Makomi
Malongi mpe Mayokani 29


Eteni 29

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na miso ya bampaka motoba, na Fayette, New York, na sanza ya libwa ya mobu 1830. Emoniseli oyo epesamaki mwa mikolo liboso ya likita, oyo ebandaki na mokolo ya 26, sanza ya libwa ya mobu 1830.

1–8, Klisto azali kosangisa baponami na Ye; 9–11, Boyei na ye ekobanda na Nkoto moko ya mibu; 12–13, Bazomi na mibale bakosambisa Yisalaele mobimba; 14–21, Bilembo, bolozi, mpe libebi ekoya liboso ya Boyei ya mibale; 22–28, Bosekwi ya nsuka mpe bosambisi ya nsuka ekoya nsima na Nkoto moko ya mibu; 29–35, Biloko nyonso ezali ya molimo epayi ya Nkolo; 36–39, Zabulu mpe mampinga na ye babenganamaki uta na lola mpo na kosenginia bato; 40–45, Bokwei mpe Bomikabi ememi lobiko; 46–50, Bana mike basikolami na nzela ya Bomikabi.

1 Tiaka matoyi na mongongo ya Yesu Klisto, Mosikoli na yo, Nazali monene, oyo kani loboko ya boboto emikabaki mpo na masumu na bino;

2 Oyo akosangisa bato na ye kutu lokola mama ya soso asangisaka bana soso na ye na nse ya mapapu na ye, kutu mingi lokola bakoyoka mongongo na ngai mpe bakomikitisa liboso na ngai, mpe bakobelela ngai na losambo ya makasi.

3 Tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, ete na ntango oyo masumu na bino malimbisami bino, boye bozwa biloko oyo; kasi bomikundola kosala lisusu masumu te, mbele makama makweyela bino.

4 Solo, nalobi epayi na bino ete boponami uta na mokili mpo na kosakola nsango malamu na ngai na lokito ya bosepeli, lokola na mongongo ya kelelo.

5 Tombola mitema na bino mpe bozala na esengo, mpo nazali na katikati na bino, mpe nazali molobeli na bino epayi ya Tata; mpe ezali bolingi malamu na ye mpo na kopesa bino bokonzi.

6 Mpe, lokola ekomami—Eloko nyonso kani bokosenga ye na bondimi, kozalaka na bomoko kati na losambo engebene na motindo na ngai, bokozwa.

7 Mpe bobiangami kokokisa bosangani ya baponami na ngai; mpo baponami na ngai bayokaka mongongo na ngai mpe bayeisaka mitema na bango makasi te;

8 Yango wana mobeko ebimaki uta na Tata ete bakosangisama na esika moko likolo ya etando ya mboka oyo, mpo na kolengela mitema na bango mpe komilengela na makambo nyonso mpo na mokolo yango ntango mokakatano mpe libebi ekotindama likolo ya bato ya nkuna.

9 Mpo ngonga ebelemi mpe mokolo ezali kala mingi te koya ntango mabele makokomela; mpe bato ya lolendo nyonso mpe baoyo basalaka na nkuna bakozala lokola mpumbulu; mpe nakozikisa bango, elobi Nkolo na Bibele, ete nkuna ekozala te likolo ya mabele;

10 Mpo ngonga ebelemi, mpe oyo elobamaki na bapostolo na ngai esengeli kokokisama; mpo lokola balobaki yango ekosalema se bongo;

11 Mpo nakomilakisa ngai moko uta na lola na nguya mpe nkembo monene, elongo na bibele na yango nyonso, mpe nakofanda na bosembo elongo na bato likolo ya mabele mibu nkoto moko, mpe bato na nkuna bakowumela te.

12 Mpe lisusu, solo, solo, nalobi epayi na bino, mpe oyo ebimi na mobeko makasi, na bolingi ya Tata, ete bapostolo na ngai, Bazomi na mibale baoyo bazalaki elongo na ngai kati na mosala na ngai na Yelusaleme, bakotelema na loboko na ngai ya mobali na mokolo ya boyei na ngai kati na likonzi ya moto, kolataka minkoto ya bosembo, na mitole ya lokumu namitu mituna bango, kati na nkembo kutu lokola ngai, mpo na kosambisa ndako nyonso ya Yisalaele, kutu mingi koleka baoyo balingaki ngai mpe babombaki mitindo na ngai, mpe moto moko mosusu te.

13 Mpo kelelo ekobeta ntango molai mpe makasi, kutu lokola likolo ya Ngomba ya Sinai, mpe mabele mobimba makoningana, mpe bakobima—iyo, kutu bakufi oyo bakufaki na ngai, mpo na kozwa motole ya bosembo, mpe bakolatisama, kutu lokola nazali, mpo na kozala elongo na ngai, mpo ete tozala moko.

14 Kasi, tala, nalobi epayi na bino ete liboso ete mokolo monene oyo moya moi ekokoma molili, mpe sanza ekobongolama na makila, mpe minzoto mikokweya uta na lola, mpe bilembo monene koleka bikozala na lola na likolo mpe na mabele na nse.

15 Mpe ekozala kolela mpe biyelela na kati ya ebele ya bato;

16 Mpe mvula monene ya mabanga ekotindama mpo na kobebisa milona ya mabele.

17 Mpe ekosalema, mpo na nkuna ya bato ya mokili, ete nakokamata bobekoli likolo ya bato ya nkuna, mpo bakoyambola te; mpo nkeni ya nkele na ngai etondi; mpo tala, makila na ngai makopetola bango te soki bayokeli ngai te.

18 Yango wana, ngai Nkolo Nzambe nakotinda nzinzi likolo ya etando ya mabele, oyo ekokanga bafandi na yango, mpe ekolia misuni na bango mpe ekoya kokotisa nkiso kati na misuni yango;

19 Mpe lolemo na bango ekokangama ete bakoloba mabe na ntina na ngai te; mpe misuni na bango mikokweya uta na mikuwa na bango, mpe miso na bango uta na madusu na yango;

20 Mpe ekosalema ete banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ekolia bango nie.

21 Mpe eklezia ya monene mpe ya nsomo, oyo azali mwasi ya pite ya mabele mobimba, ekobwakama na nse na mololi ya moto mpo na kozikisama nie, engebene na oyo elobamaki na monoko ya profeta Ejekiele, oyo alobaki na ntina ya makambo oyo, oyo masalemi naino te kasi esengeli kosalema na ntembe te, lokola nazali na bomoi, mpo bonsomo bokoyangela te.

22 Mpe lisusu, solo, solo, nalobi epayi na bino ete ntango mibu nkoto moko ekokoma na nsuka, mpe bato bakobanda lisusu kowangana Nzambe na bango, bongo nakoyokela lisusu mabele mawa bobele mpo na eleko moko ya moke;

23 Mpe nsuka ekoya, mpe lola mpe mabele ekozikisama mpe ikoleka, mpe ekozala na lola moko ya sika mpe mabele moko ya sika.

24 Mpo makambo nyonso ya kala makoleka, mpe makambo nyonso ekokoma ya sika, kutu lola mpe mabele, mpe nyonso oyo ezalaka na yango, bato mpe lisusu banyama, bandeke ya likolo, mpe bambisi ya mai;

25 Mpe suki yoko te, mpe mpumbulu moko mpe te, ekobunga, mpamba te ezali mosala ya maboko na ngai moko.

26 Kasi, tala, solo nalobi epayi na bino, yambo mabele maleka, Mikaele, anjelu monene na ngai, akobeta kelelo, mpe nsima nde bakufi nyonso bakolamuka, mpo malita na bango ekofungwama, mpe bakobima—iyo, kutu nyonso.

27 Mpe bato ya bosembo bakosangana na loboko na ngai ya mobali mpo na bomoi ya seko; mpe bato ya nkuna na loboko na ngai ya mwasi baoyo nakozala na nsoni ya kozala na bango liboso ya Tata;

28 Yango wana nakoloba epayi na bango—Bolongwa pembeni na ngai, bino bato balakelama mabe, bokende na moto ya libela, oyo molengelamaki mpo na zabulu mpe banjelu na ye.

29 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na bino, ete na ngonga moko te nalobaka uta na monoko na ngai moko ete bakozonga, mpo esika wapi nazali bakoki koya te, mpo bazali na nguya te.

30 Kasi bomikundola ete masambisi na ngai naino ebimisami nyonso te epayi ya bato; mpe lokola maloba na ngai ebimaki uta na monoko na ngai nde bongo mpe makokokisama, ete baoyo ya yambo bakoma bato ya nsuka, mpe bato ya nsuka bakoma bato ya yambo kati na biloko nyonso kani nasili kokela na liloba na ngai ya nguya, oyo ezali nguya ya Molimo na ngai.

31 Libebi te na nzela ya nguya ya Molimo na ngai nde nakelaki yango; iyo, biloko nyonso ezala ya molimo mpe ya ntango—

32 Ya yambo ya molimo, ya mibale ya ntango, oyo ezali ebandeli ya mosala na ngai; mpe lisusu, ya yambo ya ntango, mpe ya mibale ya molimo, oyo ezali nsuka ya mosala na ngai—

33 Nazali koyebisa bino ete bokoka na lolenge na bino kososola; kasi epayi na ngai moko misala na ngai ezali na nsuka te, na ebandeli mpe te; kasi epesami epayi na bino ete bokoka kososola, mpo bosengaki ngai yango na boyokani.

34 Yango wana, solo nalobi epayi na bino ete makambo nyonso epayi na ngai ezali ya molimo, mpe na ngonga moko te epesaki ngai bino mobeko oyo ezalaki se mwa ntango; na moto moko te, na bana ya bato mpe te, mpe te na Adama, tata na bino, oyo nakelaki.

35 Tala, napesaki epayi na ye ete akoka kozala mosali mpo na ye moko; mpe napesaki ye motindo, kasi napesaki ye motindo ya ntango te, mpamba te mitindo na ngai ezali ya molimo; ezali ya mboka te, soki mpe ya ntango te, to ya mosuni mpe ya boyokeli bilengi mpe te.

36 Mpe esalemaki ete Adama, lokola asenginiamaki na zabulu—mpo, tala, zabulu azalaki liboso ya Adama, mpo atombokelaki ngai, kolobaka, Pesa ngai lokumu na yo, oyo ezali nguya na ngai; mpe lisusu ya misato ndambo moko ya mampinga ya lola apengolaki uta na ngai mpo na nguya na bango ya boponi;

37 Mpe babwakamaki na nse, mpe bongo bakomaki zabulu mpe banjelu na ye;

38 Mpe, tala, ezali na esika moko oyo elengelami mpo na bango uta na ebandeli, oyo esika ezali lifelo.

39 Mpe esengeli ete zabulu asenginia bana ya bato, to bakoki te kozala basali mpo na bango moko te; mpo soki bamekaki bololo te bakokaki koyeba oyo ezali elengi te—

40 Yango wana, esalemaki ete zabulu asenginiaki Adama, mpe ye aliaki mbuma epekisami mpe abukaki motindo, na yango nde akonzamaki na bolingi ya zabulu, mpo akweyaki na lisenginia.

41 Yango wana, ngai, Nkolo Nzambe, nabenganisaki ye uta na Elanga ya Edene, uta na miso na ngai, mpo na bobuki na ye ya mobeko, na yango akomaki mokufi na molimo, oyo ezali liwa ya yambo, kutu se liwa moko wana oyo ezali liwa ya nsuka, oyo ezali ya molimo, oyo ekokatama likolo ya bato ya nkuna ntango na koloba: Bolongwa, bino bato balakelama mabe.

42 Kasi, tala, nalobi epayi na bino ete ngai, Nkolo Nzambe, napesaki na Adama mpe na nkona na ye, ete bakokufa te na ntina ya liwa ya ntango, kino ngai, Nkolo Nzambe, nakotinda banjelu kosakola boyamboli mpe bosikoli epayi na bango, na nzela ya bondimi na nkombo ya Mwana Mobotami se Moko na ngai.

43 Mpe boye nde ngai, Nkolo Nzambe, napesaki epayi ya moto mikolo ya momekano na ye—ete na nzela ya liwa na ye ya mokili akoka kosekwa na bozangi kufa na bomoi ya seko, kutu na mingi koleka lokola bakokaki kondima;

44 Mpe na baoyo bakondima bokweisami ya seko te; mpo bakoki kosikolama uta na bokwei na bango ya molimo te, mpo bayambolaki te;

45 Mpo balingi molili mingi na esika ya kolinga pole, mpe misala na bango ezali mabe, mpe bakozwa lifuta na bango uta na oyo balingi kotosa.

46 Kasi tala, nalobi epayi na bino, ete bana mike basikolami uta na bokeli ya mokili na nzela ya Mobotami se Moko na ngai;

47 Yango wana, bakoki kosumuka te, mpo nguya ya kosenginya bana mike epesami te epayi ya Satana, kino babandi kokoma bayanoli liboso na ngai;

48 Mpo epesami epayi na bango kutu lokola nalingi, engebene na elengi ya ngai moko, ete makambo minene masengama na loboko ya batata na bango.

49 Mpe, lisusu, nalobi epayi na bino, ete nani ye oyo kozalaka na boyebi, natindaki te koyambola?

50 Mpe ye oyo azali na bososoli te, etikali se epayi na ngai nasala engebene lokola ekomami. Mpe sikawa nakoloba lisusu te epayi na bino na ntango oyo. Amene.

Bimisa na lokasa