina ya makambo ye mpe ngai tozalaki na yango:“Ozali na bana 10. Tozali na na bana 10. Olobaka Kishinwa. Bana na biso motoba na libota na ngai, kobakisaka ngai, tobokwamaki na Chine, yango wana Kishinwa ezali lokota na biso ya yambo. Ozali mopasoli motema. Ndeko ngai ya mwasi ezwa [bipaso] ya kofungwama motema mibale. Olingaka ngonga mibale ya eklezia. Tolingaka ngonga mibale ya eklezia . Ozali na lolaka ebonga nie. Ndeko na ya mobali azali na lolaka ya kobonga nie mpe. Azali mokufi miso lokola ngai.”
Maloba ya Mary etutaki ngai na mozindo, komonisaka kaka molimo monene na ye te kasi lisusu bobulisami ya mama mpe tata na ye.
Basantu ba mikolo ya Nsuka, lokola na balandi mosusu ya yesu Klisto, bazali ntango nyonso koluka banzela ya kosunga, kotombola, mpe kolinga basusu. Bango oyo bazali na bolingi ya kobengama bato ya Nzambe “bazali na bolingi ya komema mikumba ya basusu, … kolela elongo na baoyo bazali kolela; … mpe [ko] lendisa baoyo bazali na bosenga ya kolendisa.”3
Bazali koluka solo kobika mitindo minene ya yambo mpe ya mibale. Ntango tolingi Nzambe na mitema na biso nyonso, Ye abalusi mitema na biso epai ya bolamu ya basusu bozongeli moko kitoko mpe ya bolamu.
Ekokoka kosalema te koyeba motango ya lisalisi oyo Basantu ba Mikolo mya Nsuka basalaka nzinganzinga ya mokili mikolo nyonso ya mibu nyonso, kasi yango ekoki kosatangama bolamu oyo Eklezia lokola lingomba esalaka mpo na kopambola mibali mpe basi—bilenge mibali mpe bilenge basi—oyo bazali na mposa ya loboko mpo na kosunga.
Mosala ya kosalisa mpo na kosunga ya Eklezia ebandaki na 1984. Nsima basengaki Eklezia na mokili mobimba ekila bilei mpo na kozwa mosolo ya kosunga baye batungisamaki na bozangi mvula ya bobomi moko makasi na Afrika ya este. Bandimi ya Eklezia bapesaki milio 6.4 $ na bokili bilei ya mokolo moko wana.
Na ntango wana-Mpaka M. Russell Ballard mpe Ndeko mobali Glenn L. Pace batindamaki na Ethiopia mpo na kopesa motuya lolenge nini mosolo ebulisama ekokaki kosalelama malamu. Bokasi oyo emonanaki kozala ebandeli ya oyo ekoyebana nsima lokola Latter-day Saint Charities.
Uta ntango wana, Bapesi na Bolingo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka epesi mitango ya dolari mingi koleka bililio mibale na lisalisi ya kosunga baye na bosenga na mokili mobimba. Lisungi oyo epesami na bazwi kozangaka kotala ya bango bozali Eklezia, ekolo, loposo, bosaleli posa ya nzoto, mwasi to mobali, to bondimeli ya bayi politiki.
Nyonso wana ekoki te. Mpo na kosunga bandimi ya Eklezia ya Nkolo oyo bazali na mawa, tolingaka mpe tosalelaka mobeko ya kala ya bokili bilei.4 Toliaka bilei te mpo na kosunga basusu oyo bazali na nzala. Mokolo moko sanza moko na moko, toliaka bilei te mpe topesaka motuya ya bilei wana (mpe mingi koleka) mpo na kosunga baye na bosenga.
nakobosa mokolo moko te bokei na ngai kotala ya yambo na Afrika ya weste na 1986. basantu bayaki na mayangani na biso na motango monene. Atako bazalaki na moke na oyo etali bozwi ya biloko, mingi koleka bayaki bayaki kolataka bilamba ya pembe ezanga mbindo.
Nasengaki mokambi ya likonzi lolenge nini azalaki kobatela bandimi oyo bazalaki na bozwi moke. Azongisaki eyano ete baepisikopo na bango bayebaki bato na bango malamu. Soki bandimi bakoki kosomba bilambo mibale na mokolo, lisungi moko te esengelamaki. Kasi soki bakokaki kosomba kaka elambo moko to moke—ata kutu na mosolo ya libota na bango—baepisikopo bazalaki kopesa bilei, esombami na makabo ya bokili bilei. nsima abakisaki likambo kitoko oyo: bopesi ya makabo ya bokili bilei na bango mingimingi ezalaki koleka bosaleli mosolo na bango. Mosolo ya likolo ya makabo ya bokili bilei ezalaki nsima kotindami na bato bisika mosusu baoyo bosenga elekaki ya bango. Basantu ya Afrika ya sikisiki wana bateyaki ngai liteya monene na ntina ya nguya ya mobeko mpe molimo ya bokili bilei.
Lokola bandimi ya Eklezia, toyokaka mokangano ya libota na baoyo bazali koniokwama na ndenge nyonso.5 Lokola bana mibali mpe bana basi ya Nzambe, tozali banso bandeko mibali mpe bandeko basi. Tolandaka toli ya Boyambi ya Kala: “Okofungola loboko na yo monene epai na ndeko na yo, epai na bato na bosenga mpe na babola na mokili.”6
Tosalaka lisusu makasi mpo na kobika malako ya Nkolo Yesu Klisto lokola ekomami na Matai 25:
“Mpo nazalaki na nzala, mpe bopesaki ngai bilei: nazalaki na mposa ya mai, mpe bopesaki ngai mai: nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai:
“Nazalaki bolumbu, mpe bolatisi ngai: nazalaki na malali, mpe boyei kotala ngai. …
“… Na manso lokola esalaki bino yango na moko ya bandeko na ngai baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango.”7
Tika naloba kaka mwa ndakisa ya lolenge Eklezia elandaka malako ya Mobikisi.
Mpo na kosunga kosilisa nzala, Eklezia esalaka na bandako ya ebombelo ya baepisikopo 124 na mokili mobimba. Na nzela na yango, pene na babosengi bilei 400,000 epesami mobu moko na moko na bato na bosenga. Na babisika wapi ndako ya ebombelo ezali, baepisikopo mpe bakambi ya makonzi basalelaka mosolo uta na misolo ya makabo bokili bilei ya Eklezia mpo na kopesa bilei mpe biloko na bandimi na bango na bosenga.
Kasi, mokakatano ya nzala ezali kokende mosika koleka bandelo ya Eklezia. Yango ezali kobutaka nzinganzinga mokili. Rapport moko ya Lisanga ya Bikolo ya kala mingi te elakisi ete motango ya bato oyo bazali kolia malamu te na mokili sikawa eleki milio 820 million—to pene moko likolo ya libwa ya bato ya mabele.8
Wana ezali mpenza mitango minene! Tozali mpenza na matondi mpo na makabo na bino. Na lisalisi ya mitema na bino ya bokabi na motema moko, bamilio na mokili mobimba bakozwa bilei, bilamba, ekimelo ya ntango moke, bakiti ya kinga, nkisi, mai ya komela, mpe mingi koleka ya oyo esengeli mingi .
Bokono mingi na mokili mobimba esalami mpo mai ya mbindo. Kino lelo, makanisi ya bomoto ya Eklezia esungi kopesa mai ya komela na bankama ya masanga na bikolo 76.
Mwango moko na Luputa, Repibliki Demokratiki ya Congo, ezali ndakisa monene. Na bato kolekaka 100,000, engumba ezalaki na mai ya komela te. Bayi-mboka basengelaki kotambola bantaka milai mpo na komona misolo ya mai malamu. Liziba moko ya mai emonanaki na ngomba mosika kilometele 29 mosika, kasi bato ya engumba bakokaki kokoma na mai wana te ntango nyonso.
Ntango bamisionele ya bomoto bayokaki oyo etali mokakatano oyo, basalaki elongo na bakambi ya Luputa na kopesaka biloko mpe kolakisaka komema mai na tiyo tii na engumba. Bato ya Luputa basalaki mibu misato kotimolaka nzela ya mai ya metele moko ya mozindo na libanga mpe zamba. Na kosalaka elongo, mokolo ya esengo eyaki na nsuka ntango mai ya pio, ya peto ezwamaki mpo na banso na mboka wana.
Eklezia lisusu esungaka bapaya, atako oyo bakimi boweleli ya basoda te, makama mabe ya mokili, to minioko ya biyamba. Bato koleka milio 70 batiki sikawa bandako na bango.9
Kaka na mobu 2018, Eklezia epesi biloko ya ntango ya likama na barefugé na bikolo 56. Na bobakisi, bandimi ya eklezia mingi bapesi ngonga na bango ezanga lifuti mpo na kosunga barefugé bamikotisa na masanga ya sika. Topesi matondi na moto nyonso kati na bino oyo azali kasala makasi mpo na kosalisa baoyo bazali komeka kofandisa bandako ya sika.
Na nzela ya makabo ya bokabi magazini ya Deseret Industries na Etazini, bamilio ya kilo ya bilamba esangisami mpe ebongisami mobu moko na moko. Ntango baepisikopo ya esika bazali kosalela motango monene oyo ya bilamba mpe biloko mpo na kosunga bandimi kati na bosenga, eteni monene mingi epesami na mabongisi ya bosalisi oyo bazali kokabola biloko yango na mokili mobimba.
Mpe kaka mobu eleki, Eklezia epesaki lisalisi ya miso mpo na bato koleka 300.000 na bikolo 35, lisalisi ya bana babotami sika na bankoto ya bamama mpe bana mike na bikolo 39, mpe bakiti ya kinga na bato 50.000 kofandaka na na bikolo ebele.
Eklezia eyebani malamu mpo na kozalaka kati na bayanoli ya yambo ntango likama esalami. Kutu liboso ekumbaki ebeta, bakambi mpe basali ya Eklezia na bisika ya likama bazali kosala mianngo mpo na lolenge ya kopesela biloko ya lisalisa mpe lisungi ezanga lifuti na baoyo bakozwa likama.
Mobu eleki kaka, Eklezia asalaki misala ya lisungi ya libomi linene koleka 100 na mokili mobimba, kosungaaka bazwi likama ya bikumbaki, bamoto, bampela, boningani ya mabele, mpe mabomi manene mosusu. Ntango nyonso ekoki kosalama, bandimi ya Eklezia na biso oyo balataka kazaka ya Main Serviable ya langi ya mai ya mosaka basangisaka mitango ebele mpo na kosunga baye basimbami na libomi linene. Lolenge ya lsalisi oyo, epesami na mingi mpenza kati na bino, ezali motema ya kosalisa.
Bandeko na ngai ba bolingo mibali mpe basi, misala nalimboli ezali mpenza eteni moke ya lisalisasi oyo ezali kokola ya bolamu mpe bomoto ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.10 Mpe bino bozali bato oyo bazali kosala ete oyo esalama. Mpo na bomoi na bino ya ndakisa malamu, mitema na bino ya bokabi, mpe maboko na bino ya lisalisi, ezali na bobangi ete masanga mingi wana mpe bakambi ya baguvelenema bazali kosanzola makasi na bino.11
Uta nakomi Mokambi ya Eklezia, nakwisami na baprezida, baministre bakonzi, mpe btoma ya bikolo bapesi ngai matondi ya bosembo mpo na lisalisi na biso ya bomoto na bato na bango. Mpe balakisi lisusu matondi mpo na bokasi oyo bandimi na biso ya bondimi bazali komema na ekolo na bango lokola baye mboka bayengebene, baye bakabaka.
Nasepeli lisusu ntango bakambi ya mokili baye kotala Bakambi ya Yambo kolobaka elikia na bango mpo na Eklezia etiama na mikili na bango. Mpo na nini? Mpo bayebi Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakosunga kotonga mabota mpe masanga makasi, kokomissaka bomoi malamu koleka mpona basusu bisika nyonso bafandi.
bisika tozwami epai na biso, bandimi ya Eklezia bazali koyoka bolingo na ntina ya Botata ya Nzambe mpe bondeko ya moto. Boye, ya biso esengo monene minggi eyaka ntango tozali kosunga bandeko na biso mibali mpe basi, likambo te wapi tofandi na mokili ya kafukafu oyo.
Kopesaka lisungi na basusu—kosalaka bokasi ya konsansa mpo na kosalisa na basusu mingi mingi koleka tomisalisi—ezali esengo na biso. Mingimingi, nakoki kobakisa, ntango ezali malamu te mpe ntango ezali kosenga biso tobima na esika na biso ya niekese. Kosalela motindo monene ya mibale wana ezali motuya tmpo na kokomaka bayekoli ya solo ya yesu Klisto.
Bandeko mibali mpe basi babolingo, bozali bandakisa na bomoi ya bambuma oyo eyaka utana kolandaka malako ya Yesu Klisto. Napesi bino matondi! Nalingi bino!
Nayebi ete Nzambe azali na bomoi. Yesu Klisto Eklezia na Ye ezongisami na mikolo ya nsuka oyo mpo na kokokisa bantinna ya bonzambe. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.