Makomi
Malongi mpe Mayokani 38


Eteni 38

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Fayette, New York, na mokolo ya 2, sanza ya yambo ya mobu 1831. Ezalaki na libaku ya likita ya Eklezia.

1–6, Klisto akelaki biloko nyonso; 7–8, Azali na katikati ya Basantu na ye, oyo bakomona ye kala mingi te; 9–12, Mosuni nyonso ezali ya kobeba liboso na ye; 13–22, Abatelaki mboka ya elaka mpo na Basantu na ye mpo na ntango oyo mpe na boseko; 23–27, Basantu batindami kozala moko mpe kotala moko mpe mosusu lokola bandeko bandimi; 28–29, Bitumba bisakolami; 30–33, Basantu bakopesama nguya uta na likolo mpe bakokende na kati ya bikolo nyonso; 34–42, Eklezia etindami kobatela babola mpe bakeleli mpe koluka bozwi ya boseko.

1 Boye elobi Nkolo Nzambe na yo, kutu Yesu Klisto, Nazali Monene, Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka, se moko oyo atalaka bipayi na etando monene ya boseko, mpe bibele nyonso ya baselafa ya lola, liboso ete mokili mosalema;

2 Se moko oyo ayebi biloko nyonso, mpo biloko nyonso ezali wana liboso ya miso na ngai;

3 Nazali se moko oyo alobaki, mpe mokili mosalemaki, mpe biloko nyonso biyaki na nzela na ngai.

4 Nazali se moko oyo akamataki Siona ya Enoka kati na ntolo na ngai moko; mpe solo, nalobi, kutu mingi lokola bandimaki na nkombo na ngai, mpo nazali Klisto, mpe na nkombo ya ngai moko, na libongi ya makila oyo nasopaki, nasambaki liboso ya Tata mpo na bango.

5 Kasi tala, nakangaki ndambo etikali ya bato ya nkuna na minyololo ya molili kino na bosambisi ya mokolo monene, oyo ekoya na nsuka ya mabele;

6 Mpe atako bongo nakokangisa bato ya nkuna, baoyo bakoyoka mongongo na ngai te kasi bakoyeisa mitema na bango makasi, mpe lisuma, lisuma, lisuma, ezali nsuka na bango.

7 Kasi tala, solo, solo, nalobi epayi na bino ete miso na ngai ezali likolo na bino. Nazali na katikati na bino mpe bokoki komona ngai te;

8 Kasi mokolo yango ezali koya kala mingi te ete bokomona ngai, mpe bokoyeba ete nazali; mpo kitambala ya molili kala mingi te ekopasuka, mpe ye oyo apetolami te akobika te na mokolo yango.

9 Yango wana, bokanga nketo na bino mpe bomilengela. Tala, bokonzi ezali ya bino, mpe monguna akolonga te.

10 Solo nalobi epayi na bino, bozali peto, kasi nyonso te; mpe ezali na moko mosusu te oyo nasepeli na ye malamu;

11 Mpo mosuni nyonso ezali ya kobeba liboso na ngai; mpe banguya ya molili eleki mingi likolo ya mabele, na kati ya bana ya bato, na miso ya bibele nyonso ya lola—

12 Oyo esalaki ete nie eyangela, mpe boseko nyonso ezali kati na bolozi, mpe banjelu bazali kozela motindo monene ya kobuka mabele, kosangisa matiti mabe ete mazikisama; mpe tala, banguna basangani.

13 Mpe sikawa nazali kolakisa epayi na bino mobombamo moko, eloko oyo ezwami kati na bisika ya nkuku, mpo na kolekisa ata bobebisami na bino na ya ntango moke, mpe boyebaki yango te;

14 Kasi sikawa nalobi yango epayi na bino, mpe bopambolami, mpo na mabe na bino te, mpo na mitema na bino oyo mizanga boyambi mpe te; mpo solo boko na kati na bino bazali na elindo liboso na ngai, kasi nakotonda na boboto mpo na bolembu na bino.

15 Boye, bozala makasi uta sikawa kokende liboso; bobanga te, mpo bokonzi ezali ya bino.

16 Mpe mpo na lobiko na bino napesi epayi na bino motindo moko, mpo nayokaki sambo na bino, mpe babola balelaki-lelaki liboso na ngai, mpe bato na bozwi ngai nde nasalaki bango, mpe mosuni nyonso ezali na ngai, mpe nakabolaka bato te.

17 Mpe nasalaki mabele ya nkita, mpe tala, ezali etielo ya makolo na ngai, yango wana, nakotelema lisusu likolo na yango.

18 Mpe natandoli loboko mpe nandimi kopesa epayi na bino bozwi monene, kutu mboka ya elaka, mboka etonda na mabele mpe mafuta ya nzoi, likolo na oyo bolakeli mabe ekozala te ntango Nkolo akoya.

19 Mpe nakopesa yango epayi na bino lokola mboka ya bosangoli libula na bino, soki bokosenga yango na mitema na bino mobimba.

20 Mpe oyo ekozala liyokani na ngai na bino, bokozwa yango lokola mboka ya bosangoli libula na bino, mpe mpo na libula ya bana na bino libela, kino ntango molai lokola ekotelema mabele, mpe bokozwa yango lisusu na boseko, ekokufa lisusu te.

21 Kasi, solo nalobi epayi na bino ete nsima ya mwa ntango moke bokozala na mokonzi soki mpe moyangeli te, mpo nakozala mokonzi na bino mpe nakokengela bino.

22 Yango wana, boyoka mongongo na ngai mpe bolanda ngai, mpe bokozala bato nsomi, mpe bokozala na mibeko te bobele mitindo na ngai ntango nakoya, mpo nazali mopesi mibeko na bino, mpe nini ekoki kopekisa loboko na ngai kosala?

23 Kasi, solo nalobi epayi na bino, boteyana bamoko mpe basusu engebene na mosala oyo naponelaki bino;

24 Mpe tika moto nyonso atala ndeko na ye ya mobali lokola se ye moko, mpe asalela bolamu mpe bosantu liboso na ngai.

25 Mpe nalobi epayi na bino lisusu, tika moto nyonso atala ndeko na ye ya mobali lokola se ye moko.

26 Mpo nani moto na kati na bino oyo azali na bana mibali zomi na mibale, mpe atalaka bango na bilongi te, mpe basalelaka ye na botosi, mpe alobi epayi ya moko: Yo, lata munkoto mpe fanda awa; mpe epayi na mosusu: Yo, lata bibamba mpe fanda kuna—mpe atali bana mibali na ye mpe alobi nazali na boyengebene?

27 Tala, oyo nasili kopesa epayi na bino lokola lisese, mpe ezali kutu lokola nazali. Nalobi epayi na bino, bozala moko; mpe soki bozali moko te bozali bato na ngai te.

28 Mpe lisusu, nazali koloba epayi na bino ete monguna kati na bisika ya nkuku azali koluka bomoi na bino.

29 Bozali koyoka makelele ya bitumba na bikolo ya mosika, mpe bolobi bitumba minene bikozala kala mingi te na bikolo mosika, kasi boyebi te mitema ya bato kati na mboka na bino moko.

30 Nayebisi bino makambo oyo na ntina ya sambo na bino; yango wana, bobomba bwania na ntolo na bino, mbele nkuna ya bato ebimisa makambo oyo epayi na bino na nkuna na bango, na lolenge oyo ekoloba na matoyi na bino na mongongo makasi koleka oyo mokoningisa mabele; kasi soki bomilengelaki bokobanga te.

31 Mpe ete bokoka kokima nguya ya monguna, mpe bosangana epayi na ngai lokola bato ya sembo, kozangaka mbindo mpe mpamela—

32 Yango wana, mpo na ntina oyo napesaki bino motindo ete bokende na Ohio; mpe kuna nakopesa epayi na bino mobeko na ngai; mpe kuna bokolatisama na nguya uta na likolo;

33 Mpe uta esika wana, oyo nyonso nakolinga ete akende akokende na bikolo nyonso, mpe bakoyebisa bango nini bakosala; mpo nazali na mosala monene oyo motiami mpembeni, mpo Yisalaele ekobikisama, mpe nakokamba bango epayi wapi nyonso nalingi, mpe nguya moko te ekopekisa loboko na ngai.

34 Mpe sikawa, nazali kopesa motindo moko epayi ya eklezia na bituka oyo, ete boko bato bakoponama na kati na bango, mpe bakoponama engebene na kopona ya eklezia;

35 Mpe basengeli kobatela babola mpe bakeleli, mpe kopesa bango lisungi ete banyokwama te; mpe kotinda bango kokende na esika nasili kopesa bango motindo;

36 Mpe oyo esengeli kozala mosala na bango, koyangela makambo etali biloko oyo ezali ya eklezia oyo.

37 Mpe bango oyo bazali na bilanga oyo ekoki kotekama te, tika bitikala to bifutelama lokola ebongeli bango malamu.

38 Tala ete biloko nyonso bibatelami; mpe ntango bato bakolatisama na nguya uta na likolo mpe batindami, biloko oyo nyonso bikosangisama na ntolo ya eklezia.

39 Mpe soki bozali koluka bozwi oyo ezali bolingi ya Tata ete apesa epayi na bino, bokozala bazwi koleka bato nyonso, mpo ete bokozala na bozwi ya boseko; mpe esengeli kozala ete bozwi ya mabele ezali ya ngai mpe bosengeli ete napesaka yango; kasi bosala angele na lolendo, nakobangaka ete bokoma lokola Banefi ya kala.

40 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, nazali kopesa epayi na bino motindo moko, ete moto moko moko, azala mpaka, nganganzambe, moteyi mpe lisusu mondimi, akende kobanda kosala na bokasi na ye, na mosala ya maboko na ye, kobongisa mpe kokokisa makambo mpo na oyo wapi napesaki motindo.

41 Mpe tika ete mateya na bino mazala mongongo ya bokebisi, moko moko na moto oyo azali penepene na ye, kati na bolengi mpe bosokemi.

42 Mpe bobima uta na kati ya bato ya nkuna. Bomibatela bino moko. Bozala peto bino baoyo bomemi sani ya Nkolo. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa